Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 40

“Bazali komema ebele epai ya boyengebene”

“Bazali komema ebele epai ya boyengebene”

“Baoyo bazali komema ebele epai ya boyengebene, bakongɛnga lokola minzoto mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.”​—DAN. 12:3.

LOYEMBO 151 Akobenga

NA MOKUSE a

1. Makambo nini ya esengo ezali kozela biso na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?

 EKOZALA mokolo ya esengo mpenza ntango lisekwa ekobanda awa na mabele na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo! Baoyo nyonso babungisá bato oyo bazalaki kolinga na liwa bazalaka na mposa makasi ya komona bango lisusu. Yehova mpe ayokaka bongo. (Yobo 14:15) Kanisá esengo oyo bato bakoyoka ntango bakomona bato oyo bazalaki kolinga oyo bakufá bazongi lisusu na bomoi awa na mabele. Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, “bayengebene,” baoyo bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi, bakozonga na bomoi mpo na “lisekwa ya bomoi.” (Mis. 24:15; Yoa. 5:29) Mbala mosusu mingi na bato oyo tozalaki kolinga mingi oyo bakufá bakozala na kati ya bato ya liboso oyo bakosekwa awa na mabele. b Lisusu, “bato oyo bazangi boyengebene,” na ndakisa, baoyo bazwaki mpenza te libaku ya koyeba Yehova to ya kosalela ye na bosembo liboso bákufa, bakozonga na bomoi mpo na “lisekwa ya kosambisama.”

2-3. (a) Ndenge Yisaya 11:9, 10 emonisi yango, mateya nini ekopesama na programɛ monene ya mateya oyo esalemá naino te na lisolo ya bato? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Baoyo nyonso bakosekwa basengeli koteyama. (Yis. 26:9; 61:11) Yango wana, programɛ moko monene ya mateya oyo esalemá naino te na lisolo ya bato esengeli kotyama. (Tángá Yisaya 11:9, 10.) Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali ete bato oyo bazangi boyengebene oyo bakosekwa basengeli koyekola makambo etali Yesu Kristo, bibongiseli ya Bokonzi ya Nzambe, lisiko, mpe ntembe oyo ebimaki na molɔ́ngɔ́ mobimba na oyo etali kosantisama mpe kolongisama ya nkombo ya Yehova mpe boyangeli na ye. Bayengebene mpe basengeli koyeba makambo oyo Yehova azalaki mokemoke koteya basaleli na ye na likambo etali mokano na ye mpo na mabele. Na kati ya bato yango ya sembo ezali mpe na baoyo bakufá kala liboso Biblia ekomama na mobimba na yango. Ezala bato oyo bazangi boyengebene mpe bayengebene bakozala na makambo mingi ya koyekola.

3 Na lisolo oyo, tokotalela mituna oyo: Ndenge nini programɛ monene oyo ya mateya ekosalema? Nini ekokómela bato soki bandimi mateya oyo bakozwa to baboyi mateya yango? Biyano na mituna wana esengeli kozala na ntina mingi mpo na biso lelo oyo. Ndenge tokomona yango, bisakweli mosusu ya kokamwa oyo ezali na mokanda ya Danyele mpe ya Emoniseli ekosalisa biso tósembola boyebi na biso na makambo oyo ekosalema ntango bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. Tótala naino makambo ya esengo oyo esakweli ya Danyele 12:1, 2 elobeli.

‘BAOYO BALALI NA KATI YA PUTULU BAKOLAMUKA’

4-5. Na kotalela Danyele 12:1, nini ekosalema na ntango ya nsuka?

4 Tángá Danyele 12:1. Mokanda ya Danyele emonisi na mokuse makambo ya esengo oyo ekosalema na mikolo ya nsuka. Na ndakisa, Danyele 12:1 emonisi ete Mikaele, oyo ezali Yesu Kristo, azali “kotɛlɛma mpo na bolamu ya bato ya [Nzambe].” Mwa eteni ya esakweli yango ebandaki kokokisama na 1914 ntango Yesu atyamaki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe na likoló.

