Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 49

Tokoki kozala na bomoi libela na libela

Tokoki kozala na bomoi libela na libela

“Oyo elakisi bomoi ya seko.”​—YOA. 17:3.

LOYEMBO 147 Nzambe alaki biso bomoi ya seko

NA MOKUSE a

1. Komanyola na elaka oyo Yehova apesi biso ya bomoi ya seko ezali kotinda biso tósala nini?

 YEHOVA alaki ete bato oyo batosaka ye bakozala na “bomoi ya seko.” (Rom. 6:23) Ntango tomanyolaka na bilaka oyo Yehova apesá biso, na ntembe te tokómaka lisusu kolinga ye mingi. Kanisá naino: Tata na biso ya likoló alingaka biso mingi mpenza, yango wana eloko moko te ekokabola biso ná ye.

2. Na ndenge nini elaka oyo etali bomoi ya seko esalisaka biso?

2 Elaka oyo Nzambe apesi biso ya bomoi ya seko esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo oyo. Atako banguna na biso balobi ete bakoboma biso, totikaka te kosalela Yehova. Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali mpo toyebi ete soki tokufi sembo epai ya Yehova, akosekwisa biso mpe tokozala na elikya ete na mikolo ezali koya tokokufa lisusu te. (Yoa. 5:28, 29; 1 Ko. 15:55-58; Ebr. 2:15) Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete tokozala na bomoi ya seko? Tótalela makambo oyo elandi.

YEHOVA AZALI NA BOMOI SEKO NA SEKO

3. Na kotalela Nzembo 102:12, 24, 27, nini ekoki kondimisa biso ete Yehova azali na likoki ya kosala ete tózala na bomoi ya seko?

3 Toyebi ete Yehova azali na likoki ya kosala ete tózala na bomoi ya seko mpo ye nde azali Liziba ya bomoi mpe azali na bomoi seko na seko. (Nz. 36:9) Tiká tótalela mwa bavɛrsɛ ya Biblia oyo endimisi biso ete Yehova azali na ebandeli te mpe azali na nsuka te. Nzembo 90:2 elobi ete Yehova azali “libela na libela.” Nzembo 102 elobi mpe kaka bongo. (Tángá Nzembo 102:12, 24, 27.) Mpe mosakoli Habakuku akomaki boye mpo na Tata na biso ya likoló: “Ee Yehova, yo ozali uta kalakala, boye te? Ee Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, yo okufaka te.”​—Hab. 1:12.

4. Tosengeli komitungisa mpo toyebi te ntina oyo Yehova azalaka na ebandeli te? Limbolá.

4 Ozalaka na mokakatano ya kokanga ntina ete Yehova azali “mpo na libela”? (Yis. 40:28) Bato mingi mpe bazalaka na mokakatano yango. Elihu alobaki boye mpo na Nzambe: “Motángo ya mbula na ye eyebani te.” (Yobo 36:26) Kasi tokoki te kokanisa ete lokola tokangi te ntina ya likambo moko boye, yango elakisi te ete likambo yango ezali lokuta. Na ndakisa, atako tokoki koyeba te eloko oyo esalaka ete miinda epela, yango elakisi te ete miinda ezalaka te, boye te? Ndenge moko mpe, biso bato tokoki te koyeba ntina oyo Yehova azali na ebandeli te mpe azali na nsuka te. Kasi yango elingi koloba te ete Nzambe azali na bomoi ya seko na seko te. Solo na ntina etali Mozalisi na biso etaleli te makambo oyo tokoki to te kokanga ntina na yango. (Rom. 11:33-36) Azalaki liboso kutu biloko nyonso oyo ezali na molɔ́ngɔ́ esalema, ezala mpe moi ná minzoto. Tozali na kondima ete Yehova azali “Mokeli ya mabele na nzela ya nguya na ye.” Lisusu, azalaki liboso ‘atanda likoló.’ (Yir. 51:15; Mis 17:24) Makambo nini mosusu ekoki kosalisa biso mpo tózala na kondima ete tokoki kozala na bomoi ya seko?

