Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 52

Salisá basusu báyika mpiko na ntango ya mpasi

Salisá basusu báyika mpiko na ntango ya mpasi

“Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.”​—MAS. 3:27.

LOYEMBO 103 Babateli ya mpate​—Makabo oyo ezali bato

NA MOKUSE a

1. Mbala mingi ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli ya basaleli na ye?

 OZALAKI koyeba ete Yehova akoki kosalela yo mpo ayanola na libondeli ya moto moko ya sembo? Okoki kosalisa ezala ozali nkulutu, mosaleli na misala, mobongisi-nzela, to mosakoli na lisangá. Okoki mpe kosalisa ezala ozali elenge, to mobange to ezala ozali ndeko mwasi to ndeko mobali. Ntango moto oyo alingaka Yehova asɛngi lisalisi, Nzambe na biso asalelaka mbala mingi bankulutu mpe basaleli na ye mosusu ya sembo mpo bákóma “lisalisi oyo ezali kopesa [moto yango] makasi.” (Kol. 4:11) Ezali lokumu monene kosalela Yehova mpe bandeko na biso na ndenge wana! Tokoki kosalisa mpe kobɔndisa bandeko na biso ntango maladi mabe ezali kopalangana, likama esalemi to minyoko ebimi.

SALISÁ BASUSU NTANGO MALADI MABE EZALI KOPALANGANA

2. Mpo na nini ekoki kozala mpasi tósalisa basusu ntango maladi mabe oyo epalanganaka noki ebimi?

2 Ekoki kokóma mpasi tósalisana ntango maladi moko mabe oyo epalanganaka noki ebimi. Na ndakisa, tokoki kozala na mposa ya kokende kotala baninga na biso, kasi soki tosali bongo tokomibatela te. Tokoki kozala na mposa ya kobengisa na ndako baoyo bazali kokelela mpo tólya mwa bilei elongo na bango, kasi yango mpe ekoki kozala mpasi esalema. Tokoki kozala na mposa ya kosalisa basusu, kasi yango ekoki kozala mpasi soki bandeko na biso moko ya libota bazali kobɛla mpe bazali na mokakatano ya mbongo. Atako bongo, tozalaka na mposa ya kosalisa bandeko na biso, mpe Yehova asepelaka ntango tosalaka makambo oyo tokoki mpo na kosalisa bango. (Mas. 3:27; 19:17) Tokoki kosala nini?

3. Na kotalela Yirimia 23:4, mateya nini tozwi na ndakisa ya bankulutu ya lisangá ya ndeko mwasi Desi?

3 Makambo oyo bankulutu bakoki kosala. Soki ozali nkulutu, luká koyeba malamu bampate. (Tángá Yirimia 23:4.) Desi, ndeko mwasi oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki, alobi boye: “Bankutulu ya etuluku na biso ya mosala ya kosakola bazalaki ntango nyonso kosakola elongo na ngai mpe basusu mpe bazalaki koya mpo tólekisa ntango elongo mpo na kozwa mopɛpɛ.” b Milende oyo bankulutu wana basalaki esalaki ete ezala pɛtɛɛ básalisa ndeko Desi ntango maladi mabe ya Coronavirus epalanganaki na mokili mobimba mpe abungisaki na liwa bandeko na ye mosusu ya libota na maladi yango.

4. (a) Mpo na nini bankulutu bazalaki na likoki ya kosalisa ndeko Desi? (b) Yango ebimisi liteya nini?

4 Ndeko Desi alobi boye: “Lokola nayebanaki na bankulutu mpe tokómaki baninga, ezalaki pɛtɛɛ mpo na ngai nayebisa bango ndenge oyo nazalaki komiyoka mpe makambo oyo ezalaki kotungisa ngai.” Liteya nini bankulutu bazwi? Bómesana kokende kotala bampate ya bituluku na bino liboso mpasi ebima. Bósala boninga elongo na bango. Soki maladi mabe oyo epalanganaka noki ezali kopekisa bino bókende kotala bango, bóluka mwaye mosusu oyo bokoki kosala yango. Ndeko Desi alobi boye: “Na bantango mosusu bandeko ndenge na ndenge bazalaki kobenga ngai to kotindela ngai bamesaje kaka na mokolo moko. Bavɛrsɛ oyo bazalaki kokomela ngai esimbaki motema na ngai, atako nayebaki bavɛrsɛ yango malamu.”

5. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki koyeba makambo oyo bandeko basi mpe mibali bazali na yango mposa? (b) Ndenge nini bakoki kosalisa bandeko yango?

5 Lolenge moko oyo okoki koyeba makambo oyo bandeko basi mpe mibali bazali na yango mposa ezali ya kotuna bango mituna oyo ekoyokisa bango nsɔni te. (Mas. 20:5) Bazali na biloko mingi ya kolya, bankisi, mpe biloko mosusu? Ekoki kosalema ete bábungisa misala na bango to ata mpe bandako na bango mpo bazali na mbongo te mpo na kofuta? Bazali na mposa ete tósalisa bango bázwa lisungi epai ya bakonzi ya Leta soki esengeli? Bandeko bakristo basalisaki ndeko Desi. Kasi bolingo oyo bankulutu bamoniselaki ye mpe ndenge balendisaki ye na Biblia, esalisaki ye alonga mikakatano na ye. Alobi boye: “Bankulutu bazalaki kobondela elongo na ngai. Atako nakoki te komikundwela mpenza makambo oyo bazalaki koloba, nabosani te ndenge nazalaki komiyoka. Ezalaki lokola Yehova azalaki koloba na ngai boye: ‘Ozali yo moko te.’”​—Yis. 41:10, 13.

Ndeko mobali oyo azali kotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli azali na esengo ya koyoka biyano ya kolendisa oyo bato mingi bazali kopesa na makita, ezala mpe eyano ya ndeko mobali moko oyo asengeli kopesa yango na nzela ya video mpo azali kobɛla (Talá paragrafe 6)

6. Na kotalela elilingi, makambo nini bandeko mingi na lisangá bakoki kosala mpo na kosalisa basusu?

6 Makambo oyo basusu bakoki kosala. Tozalaka na mposa ete bankulutu bábatela bandeko basi mpe mibali na lisangá. Kasi Yehova asɛngi biso nyonso tólendisaka basusu mpe tósalisaka bango. (Gal. 6:10) Ata soki tosali likambo moko moke mpo na kosalisa moto oyo azali kobɛla, yango ekoki kolendisa ye mingi. Mwana moke akoki kotindela ndeko moko karte to elilingi moko mpo na kolendisa ye. Elenge oyo akómi mwa mokóló akoki kokende kosombela ndeko mwasi moko biloko na zando to na magazini. Basusu na lisangá bakoki kolambela moto oyo azali kobɛla mpe komemela ye na ndako. Ya solo, ntango maladi mabe ezali kopalangana, moto nyonso na lisangá azalaka na mposa bálendisa ye. Mbala mosusu tokoki kotikala mwa moke nsima ya makita mpo na kosolola na bandeko basi mpe mibali, ezala na miso boye to na nzela ya video. Longola yango, bankulutu mpe bazalaka na mposa bálendisa bango. Batatoli ya Yehova mosusu bakomelaka bankulutu mikanda ya kopesa mersi, baoyo bazalaka ntango nyonso na makambo mingi ya kosala mpo na bandeko na ntango maladi moko mabe oyo epalanganaka noki ebimi. Ezali malamu ntango tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na “[kokoba] kobɔndisana mpe kolendisana”!​—1 Tes. 5:11.

SALISÁ BASUSU NTANGO BAKUTANI NA LIKAMA

7. Makambo nini ekoki kobima nsima ya likama?

7 Likama ekoki kobebisa bomoi ya moto kozanga kokana mpe na mbalakaka. Bato oyo bakutani na likama bakoki kobungisa biloko na bango, bandako na bango, to ata mpe kobungisa bato oyo balingaka na liwa. Makama yango mpe ekómelaka bandeko na biso bakristo. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bango?

