Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA KOYEKOLA

Bato ya sembo bakokisaka bilako na bango

Bato ya sembo bakokisaka bilako na bango

Tángá Basambisi 11:​30-40 mpo omona mateya oyo okoki kozwa na lisolo ya Yefeta ná mwana na ye ya mwasi na oyo etali kokokisa bilako.

Talelá lisolo mobimba. Ndenge nini Bayisraele ya sembo bazalaki kotalela bilako oyo basali epai ya Yehova? (Mit. 30:2) Ndenge nini Yefeta ná mwana na ye ya mwasi bamonisaki ete bazalaki na kondima epai ya Yehova?—Bas. 11:9-11, 19-24, 36.

Kɔtá na mozindo. Yefeta alingaki koloba nini ntango asalaki elako na ye? (w16.04 lok. 6 par. 12) Yefeta ná mwana na ye ya mwasi bamipimelaki makambo nini mpo na kokokisa elaka na ye? (w16.04 nk. 6-7 par. 14-16) Bilako ya ndenge nini bakristo bakoki kosala lelo oyo? —w17.04 nk. 5-8 par. 10-19.

Bimisá mateya. Omituna boye:

  • ‘Nini ekoki kosalisa ngai nakoba kokokisa elako na ngai ya komipesa na Nzambe?’ (w20.03 lok. 13 par. 20)

  • ‘Makambo nini nakoki komipimela mpo nasalela lisusu Yehova mingi koleka?’

  • ‘Ndenge nini nakoki kokangama makasi na elako ya libala oyo nasalaki?’ (Mat. 19:5, 6; Ef. 5:28-33)