LISOLO YA BOYEKOLI 39
Nkombo na yo ezali na “buku ya bomoi”?
“Buku ya kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo babangaka Yehova.”—MAL. 3:16.
LOYEMBO 61 Batatoli, bókende liboso!
NA MOKUSE a
1. Na kotalela Malaki 3:16, buku nini Yehova akomaka, mpe akomaka nini na kati?
NA BOUMELI ya bankóto ya bambula, Yehova akomaka buku moko oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso. Buku yango ezali na bankombo ya bato, ebandi na nkombo ya motatoli ya sembo ya liboso ya Yehova, Abele. b (Luka 11:50, 51) Banda wana, Yehova abakisaka bankombo ya bato na buku yango, mpe lelo oyo ezali na bamilio ya bankombo. Na Biblia, buku yango ebengamaka “buku ya kokanisama,” “buku ya bomoi,” mpe “rulo ya bomoi.” Na lisolo oyo, tokosalela maloba “buku ya bomoi” mpo na kolobela buku yango.—Tángá Malaki 3:16; Em. 3:5; 17:8.
2. (a) Banani bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi? (b) Tokoki kosala nini mpo bankombo na biso ekomama na buku yango?
2 Buku yango oyo ekeseni na babuku mosusu nyonso ezali na bankombo ya baoyo nyonso basambelaka Yehova na kobanga to na limemya makasi mpe bazwaka nkombo na ye na motuya mpenza. Bazali na kati ya bato oyo bakozwa bomoi ya seko. Lelo oyo, bankombo na biso ekoki kokomama na buku yango, soki tozali kosala makasi tópusana lisusu penepene na Yehova na boyokani na mbeka ya lisiko ya Mwana na ye, Yesu Kristo. (Yoa. 3:16, 36) Biso nyonso tolingaka ete bankombo na biso ekomama na buku yango, ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele!
3-4. (a) Tokozala na bomoi libela soki bankombo na biso ekomami sikoyo na buku ya bomoi? Limbolá. (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe oyo elandi?
3 Yango elingi koloba nde ete baoyo nyonso bankombo na bango ekomami na buku yango bazali na ndanga ya kozala na bomoi ya seko? Eyano na motuna yango ezali na maloba oyo Yehova ayebisaki Moize na Kobima 32:33. Alobaki na ye boye: “Moto oyo asaleli ngai lisumu, nakolongola ye na buku na ngai.” Na yango, bankombo oyo ezali sikoyo na buku yango ekoki kobomama to kolongolama, lokola nde Yehova akomaka yango na krɛyo. (Em. 3:5) Tosengeli kosala makasi mpo bankombo na biso etikala na buku yango libela, lokola nde ekomami na mai ya mikanda oyo elongolamaka te.
4 Yango ebimisi mwa mituna. Na ndakisa, Biblia elobi nini mpo na baoyo bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi mpe baoyo bankombo na bango ekomami te na buku yango? Ntango nini baoyo bankombo na bango ezali na buku yango bakozwa bomoi ya seko? Bongo ezali boni mpo na baoyo bakufaki kozanga ete bázwa libaku ya koyeba Yehova? Ekoki kosalema ete bankombo na bango ekomama na buku yango? Lisolo oyo mpe oyo elandi ekoyanola na mituna yango.
BANANI BANKOMBO NA BANGO EZALI NA BUKU YANGO?
5-6. (a) Ndenge Bafilipi 4:3 emonisi yango, banani mosusu bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi? (b) Ntango nini bankombo na bango ekokomama mpo na libela na buku ya bomoi?
5 Banani bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tokotalela bituluku mitano ya bato. Na kati na bango, basusu bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi, mpe basusu bankombo na bango ekomami te.
6 Etuluku ya liboso esalemi na baoyo baponami mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló. Bankombo na bango ekomami sikoyo na buku ya bomoi? Ɛɛ. Na kotalela maloba ya ntoma Paulo epai ya ‘baninga na ye ya mosala’ na Filipi, bankombo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, baoyo bazwi libyangi ya koyangela elongo na Yesu, ezali sikoyo na buku ya bomoi. (Tángá Bafilipi 4:3.) Kasi mpo bankombo na bango etikala libela na buku ya bomoi, basengeli kotikala sembo. Na yango, nsima ya kozwa elembo ya nsuka, bankombo na bango ekomamaka mpo na libela na buku yango. Yango esalemaka liboso bákufa to ekosalema liboso bolɔzi monene ebanda.—Em. 7:3.
7. Ndenge nini Emoniseli 7:16, 17 esalisi biso tóyeba ntango oyo bankombo ya ebele mpenza ya bato oyo bazali na kati ya bampate mosusu ekokomama mpo na libela na buku ya bomoi?