5 Kasi, bayebisaki mpe Danyele ete Yesu “akotɛlɛma” wana “ntango moko ya mpasi ekozala mpenza na ndenge oyo esalemá naino te banda ekólo esalemá kino ntango wana.” ‘Ntango yango ya mpasi’ ezali “bolɔzi monene” oyo Matai 24:21 elobeli. Yesu akotɛlɛma, to akosala mpo na kobundela bato ya Nzambe, na nsuka ya ntango ya mpasi, elingi koloba, na Armagedone. Mokanda ya Emoniseli elobeli bato yango lokola “ebele mpenza ya bato oyo bauti na bolɔzi monene.”​—Em. 7:9, 14.

6. Nini ekosalema nsima ya kobikisama ya ebele mpenza ya bato na bolɔzi monene? Limbolá. (Talá mpe na nimero oyo lisolo “Mituna ya batángi” na oyo etali lisekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele.)

6 Tángá Danyele 12:2. Nini ekosalema ntango ebele mpenza ya bato bakobika na ntango wana ya mpasi? Esakweli yango ezali kolobela te lisekwa ya elilingi, elingi koloba, kolamuka na elimo ya basaleli ya Nzambe oyo ezali kosalema na mikolo oyo ya nsuka, ndenge kala tozalaki kolimbola. c Kutu, maloba yango ezali kolobela lisekwa ya bakufi oyo ekosalema na mokili ya sika na mikolo ezali koya. Mpo na nini tolobi bongo? Liloba “putulu” esalelami mpe na Yobo 17:16 oyo eyokani na liloba “Nkunda.” Yango emonisi ete Danyele 12:2 ezali kolobela lisekwa ya solosolo mpenza oyo ekosalema ntango mikolo oyo ya nsuka ekosuka mpe nsima ya etumba ya Armagedone.

7. (a) Na ndenge nini basusu bakosekwa mpo na “bomoi oyo ekoumela seko”? (b) Mpo na nini yango ezali “lisekwa moko oyo eleki malamu”?

7 Kasi, Danyele 12:2 elingi koloba nini ntango elobi ete basusu bakosekwa mpo na “bomoi oyo ekoumela seko”? Elingi koloba ete baoyo bakosekwa mpe bakoyekola koyeba Yehova mpe Yesu, to bakokoba koyeba, mpe kotosa bango na boumeli ya mbula 1 000, bakozwa bomoi ya seko. (Yoa. 17:3) Ekozala “lisekwa moko oyo eleki malamu” koleka lisekwa oyo bato mosusu basekwaki na ntango ya kala. (Ebr. 11:35) Mpo na nini? Mpo bato wana ya kozanga kokoka oyo basekwaki bakufaki lisusu.

8. Na ndenge nini bato mosusu bakosekwa “mpo na nsɔni mingi mpe koyinama seko”?

8 Kasi bato nyonso te oyo bakosekwa nde bakondima mateya ya Yehova. Esakweli ya Danyele elobi ete basusu bakosekwa “mpo na nsɔni mingi mpe koyinama seko.” Lokola bakomonisa elimo ya botomboki, bankombo na bango ekokomama te na buku ya bomoi mpe bakozwa te bomoi ya seko. Kutu, ‘bakoyinama seko,’ to bakobomama. Yango wana, Danyele 12:2 ezali kolobela makambo oyo nsukansuka ekokómela bato nyonso oyo bakosekwa na kotalela makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango. d (Em. 20:12) Basusu bakozwa bomoi ya seko, kasi basusu bakozwa yango te.

“BAZALI KOMEMA EBELE EPAI YA BOYENGEBENE”

9-10. (a) Nini mosusu ekosalema nsima ya bolɔzi monene? (b) Banani “bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando”?

9 Tángá Danyele 12:3. Nini mosusu ekosalema nsima ya ‘ntango ya mpasi’ oyo ezali koya? Longola Danyele 12:2, vɛrsɛ 3 elobeli likambo moko oyo ekosalema nsima ya bolɔzi monene.

10 Banani “bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando”? Matai 13:43 esalisi biso tóyeba soki ezali banani ntango elobi: “Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.” Na kotalela bavɛrsɛ oyo ezali likoló, Yesu azalaki kolobela “bana ya bokonzi,” bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi ya likoló. (Mat. 13:38) Yango wana, Danyele 12:3 esengeli kolobela bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe mosala oyo bakosala na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto.

Bato 144 000 oyo batyami mafuta na elimo bakosala elongo na Yesu Kristo mpo na kotambwisa programɛ ya mateya oyo ekosalema na boumeli ya mbula 1 000 (Talá paragrafe 11)

11-12. Mosala nini bato 144 000 bakosala na boumeli ya mbula 1 000?