8. Bankulutu mpe bakonzi ya mabota bakoki kosala nini liboso likama ebima?

8 Makambo oyo bankulutu bakoki kosala. Bankulutu, bósalisa bandeko na bino bámibongisa liboso likama ebima. Bómindimisa ete bandeko nyonso na lisangá bayebi makambo oyo bakosala mpo na komibatela mpe kosolola na bankulutu. Ndeko mwasi Margaret, oyo tolobelaki na lisolo eleki, alobi boye: “Bankulutu ya lisangá na biso basalaki diskur moko ya bamposa ya lisangá, bakebisaki biso ete eleko ya kozika ya zamba esilaki naino te. Balobaki ete soki bakonzi basɛngi biso tólongwa na bandako na biso to soki bomoi ekómi na likama, tosengeli kolongwa mbala moko kozanga koumela.” Bandeko bapesaki biso malako wana na ntango oyo ebongi mpenza mpo bomoi ekómaki na likama mpenza, mpamba te mɔtɔ oyo ezikisaka zamba ebandaki kopela nsima ya bapɔsɔ mitano. Na ntango ya losambo na kati ya libota, bakonzi ya mabota bakoki kozongela kolobela makambo oyo moto mokomoko na libota akosala. Soki yo ná bana na yo bomibongisi, bokozala na kimya soki likama ebimi.

9. Ndenge nini bankulutu bakoki komibongisa liboso mpe nsima ya likama?

9 Soki ozali mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola, kozela te likama esalema liboso mpo omindimisa ete ozali na bansango to banimero ya kobenga basakoli nyonso oyo bazali na etuluku na yo. Salá liste ya basakoli mpe landeláká yango mbala na mbala mpo na kotala soki ezali bongo. Na nsima, ntango likama ebimi, okozala na likoki ya kosolola na mosakoli mokomoko mpo na koyeba bamposa na ye. Tindelá mokambi-misala ya bankulutu mbala moko bansango ya basakoli ya etuluku na yo mpe mokambi-misala ya bankulutu na ngala na ye akotindela mokɛngɛli ya zongazonga bansango yango. Ntango bandeko wana basalaka elongo, basalisaka mpenza na ndenge ya malamu. Nsima ya kopela ya mɔtɔ, mokɛngɛli ya zongazonga oyo afandaka esika ndeko mwasi Margaret azalaki, alalaki mpɔngi te na boumeli ya bangonga 36. Azalaki kotambwisa bankulutu ntango bazalaki kosala makasi mpo na kozwa mpe kobatela bandeko 450 oyo batikaki bandako na bango. (2 Ko. 11:27) Na yango, bato nyonso oyo bazalaki na mposa ya bisika ya kofanda bazwaki yango.

10. Na kotalela Yoane 21:15, mpo na nini bankulutu bazwaka na motuya mosala ya kobatela bampate?

10 Bankulutu bazali na mokumba ya kolendisa bandeko na nzela ya Biblia mpe kosalisa baoyo bazali na mitungisi. (1 Pe. 5:2) Na ntango ya likama, bankulutu basengeli libosoliboso komindimisa ete ndeko mwasi mpe mobali mokomoko abatelami malamu, mpe azali na bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda. Kasi na basanza mingi na nsima, bato oyo babiki na likama bakozala na mposa ete bálendisa bango mpe básalisa bango. (Tángá Yoane 21:15.) Harold, oyo azali ndeko moko ya Komite ya filiale mpe oyo akutanaki na bandeko mingi ya basi mpe ya mibali oyo bakutanaki na makama, alobi boye: “Ezwaka ntango mpo na kobosana makambo oyo ekómeli moto na bomoi. Bomoi na bango ekoki kobanda kobonga, kasi bakoki kokoba kokanisa bato oyo bazalaki kolinga oyo bakufaki na likama, biloko na bango, to likama oyo elingaki kokómela bango. Basuvenire wana ya mabe ekoki kosala ete bákóma lisusu mawamawa. Yango emonisi te ete bazangi kondima, kutu ezali mayoki oyo moto nyonso azalaka na yango.”

11. Makambo nini mabota ekoki kokoba kozala na yango mposa?

11 Bankulutu basalelaka toli oyo elobi “bólela elongo na bato oyo bazali kolela.” (Rom. 12:15) Bankulutu basengeli kokitisa bandeko oyo babiki na likama motema mpe koyebisa bango ete Yehova ná bandeko balingaka bango. Bankulutu bakozala na mposa ya kosalisa mabota bábatela mimeseno na bango ya elimo, elingi koloba, kobondela, koyekola, koyanganaka na makita, mpe kosakola. Bankulutu bakoki mpe kolendisa baboti básalisa bana na bango bátya makanisi na bango na makambo oyo likama ekoki te kobebisa yango. Baboti, bókundwela bana na bino ete Yehova akozala ntango nyonso moninga na bango mpe akozala wana mpo na kosalisa bango. Longola yango, bóyebisa bango ete bakoki kotikala na kati ya libota ya bandeko na mokili mobimba oyo bazali wana mpo na kosalisa bango.​—1 Pe. 2:17.

