Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Natiká ata moke te koyekola

Natiká ata moke te koyekola

NAPESAKA Yehova matɔndi mpo na libaku oyo nazwá ete azala ‘Molakisi na ngai Monene.’ (Yis. 30:20) Ateyaka basaleli na ye na nzela ya Liloba na ye, Biblia, biloko ya kokamwa oyo akelá, mpe ebongiseli na ye. Asalelaka mpe bato—bandeko na biso ya elimo mpo na kosalisa biso. Atako nakómi na mbula pene na 100, nazali kokoba kozwa matomba na mateya ya Yehova na ndenge wana nyonso. Tiká nayebisa bino ntina oyo nalobi bongo.

Elongo na libota na biso na 1948

Nabotamá na 1927 na engumba moko ya moke pene na Chicago, na etúká ya Illinois, na États-Unis. Tata ná mama na ngai bazalaki na bana mitano—Jetha, Don, ngai, Karl, mpe Joy. Tozalaki biso nyonso na ekateli ya kosalela Yehova na molimo na biso mobimba. Jetha akɔtaki kelasi ya mbala ya mibale ya Gileade na 1943. Don akɔtaki Betele ya Brooklyn, na New York, na 1944, Karl na 1947, mpe Joy na 1951. Ndakisa na bango ya malamu mpe ya baboti na ngai elendisaki ngai nasala mingi na mosala ya Yehova.

LIBOTA NA BISO EYEKOLI SOLO

Tata ná Mama bazalaki kotánga Biblia mpe balingaki Nzambe, bateyaki biso mpe kolinga Nzambe. Kasi, tata, azalaki lisusu te na limemya epai ya mangomba nsima ya kokende na mosala ya soda na Mpoto na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mama azalaki na botɔndi mingi ndenge Tata azongaki na ndako na bomoi nsima ya etumba yango; alobaki na ye: “Karl, tókende na ndako-nzambe ndenge tozalaki kosala.” Tata ayanolaki ye: “Nakokende kotika yo kuna, kasi ngai nakokɔta te.” Mama atunaki: “Mpo na nini?” Ayanolaki: “Na ntango ya etumba, bakonzi ya mangomba oyo bazalaki lingomba moko bazalaki kopambola basoda ná mandoki na bango na ngámbo oyo, mpe basusu bazalaki kosala bongo na ngámbo mosusu! Nzambe azalaki na ngámbo nyonso mibale?”

Na nsima, mokolo moko ntango Mama azalaki na ndako-nzambe, Batatoli ya Yehova mibale bayaki na ndako na biso. Bapesaki Tata bavolimi mibale ya buku Light (Pole), oyo ezalaki kolobela mokanda ya Emoniseli. Tata asepelaki mpe azwaki yango. Ntango Mama amonaki babuku yango, abandaki kotánga yango. Na nsima mokolo moko amonaki liyebisi na zulunalo ete babengisi bato oyo basepeli bákende koyekola Biblia na lisalisi ya babuku Light. Mama andimaki kokende. Ntango akómaki kuna, mwasi moko ya mobange afungolelaki ye porte. Mama asimbaki moko ya babuku yango mpe atunaki: “Bozali koyekola yango awa?” Eyano? “Ɛɛ, elenge mwasi, kɔtá.” Na pɔsɔ oyo elandaki, Mama amemaki biso bana, mpe nsima na yango, tokómaki kokende mbala na mbala.

Na likita moko, motambwisi asɛngaki ngai natánga Nzembo 144:15, oyo elobaka ete baoyo basambelaka Yehova bazali bato ya esengo. Vɛrsɛ yango esimbaki motema na ngai, ndenge moko mpe na bavɛrsɛ mosusu mibale, 1 Timote 1:​11, oyo elobi ete Yehova azali “Nzambe ya esengo,” mpe Baefese 5:1, oyo elendisi biso ‘tókóma bamekoli ya Nzambe.’ Namonaki ete nasengeli kosepela kosalela Mozalisi na ngai mpe kopesa ye matɔndi mpo na libaku yango—makambo yango mibale ekómaki kotambwisa bomoi na ngai.

Lisangá oyo ezalaki pene na biso ezalaki na kilomɛtrɛ 32, na Chicago. Atako bongo, tozalaki kokende makita, mpe boyebi na biso ya Biblia ekolaki. Nazali koyeba lisusu ete na likita moko, motambwisi aponaki Jetha apesa komantɛrɛ. Ntango nayokaki ye, namilobaki: ‘Nayebaki yango. Nakokaki kotombola lobɔkɔ mpo na kopesa komantɛrɛ.’ Nakómaki komibongisa mpe kopesa bakomantɛrɛ na ngai moko. Likambo ya ntina koleka, ndenge moko na bandeko na ngai, nakolaki na elimo. Nazwaki batisimo na 1941.