11 Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakomema “ebele epai ya boyengebene”? Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakosala elongo na Yesu Kristo mpo na kotambwisa programɛ ya mateya oyo ekosalema awa na mabele mobimba na boumeli ya mbula 1 000. Bato 144 000 bakosuka kaka te na koyangela lokola bakonzi kasi bakosala mpe lokola banganga-nzambe. (Em. 1:6; 5:10; 20:6) Na yango, bakosalisa “mpo na kobikisa bikólo,” elingi koloba, mokemoke bakosalisa bato bákóma bato ya kokoka. (Em. 22:1, 2; Ezk. 47:12) Kanisá esengo oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakoyoka!

12 Banani bakozala na kati ya “ebele” oyo bakomemama epai ya boyengebene? Ekosangisa bato oyo bakosekwa, bato oyo bakobika na Armagedone, mpe bana nyonso oyo bakoki kobotama na mokili ya sika. Na nsuka ya mbula 1 000, bato nyonso oyo bakozala na bomoi awa na mabele bakozala bato ya kokoka. Sikoyo na ndenge nini bankombo na bango ekokomama na buku ya bomoi mpo na libela na mai ya mikanda kasi te na krɛyo?

KOMEKAMA YA NSUKA

13-14. Bato nyonso ya kokoka oyo bakozala awa na mabele basengeli kosala nini liboso bázwa bomoi ya seko?

13 Tosengeli kobosana te ete kozala moto ya kokoka elakisi te ete moto akozwa mbala moko bomoi ya seko. Na ndakisa, Adama ná Eva bazalaki bato ya kokoka, kasi basengelaki komonisa botosi epai ya Yehova Nzambe liboso ete bázwa bomoi ya seko. Kasi, likambo ya mawa, batosaki Yehova te.​—Rom. 5:12.

14 Nini ekokómela baoyo bakozala awa na mabele na nsuka ya mbula 1 000? Bango nyonso bakokóma bato ya kokoka. Bato yango nyonso ya kokoka bakopesa boyangeli ya Yehova mabɔkɔ mpo na libela? To basusu bakozala lokola Adama ná Eva, oyo atako bazalaki bato ya kokoka, kasi bazangaki bosembo? Ekosɛnga kozwa biyano na mituna yango!

15-16. (a) Ntango nini bato nyonso bakozwa libaku ya komonisa bosembo na bango epai ya Yehova? (b) Komekama ya nsuka ekobimisa nini?

15 Satana akokangama na bolɔkɔ mpo na mbula 1000. Na ntango yango, akozala lisusu na likoki te ya kokosa bato. Kasi, na nsuka ya mbula 1 000, Satana akobima na bolɔkɔ. Na nsima akomeka bato ya kokoka. Na ntango ya komekama yango, bato nyonso ya kokoka awa na mabele bakozala na libaku ya komonisa polele ete bazali kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Nzambe mpe kolongisama ya Bokonzi na ye. (Em. 20:7-10) Makambo oyo bakosala na ntango wana nde ekomonisa soki bankombo na bango ekokomama to te mpo na libela na buku ya bomoi.

16 Basusu, oyo motángo na bango eyebani te, bakozala lokola Adama ná Eva, mpe bakoboya kotosa Bokonzi ya Yehova. Nini ekokómela bango? Emoniseli 20:15 eyebisi biso boye: “Moto nyonso oyo amonanaki ete akomami na buku ya bomoi te abwakamaki na laki yango ya mɔtɔ.” Na ntembe te, batomboki wana nyonso bakobomama libela na libela. Kasi bato mingi ya kokoka bakolonga komekama ya nsuka. Yango wana, bankombo na bango ekokomama mpo na libela na buku ya bomoi.

NA “NTANGO YA NSUKA”

17. Na kotalela Danyele 12:4, 8-10, anzelu ayebisaki Danyele nini ekosalema na ntango na biso?

17 Ezali mpenza esengo kokanisa makambo wana oyo ekosalema na mikolo ezali koya! Nzokande, Anzelu moko apesaki mpe Danyele nsango moko ya ntina mingi oyo etali ntango na biso, elingi koloba, “ntango ya nsuka.” (Tángá Danyele 12:4, 8-10; 2 Tim. 3:1-5) Anzelu ayebisaki Danyele: “Boyebi ya sikisiki ekokóma mingi.” Ya solo, basaleli ya Nzambe bakokanga mpenza ntina ya maloba ya esakweli oyo ezali na buku oyo. Anzelu yango abakisaki ete na ntango yango “bato mabe bakosala mpenza mabe, mpe ata moto moko te ya mabe akokanga ntina.”

