LISOLO YA BOYEKOLI 51
Okoki kozala na kimya na ntango ya mpasi
“Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te.”—YOA. 14:27.
LOYEMBO 112 Yehova, Nzambe ya kimya
NA MOKUSE a
1. (a) Na kotalela Bafilipi 4:6, 7, “kimya ya Nzambe” ezali nini? (b) Ndenge nini tozwaka matomba ntango tozalaka na yango?
EZALI na lolenge moko ya kimya oyo bato ya mokili oyo bayebi te. Ezali “kimya ya Nzambe,” kimya oyo eutaka na kozala na boyokani ya motuya elongo na Tata na biso ya likoló. Ntango tozalaka na kimya ya Nzambe, tomiyokaka ete tobatelami malamu. (Tángá Bafilipi 4:6, 7.) Tosepelaka na boyokani ya penepene elongo na bato mosusu oyo balingaka ye. Longola yango, tosepelaka na boyokani na biso moko ya penepene elongo na “Nzambe ya kimya.” (1 Tes. 5:23) Ntango toyebaka, totyaka motema, mpe totosaka Tata na biso, kimya ya Nzambe ekitisaka biso motema mpo tómitungisa te ntango tozali kokutana na likambo moko ya mpasi.
2. Mpo na nini tokoki kondima ete tokoki kozala na kimya ya Nzambe?
2 Ekoki kosalema mpenza tózwa kimya ya Nzambe ntango tozali kokutana na likambo ya mpasi, na ndakisa, maladi oyo ezali kopalangana, likama, botomboki ya bana-mboka to monyoko? Makambo wana nyonso ekoki kobangisa biso. Na yango, Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Mitema na bino etungisama te mpe elɛmba na kobanga te.” (Yoa. 14:27) Likambo ya esengo, bandeko basi mpe mibali bazali kotosa toli wana ya Yesu. Na lisalisi ya Yehova, bazali na likoki ya kozala na kimya atako bazali kokutana na komekama makasi.
OKOKI KOZALA NA KIMYA NTANGO MALADI MABE EZALI KOPALANGANA
3. Ndenge nini maladi mabe oyo epalanganaka noki na ekólo to na mokili mobimba ekoki kobebisa kimya na biso?
3 Maladi mabe oyo epalanganaka noki na ekólo to na mokili mobimba ekoki kobongola makambo mingi na bomoi na biso. Tótalela makambo oyo Coronavirus esalaki na bomoi ya bato mingi. Lapolo moko emonisi ete bato mingi mpenza na mokili balobaki ete bazalaki kolala lisusu malamu te na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus. Na ntango ya maladi yango ya mabe, bato bakómaki lisusu komitungisa mingi, komona mpasi, komɛla masanga, kosalela drɔgɛ, mpe koluka komiboma. Soki maladi mabe ezali kopalangana na esika ofandi, ndenge nini okoki te komitungisa mingi mpe kosepela na kimya ya Nzambe?
4. Mpo na nini koyeba esakweli ya Yesu mpo na mikolo ya nsuka epesaka biso kimya?
4 Yesu asakolaki ete na mikolo ya nsuka, maladi mabe, to kopalangana ya bamaladi, ekozala “bisika ndenge na ndenge.” (Luka 21:11) Ndenge nini koyeba bongo epesaka biso kimya? Tokamwaka te ntango maladi mabe epalanganaka. Toyebaka ete makambo wana esengeli kosalema ndenge Yesu alobaki ekosalema. Yango wana, tozali na ntina ya kotosa toli ya Yesu oyo apesaki baoyo bakozala na bomoi na ntango ya nsuka: “Bózala na nsɔmɔ te.”—Mat. 24:6.
5. (a) Na boyokani na Bafilipi 4:8, 9, makambo nini tosengeli kobondela mpo na yango ntango tozali kokutana na maladi mabe oyo epalanganaka noki? (b) Ndenge nini koyoka audio ya botángi ya Biblia ekoki kosalisa yo?