KOYEKOLA MATEYA YA YEHOVA NA MAYANGANI YA MINENE

Nabosanaka te liyangani oyo esalemaki na 1942 na Cleveland, na Ohio. Bisika mosusu koleka 50 na États-Unis balandaki yango na telefone. Libota na biso ezalaki kofanda na bahema oyo bandeko babongisaki pene na esika oyo liyangani esalemaki. Na ntango yango, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kondongwana, mpe botɛmɛli epai ya Batatoli ya Yehova ezalaki se kokóma makasi. Na mpokwa, namonaki bandeko ebele batɛlɛmisi mituka na bango mpe miinda ezali kotala liboso ya kaa. Bayokanaki ete moto moko atikala na motuka mokomoko mpo na kokɛngɛla na butu. Soki bamoni mwa likambo ya mabe, bandeko basengelaki kopelisa miinda na bango mpo na kozipa miso ya banguna mpe kobɛta pipipi. Bongo basusu bakokaki koya noki mpo na kosalisa. Namilobaki: ‘Basaleli ya Yehova bamibongisaka malamu mpo na makambo nyonso!’ Na yango nazalaki na motema ya kokita, nazalaki kolala na kimya mpenza, mpe mobulu moko te ekómelaki biso.

Bambula na nsima, ntango nakanisaki liyangani yango, namonaki ete mama na biso azalaki komitungisa to kobanga ata moke te. Atyelaki Yehova ná ebongiseli na ye motema mobimba. Nakobosana ata moke te ndakisa na ye ya malamu.

Mwa moke liboso ya liyangani yango, Mama akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Na yango, alandaki na likebi mpenza badiskur oyo elobelaki mosala ya ntango nyonso. Ntango tozalaki kozonga ndako, alobaki: “Mposa na ngai ezali ete nakoba mosala ya mobongisi-nzela, kasi nakokoka te kosala yango ná misala ya ndako.” Na nsima atunaki biso soki tokolinga kosalisa ye. Lokola tondimaki, apesaki mokomoko na biso shambrɛ moko to mibale mpo tópɛtolaka liboso ya komɛla ti. Na nsima soki tokei kelasi, azalaki kotala soki makambo nyonso na ndako ezali na molɔngɔ mpe na nsima azalaki kobima na mosala ya kosakola. Azalaki na misala mingi, kasi azalaki kobosana biso bana te. Ntango tozongi ndako mpo na kolya na midi mpe nsima ya kelasi, azalaki ntango nyonso wana mpo na biso. Mikolo mosusu nsima ya kelasi, tozalaki kokende elongo na ye na mosala ya kosakola mpe yango esalisaki biso tóyeba soki kozala mobongisi-nzela elimboli nini.

NABANDI MOSALA YA NTANGO NYONSO

Nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mbula 16. Atako Tata akómaki naino Motatoli te, azalaki kolandela bokoli na ngai. Mokolo moko na mpokwa, nayebisaki ye ete nasali nyonso, kasi nazwaki moto te oyo alingi koyekola Biblia. Nsima ya kopema moke, natunaki ye: “Okosepela koyekola ná ngai?” Akanisaki mwa moke mpe na nsima alobaki: “Namoni ntina ya koboya te.” Na yango, moyekoli na ngai ya Biblia ya liboso ezalaki Tata na biso. Nazwaki mpenza libaku ya malamu!

Toyekolaki buku “La vérité vous affranchira.” Wana boyekoli na biso ezalaki kopusana, namonaki ete Tata azalaki kosalisa ngai nakóma moyekoli mpe moteyi malamu. Na ndakisa, mokolo moko na mpokwa nsima ya kotánga paragrafe moko, alobaki: “Namoni oyo buku elobi. Kasi ndenge nini oyebi ete buku elobi solo?” Namibongisaki te mpo na motuna wana, na yango nalobaki: “Nazali na likoki te ya komonisa yo yango sikoyo, kasi na boyekoli oyo ekolanda, nakopesa yo eyano.” Mpe nasalaki bongo. Nazwaki bavɛrsɛ oyo emonisaki likambo yango oyo tolobelaki. Banda wana, nakómaki komibongisa malamu mpenza mpo na boyekoli na biso, nayekolaki kosala bolukiluki. Yango esalisaki ngai moko mpe papa tókola na elimo. Asalelaki makambo oyo azalaki koyekola mpe azwaki batisimo na 1952.

MIKANO YA SIKA ESALISAKI NGAI NAYEKOLA MAKAMBO MOSUSU

Nalongwaki na ndako ntango nazalaki na mbula 17. Jetha a akómaki misionɛrɛ, mpe Don akɔtaki Betele. Balingaki mikumba na bango, mpe yango elendisaki ngai mingi. Na yango natondisaki formilɛrɛ mpo na Betele mpe Eteyelo ya Gileade mpe natikaki makambo na mabɔkɔ ya Yehova. Esukaki ndenge nini? Babengaki ngai na Betele na 1946.

Na boumeli ya bambula, nazwaki mikumba ndenge na ndenge na Betele, na yango nazalaki na likoki ya koyekola makambo mingi ya sika. Kutu, na mbula 75 oyo nasali na Betele, nayekoli ndenge ya kosala babuku mpe kosala na comptabilité. Nayekoli mpe ndenge ya kosomba mpe kotinda biloko na bisika mosusu. Kasi koleka nyonso, nasepelaka na makambo ya elimo oyo nayekoli na Betele na nzela ya losambo ya ntɔngɔ ya kotalela mokapo ya mokolo mpe badiskur oyo basalelaka bandeko ya Betele.