YEHOVA AKELÁ BISO MPO TÓZALA NA BOMOI YA SEKO

5. Elikya nini Adama ná Eva bazalaki na yango?

5 Bikelamu mosusu ya bomoi oyo Yehova akelá elingaki nsukansuka kokufa, longola kaka bato. Apesaki bato elikya moko malamu ya kozanga kokufa. Kasi, Yehova akebisaki Adama ete: “Nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Eba. 2:17) Soki Adama ná Eva bátosaka Yehova, balingaki kokufa te. Ezali solo mpe tokoki kondima ete na lolenge moko to mosusu, Yehova akokaki kopesa bango ndingisa ya kolya mbuma ya “nzete ya bomoi.” Yango elingaki komonisa ete bakozala na likoki ya kozala na “bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.” b​—Eba. 3:22.

6-7. (a) Makambo nini mosusu endimisi biso ete bato bakelamá te mpo bakufaka? (b) Okozala na mposa ya kosala makambo nini na Paradiso? (Talá elilingi ya ezipeli.)

6 Bolukiluki moko ya kokamwa oyo minganga bauti kosala emonisi ete bɔɔngo na biso ezali na likoki ya kobomba makambo mingi ntango tozali na bomoi. Na mobu 2010, lisolo moko ya zulunalo moko (Scientific American Mind) elobaki ete bɔɔngo na biso ezali na likoki ya kobomba makambo mingi oyo ekokani na video moko oyo ezali na bangonga milio 3. Video yango ekozwa mbula 300 mpo na kotala yango. Emonani ete bɔɔngo na biso ekoki kobomba makambo mingi koleka wana. Yango emonisi ete Yehova asalá bɔɔngo na biso mpo ebomba makambo mingi koleka oyo toyekolaka kaka na boumeli ya mbula 70 to 80.​—Nz. 90:10.

7 Yehova akelá biso lisusu na mposa makasi ya kokoba kozala na bomoi. Biblia elobi ete Nzambe atyaki “likanisi ya kozala na bomoi ya seko na motema [ya bato].” (Mos. 3:11) Yango ezali moko ya ntina oyo tomonaka ete liwa ezali monguna. (1 Ko. 15:26) Soki tokómi kobɛla makasi, tosalaka eloko moko te mpe tozelaka kaka ete tókufa? Te. Mbala na mbala, tokendaka epai monganga mpe tomɛlaka bankisi oyo ekobundisa maladi. Na yango, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tókufa te. Mpe soki moto oyo tozalaki kolinga akufi, ezala azalaki mokóló to mwana moke, esalaka biso mpasi mingi mpe mpasi yango eumelaka mpo na ntango molai. (Yoa. 11:32, 33) Ya solo, tokoki kokoba koyekola seko na seko mpe kozala na mposa ya kozala na bomoi ya seko, mpamba te Mozalisi na biso ya bolingo akelá biso bongo. Ezali polele ete akosala nyonso mpo tózala na bomoi ya seko. Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo endimisi biso ete tokoki kozala na bomoi ya seko. Tiká tótalela makambo oyo Yehova asalaki na ntango ya kala mpe oyo azali kosala lelo, oyo emonisi ete mokano na ye ebongwani te.

Wana tozali kozela bomoi ya seko, tokosepela komona na makanisi makambo oyo tokozala na likoki ya kosala na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 7) c

MOKANO YA YEHOVA EBONGWANI TE

8. Yisaya 55:11 endimisi biso nini na kotalela mokano ya Yehova mpo na biso?

8 Atako Adama ná Eva basalaki lisumu mpe yango ememelaki bana na bango liwa, Yehova abongolá makanisi na ye te na oyo etali mokano na ye. (Tángá Yisaya 55:11.) Mokano na ye ezali kaka ete bato ya sembo bázala na bomoi ya seko. Tondimi yango na kotalela makambo oyo Yehova alobá mpe asalá mpo mokano na ye ekokisama.

