Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Azwi ntina kati na bomoi

Azwi ntina kati na bomoi

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

Azwi ntina kati na bomoi

YESU alobi ete ayebi bampate na ye. (Yoane 10:14) Soki moto moko azali na motema malamu mpe alingi kimya mpe boyengebene, moto yango akobendama epai na bayekoli na Yesu. Moto motindo yango akozwa ntina kati na bomoi, lokola esalemaki mpo na mwasi moko na Belgique. Tala lisoló na ye:

“Ntango ba Témoins de Jéhovah babetaki na ekuke na ngai, nazalaki konyokwama na makanisi mpe nazalaki kokana komiboma. Nasepelaki na makambo Batemwe bazalaki koloba na ntina ya kosilisama ya mikakatano ya mokili oyo ya maladi, kasi nasepelaki te na likanisi oyo ete Nzambe azali na likambo ya kosala mpo na yango. Natikaki kokende ndakonzambe esili koleka mibu mwambe, mpamba te nazalaki koboya bokosi oyo namonaki kuna. Nzokande, elongo na Batemwe, nasosolaki solo kati na makambo bazalaki koloba mpe nakangaki ngai moko ntina ete ezali mpasi kozala na bomoi kozanga Nzambe.

“Na mawa nyonso, nsima na mwa bozongeli, nazalaki lisusu kokutana na Batemwe te. Nazalaki na mawa. Nakómaki komela mibɔmbɔ́ (paquets) mibale ya makaya na mokolo moko, mpe namipesaki na drogue. Lokola nalingaki kosolola elongo na nkoko na ngai ya mobali oyo asilaki kokufa, namibalolaki epai na misala ya bilimu mabe. Nazalaki na nsomo, wana na butu nazalaki ngai moko kotungisama na bilimu mabe. Kotungisama yango eumelaki basanza mingi. Na mpokwa nyonso, nazalaki na nsomo, wana nazalaki kokanisa ete nazali ngai moko.

“Bongo, mokolo moko nakendeki kotambola, nazwaki nzela mosusu oyo nameseneki kotambola na yango te, mpe nakómaki na esika ya botóngi ndako moko monene. Nakamwaki mingi komona ebele ya bato na esika yango. Ntango nabelemaki, namonaki ete ezalaki ba Témoins de Jéhovah nde bazalaki kotónga Salle du Royaume. Namikundolaki bokutani oyo nazalaki na yango na ndako elongo na Batemwe, mpe nakanisaki ete esengelaki solo kozala esengo monene soki bato nyonso bakokaki kozala na bomoi lokola bango.

“Nayokaki mpenza mposa ete Batemwe baya na ndako na ngai, yango wana nasololaki na basusu kati na baoyo bazalaki kosala na salle. Nabondelaki Nzambe, mpe nsima na mikolo zomi mobali oyo ayaki liboso kosolola na ngai ayaki na ndako na ngai. Asengaki ete tolanda boyekoli ya Biblia, mpe nandimaki na esengo nyonso. Bobele na mbala wana, abyangaki ngai nakende na makita na Salle du Royaume. Nandimaki kokende. Namonaki naino likambo ya boye te! Nalukaki banda kala bato oyo balingani bamoko na basusu mpe oyo bazali na esengo. Na nsuka namonaki bango!

“Na nsima, nakómaki kokende na makita nyonso. Nsima na baposo soko misato, natikaki momeseno mabe ya komela makaya. Nabwakaki mikanda na ngai ya boyekoli ya minzoto mpe bakasete ya miziki ya Satana, mpe nayokaki ete bilimu mabe babandaki kobungisa bopusi na bango likoló na ngai. Nayokanisaki bomoi na ngai na mitinda ya Jéhovah oyo ezali kati na Biblia, mpe nsima ya sanza misato, nabandaki kosakola nsango malamu. Nsima ya sanza motoba nazwaki batisimo. Mikolo mibale nsima ya batisimo na ngai, nabandaki mosala ya pionnier auxiliaire.

“Nazali kotɔnda Jéhovah mpo na makambo malamu nyonso oyo asili kosala mpo na ngai. Sikawa bomoi na ngai ezali solo na ntina. Ya solo, nkombo ya Jéhovah ezali ndako molai oyo kati na yango nakimaki mpe nazwaki ebombamelo mpe libateli. (Masese 18:10) Nazali mpenza na mayoki motindo moko na mokomi na Nzembo, oyo akomaki na Nzembo 84:10 ete: ‘Mokolo moko kati na lopango na yo eleki malamu kolekisa mikolo nkóto epai mosusu. Naponi kobatela ekuke na ndako ya Nzambe na ngai, na esika ya kofanda na hema ya bato mabe.’”

Mwasi wana ya motema mosokemi asili kozwa ntina kati na bomoi. Ekozala mpe bongo mpo na bato nyonso oyo bazali koluka Jéhovah na motema malamu.