7 Etuluku ya mibale esalemi na ebele mpenza ya bato oyo bazali na kati ya bampate mosusu. Bankombo na bango ekomami sikoyo na buku ya bomoi? Ɛɛ. Bankombo na bango ekozala kaka na buku ya bomoi nsima ya kobika na Armagedone? Ɛɛ. (Em. 7:14) Yesu alobaki ete baoyo bazali bampate “bakozwa bomoi ya seko.” (Mat. 25:46) Kasi baoyo bakobika nsima ya Armagedone bakozwa mbala moko te bomoi ya seko. Bankombo na bango ekotikala na buku ya bomoi na krɛyo, ndenge ezalaki liboso. Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu “akomema bango na maziba ya mai ya bomoi.” Baoyo bakondima litambwisi ya Kristo mpe nsukansuka bakotikala sembo epai ya Yehova, bankombo na bango ekokomama mpo na libela na buku ya bomoi.—Tángá Emoniseli 7:16, 17.
8. Banani bankombo na bango ekomami te na buku ya bomoi, mpe nini ekokómela bango?
8 Etuluku ya misato esalemi na bantaba, baoyo bakobomama na Armagedone. Bankombo na bango ezali te na buku ya bomoi. Yesu alobi ete “bakokufa liwa ya seko.” (Mat. 25:46) Na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe, Paulo ayebisi biso ete “bato yango mpenza bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.” (2 Tes. 1:9; 2 Pe. 2:9) Ekozala mpe bongo mpo na baoyo, banda kala, bazalaki kosalela elimo santu lisumu na nko. Bango mpe bakozwa libebi ya seko, kasi bomoi ya seko te. Emonani polele ete bakosekwa te. (Mat. 12:32; Mrk. 3:28, 29; Ebr. 6:4-6) Na yango, tótya sikoyo likebi na bituluku mibale ya bato oyo bakosekwa awa na mabele.
BATO OYO BAKOSEKWA
9. (a) Ndenge Misala 24:15 emonisi yango, bituluku nini mibale ya bato bakosekwa awa na mabele? (b) Nini ezali kokesenisa bituluku yango mibale?
9 Biblia elobeli bituluku mibale ya bato oyo bakosekwa na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele, “bayengebene” mpe “bato oyo bazangi boyengebene.” (Tángá Misala 24:15.) “Bayengebene” ezali baoyo basalelaki Yehova na bosembo mpenza ntango bazalaki na bomoi. Nzokande, “bato oyo bazangi boyengebene” basalelaki Yehova te liboso bákufa. Kutu, mbala mingi bazalaki na etamboli ya malamu te. Lokola bituluku yango mibale ya bato bakosekwa, tokoki koloba ete bankombo na bango ekomami na buku ya bomoi? Mpo tózwa eyano na motuna yango, tiká tótalela etuluku mokomoko.
10. (a) Mpo na nini “bayengebene” bakosekwa? (b) Libaku nini basusu kati na bango bakozwa? (Talá mpe na nimero oyo lisolo “Mituna ya batángi” oyo elobeli lisekwa awa na mabele.)
10 “Bayengebene” bazali etuluku ya minei. Liboso bákufa, bankombo na bango ekomamaki na buku ya bomoi. Bankombo na bango elongolamaki na buku yango ntango bakufaki? Te, mpamba te bazali kaka na “bomoi” na makanisi ya Yehova. Yehova “azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:38) Yango elingi koloba ete ntango bayengebene bakosekwa awa na mabele, bankombo na bango ekozala na buku ya bomoi, atako ekomamaki na “krɛyo” na ebandeli. (Luka 14:14) Na ntembe te, basusu kati na bango bakozala na libaku ya kozala “bankumu na mabele mobimba.”—Nz. 45:16.
11. “Bato oyo bazangi boyengebene” bakozala na mposa ya koyekola makambo nini liboso bankombo na bango ekomama na buku ya bomoi?
11 Mpo na kosukisa, tótalela etuluku ya mitano, elingi koloba, “bato oyo bazangi boyengebene.” Mbala mosusu lokola bayebaki te mibeko ya Yehova, bazalaki na bomoi oyo eyokani te na mibeko ya sembo ya Yehova liboso bákufa. Yango wana, bankombo na bango ekomamaki te na buku ya bomoi. Kasi ntango Nzambe akosekwisa bango, akopesa bango libaku mpo bankombo na bango ekomama na buku yango. “Bato [yango] oyo bazangi boyengebene” bakozala na mposa ete básalisa bango mingi mpenza. Na bomoi na bango ya kala, basusu kati na bango basalaki makambo ya nsɔmɔ, makambo ya mabe mpenza. Yango wana, bakozala na mposa ete báteya bango lolenge ya bomoi oyo eyokani na mibeko ya sembo ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. Mpo na koteya bango, Bokonzi ya Nzambe ekotya programɛ moko monene ya mateya oyo esalemá naino te na lisolo ya bato.
