Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baklisto mpe mokili ya ntango na biso

Baklisto mpe mokili ya ntango na biso

Baklisto mpe mokili ya ntango na biso

“Mabota nyonso makoyina bino mpo na nkombo na ngai.”​—MATAI 24:9.

1. Elembo nini ezalaki kokesenisa boklisto ya solo?

 KOMIKABOLA na mokili ezalaki elembo oyo ekesenisaki baklisto ya liboso. Kati na libondeli epai na Jéhovah, Tata na ye ya likoló, Klisto alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Ngai napesi bango liloba na yo, kasi bamokili basili koyina bango mpo bazali bato na mokili te, lokola ngai nazali moto na mokili te.” (Yoane 17:14) Ntango bamemaki ye liboso na Ponti Pilato, Yesu ayebisaki ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Komikabola ya boklisto ya liboso na mokili endimisami na Makomami ya Greke ya boklisto mpe na bakomi ya makambo ya kala.

2. (a) Mbongwana esengelaki nde kosalema nsima na ntango kati na boyokani ya bayekoli na Yesu elongo na mokili? (b) Bokonzi ya Yesu esengelaki koya nde na nzela ya kobongwana ya mabota?

2 Yesu alobaki na nsima ete mbongwana esengelaki kosalema kati na boyokani ya bayekoli na ye mpe mokili, mpe ete Bokonzi na ye esengelaki koya na nzela ya kobongwana ya mokili kati na boklisto ya solo? Ezali bongo te. Likambo moko te oyo bayekoli na Yesu bapemamaki bakomaki nsima na liwa na ye, epesi ata likanisi yango. (Yakobo 4:4 [ekomamaki mwa moke liboso ya mobu 62 T.B.]; 1 Yoane 2:15-17; 5:19 [ekomamaki soko na mobu 98 T.B.]) Na bokeseni, Biblia ekangisi “kozala” ya Yesu mpe na nsima “koya” na ye kati na nguya ya Bokonzi elongo na “nsuka ya biloko mabe ya ntango oyo,” oyo kokokana na yango monene ekozala “nsuka,” to kobebisama na yango. (Matai 24:3, 14, 29, 30; Danyele 2:44; 7:13, 14) Kati na elembo oyo Yesu apesaki mpo na pa·rou·siʹa, to kozala na ye, alobaki na bayekoli na ye ya solo ete: “Bongo, bakobimisa bino mpo na minyoko mpe bakoboma bino; mabota nyonso makoyina bino mpo na nkombo na ngai.”​—Matai 24:9.

Baklisto ya solo na mikolo na biso

3, 4. (a) Lolenge nini mokanda moko ya Katolike elobelaki baklisto ya liboso? (b) Na maloba nini makokani, ba Témoins de Jéhovah mpe baklisto ya liboso balobelami?

3 Lingomba nini lisili lelo oyo kozwa lokumu ya kobatela na bosembo nyonso mitinda ya boklisto mpe ya komikabola na mokili, oyo basangani na yango bayinami mpe banyokolami? Lisangá nini ya boklisto na mokili mobimba ekokani na makambo nyonso malobelami na lisoló ya makambo ya kala na ntina na baklisto ya liboso? Na likambo yango, mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (na Lingelesi) eyebisi ete: “Etuluku ya baklisto ya liboso, atako etalelamaki liboso lokola moko na lingomba ya Bayuda, ekokanaki te na mangomba mosusu mpo na mateya na yango, mpe mingi koleka kati na molende ya basangani na yango, baoyo bazalaki batatoli na Klisto ‘na Yuda mobimba, na Samaria mpe ata kino na nsuka ya mabelé’ (Misala 1.8).”​—Volume 3, lokasa 694.