5 Maladi mabe oyo epalanganaka noki ekoki na pɛtɛɛ nyonso kosala ete tómitungisa mpe tólɛmba nzoto. Yango nde likambo ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Desi. b Ntango nɔkɔ, ndeko na ye, mpe monganga moko bakufaki na maladi ya Coronavirus, abangaki makasi ete akozwa virisi yango mpe akopesa yango mama na ye oyo akómi mobange. Mpo na maladi mabe yango, akanisaki ete akobungisa mosala na ye mpe akozala na mbongo te mpo na kosomba bilei mpe kofuta ndako. Azalaki komitungisa mingi mpo na makambo yango oyo ezalaki kosala ete alala mpɔngi te na butu. Kasi ndeko Desi azwaki lisusu kimya ya motema. Nini esalisaki ye? Abondelaki na bosikisiki ete Yehova asalisa ye mpo azala na kimya mpe akóma na makanisi malamu. (Tángá Bafilipi 4:8, 9.) Azalaki koyoka Yehova azali “koloba” na ye na nzela ya audio ya botángi ya Biblia. Alobi boye: “Mongongo ya boboto ya batángi ezalaki kokitisa motungisi na ngai mpe kokundwela ngai motema mawa ya Yehova.”—Nz. 94:19.
6. Ndenge nini boyekoli na yo moko mpe makita ya lisangá ekosalisa yo?
6 Ntango maladi mabe ezali kopalangana noki, ekoki kozala mpasi tósala makambo nyonso oyo tozalaki kosala liboso. Kasi kotika te yango epekisa yo koyekola yo moko to koyangana na makita. Masolo ya bomoi oyo ezalaka na mikanda na biso mpe bavideo ekokundwela yo ete bandeko na yo ya basi mpe ya mibali bazali kobatela bosembo na bango atako bazali kokutana na mikakatano lokola oyo ya yo. (1 Pe. 5:9) Makita ekosalisa yo otondisa makanisi na yo na makambo ya kolendisa oyo ezali na Biblia. Makita ekopesa yo mpe mabaku ya kolendisa basusu mpe ya kolendisama. (Rom. 1:11, 12) Soki ozali kokanisa ndenge Yehova asalisaki basambeli na ye ntango bazalaki kobɛla, kobanga, to komiyoka ete bazalaki bango moko, kondima na yo ekokóma makasi mpe okomindimisa ete akosunga mpe yo.
7. Liteya nini okoki kozwa epai ya ntoma Yoane?
7 Saláká makasi mpo osololaka na bandeko na yo ya basi mpe ya mibali. Na ntango ya maladi mabe oyo epalanganaka noki, ekoki kosɛnga tózala mwa mosika na bato mosusu, ata mpe na bandeko na biso bakristo. Na bantango ya ndenge wana, okoki komiyoka ndenge ntoma Yoane amiyokaki. Alingaki komona moninga na ye Gayusi boye na miso. (3 Yoa. 13, 14) Kasi, Yoane ayebaki ete mpo na mwa ntango, akokaki te komona Gayusi. Yango wana, Yoane asalaki oyo akokaki kosala; akomelaki Gayusi mokanda moko. Soki likoki ezali te ya kokende kotala bandeko na yo ya basi mpe ya mibali, meká kosolola na bango na telefone, na video, to na kotindela bango bamesaje. Soki okobi kosolola na bandeko na yo bakristo, okomiyoka ete obatelami malamu mpe ozali na kimya. Sololáká na bankulutu soki ozali komitungisa mingi, mpe ndimá maloba ya kolendisa oyo bakoyebisa yo na bolingo.—Yis. 32:1, 2.
