Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 48

LOYEMBO 97 Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe

Tózwa mateya na likamwisi moko ya kokómisa mampa ebele

Tózwa mateya na likamwisi moko ya kokómisa mampa ebele

“Ngai nazali limpa ya bomoi. Moto oyo ayei epai na ngai akoyoka lisusu nzala te.”YOA. 6:35.

NA MOKUSE

Tokoyekola lisolo oyo ezali na Yoane 6, oyo elobeli ndenge Yesu akómisaki mampa ná mbisi ebele mpo na ebele ya bato, mpe mateya oyo tokoki kozwa.

1. Limpa ezalaki na ntina nini na ntango ya kala?

 LIMPA ezalaki bilei ya moboko mpo na bato mingi na ntango ya kala. (Eba. 14:18; Luka 4:4) Kutu, ezalaki na ntina mingi mpenza, yango wana na bisika mosusu, Biblia esaleli “limpa” mpo na kolobela biloko ya kolya. (Mat. 6:11; Mis. 20:7) Limpa ezalaki mpe na makamwisi mibale ya Yesu oyo eyebani mingi. (Mat. 16:9, 10) Moko ya likamwisi yango ezali na Yoane mokapo 6. Wana tozali kotalela lisolo yango, tokoluka mateya oyo tokoki kozwa mpo na kosalela lelo.

2. Ntango nini bosɛnga ya bilei emonanaki?

2 Mokolo moko ntango bantoma ya Yesu bautaki kosakola, Yesu azwaki bango mpe bakatisaki Mbu ya Galile elongo na masuwa mpo bápema mwa moke. (Mrk. 6:7, 30-32; Luka 9:10) Bakómaki na esika moko oyo bato bazalaka te, na engumba Betesaida. Kasi, eumelaki te, bankóto ya bato bayaki wana mpe bazingaki bango. Yesu aboyaki kosala lokola amoni bango te. Na boboto nyonso, azwaki ntango ya koteya bango makambo etali Bokonzi mpe abikisaki bato ya maladi. Ntango butu ebandaki kokɔta, bayekoli ya Yesu babandaki komituna ndenge nini bato nyonso wana bakoki kozwa eloko ya kolya. Ekoki kozala ete basusu kati na bango bazalaki na mwa bilei, kasi bato mingi basengelaki kokende nde na bamboka mpo na kosomba eloko ya kolya. (Mat. 14:15; Yoa. 6:4, 5) Yesu asalaki nini?

LIKAMWISI YA KOKÓMISA MAMPA EBELE

3. Yesu ayebisaki bantoma na ye básala nini mpo na ebele ya bato? (Talá mpe ezipeli.)

3 Yesu ayebisaki bantoma na ye: “Bazali na ntina ya kokende te; bino moko bópesa bango eloko ya kolya.” (Mat. 14:16) Ezalaki mokakatano mpo ezalaki na mibali soki 5000. Mpe bakisa basi ná bana, bato oyo basengelaki na bilei bakokaki kozala ata 15000. (Mat. 14:21) Andre azwaki maloba, alobi: “Mwana mobali moko ya moke azali na mampa mitano ya ɔrje ná mbisi mibale ya mike. Kasi yango ezali eloko nini mpo na bato ebele boye?” (Yoa. 6:9) Mampa oyo basali na ɔrje ezalaki bilei oyo bato mingi, ata mpe babola bazalaki kolya, mpe mbala mosusu mbisi wana ya mike ezalaki oyo batyá mungwa mpe bakausá. Kasi, biloko oyo mwana mobali wana azalaki na yango elingaki kokoka te ebele ya bato nyonso wana!

Yesu akokisaki bamposa ya bato, na elimo mpe na mosuni (Talá paragrafe 3)


4. Mateya nini tokoki kozwa na lisolo ya Yoane 6:11-13? (Talá mpe bililingi.)

4 Yesu asepelaki komonisa ezaleli ya koyamba bapaya; na yango asɛngaki bato básala bituluku mpe báfanda na matiti. (Mrk. 6:39, 40; tángá Yoane 6:11-13.) Biblia elobi ete Yesu apesaki Tata na ye matɔndi mpo na mampa ná mbisi yango. Ebongaki mpenza ndenge apesaki Nzambe matɔndi mpo na komonisa ete ye nde azalaki Mopesi ya bilei yango. Biso mpe tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu; tosengeli kobondelaka liboso ya kolya, ezala ntango tozali biso moko to tozali na bato mosusu. Na nsima, Yesu apesaki bayekoli bákabola bilei yango, mpe bato balyaki mpe batondaki. Kutu, biloko etikalaki, mpe Yesu alingaki te ebwakama. Na yango asɛngaki bákangisa yango, mbala mosusu mpo básalela yango na nsima. Na ndenge yango, Yesu atikelaki biso ndakisa na oyo etali kosalela malamu biloko na biso. Soki ozali moboti, bokoki kotalela lisusu lisolo yango elongo na bana na yo mpe bólobela mateya oyo tokoki kozwa na oyo etali kobondela liboso ya kolya, komonisa ezaleli ya koyamba bapaya, mpe kokaba.