18. Nini ekokómela bato mabe?

18 Lelo oyo ezali komonana lokola bato mabe bazali te kozwa etumbu mpo na makambo ya mabe oyo bazali kosala. (Mal. 3:14, 15) Kasi mosika te, Yesu akosambisa bato oyo bakozala lokola bantaba mpe akokabola bango ná bato oyo bakozala lokola bampate. (Mat. 25:31-33) Bato mabe yango bakobika te na bolɔzi monene mpe bakosekwa te mpo bázala na bomoi na mokili ya sika. Bankombo na bango ekozala te na “buku ya kokanisama” oyo Malaki 3:16 elobeli.

19. Na kotalela Malaki 3:16-18, sikoyo ezali ntango ya kosala nini, mpe mpo na nini?

19 Sikoyo ezali ntango oyo tosengeli komonisa ete tozali te na kati ya bato mabe. (Tángá Malaki 3:16-18.) Yehova azali koyanganisa baoyo atalelaka bango lokola ‘eloko na ye moko,’ to eloko ya motuya. Na ntembe te, tolingaka kozala na kati na bango.

Ekozala esengo komona Danyele, bato oyo tozalaki kolinga oyo bakufá, mpe bato mingi koleka ‘batɛlɛmi’ wana bazali kosepela na bomoi na mokili ya sika! (Talá paragrafe 20)

20. (a) Elaka nini Yehova apesaki Danyele? (b) Mpo na nini ozali kozela na mposa makasi kokokisama ya elaka yango?

20 Ya solo, tozali kobika na ntango moko ya yikiyiki. Kasi mosika te makambo ya kokamwa ekosalema. Mosika te tokomona kobebisama ya bato nyonso ya mabe. Na nsima na yango, tokomona kokokisama ya elaka oyo Yehova apesaki Danyele: “Okotɛlɛma mpo na libula na yo na nsuka ya mikolo.” (Dan. 12:13) Ozali kozela na mposa makasi mokolo oyo Danyele, elongo na bato oyo ozalaki kolinga oyo bakufá, ‘bakotɛlɛma’ lisusu? Soki bongo, banda sikoyo salá nyonso oyo okoki mpo ozala sembo, mpe okoki komindimisa ete nkombo na yo ekotikala mpo na libela na buku ya bomoi oyo Yehova azali kokoma.

LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’

a Lisolo oyo esemboli boyebi na biso na oyo etali programɛ monene ya mateya oyo Danyele 12:2, 3 elobeli. Tokolobela ntango nini ekosalema mpe ekotalela banani. Tokomona mpe ndenge nini programɛ yango ya mateya ekobongisa baoyo bakozala na mabele na komekama ya nsuka na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo.

b Lisekwa ekoki kobanda na baoyo bakufaki sembo na boumeli ya ntango ya mikolo ya nsuka mpe na nsima ekoki kokita tii na ntango ya bato ya kala, libota na libota. Soki ezali bongo, libota mokomoko ekozala na libaku ya koyamba bato oyo bayebanaki na bango mpenza. Ezala ndenge nini, Makomami emonisi ete lisekwa mpo na kokende na likoló ezali kosalema moto na moto na “ngala” na ye mpe yango ekoki kotinda biso tóloba ete lisekwa awa na mabele ekosalema mpe na molɔngɔ.​—1 Ko. 14:33; 15:23.

c Mateya oyo esemboli boyebi na biso oyo ezali na buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! mokapo 17, mpe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1987, nk. 21-25, na Français.

d Nzokande, maloba “bayengebene” mpe “bato oyo bazangi boyengebene” oyo Misala 24:15 elobeli mpe maloba “baoyo basalaki makambo ya malamu” mpe “baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe” oyo Yoane 5:29 elobeli, ezali kobɛta nsɛtɛ na makambo oyo bato oyo bakosekwa basalaki liboso bákufa.