OKOKI KOZALA NA KIMYA NA NTANGO YA LIKAMA
8. Ndenge nini likama ekoki kobebisa kimya na yo?
8 Soki okutaná na likama ya mpela, koningana ya mabele, to kopela ya mɔtɔ, na ntembe te otungisamaki mingi na boumeli ya ntango molai nsima ya likama yango. Soki obungisá na liwa bato oyo ozalaki kolinga mingi to biloko na yo ya kobikela ebebaki, na ntembe te oyebi ndenge epesaka mpasi, kozanga elikya, to ata mpe nkanda. Yango elakisi te ete ozali moto oyo alingaka biloko ya mokili to ozangi kondima. Soki okutanaki na likambo moko ya mpasi, mbala mosusu basusu bakoki mpe komizela omiyoka mabe. (Yobo 1:11) Kasi okoki kozala na kimya, atako ozali kokutana na makambo ya mpasi. Nini ekosalisa yo?
9. Yesu alobaki nini mpo na kobongisa makanisi na biso na makama oyo ekoki kobima?
9 Kobosana te makambo oyo Yesu asakolaki. Bato mosusu bakanisaka ete bakokutana na makama ata mokolo moko te. Kasi biso toyebi ete makama ekobakisama na mikolo na biso, mpe tokoki kokutana na makama yango mosusu. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete “mabele ekoningana makasi” mpe makama mosusu ekosalema liboso nsuka eya. (Luka 21:11) Asakolaki mpe ete “makambo ya kobuka mibeko ekokóma mingi,” oyo ezali kokokisama lelo oyo. Na ndakisa, tozali komona ndenge bato bazali kosala mabe, mobulu mpe bateroriste bazali koboma bato. (Mat. 24:12) Yesu alobaki te ete makama yango ekokómela kaka baoyo Yehova asundoli. Kutu, Batatoli ya Yehova mingi ya sembo bazali kokutana na makama. (Yis. 57:1; 2 Ko. 11:25) Yehova akoki te kobatela biso na ndenge ya likamwisi na makama nyonso, kasi akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na kimya.
10. Na kotalela Masese 22:3, mpo na nini komibongisa banda sikoyo mpo na likama ezali komonisa ete tozali na kondima?
10 Ekozala pɛtɛɛ mpo tózala na kimya ntango tozali na mposa ya lisalisi ya lombangu soki tomibongisi mpo na yango liboso. Kasi komibongisa emonisi ete tozangi kondima epai ya Yehova? Te, ezali bongo te. Kutu, komibongisa mpo na likama emonisaka ete tozali mpenza na kondima na likoki na ye ya kobatela biso. Na ndenge nini? Liloba ya Nzambe epesi biso toli mpo tómibongisa mpo na makama oyo ekoki kobima. (Tángá Masese 22:3.) Lisusu, na nzela ya masolo oyo ebimaka na bazulunalo, makita ya lisangá, mpe mayebisi, ebongiseli ya Nzambe ekundwelaka biso mbala na mbala ntina ya komibongisa mpo na likama oyo esɛngi lisalisi ya lombangu. c Totyelaka Yehova motema? Soki bongo, tosengeli kolanda toli yango banda sikoyo, elingi koloba, liboso likama ebima.
11. Liteya nini ozwi na ndakisa ya ndeko mwasi Margaret?
11 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko na nkombo Margaret. Basɛngaki ye alongwa na ndako na ye nsima ya kozika ya zamba na mɔtɔ na esika oyo afandaka. Lokola bato mingi bazalaki kokima bango nyonso na mbala moko, banzela ekangamaki mpe moto moko te akoki kokoba kokima. Mopɛpɛ ekómaki mingi ná milinga ya moindo, mpe ndeko Margaret akokaki te kobima na motuka na ye. Kasi, abikaki mpo amibongisaki liboso. Abatelaki karte moko ya kolakisa bisika na saki na ye ya moke ya lobɔkɔ oyo akokaki kosalela mpo na kozwa nzela mosusu. Akendaki na balabala yango liboso mpo ayebaki esika oyo asengelaki kokende mpo na kozwa lisalisi na lombangu. Lokola amibongisaki malamu, ndeko Margaret abikaki na likama yango.