Omituna boye, ‘Nalandaka ndakisa ya Yesu ya kobondela liboso ya kolya?’ (Talá paragrafe 4)


5. Bato basalaki nini ntango bamonaki makambo oyo Yesu asalaki, mpe Yesu asalaki nini?

5 Bato bakamwaki ndenge ya Yesu ya koteya mpe makamwisi oyo asalaki. Lokola bayebaki ete Moize alakaki ete Nzambe akobimisa mosakoli moko oyo akozala lokola ye, ekoki kozala ete bamitunaki, ‘Boye Yesu nde mosakoli yango?’ (Mib. 18:15-18) Soki ezali bongo, bamonaki ete akoki kozala moyangeli ya malamu mpenza, oyo mbala mosusu akopesa ekólo mobimba mampa. Na yango, ebele ya bato yango balingaki “kokanga [Yesu] mpo na kotya ye mokonzi.” (Yoa. 6:14, 15) Soki Yesu apesaka nzela ete esalema bongo, alingaki kokɔta na makambo ya politiki ya Bayuda, oyo bazalaki na nse ya boyangeli ya Baroma. Apesaki nzela? Te. Lisolo elobi ete na mpiko nyonso Yesu ‘alongwaki wana akei na ngomba.’ Na yango, atako bato batyaki ye mbamba, Yesu amikɔtisaki na makambo ya politiki te. Ezali mpenza liteya mpo na biso!

6. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi kolanda ndakisa ya Yesu? (Talá mpe elilingi.)

6 Ezali solo ete bato bakosɛnga biso te ete tókómisa mampa ebele to tóbikisa bato ya maladi na ndenge ya likamwisi; bakoluka mpe te kotya biso mokonzi to moyangeli moko na ekólo. Kasi, bakoki kotya biso mbamba tókɔta na makambo ya politiki, tósala voti to tómonisa ete tozali kopesa mabɔkɔ na moto oyo bango bamoni ete akobongisa makambo. Kasi, ndakisa ya Yesu ezali polele. Aboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki; kutu na nsima alobaki: “Bokonzi na ngai ezali ya mokili oyo te.” (Yoa. 17:14; 18:36) Biso bakristo tosengeli kotalela makambo lokola Yesu mpe kolanda ndakisa na ye. Topesaka mabɔkɔ nde na Bokonzi ya Nzambe; tosakwelaka yango basusu mpe tobondelaka mpo na yango. (Mat. 6:10) Tózongela sikoyo lisolo oyo Yesu asalaki likamwisi ya kokómisa mampa ebele mpe tótala mateya mosusu oyo tokoki kozwa.

Yesu apesaki bayekoli na ye ndakisa; aboyaki kokɔta na makambo ya politiki ya Bayuda to ya Baroma (Talá paragrafe 6)


“NTINA YA LIKAMWISI YA MAMPA”

7. Yesu asalaki nini, mpe bantoma balobaki nini? (Yoane 6:16-20)

7 Nsima ya koleisa ebele ya bato, Yesu asɛngaki bantoma bálongwa esika yango mpe bázonga na Kapernaume na masuwa mpe ye akendaki na ngomba, mpo na kokima bato oyo balingaki kokómisa ye mokonzi. (Tángá Yoane 6:16-20.) Ntango bantoma bazalaki na kati ya masuwa, mbula ya makasi ebandaki mpe ememaki mopɛpɛ makasi ná mbonge. Na ntango yango Yesu azalaki koya epai na bango, azali kotambola likoló ya mai. Abengaki mpe ntoma Petro atambola likoló ya mai. (Mat. 14:​22-31) Ntango kaka Yesu akɔtaki na masuwa, mopɛpɛ makasi yango ekitaki. Bayekoli bakamwaki mpe balobaki: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.” a (Mat. 14:33) Atako bongo, bamonaki te boyokani oyo ezalaki kati na likamwisi wana ya kotambola likoló ya mai mpe oyo ya kokómisa mampa ebele. Evanzile ya Marko elobeli likambo yango boye: “[Bantoma] bakamwaki mingi mpenza, mpo lokola bakangaki ntina ya likamwisi ya mampa te, mitema na bango ezalaki mpenza kososola te.” (Mrk. 6:50-52) Ya solo, bakangaki ntina te ete Yehova apesaki Yesu nguya monene ya kosala makamwisi. Kasi, mwa moke na nsima, Yesu ye moko alobelaki lisusu likamwisi ya mampa, mpe apesaki liteya mpo na biso.