12. (a) Banani bakoteya bato oyo bazangi boyengebene? (b) Nini ekokómela baoyo bakoboya kosalela makambo oyo bakoyekola?
12 Banani bakoteya bato oyo bazangi boyengebene? Ebele mpenza ya bato mpe bayengebene oyo bakosekwa. Mpo bankombo ya bato oyo bazangi boyengebene ekomama na buku ya bomoi, bakozala na mposa ya kokómisa makasi boyokani na bango ná Yehova mpe ya komipesa epai na ye. Yesu Kristo mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo nde bakolandela malamumalamu uta likoló soki bato yango oyo bazangi boyengebene bakosalela to te makambo oyo bakoteya bango. (Em. 20:4) Moto nyonso oyo akoboya na nko makambo oyo bazali koteya ye akobomama, elingi koloba, ata soki akómi na mbula 100. (Yis. 65:20) Yehova ná Yesu batángaka mitema mpe bakotikela moto moko te nzela ya kobebisa mokili ya sika.—Yis. 11:9; 60:18; 65:25; Yoa. 2:25.
LISEKWA MPO NA BOMOI MPE MPO NA KOSAMBISAMA
13-14. (a) Kala, ndenge nini tozalaki kolimbola maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 5:29? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te mpo na maloba yango?
13 Yesu alobelaki mpe baoyo bakosekwa awa na mabele. Na ndakisa, alobaki boye: “Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi, baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.” (Yoa. 5:28, 29) Yesu alingaki koloba nini?
14 Kala, tozalaki kolimbola ete maloba wana ya Yesu ezalaki kolobela makambo oyo baoyo bakosekwa bakosala nsima ya lisekwa na bango; elingi koloba, basusu bakozonga na bomoi mpe bakosala makambo ya malamu wana basusu bakozonga na bomoi mpe bakosala makambo ya mabe. Kasi, tóbosana te ete Yesu alobaki te ete baoyo bakobima na lilita ya kokanisama bakosala makambo ya malamu to bakosala makambo ya mabe. Asalelaki liloba oyo emonisi ntango oyo esili koleka. Alobeli baoyo “basalaki makambo ya malamu” mpe baoyo “bazalaki kosala makambo ya mabe.” Yango emonisi ete makambo oyo basalaki esilaki kosalema liboso ya liwa na bango. Ezali mpenza polele, boye te? Ezali polele mpo bakopesa moto moko te nzela ya kosala makambo ya mabe na mokili ya sika. Bato oyo bazangi boyengebene bazalaki kosala makambo ya mabe liboso ya liwa na bango. Kasi, ndenge nini tosengeli kokanga ntina ya maloba ya Yesu na oyo etali “lisekwa ya bomoi” mpe “lisekwa ya kosambisama”?
15. Banani bakozwa “lisekwa ya bomoi,” mpe mpo na nini?
15 Bayengebene, oyo basalaki makambo ya malamu liboso ya liwa na bango, bakozwa “lisekwa ya bomoi” mpo bankombo na bango ekosila kokomama na buku ya bomoi. Elingi koloba ete lisekwa ya “baoyo basalaki makambo ya malamu” oyo Yoane 5:29 elobeli ekokani na lisekwa ya “bayengebene” oyo Misala 24:15 elobeli. Ndimbola oyo eyokani na maloba oyo ezwami na Baroma 6:7, oyo elobi: “Moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.” Yango wana, ntango bayengebene yango bakufaki, Yehova abosanaki masumu na bango, kasi akobosana te makambo nyonso ya boyengebene oyo basalaki ntango bazalaki na bomoi. (Ebr. 6:10) Na ntembe te, bayengebene oyo bakosekwa basengeli kotikala sembo mpo bankombo na bango etikala na buku ya bomoi.
16. “Lisekwa ya kosambisama” ezali kolobela banani?
16 Kasi ezali boni mpo na baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe liboso bákufa? Atako masumu na bango elongolamaki ntango bakufaki, basalaki makambo ya sembo te ntango bazalaki na bomoi. Bankombo na bango ekomami te na buku ya bomoi. Na yango, lisekwa ya “baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe” ekokani na lisekwa ya “bato oyo bazangi boyengebene” oyo Misala 24:15 elobeli. Lisekwa na bango ekozala “lisekwa ya kosambisama.” c Bato yango oyo bazangi boyengebene bakosambisama na ndenge ete Yesu akotalela bango malamumalamu. (Luka 22:30) Ekozwa ntango mpo na koyeba soki ebongi ete bankombo na bango ekomama to te na buku ya bomoi. Soki kaka bato yango oyo bazangi boyengebene batiki makambo mabe oyo bazalaki kosala kala mpe bamipesi epai ya Yehova nde bankombo na bango ekokomama na buku ya bomoi.
