Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nasepelaki koyekola mpe koteya makambo etali Yehova

Nasepelaki koyekola mpe koteya makambo etali Yehova

NTANGO nazalaki kokola na Easton, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis, nazalaki na mokano ya kokende na iniversite, mpo nazwaki ekateli ya kokóma moto monene. Nazalaki kosepela koyekola mpe nayebaki malamu matematiki mpe siansi. Na mobu 1956, ebongiseli moko oyo elandelaka ntomo ya bana-mboka epesaki ngai dolare 25 mpo nazwaki bapwɛ mingi koleka bana-kelasi nyonso oyo bazalaki baindo. Kasi na nsima, mikano na ngai ebongwanaki. Mpo na nini?

NDENGE NAYEKOLAKI MAKAMBO ETALI YEHOVA

Na ebandeli ya bambula 1940, baboti na ngai bazalaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Boyekoli na bango ekobaki te, atako bongo mama na ngai akobaki kozwa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!. Na mobu 1950 liyangani moko oyo esangisaki mikili mingi esalemaki na engumba New York, mpe libota na ngai endimaki kokende na liyangani yango.

Mwa moke na nsima, ndeko mobali Lawrence Jeffries abandaki koya kotala biso. Alukaki kosalisa ngai nayeba solo. Na ebandeli, toyokanaki te mpo na ndenge Batatoli ya Yehova baboyaka kokɔta na makambo ya politiki mpe mosala ya soda. Nakanisaki ete soki moto nyonso na Amerika aboyi kokende bitumba, banguna bakoki koya mpe kokonza ekólo na biso mobimba. Na motema molai nyonso, ndeko Jeffries asosolaki na ngai boye: “Okanisi ete Yehova alingaki kosala nini soki bato nyonso na Amerika bazalaki kosalela ye mpe kotika ete banguna báya kobundisa bango?” Makambo oyo alobaki mpo na yango mpe makambo mosusu esalisaki ngai namona ete nazalaki kobɛta ntembe kaka mpamba. Yango epesaki ngai mposa ya koyekola lisusu Biblia mingi.

Mokolo oyo nazwaki batisimo

Nazalaki kolekisa bangonga mingi mpo na kotánga banimero ya kala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo mama na ngai atyaki na ndako moko oyo ezalaki na nse ya mabele. Kendekende, nayaki koyeba ete nazalaki koyekola solo, yango wana nandimaki koyekola Biblia na ndeko Jeffries ntango asɛngaki ngai tóyekola na ye. Nabandaki mpe koyangana mbala na mbala na makita. Nazalaki kosepela na makambo oyo nazalaki koyekola, mpe nakómaki mosakoli ya nsango malamu. Mikano na ngai ebongwanaki ntango nayaki koyeba ete “mokolo monene ya Yehova ekómi pene.” (Sef. 1:14) Nalingaki lisusu te kokende na iniversite. Kasi nalingaki kosalisa basusu báyekola mateya ya Biblia.

Nazwaki diplome ya eteyelo ya ntei na mokolo ya 13/06/1956, mpe nsima ya mikolo misato, nazwaki batisimo na liyangani moko ya zongazonga. Nayebaki te ete nakozwa mapamboli mingi epai ya Yehova mpo naponaki kosalela bomoi na ngai mpo na koyekola mpe koteya basusu makambo etali Yehova.

NAYEKOLAKI MPE NATEYAKI MAKAMBO ETALI YEHOVA NTANGO NAZALAKI MOBONGISI-NZELA

Sanza motoba nsima ya kozwa batisimo, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mosala ya Bokonzi ya sanza ya 12/1956 ezalaki mpe na lisolo moko oyo elobaki: “Okoki kokende kosakola na esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi?” Libyangi yango etalelaki mpe ngai. Nazalaki na mposa ya kopesa mabɔkɔ na esika oyo nsango malamu esakolamaki naino mingi te.​—Mat. 24:14.

Nakendaki na Edgefield, na Caroline du Sud. Lisangá yango ezalaki kaka na basakoli minei. Lokola nakómaki kuna, lisangá ekómaki na basakoli mitano. Tozalaki kosala makita na kati ya salɔ ya ndako ya ndeko mobali moko. Sanza nyonso, nazalaki kolekisa ngonga 100 na mosala ya kosakola. Nazalaki na makambo mingi ya kosala, mpamba te nazalaki kotambwisa likita ya mosala ya kosakola mpe nazalaki kosala badiskur na lisangá. Kozala na mingi ya kosala esalisaki ngai nayekola koyeba lisusu Yehova mingi.