8-9. Mpo na nini ebele ya bato bazalaki koluka Yesu? (Yoane 6:26, 27)

8 Ebele ya bato oyo Yesu aleisaki batyaki likebi kaka na kokokisa bamposa na bango ya mosuni. Na ndenge nini? Mokolo oyo elandaki, bayaki esika balyaki mampa, kasi Yesu ná bantoma na ye bazalaki lisusu wana te. Na yango, ebele ya bato bakɔtaki na bamasuwa mosusu oyo eutaki Tiberiase, mpe bakendaki na Kapernaume mpo na koluka Yesu. (Yoa. 6:22-24) Basalaki bongo nde mpo bákende koyoka makambo mingi oyo etali Bokonzi? Te. Bazalaki kokanisa libosoliboso mposa na bango ya kolya mampa. Ndenge nini toyebi yango?

9 Talá likambo oyo esalemaki ntango ebele ya bato yango bamonaki Yesu pene na Kapernaume. Yesu alobaki polele ete bazalaki koluka ye libosoliboso mpo na kokokisa mposa ya kolya oyo bazalaki na yango na ntango wana. Alobaki na bango ete ‘balyaki mampa mpe batondaki’ na “bilei oyo ebebaka.” Alendisaki bango básala mosala nde mpo na “bilei oyo eumelaka mpo na bomoi ya seko.” (Tángá Yoane 6:26, 27.) Yesu alobaki ete Tata na ye akopesa bilei oyo ememaka na bomoi ya seko. Na ntembe te, bato bakamwaki koyoka ete ezali na bilei ya ndenge wana! Bilei nini ekoki kopesa bomoi ya seko, mpe ndenge nini bayoki ya Yesu bakokaki kozwa yango?

10. “Mosala ya Nzambe” oyo bato basengelaki kosala ezalaki nini?

10 Emonani ete Bayuda yango bazalaki kokanisa ete basengeli kosala mwa makambo to misala mosusu mpo bázwa bilei yango. Mbala mosusu bakanisaki “misala” ya Mobeko ya Moize. Kasi Yesu ayebisaki bango: “Oyo ezali mosala ya Nzambe, ete bómonisa kondima na moto oyo ye atindaki.” (Yoa. 6:28, 29) Esengeli komonisa kondima na momonisi ya Nzambe mpo na ‘kozwa bomoi ya seko.’ Kutu Yesu alobelaki yango liboso na libaku mosusu. (Yoa. 3:16-18, 36) Na nsima, alobelaki lisusu makambo oyo tokoki kosala mpo na kozwa bomoi ya seko.—Yoa. 17:3.

11. Ndenge nini Bayuda bamonisaki ete bazalaki kaka koluka kolya mampa? (Nzembo 78:24, 25)

11 Bayuda yango bandimaki te liteya ya Yesu oyo etali “mosala ya Nzambe,” elingi koloba komonisa kondima epai ya Yesu. Batunaki ye: “Likamwisi nini okosala, mpo ete tómona yango mpe tóndima yo?” (Yoa. 6:30) Balobaki ete bankɔkɔ na bango na mikolo ya Moize balyaki mana, oyo ezalaki lokola mampa, bilei ya mokolo na mokolo. (Neh. 9:15; tángá Nzembo 78:24, 25.) Ezali polele ete likebi na bango ezalaki kaka na kokokisa mposa na bango ya kolya mampa ya solo. Basɛngaki ata Yesu te ete alimbola makambo oyo alobaki na nsima na oyo etali “limpa ya solosolo oyo euti na likoló,” oyo ezalaki lokola mana, bilei ya likoló oyo ezalaki kopesa bomoi. (Yoa. 6:32) Batyaki likebi nyonso kaka na bamposa na bango ya mosuni, na boye ete babosanaki mposa na bango ya koyeba makambo ya elimo oyo Yesu azalaki koluka koteya bango. Lisolo yango ekoki koteya biso nini?

ELOKO OYO TOSENGELI KOTYELA LIKEBI MINGI

12. Ndenge nini Yesu amonisaki eloko oyo eleki ntina?

12 Liteya ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na Yoane mokapo 6 ezali ete: Tosengeli kotya likebi mingi na kokokisa mposa na biso ya elimo. Kobosana te ete Yesu alobelaki likambo yango, ete moto asengeli kobika kaka na mampa te, ntango atɛmɛlaki komekama ya Satana. (Mat. 4:3, 4) Mpe na Lisolo likoló ya Ngomba, alobaki ete moto asengeli koyeba mposa na ye ya elimo. (Mat. 5:3) Na yango, tokoki komituna boye: ‘Bomoi na ngai ezali komonisa ete nalukaka libosoliboso kokokisa mposa na ngai ya elimo koleka bamposa na ngai ya mosuni?’