12. Mpo na nini totosaka malako oyo bapesaka biso mpo na kobatela bomoi na biso?
12 Mpo na kobatela biso mpe basusu malamu, bakonzi bakoki kosɛnga biso tótosa ngonga ya kobima esika makama ezali, to tólanda malako mosusu. Bato mosusu bakokaka te kotosa na lombangu to balalisaka makambo mpo balingaka kobatela biloko oyo bazali na yango. Kasi bakristo basalaka nini? Biblia eyebisi biso boye: “Mpo na Nkolo bótosaka bibongiseli nyonso oyo esalemi na bato: ezala mokonzi mpo azali liboso to baguvɛrnɛrɛ mpo batindami na ye.” (1 Pe. 2:13, 14) Ebongiseli ya Nzambe epesaka mpe biso malako mpo tóbatelama malamu. Bakundwelaka biso mbala na mbala ete tópesaka bankulutu makambo ya sika etali biso na ndakisa nimero ya telefone mpo bákoka kozwa biso na ntango oyo tozali na mposa ya lisalisi ya lombangu. Osí osalá yango? Tokoki mpe kozwa malako etali esika ya komibatela, ya kokima, mpe ya kozwa biloko na ntango ya makama to ndenge mpe ntango ya kosalisa basusu. Soki toboyi kotosa, tokoki kotya bomoi na biso mpe ya bankulutu na likama. Kobosana te ete mibali wana ya sembo bazali kokɛngɛla milimo na biso. (Ebr. 13:17) Ndeko Margaret alobaki boye: “Nandimi mpenza ete kolanda malako ya bankulutu mpe ya ebongiseli ya Yehova ebikisaki bomoi na ngai.”
13. Makambo nini epesaka bakristo oyo balongwá na bisika na bango esengo mpe kimya?
13 Bandeko basi mpe mibali mingi oyo balongwaki na bisika oyo bazalaki kofanda mpo na makama, to bitumba, to botomboki ya bana-mboka, basalaki makasi bámesana na makambo ya sika mpe bamipesaki mbala moko na kosala mingi na mosala ya Yehova. Lokola bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bapanzanaki mpo na minyoko, bazali kokoba “kosakola nsango malamu ya liloba.” (Mis. 8:4) Kosakola esalisaka bango bátya makanisi na Bokonzi ya Nzambe na esika ya mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Yango wana, bazali na esengo mpe na kimya.
OKOKI KOZALA NA KIMYA ATAKO BAZALI KONYOKOLA YO
14. Ndenge nini minyoko ekoki kozangisa biso kimya?
14 Ntango banyokolaka biso, tokoki kobungisa biloko mingi oyo esalisaka biso tózala na kimya. Tozalaka na esengo ntango toyanganaka elongo na bonsomi, tosakolaka polele, mpe tokobaka kosala makambo na biso ya mokolo na mokolo kozanga kobanga ete bakokanga biso. Soki bonsomi oyo tozalaki na yango ezali lisusu te, tokoki komitungisa, mpe kobanga makambo oyo ekosalema na nsima. Ezali mabe te komiyoka bongo. Kasi, tosengeli kozala ekɛngɛ. Yesu amonisaki ete minyoko ekoki kosala ete bayekoli na ye bábɛta libaku. (Yoa. 16:1, 2) Na yango, ndenge nini tokoki kobatela kimya na biso atako bazali konyokola biso?
15. Na kotalela Yoane 15:20; 16:33, mpo na nini tosengeli te kobanga minyoko?
15 Liloba ya Nzambe eyebisi biso boye: “Baoyo nyonso bazali na mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe na boyokani na Kristo Yesu bango mpe bakonyokwama.” (2 Tim. 3:12) Ndeko mobali moko na nkombo Andrei azalaki kondima te ete basaleli nyonso ya Yehova basengeli konyokwama na ekólo na bango. Azalaki kokanisa boye: ‘Batatoli ya Yehova bazali mingi mpenza awa. Ndenge nini bakonzi bakoki kokanga biso nyonso?’ Kasi na esika kokanisa bongo ememela ye kimya, ezalaki nde kotungisa ye ntango nyonso. Bandeko mibali mosusu batyelaki Yehova motema mpe bazalaki kokanisa te ete bakokanga bango te. Bayebaki ete bakoki kokanga bango, kasi bazalaki komitungisa mingi te lokola ndeko Andrei. Yango wana, azwaki ekateli ya kozala na makanisi oyo bandeko wana bazalaki na yango mpe atyelaki Nzambe motema. Eumelaki te akómaki na kimya, mpe sikoyo azali na esengo atako azali kokutana na mikakatano. Yango mpe ekoki kokómela biso. Atako Yesu alobaki na biso ete tokokutana na minyoko, akitisaki mpe biso motema ete tokoki kotikala sembo.—Tángá Yoane 15:20; 16:33.