Mwasi moko oyo nazalaki koyekola na ye Biblia azalaki na ndako moko oyo bazalaki kolela bibembe na Johnston, engumba oyo ezalaki mosika te. Na boboto mpenza, mwasi yango apesaki ngai mosala moko oyo nazalaki kosala mwa bangonga na mokolo mpe apesaki biso nzela tósalela ndako moko ya moke lokola Ndako ya Bokonzi.

Ndeko mobali Jolly Jeffries, mwana ya ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia, alongwaki na Brooklyn, na New York, mpo na koya kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na ngai. Tozalaki kofanda na ndako moko ya moke oyo ndeko mobali moko atikelaki biso tósalela.

Bazalaki kofuta basali mbongo moke na Sudi. Tozalaki kozwa dolare mibale to misato mpo na mosala ya mokolo mobimba. Mokolo moko, nasalelaki kaka mwa mbongo ya bibende oyo natikalaki na yango mpo na kosomba mwa bilei na wenze. Ntango nabimaki libándá, mobali moko apusanaki penepene na ngai mpe atunaki boye: “Ozali koluka mosala? Nakofuta yo dolare moko mpo na ngonga moko.” Apesaki ngai mikolo misato ya mosala mpo na kopɛtola esika moko ya botongi. Emonanaki polele ete Yehova azalaki kosalisa ngai mpo natikala na Edgefield. Atako nazalaki na mbongo mingi te, nakendaki na liyangani oyo esangisaki mikili mingi oyo esalemaki na engumba New York na mobu 1958.

Mokolo ya libala na biso

Na mokolo ya mibale ya liyangani yango, likambo moko ya malamu esalemaki. Nakutanaki na Ruby Wadlington, oyo azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na mboka Gallatin, na Tennessee. Lokola biso nyonso mibale tozalaki kosepela na mosala ya misionɛrɛ, tokɔtaki likita mpo na baoyo balingi kokɔta na eteyelo ya Gileade na liyangani yango. Na nsima, tokómaki kokomelana mikanda. Longola yango, babengisaki ngai naya kosala diskur ya bato nyonso na Gallatin. Na ntango wana nde nazwaki libaku ya kotuna ye libala. Nakendaki na lisangá epai ndeko Ruby azalaki koyangana, mpe tobalanaki na mobu 1959.

NAYEKOLAKI MPE NATEYAKI NA LISANGÁ

Ntango nazalaki na mbula 23, naponamaki lokola mosaleli ya lisangá (lelo oyo mokambi-misala ya bankulutu) na Gallatin. Tozalaki lisangá ya liboso oyo ndeko Charles Thompson ayaki kotala lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Ayebaki makambo mingi; kasi, atunaki makanisi na ngai mpo na koyeba biloko nini bandeko bazalaki na yango mposa mpe ndenge nini bakɛngɛli mosusu ya zongazonga basalaki mpo na kokokisa bamposa yango. Nayekolaki likambo moko ya ntina ete ezali malamu kotuna mituna mpe koyeba makambo nyonso liboso ya kozwa bikateli.

Na sanza ya 05/1964, babengisaki ngai mpo nakɔta na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo esalemaki sanza moko na South Lansing, na New York. Bandeko oyo batambwisaki eteyelo yango bapesaki ngai mpenza mposa ya koyekola lisusu mingi makambo etali Yehova mpe ya kokóma moto ya elimo.

NAYEKOLAKI MPE NATEYAKI MAKAMBO MINGI NA MOSALA YA ZONGAZONGA MPE YA ETÚKÁ

Na sanza ya 01/1965, filiale esɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya zongazonga mpo nabanda kotala masangá elongo na Ruby. Zongazonga na biso ya liboso ezalaki na teritware moko monene mpenza. Ebandaki na Knoxville, na Tennessee, tii ekómaki pene na Richmond, na Virginie. Esangisaki masangá oyo ezali na Caroline du Nord, na Kentucky, mpe na Virginie occidentale. Nazalaki kaka kokende kotala masangá oyo basangani na yango bazalaki baindo, mpo, na ntango wana, bokabwani ezalaki naino kati ya mindɛlɛ ná baindo, yango wana baindo bakokaki te kosangana esika moko ná mindɛlɛ. Bandeko bazalaki na biloko mingi te ya mosuni, mpe toyekolaki kokabola biloko oyo tozalaki na yango na baoyo bazalaki na bosɛnga. Ndeko moko oyo aumelaki na mosala ya mokɛngɛli ateyaki ngai likambo moko ya ntina mingi, alobaki boye: “Zalá ndeko. Kokende te na lisangá lokola patrɔ. Okoki kosalisa bandeko soki bazali kotalela yo lokola ndeko na bango.”