Nazali kotángisa na eteyelo ya bankulutu

Nayekoli mpe makambo mosusu epai ya leki na ngai ya mobali, Karl, oyo akɔtaki Betele na 1947. Azalaki moyekoli ya Biblia mpe moteyi ya malamu mpenza. Na libaku moko nasɛngaki ye asalisa ngai na diskur moko oyo nasengelaki kosala. Nayebisaki Karl ete nazwi makambo ebele na bolukiluki na ngai kasi nazalaki koyeba te ndenge ya kosalela yango. Asalisaki ngai na nzela ya motuna moko: “Joel, motó ya likambo na yo ezali nini?” Nakangaki ntina mbala moko: nasengeli kozwa kaka makambo ya ntina mpe kotika mosusu. Nabosaná liteya yango te.

Mpo na kozala na esengo na Betele, tosengeli komipesa na mosala ya kosakola, mpe yango ekoki kosala ete tókutana na makambo ya kolendisa. Likambo moko oyo nakanisaka mingi esalemaki na mpokwa moko na Bronx, na engumba New York. Ngai ná ndeko moko tokendaki kotala mwasi moko mpo andimaki kozwa Linɔ́ngi ya MosɛnzɛliLamuká! Tomonisaki ye soki tozali banani, tolobaki: “Na mpokwa oyo tozali kosalisa bato báyekola makambo ya kolendisa na kati ya Biblia.” Azongisaki: “Soki ezali mpo na Biblia, bókɔta.” Totángaki mpe tolobelaki bavɛrsɛ ebele oyo elobeli Bokonzi ya Nzambe mpe mokili ya sika oyo ezali koya. Emonani ete esimbaki motema na ye, mpo abengaki baninga na ye ebele na pɔsɔ oyo elandaki. Na nsima ye ná mobali na ye bakómaki basaleli ya sembo ya Yehova.

KOYEKOLA EPAI YA MOLONGANI NA NGAI

Nalukaki molongani na boumeli ya mbula 10 liboso nakutana na mwasi na ngai. Nini esalisaki ngai nazwa mwasi ya malamu? Nazalaki kobondela mpe kokanisa motuna oyo: ‘Nakolinga kosala nini elongo na mwasi na ngai nsima ya libala?’

Elongo na Mary na mosala ya zongazonga

Nsima ya liyangani oyo esalemaki na 1953 na Yankee Stadium, nakutanaki na ndeko mwasi moko na nkombo Mary Aniol. Ye ná Jetha bakɔtaki kelasi ya mbala ya mibale ya Gileade, mpe Mary azalaki moninga ya mosala ya Jetha na mosala ya misionɛrɛ. Na esengo nyonso, Mary abɛtelaki ngai masolo ya mosala na ye ya misionɛrɛ na Caraïbes mpe bato oyo ayekoli na bango Biblia na boumeli ya bambula. Wana tozalaki koyebana malamu, tomonaki ete mikano na biso ya elimo ezalaki ndenge moko. Bolingo na biso ekolaki, mpe tobalanaki na sanza ya 04/1955. Na makambo mingi, Mary amonisaki ete azali likabo oyo euti na Yehova mpe ndakisa ya komekola. Azalaki kosepela na mokumba nyonso oyo bazalaki kopesa ye. Azalaki makasi na mosala, kotyela basusu likebi, mpe kotya ntango nyonso matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Tosalaki mosala ya zongazonga mbula misato, mpe na 1958, babengaki biso na Betele.

Nayekolaki makambo mingi epai ya Mary. Na ndakisa, na ebandeli ya libala na biso, tozwaki ekateli ya kotángaka Biblia elongo, bavɛrsɛ soki 15 na mbala moko. Nsima ya kotánga eteni moko, tozalaki kolobela bavɛrsɛ yango mpe ndenge ya kosalela yango na bomoi na biso. Mary azalaki mbala mingi kolobela makambo oyo ayekolaki na Gileade to na mosala ya misionɛrɛ. Masolo yango ezalaki kofungola ngai mayele mpe kosalisa ngai nabongisa lisusu badiskur na ngai mpe nayeba ndenge ya kolendisa bandeko basi.—Mas. 25:11.

Mwasi na ngai Mary akufaki na 2013. Nazali mpenza na mposa makasi ya komona ye na mokili ya sika! Mpo na sikoyo, nazali na ekateli ya kokoba koyekola, kotyela Yehova motema na ngai mobimba. (Mas. 3:5, 6) Nazwaka libɔndisi mpe nayokaka esengo ntango nakanisaka makambo oyo basaleli ya Yehova bakosala na mokili ya sika. Na ntembe te ekosɛnga mpe koyekola makambo ya sika epai mpe mpo na Molakisi na biso Monene! Ya solo, maloba ezangaka ngai mpo na kopesa ye matɔndi na nyonso oyo ateyi ngai mpe mpo na boboto monene na ye oyo amoniseli ngai na ndenge mingi.

a Talá lisolo ya bomoi ya Jetha Sunal na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/2003, nk. 23-29.