16. Malako nini tosengeli kotosa ntango bazali konyokola biso?
16 Ntango bapekisi mosala na biso to batyeli biso bipekiseli, tokoki kozwa malako uta na biro ya filiale mpe epai ya bankulutu. Malako yango ezalaka mpo na kobatela biso, komindimisa ete tozali kozwa bilei ya elimo, mpe kosalisa biso tókoba kosakola lisusu mingi. Salá nyonso oyo okoki mpo na kotosa malako oyo ozwaka, ata soki oyebi mpenza te ntina oyo bapesi yango. (Yak. 3:17) Longola yango, kobimisa te bansango etali bandeko na biso ya basi mpe ya mibali to makambo etali misala ya lisangá epai ya bato oyo bazali na lotomo ya koyeba yango te.—Mos. 3:7.
17. Ndenge moko na bantoma na siɛklɛ ya liboso, tozali na ekateli ya kosala nini?
17 Ntina ya libosoliboso oyo Satana abundisaka basaleli ya Nzambe ezali mpo “bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.” (Em. 12:17) Kotika te Satana ná mokili na ye bábangisa yo. Kosakola mpe koteya atako bazali kotɛmɛla biso ememelaka biso esengo mpe kimya. Na siɛklɛ ya liboso ntango bakonzi ya Bayuda bapesaki bantoma mitindo bátika kosakola, mibali wana ya sembo baponaki kotosa Nzambe. Bakobaki kosakola, mpe mosala na bango epesaki bango esengo. (Mis. 5:27-29, 41, 42) Ya solo, ntango mosala na biso epekisami, tosengeli kozala ekɛngɛ ntango tozali kosakola. (Mat. 10:16) Kasi soki tosali nyonso oyo tokoki, tokozala na kimya oyo eutaka na kosepelisa Yehova mpe na kosakola nsango ya lobiko.
“NZAMBE YA KIMYA AKOZALA NA [YO]”
18. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali esika oyo tokoki kozwa kimya ya solosolo?
18 Zalá na kondima ete ata na ntango ya mpasi mpenza, tokoki kozala na kimya. Na bantango ya ndenge wana, tosengeli kobosana te ete kimya oyo tosengeli na yango ezali kimya ya Nzambe, elingi koloba, kimya oyo kaka Yehova nde akoki kopesa. Tyelá ye motema na ntango ya maladi mabe, likama, to minyoko. Kangamá na ebongiseli na ye. Kanisáká makambo ya malamu oyo ezali kozela yo na mikolo ezali koya. Soki osali bongo, “Nzambe ya kimya akozala na [yo].” (Flp. 4:9) Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge oyo tokoki kosalisa bandeko na biso bakristo oyo bazali kokutana na bolɔzi bázala na kimya ya Nzambe.
LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi
a Yehova alaki kopesa kimya na baoyo balingaka ye. Kimya nini Nzambe apesaka, mpe ndenge nini tokoki kozwa yango? Ndenge nini kozala na “kimya ya Nzambe” esalisaka biso ntango totungisamaka na bamaladi mabe oyo epalanganaka, makama, to minyoko? Lisolo oyo ekoyanola na mituna wana.
b Topesi bango bankombo mosusu.
c Talá lisolo “Ntango likama ebimi—Makambo ya kosala mpo na kobatela bomoi” na Lamuká! ya 2017 No. 5.