Okoki kozala volontɛrɛ mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama oyo esalemi na esika ofandi? (Talá paragrafe 12) e

12. Bandeko mosusu bakoki kosala nini mpo na kosalisa na ntango ya kopesa bandeko lisungi na ntango ya makama? (Talá elilingi.)

12 Makambo oyo basusu bakoki kosala. Soki likama esalemi pene na esika oyo ofandaka, tuná bankulutu makambo oyo okoki kosala mpo na kopesa mabɔkɔ. Mbala mosusu okoki kotikela bandeko oyo bakutani na likama to baoyo bayei kopesa lisungi ndako na yo mpo báfanda mpo na mwa ntango. Okoki kopesa basakoli oyo bazali na mposa ya lisungi bilei mpe biloko mosusu ya kobikela. Soki likama esalemi mosika na esika ofandaka, okoki kaka kopesa mabɔkɔ. Ndenge nini okoki kosala yango? Bondelá mpo na baoyo bakutani na likama yango. (2 Ko. 1:8-11) Okoki kopesa mbongo mpo na kopesa mabɔkɔ na nzela ya makabo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba. (2 Ko. 8:2-5) Soki ozali na likoki ya kokende na esika oyo likama esalemi mpo na kopesa mabɔkɔ, tuná bankulutu makambo oyo okoki kosala. Soki babengisi yo okende na esika yango, okozwa mwa formasyo mpo okoka kopesa mabɔkɔ na ndenge esengeli mpenza.

SALISÁ BANDEKO BÁYIKELA MINYOKO MPIKO

13. Mikakatano nini bandeko na biso bazali kokutana na yango na bikólo oyo mosala na biso epekisami?

13 Na bikólo oyo mosala na biso epekisami, minyoko esalaka ete bomoi ekóma lisusu mpasi. Bandeko na bikólo yango bazali kokutana na mikakatano ya mbongo, bazali kobɛla mpe kobungisa na liwa bato oyo balingaka. Kasi lokola bipekiseli ezali, bankulutu bakoki te kokende kotala bandeko to kosolola na bonsomi nyonso na baoyo bazali na mposa bálendisa bango. Yango nde ekómelaki ndeko Andrei, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Ndeko mwasi moko na etuluku na ye ya mosala ya kosakola azalaki na mokakatano ya mbongo. Na nsima asalaki aksida ya motuka. Esɛngaki básala ye mapaso mingi mpe akokaki te kotambola. Atako bipekiseli mpe maladi mabe ya Coronavirus ezalaki, bandeko basalaki oyo bakokaki kosala mpo na kosalisa ye, mpe Yehova ayebaki makambo oyo esalemaki.

14. Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa ndakisa na likambo etali kotyela Yehova motema?

14 Makambo oyo bankulutu bakoki kosala. Ndeko Andrei abondelaki mpe asalaki makambo oyo akokaki kosala. Ndenge nini Yehova ayanolaki na libondeli na ye? Alendisaki bandeko mingi na lisangá oyo bakokaki kosala mingi mpo na kosalisa ndeko mwasi yango. Bandeko mosusu bazalaki komema ndeko mwasi yango na lopitalo mpo akutana na minganga. Basusu mpe bapesaki mbongo mpo na kosalisa ye. Yehova alendisaki bango básala oyo bakokaki kosala, mpe apambolaki milende oyo basalaki na bomoko mpe na mpiko. (Ebr. 13:16) Bankulutu, ntango mosala na biso epekisami, bósɛngaka ete basusu básunga bino. (Yir. 36:5, 6) Oyo eleki nyonso, bótyela Yehova motema. Akoki kosalisa bino bókokisa bamposa ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali.

15. Ndenge nini tokoki kobatela bomoko na biso ya bokristo ntango bazali konyokola biso?

15 Makambo oyo basusu bakoki kosala. Ntango bapekisi mosala na biso, tokoki koyangana elongo na bandeko na biso na bituluku ya mikemike. Na yango, ezali na ntina mpenza tóbatela kimya na kati na biso. Tóbundisa nde Satana, kasi biso na biso te. Kotyaka likebi te na mabunga ya bandeko na yo, to kozela te ete ntango eleka mingi mpo na kosilisa matata. (Mas. 19:11; Ef. 4:26) Tózala bato ya liboso mpo na kosalisana. (Tito 3:14) Lisalisi oyo basusu bapesaki ndeko mwasi moko oyo azalaki na bosɛnga esalaki ete etuluku na ye ya mosala ya kosakola ezwela yango matomba. Bakómaki na boyokani moko ya makasi, lokola libota.​—Nz. 133:1.