13. (a) Mpo na nini ezali mabe te kosepela na bilei? (b) Likebisi nini tosengeli kotyela likebi? (1 Bakorinti 10:6, 7, 11)

13 Ezali mabe te tóbondelaka mpo na bamposa na biso ya mosuni mpe tósepela kokokisa yango. (Luka 11:3) Mosala makasi oyo epesi biso libaku ya ‘kolya mpe komɛla’ epesaka esengo mpe “euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.” (Mos. 2:24; 8:15; Yak. 1:17) Kasi, tosengeli kotika biloko ya mosuni na esika na yango. Ntoma Paulo amonisaki yango ntango akomelaki bakristo oyo bazalaki na bomoi mwa moke liboso ebongiseli ya Bayuda ebebisama. Alobelaki ndakisa mabe ya Bayisraele ya kala, kati na yango makambo oyo esalemaki pene na Ngomba Sinai. Akebisaki bakristo ete basengeli te “kosepela na makambo ya mabe, ndenge [Bayisraele] basalaki.” (Tángá 1 Bakorinti 10:6, 7, 11.) Bayisraele batikaki mposa na bango ya kolya etinda bango bámona ata bilei oyo Yehova azalaki kopesa bango na ndenge ya likamwisi ete ezali “makambo [to biloko] ya mabe.” (Mit. 11:4-6, 31-34) Mpe ntango basambelaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, balyaki, bamɛlaki, mpe basakanaki. (Kob. 32:4-6) Paulo atángaki ndakisa na bango lokola likebisi mpo na bakristo oyo bazalaki na bomoi liboso ebongiseli ya Bayuda ebebisama na mobu 70 T.B. Sikoyo mpe tozali pene na nsuka ya mokili oyo, yango wana tosengeli kozwa toli ya Paulo na lisɛki te.

14. Na oyo etali bilei, na mokili ya sika ekozala ndenge nini?

14 Ntango Yesu alobaki ete tóbondelaka mpo na “bilei na biso ya mokolo na mokolo,” alobelaki mpe ntango oyo mokano ya Nzambe ekosalema “na mabele, lokola na likoló.” (Mat. 6:9-11) Omonaka ete bomoi ekozala ndenge nini na ntango yango? Biblia emonisi ete ntango mokano ya Nzambe ekokokisama na mabele, tokozala na bilei ya kitoko. Yisaya 25:6-8 emonisi ete ekozala na bilei beboo oyo tokosepela na yango na boyangeli ya Bokonzi ya Yehova. Nzembo 72:16 esakolaki ete: “Bilei ekozala ebele mpenza na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.” (Nz. 72:16) Ozelaka ntango oyo okosalela mbuma yango mosusu mpo na kosala modɛlɛ ya mampa oyo olingaka to komeka kosala eloko oyo osalá naino te? Longola yango, okoki kosepela mpe kolya mbuma ya vinyo oyo yo moko olonaki. (Yis. 65:21, 22) Moto nyonso na mabele akosepela na biloko yango ya kitoko.

15. Ebongiseli nini ekozala mpo na baoyo bakosekwa? (Yoa. 6:35)

15 Tángá Yoane 6:35. Bato oyo balyaki mampa ná mbisi oyo Yesu akómisaki ebele na ndenge ya likamwisi bakosuka boni? Ntango bakosekwa, okoki kokutana na basusu kati na bango. Ata soki bamonisaki kondima te na ntango wana, bakoki kosekwa. (Yoa. 5:28, 29) Ekosɛnga ete bato yango báyekola ndimbola ya maloba oyo ya Yesu, ete: “Ngai nazali limpa ya bomoi. Moto oyo ayei epai na ngai akoyoka lisusu nzala te.” Ekosɛnga bámonisa kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu, bándima ete apesaki bomoi na ye mpo na bango. Na ntango yango, ekozala na ebongiseli ya koteya baoyo bakosekwa mpe bana oyo bakobotama na mokili ya sika. Ekozala mpenza esengo kopesa mabɔkɔ na koteya bato yango! Kosala bongo ekosepelisa yo koleka kolya limpa ya solo. Ya solo, tokotya likebi mingi na makambo ya elimo.

16. Tokotalela nini na lisolo oyo elandi?

16 Totaleli mwa bavɛrsɛ ya Yoane mokapo 6, kasi Yesu alobaki mpe makambo mosusu mpo na “bomoi ya seko.” Bayuda wana basengelaki kotyela yango likebi, ndenge moko mpe na biso lelo. Tokokoba kotalela bavɛrsɛ mosusu ya Yoane mokapo 6 na lisolo oyo elandi.

LOYEMBO 20 Opesá Mwana na yo ya bolingo

a Mpo omona makambo mosusu oyo etali lisolo yango, talá buku Yesu azali nzela, solo mpe bomoi, lok. 131, mpe Mekolá kondima na bango, lok. 185.