9. Na kotalela Danyele 12:2, 13, Nzambe alaki nini?

9 Yehova alaki ete akosekwisa bato oyo bakufá mpe akopesa bango libaku ya kozala na bomoi ya seko. (Mis. 24:15; Tito 1:1, 2) Yobo, moto ya sembo, azalaki na kondima ete Yehova azali na mposa makasi ya kosekwisa bato oyo bakufá. (Yobo 14:14, 15) Mosakoli Danyele ayebaki ete bato bazali na elikya ya kosekwa mpe ya kozwa bomoi ya seko. (Nz. 37:29; tángá Danyele 12:2, 13.) Bayuda na mikolo ya Yesu bayebaki mpe ete Yehova akoki kopesa basaleli na ye ya sembo “bomoi ya seko.” (Luka 10:25; 18:18) Yesu azalaki mbala na mbala kolobela elaka yango, mpe Tata na ye asekwisaki ye.​—Mat. 19:29; 22:31, 32; Luka 18:30; Yoa. 11:25.

Ndenge Elisha asekwisaki moto, yango endimisi yo likambo nini? (Talá paragrafe 10)

10. Na kotalela elilingi, masolo oyo elobeli lisekwa ya bato oyo basekwaki na ntango ya kala emonisi nini?

10 Yehova azali Mopesi-bomoi mpe azali na nguya ya kozongisa bato na bomoi. Apesaki mosakoli Eliya nguya ya kosekwisa mwana ya mwasi ya Zarefate oyo mobali akufá. (1 Bak. 17:21-23) Na nsima, na lisalisi ya Nzambe, mosakoli Elisha asekwisaki mwana ya mwasi ya Shuneme. (2 Bak. 4:18-20, 34-37) Masolo oyo mpe mosusu mingi oyo elobeli lisekwa ezali komonisa polele ete Yehova azali na nguya ya kozongisa bato na bomoi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki polele ete Tata na ye apesaki ye nguya yango. (Yoa. 11:23-25, 43, 44) Sikoyo Yesu azali na likoló mpe bapesi ye “bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.” Na yango, azali na likoki ya kokokisa elaka oyo elobi “baoyo nyonso bazali na kati ya malita” bakozonga na bomoi mpe bakozala na elikya ya bomoi ya seko.​—Mat. 28:18; Yoa. 5:25-29.

11. Ndenge nini lisiko esali ete tózwa likoki ya kozala na bomoi ya seko?

11 Mpo na nini Yehova atikaki nzela ete Mwana na ye oyo alingaka mingi akufa liwa moko ya mpasi? Yesu amonisaki ntina yango ntango alobaki ete: “Mpo Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoa. 3:16) Ntango apesaki Mwana na ye lisiko mpo na kozipa masumu na biso, Nzambe amonisaki polele ete tozali na likoki ya kozwa bomoi ya seko. (Mat. 20:28) Ntoma Paulo alimbolaki ntina ya mokano ya Nzambe ntango akomaki ete: “Lokola liwa eyei na nzela ya moto moko, lisekwa ya bakufi eyei mpe na nzela ya moto moko. Kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”​—1 Ko. 15:21, 22.

12. Ndenge nini Yehova akokokisa mokano na ye?

12 Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na kosɛnga ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe mokano na ye esalema awa na mabele. (Mat. 6:9, 10) Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali mpe ete bázala na bomoi ya seko awa na mabele. Mpo yango ekokisama, Yehova atye Mwana na ye Mokonzi na Bokonzi ya Masiya. Nzambe aponi bato 144 000 oyo bauti awa na mabele mpo na kosala elongo na Yesu mpo na kokokisa mokano na ye.​—Em. 5:9, 10.