16. Na boyokani na Bakolose 4:3, 18, ndenge nini tokoki kosalisa bandeko basi mpe mibali oyo bazali konyokwama?

16 Bankóto ya bandeko na biso ya basi mpe ya mibali basalelaka Yehova atako baguvɛrnema mingi epekisi misala na biso. Bakangi basusu kati na bango na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Tokoki kobondela mpo na bango mpe bato ya mabota na bango. Tokoki mpe kobondela mpo na baoyo bazali komonisa mpiko mpo na kosunga bandeko oyo bazali na bolɔkɔ atako bango mpe bakoki kokanga bango. Bazali kolendisa bandeko oyo bazali na bolɔkɔ mpo bákoba kotyela Yehova motema, kosunga bango na biloko oyo bazali na yango mposa, mpe kokɔtela bango na batribinale. c (Tángá Bakolose 4:3, 18.) Komona mpamba te nguya oyo mabondeli na yo ezali na yango!​—2 Tes. 3:1, 2; 1 Tim. 2:1, 2.

Ndenge nini okoki kobongisa libota na yo banda sikoyo mpo na minyoko? (Talá paragrafe 17)

17. Ndenge nini okoki komibongisa banda sikoyo mpo na minyoko?

17 Yo ná libota na yo bokoki komibongisa banda sikoyo mpo na minyoko. (Mis. 14:22) Komeka te kokanisa makambo nyonso ya mabe oyo ekoki kosalema. Na esika ya kokanisa bongo, kómisá boninga na yo ná Yehova makasi mpe salisá bana na yo básala mpe bongo. Soki na bantango mosusu omitungisaka, sopá motema na yo liboso ya Nzambe. (Nz. 62:7, 8) Na libota, bólobela makambo nyonso oyo ekoki kosalisa bino bótyela ye motema. d Ndenge oyo omibongisaka liboso mpo na likama oyo ekoki kobima mpe otyelaka Yehova motema, ekosalisa bana na yo bámibongisaka liboso mpo na likama mpe bázala na mpiko mpe na kimya.

18. Makambo nini ezali kozela biso na mikolo ezali koya?

18 Kimya ya Nzambe ebatelaka biso. (Flp. 4:6, 7) Na nzela na yango, Yehova akitisaka biso motema atako tokoki kokutana na bamaladi, makama, mpe minyoko lelo oyo. Asalelaka bankulutu oyo basalaka mosala makasi mpo na kobatela biso. Longola yango, apesi biso nyonso likoki ya kosalisana. Kimya oyo tozali na yango sikoyo ekoki kosalisa biso mpo tómibongisa mpo na komekama minene oyo ezali koya, ata mpe ‘bolɔzi monene.’ (Mat. 24:21) Na ntango wana, tokozala na mposa ya kobatela kimya na biso mpe ya kosalisa basusu mpo básala mpe bongo. Kasi nsima ya likambo wana, tokokutana lisusu te na makambo ya mpasi oyo etungisaka biso. Nsukansuka tokozala na oyo Yehova alingaka ntango nyonso tózala na yango, elingi koloba, kimya ya solosolo oyo ekoumela seko.​—Yis. 26:3, 4.

LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko

a Mbala mingi Yehova asalelaka basaleli na ye ya sembo mpo na kosalisa baoyo bazali kokutana na mikakatano. Akoki kosalela yo mpo olendisa bandeko na yo ya basi mpe ya mibali. Tiká tótala ndenge tokoki kosalisa basusu ntango bazali na mposa ya lisalisi.

b Topesi bango bankombo mosusu.

c Biro ya filiale to bandeko ya biro monene bakoki te kotinda mikanda oyo bato bazali kokomela bandeko basi mpe mibali oyo bazali na bolɔkɔ.

d Talá lisolo “Omibongisa banda sikoyo mpo na minyoko” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2019.

e ELILINGI: Mobali moko ná mwasi na ye bamemeli libota moko oyo efandi mpo na mwa ntango na hema biloko ya kolya nsima ya likama moko oyo esalemi.