17-18. (a) Bato nyonso oyo bakosekwa awa na mabele basengeli kosala nini? (b) Emoniseli 20:12, 13 elobeli “misala” nini?
17 Ata soki kala bazalaki bayengebene to bato oyo bazangi boyengebene, bato oyo bakosekwa basengeli kotosa mibeko oyo ekozala na barulo ya sika oyo ekofungwama na boumeli ya mbula 1000. Ntoma Yoane alimboli makambo oyo amonaki na emonaneli boye: “Namonaki bakufi, bato minene ná bato mike, batɛlɛmi liboso ya kiti yango ya bokonzi, mpe barulo efungwamaki. Kasi rulo mosusu efungwamaki; ezali rulo ya bomoi. Mpe bakufi basambisamaki na makambo oyo ekomamá na barulo yango na kolanda misala na bango.”—Em. 20:12, 13.
18 Bato oyo bakosekwa bakosambisama na kolanda “misala” nini? Bakosambisama mpo na makambo oyo bazalaki kosala liboso bákufa? Te! Kobosana te ete masumu na bango ya kala esilaki kofutama ntango bakufaki. Kasi, sikoyo, “misala na bango” ekoki te kozala makambo ya kala oyo bazalaki kosala liboso bákufa. Yango wana, bakomonisa misala na bango na makambo oyo bakosala na kotalela mateya oyo bakozwa na mokili ya sika. Ekosɛnga mpe bato ya sembo lokola Noa, Samwele, Davidi, mpe Danyele báyekola makambo etali Yesu Kristo mpe bámonisa kondima na mbeka na ye. Soki bato yango ya sembo bakozala na makambo ebele ya koyekola, ekozala boni mpo na bato oyo bazangi boyengebene?
19. Nini ekokómela baoyo bakoboya libaku malamu oyo bakozwa?
19 Nini ekokómela baoyo bakoboya libaku malamu oyo bakozwa? Emoniseli 20:15 eyebisi biso boye: “Moto nyonso oyo amonanaki ete akomami na buku ya bomoi te abwakamaki na laki yango ya mɔtɔ.” Na ntembe te, bakobomama mpo na libela. Yango wana, ezali mpenza na ntina tósala makasi mpo bankombo na biso ekomama na buku ya bomoi mpe etikala kuna libela!
20. Mosala nini ya ntina mingi ekosalema na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? (Talá elilingi ya ezipeli.)
20 Ekozala ntango moko ya esengo na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto! Ekozala mpe na programɛ moko monene ya mateya oyo esalemá naino te awa na mabele. Kasi ekozala mpe ntango oyo misala ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene ekotalelama. (Yis. 26:9; Mis. 17:31) Ndenge nini programɛ yango ya mateya ekosalema? Lisolo oyo elandi ekosalisa biso tóyeba mpe tózala na botɔndi mpo na ebongiseli wana ya kitoko.
LOYEMBO 147 Nzambe alaki biso bomoi ya seko
a Lisolo oyo esemboli boyebi na biso na makambo oyo Yesu alobaki na Yoane 5:28, 29 na oyo etali “lisekwa ya bomoi” mpe “lisekwa ya kosambisama.” Tokomona soki lisekwa yango mibale ezali kolobela nini mpe banani nde bakosekwa.
b Kokomama ya buku yango ebandaki “banda mokili ebandá,” elingi koloba, bato oyo bazali na libaku ya kolimbisama masumu na bango na nzela ya lisiko ya mbeka ya Yesu. (Mat. 25:34; Em. 17:8) Yango wana, Abele akoki kozala moto ya sembo ya liboso oyo nkombo na ye ekomami na buku ya bomoi.
c Kala, tozalaki kolimbola ete liloba “kosambisama” oyo esalelami awa elimboli ekateli ya mabe ya lisambisi to lisambisi ya etumbu, to kokweisama. Ya solo, liloba “kosambisama” ekoki kozala na ndimbola wana. Kasi na kotalela lisolo oyo, emonani ete Yesu asalelaki liloba “kosambisama” mpo na kolobela makambo mingi, azalaki kolobela ndenge oyo balandelaka moto malamumalamu to komeka ye, to ndenge liloba moko ya Grɛki elobi, “kotalela bizaleli ya moto malamumalamu.”