13. Makambo nini Yehova azali kosala sikoyo, mpe tosengeli kosala nini?

13 Sikoyo, Yehova azali koyanganisa “ebele mpenza ya bato.” Mpe azali kobongisa bango mpo na kofanda na nse ya boyangeli ya Bokonzi na ye. (Em. 7:9, 10; Yak. 2:8) Atako bato mingi na mokili lelo oyo bakabwani mpo na ekólo, loposo mpe koyinana, etuluku ya “ebele mpenza ya bato” bazali kosala makasi mpo na kolongola makambo wana na mitema na bango. Na maloba ya elilingi bazali kotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele. (Mika 4:3) Na esika ya kokende na bitumba oyo ezali koboma bato mingi, bazali kosalisa bato bámona “bomoi ya solosolo” ntango bazali koteya bango makambo etali Nzambe mpe mokano na ye. (1 Tim. 6:19) Bandeko na bango ya mabota bakoki kotɛmɛla bango to ebele mpenza ya bato yango bakoki mpe kozanga mbongo mpo bazali kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ, kasi Yehova alaki ete bakozanga eloko moko te. (Mat. 6:25, 30-33; Luka 18:29, 30) Makambo yango nyonso ezali kondimisa biso ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo mpe ete ekokoba kokokisa mokano ya Yehova.

BOMOI YA MALAMU NA MIKOLO EZALI KOYA

14-15. Ndenge nini elaka ya Yehova ya kolongola liwa mpo na libela ekokokisama?

14 Sikoyo Yesu azali kuna na likoló mpe akosala ete bilaka nyonso oyo Yehova alaká ekokokisama. (2 Ko. 1:20) Kobanda mobu 1914, Yesu azali kotya banguna na ye na nse ya makolo na ye. (Nz. 110:1, 2) Etikali moke ete ye ná bato oyo bakoyangela elongo na ye báboma bato mabe.​—Em. 6:2.

15 Na boumeli ya Mbula Nkóto ya Boyangeli ya Yesu, bato oyo bakufá bakozongisama na bomoi mpe akosalisa bato oyo bakozala na botosi epai ya Yehova bákóma bato ya kokoka. Nsima ya komekama ya nsuka, bato oyo Yehova akomona ete bazali bayengebene “bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nz. 37:10, 11, 29) Likambo ya esengo, “liwa, monguna ya nsuka, akosilisama makasi.”​—1 Ko. 15:26.

16. Wapi ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tósalela Yehova?

16 Ndenge tomoni yango, elikya na biso ya kozala na bomoi ya seko euti na Liloba ya Nzambe. Elikya yango ekoki kosalisa biso tótikala sembo na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi. Kasi mpo tósepelisa Yehova, tosengeli kosuka kaka te na kozala na mposa ya kotikala na bomoi. Ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tózala sembo epai ya Yehova mpe Yesu ezali mpo tolingaka bango mingi. (2 Ko. 5:14, 15) Bolingo yango etindaka biso tómekola bango mpe tózala na molende mpo na koyebisa bato mosusu elikya oyo tozali na yango. (Rom. 10:13-15) Ntango tozali kotyela basusu likebi mpe kokabela bango mwa biloko, yango ekosala ete tókóma baninga ya Yehova.​—Ebr. 13:16.

17. Na kotalela Matai 7:13, 14, mokumba nini moto nyonso azali na yango?

17 Tokozala na kati ya bato oyo bakozwa bomoi ya seko? Yehova apesi biso libaku yango. Na yango, sikoyo nde ntango tosengeli kopona kotikala na nzela ya bomoi. (Tángá Matai 7:13, 14.) Bomoi ekozala ndenge nini ntango tokozala na bomoi ya seko? Tokozwa eyano na motuna yango na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 141 Bomoi ezali likamwisi

a Ozali na mposa makasi ya kozala na bomoi ya seko? Yehova alaki biso ete na mikolo ezali koya, tokozala na bomoi ya seko. Na lisolo oyo, tokotalela mwa makambo oyo ekoki kotinda biso tózala na elikya ete Yehova akokokisa bilaka na ye.

b Talá etandá “ Liloba ‘seko’ na kati ya Biblia.”

c ELILINGI: Ndeko mobali moko ya mobange azali kokanisa mwa makambo oyo akosala ntango akozala na bomoi ya seko na mikolo ezali koya.