Ntango tokendaki kotala lisangá moko ya moke, Ruby abandaki koyekola Biblia na elenge mwasi moko ya mbula 17 oyo azalaki na mwana mwasi moko ya mbula moko. Soki moto moko te na lisangá azalaki na likoki ya kotambwisa boyekoli na ye, Ruby azalaki kotambwisa boyekoli yango na nzela ya kokoma mikanda. Na viziti na biso oyo elandaki, mwasi yango abandaki koyangana na makita nyonso. Ntango bandeko basi mibale oyo bazalaki babongisi-nzela monene bakómaki wana, bakobaki koyekola na ye Biblia, mpe eumelaki te azwaki batisimo. Mbula soki 30 na nsima na mobu 1995, na Betele ya Patterson, elenge mwasi moko ayebisaki Ruby nkombo na ye. Ezalaki elenge mwasi ya mwasi oyo Ruby ayekolaki na ye Biblia. Elenge mwasi yango ná mobali na ye bazalaki bana-kelasi ya mbala ya 100 na eteyelo ya Gileade.

Zongazonga na biso ya mibale ezalaki na katikati ya etúká ya Floride. Na ntango wana, tozalaki na mposa ya motuka, yango wana tosombaki motuka moko mpe na ntalo moko kitoko. Kasi, na pɔsɔ ya liboso, eloko moko na kati ya motɛrɛ ebebaki. Tozalaki na mbongo te mpo na kobongisa yango. Nabengaki ndeko mobali moko oyo nakanisaki akoki kosalisa biso. Ndeko yango asɛngaki moko ya basali na ye abongisa motuka na biso. Na nsima, ndeko yango alingaki te tófuta ye mbongo ya kobongisa motuka. Alobaki kaka boye: “Osengeli kofuta ngai te.” Kutu apesaki biso mwa mbongo lokola likabo! Ezalaki ndakisa malamu mpo na komonisa ndenge Yehova akokisaka bamposa ya basaleli na ye. Ekundwelaki biso mpe tókabelaka basusu.

Ntango nyonso oyo tozalaki kokende kotala lisangá moko, tozalaki kofanda na bandako ya bandeko. Yango wana, tosalaki boninga ya malamu elongo na bandeko mingi. Mokolo moko, nabandaki kokoma lapolo etali lisangá moko mpe natikaki yango na masini na ngai ya kokoma mikanda. Ntango nazongaki na mpokwa yango, nayaki koyeba ete mwana mobali moko ya mbula misato epai tozalaki kofanda afinaki butɔ ya masini mpe esalaki ete lapolo na ngai ebeba. Yango wana nasengelaki kobandela kokoma lisusu lapolo yango. Nazalaki kotumola ye mpo na yango na boumeli ya bambula mingi.

Na mobu 1971, nazwaki mokanda oyo emonisaki ete nakómi mokɛngɛli ya etúká na engumba New York. Tokamwaki! Ntango tokendaki kuna, nazalaki kaka na mbula 34. Bandeko bayambaki ngai malamu mpenza, lokola mokɛngɛli ya etúká na bango ya liboso ya moindo.

Lokola nazalaki mokɛngɛli ya etúká, nazalaki kosepela koteya makambo etali Yehova mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo nyonso na liyangani ya zongazonga. Bakɛngɛli ya zongazonga mingi bayebaki makambo mingi koleka ngai. Na kati na bango, nakoki kotánga ndeko oyo asalaki diskur ya batisimo na ngai mpe ndeko mosusu, Theodore Jaracz, oyo na nsima akómaki ndeko na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ezalaki mpe na bandeko mingi oyo bayebaki makambo mingi oyo bazalaki kosala na Betele ya Brooklyn. Nazalaki mpenza na botɔndi ndenge bakɛngɛli ya zongazonga mpe bandeko ya Betele basalaki ete namiyoka malamu. Ngai moko namonaki ete bazalaki babateli ya mpate ya bolingo oyo bazalaki kotyela Liloba ya Nzambe motema mpe bazalaki kopesa ebongiseli ya Nzambe mabɔkɔ na motema moko mpenza. Komikitisa na bango esalaki ete nasala lokola mokɛngɛli ya etúká kozanga mindɔndɔ.

