Mituna ya batángi
Ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango amibengaki “mwana oyo abotami matsombe”? (1 Bakorinti 15:8)
ANa kotalela 1 Bakorinti 15:8, Paulo alobaki boye: “Na nsuka mpenza abimelaki mpe ngai lokola nde epai ya mwana oyo abotami matsombe.” Kala, tozalaki kolimbola ete mbala mosusu Paulo azalaki kolobela likambo oyo ye moko akutanaki na yango ntango azwaki emonaneli ya Yesu kuna na likoló. Ezalaki lokola nde azwi lokumu ya kobotama, to kosekwa, na bomoi ya elimo liboso ya elaka, bankama ya bambula liboso lolenge ya lisekwa yango esalema. Kasi, nsima ya koyekola lisusu vɛrsɛ yango na likebi emonani malamu ete ezali na ntina tósembola ndenge na biso ya kolimbola vɛrsɛ yango.
Ezali solo ete awa Paulo azali kolobela likambo oyo esalemaki liboso akóma mokristo. Kasi alingaki koloba nini ntango alobaki ete azalaki “mwana oyo abotami matsombe”? Ezali mpo na bantina mingi.
Akómaki mokristo na mbalakaka mpe na ndenge ya nsɔmɔ. Mbala mingi, mwana oyo abotami matsombe abimaka pwasa. Lokola Saulo (oyo na nsima akómaki kobengama Paulo) asalaki mobembo tii na Damasi mpo na kokende konyokola bakristo oyo bazalaki kuna, akanisaki te ete akomona emonaneli ya Yesu oyo asekwaki. Ndenge oyo Paulo akómaki mokristo na ndenge ya pwasa ekamwisaki kaka ye moko te, kasi mpe bakristo oyo azalaki kokana konyokola na engumba yango. Lisusu, likambo yango ya nsɔmɔ mpenza esalaki ete abungisa likoki na ye ya komona mpo na mwa ntango.—Mis. 9:1-9, 17-19.
Akómaki mokristo “na ntango oyo ebongaki te.” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mwana oyo abotami matsombe” ekoki mpe kobongolama na “mwana oyo abotami na ntango oyo ebongi te.” Biblia ya Haut-Fleuve ebongoli yango boye: “Lokola na oyo abotami na elaka mabe.” Ntango Paulo akómaki mokristo, Yesu asilaki kozonga na likoló. Na kokesana na bato oyo alobelaki na bavɛrsɛ oyo ezali likoló, Paulo amonaki te Yesu oyo asekwaki ntango amataki na likoló. (1 Ko. 15:4-8) Ntango Yesu abimelaki ye na pwasa epesaki ye libaku ya komona Yesu nsima ya lisekwa na ye, atako emonanaki ete ezalaki na “ntango oyo ebongaki te.”
Azalaki komilobela kozanga ete abenda likebi epai na ye moko. Na kotalela bato mosusu ya mayele na makambo ya Biblia, liloba oyo Paulo asaleli awa ekoki kopesa makanisi ete azalaki komityola. Soki yango nde likambo oyo Paulo azalaki kokanisa, na yango ayebaki ete libaku oyo azwaki ebongaki na ye te. Yango wana, alobaki boye: “Ngai nazali moto oyo aleki moke mpenza na kati ya bantoma, mpe nabongi kutu te kobengama ntoma, mpamba te nanyokolaki lisangá ya Nzambe. Kasi mpo na boboto monene ya Nzambe, nazali ndenge nazali.”—1 Ko. 15:9, 10.
Na yango, emonani ete Paulo akokaki kolobela ndenge oyo Yesu abimelaki ye na mbalakaka mpe na ndenge ya nsɔmɔ, ndenge oyo akómaki mokristo na ntango oyo ebongaki te, to na ndenge ya elimo abongaki te kozwa libaku ya komona emonaneli wana ya kokamwa. Ezala ndenge nini, ezali polele ete Paulo azwaki na motuya mingi likambo oyo akutanaki na yango. Yango endimisaki ye mbala moko ete Yesu asekwaki uta na bakufi. Tokoki kokamwa te ndenge azalaki ntango nyonso kolobela likambo yango oyo akanaki te ntango azalaki koteya basusu likambo etali lisekwa ya Yesu.—Mis. 22:6-11; 26:13-18.