NAZONGAKI LISUSU MOKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA

Na mobu 1974, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponaki etuluku mosusu ya bakɛngɛli ya zongazonga mpo na kosala lokola bakɛngɛli ya etúká, mpe nazongaki lisusu mokɛngɛli ya zongazonga na Caroline du Sud. Likambo ya esengo, na ntango wana, masangá ya mindɛlɛ mpe ya baindo esanganaki lisusu esika moko mpo bokabwani kati na baindo ná mindɛlɛ esilaki mpe yango esepelisaki bandeko mingi mpenza.

Na nsuka ya mobu 1976, batindaki ngai mokɛngɛli ya zongazonga na Georgie kati ya Atlanta ná Columbus. Nazali komikundwela ntango nasalaki diskur ya kokunda ebembe ya bana baindo mitano oyo bakufaki ntango bɔmbi ekweaki na ndako na bango. Mama na bango azalaki na lopitalo mpo azokaki makasi. Bandeko mingi ya baindo mpe mindɛlɛ bazalaki koya na lopitalo mpo na kobɔndisa baboti na bango. Namonaki ete bolingo ya bandeko ezalaki komonana polele. Komonisa motema mawa ya bongo ekoki kosalisa basaleli ya Nzambe báyika mpiko na mikakatano ya makasi mpenza.

NAYEKOLAKI MPE NATEYAKI MAKAMBO MINGI NA BETELE

Na mobu 1977, basɛngaki biso tóya na Betele ya Brooklyn mpo na mwa basanza mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala moko. Ntango mosala yango elingaki kosila, bandeko mibale ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bayaki kokutana na ngai mpe kotuna soki ngai ná Ruby tokosepela kosala libela na Betele. Tondimaki likanisi yango.

Na boumeli ya bambula 24, nasalaki na Departema ya mosala, epai bandeko bakutanaka ntango nyonso na mituna oyo ezalaka mpasi mpe mindɔndɔ. Na boumeli ya bambula mingi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesaka malako na boyokani na mitinda ya Biblia. Yango esalelamaka lokola moboko mpo na koyanola na mituna, kasi yango ezalaka mpe moboko mpo na kopesa bakɛngɛli ya zongazonga, bankulutu, mpe babongisi-nzela formasyo. Mateya yango esalisaka bato mingi bákola na elimo. Longola yango, ekómisaka ebongiseli ya Yehova makasi.

Kobanda na mobu 1995 tii 2018, nazalaki kokende kotala babiro ya filiale ndenge na ndenge lokola momonisi ya biro monene, oyo kala bazalaki kobengama mokɛngɛli ya zone. Nazalaki kosala likita na bandeko ya Komite ya filiale, bandeko ya Betele, bamisionɛrɛ mpo na kolendisa bango mpe kosalisa bango na mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango. Longola yango, ngai ná Ruby tozalaki ntango nyonso kolendisama ntango bandeko bazalaki kobɛtela biso masolo ya makambo oyo bakutanaki na yango. Na ndakisa, tokendaki kotala Rwanda na mobu 2000. Ntango bazalaki koyebisa biso ndenge bandeko mpe libota ya Betele babikaki na ntango ya kobomana oyo esalemaki na mobu 1994, esimbaki mpenza mitema na biso. Bato mingi babungisaki bato oyo bazalaki kolinga na liwa. Longola makambo oyo bayikelaki mpiko, bandeko yango bamonisaki kondima, elikya mpe esengo.

Mbula 50 nsima ya libala na biso

Sikoyo tozali na mbula koleka 80. Na boumeli ya bambula 20 oyo eleki, nazali kosala na Komite ya filiale ya États-Unis. Nazwá te diplome moko ya iniversite; kasi, nazwi mateya ya malamu epai ya Yehova mpe ebongiseli na ye. Yango ebongisi ngai mpo nateya basusu mateya ya Biblia oyo ekoki kopesa bango matomba mpo na libela. (2 Ko. 3:5; 2 Tim. 2:2) Nazali komona ndenge nsango ya Biblia ezali kosalisa bato bábongola bomoi na bango mpe bákolisa boyokani na bango ná Mozalisi na bango. (Yak. 4:8) Ntango nyonso tokoki, ngai ná Ruby tokokoba kolendisa basusu básepela na libaku ya koyekola makambo etali Yehova mpe koteya basusu mateya ya solo, elingi koloba, kosalela libaku monene oyo bazali na yango ya kosalela Yehova.