4 Tala maloba “etalelamaki . . . lokola lingomba mosusu,” “ekokanaki te na mangomba mosusu mpo na mateya na yango,” mpe “molende ya . . . batatoli.” Mpe sikawa tala motindo nini mokanda yango moko elobeli ba Témoins de Jéhovah: “Lingomba . . . Batemwe bandimisami makasi ete nsuka ya mokili ekókoma na bambula oyo ezali koya. Emonani lokola ete endimeli wana ya makasi nde ezali nguya oyo ezali kopesa bango molende ntango nyonso. . . . Mokumba ya liboso ya mosangani moko na moko ya lingomba wana ezali ya kotatola mpo na Jéhovah na kosakoláká Bokonzi na Ye oyo esili kobelema. . . . Bazali kotalela Biblia lokola liziba bobele moko ya bindimeli na bango mpe ya mitinda ya etamboli . . . Mpo na kozala Temwe ya solo, moto asengeli mpenza kosakola na lolenge moko to mosusu.”​—Volume 7, lokasa 864 kino lokasa 865.

5. (a) Na makambo nini mateya ya ba Témoins de Jéhovah makeseni na mateya mosusu? (b) Pesá bandakisa oyo emonisi ete bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah biyokani na Makomami.

5 Na makambo nini mateya ya ba Témoins de Jéhovah makeseni na mateya mosusu? Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique etangi mwa ndambo na yango: “Bango [ba Témoins de Jéhovah] bazali kokweisa Bosato lokola losambo ya bikeko ya bapakano . . . Bazali kotalela Yesu lokola Témoin de Jéhovah oyo aleki monene, lokola ‘nzambe’ (ndenge babongoli Yoane 1.1), ete azali na nse ya moto mosusu te kasi bobele na nse ya Jéhovah. . . . Akufaki lokola moto mpe asekwaki lokola Mwana, elimo oyo ekoki lisusu kokufa te. Mpasi mpe liwa na ye ezalaki motuya oyo apesaki mpo ete bato bazwa lotómo ya kozala na bomoi ya seko na mabelé. Ya solo, ‘ebele monene’ (Em 7.9) ya Batemwe ya solo bazali na elikya ya Paradis na mabelé; bobele bato na sembo 144 000 (Em 7.4; 14.1, 4) nde bakoki kozala na nkembo na likoló elongo na Klisto. Bato mabe bakobomama nyee. . . . Batisimo​—oyo Batemwe bapesaka na kozindisa bato kati na mai . . . [ezali] elembo emonisaka polele komipesa na bango mpo na mosala ya Jéhovah Nzambe. . . . Ba Témoins de Jéhovah bayebani na likambo ya koboya kozongisa makila . . . Mitinda na bango ya bizaleli malamu mpo na libala mpe kosangisa nzoto mizali makasi mingi.” Ekoki kozala ete ba Témoins de Jéhovah bakokani na basusu te na makambo wana, kasi etelemelo na bango na makambo wana nyonso ezali na moboko makasi likoló na Biblia.​—Nzembo 37:29; Matai 3:16; 6:10; Misala 15:28, 29; Baloma 6:23; 1 Bakolinti 6:9, 10; 8:6; Emoniseli 1:5.

6. Etelemelo nini ba Témoins de Jéhovah babatelaki yango? Mpo na nini?

6 Mokanda wana ya Katolike ebakisi ete na 1965 (ekoki kozala mbula oyo lisoló yango ekomamaki) “Batemwe bamitalelaki te lokola bato ya mokili oyo bafandaki kati na yango.” Mokomi akanisaki mbala mosusu ete nsima na ntango, wana ba Témoins de Jéhovah bakokóma mingi mpe bakozwa “bizaleli mingi ya Lingomba oyo ekeseni na bizaleli ya lingomba moke,” bakokóma eteni ya mokili oyo. Kasi esalemaki bongo te. Lelo oyo, na motuya ya Batemwe koleka mbala minei oyo ezalaki na 1965, ba Témoins de Jéhovah bazali ntango nyonso kobatela makasi etelemelo na bango liboso ya mokili oyo. “Bazali bato na mokili te,” lokola Yesu azalaki “moto na mokili te.”​—Yoane 17:16.

Bakabwani, kasi bazali banguna te

7, 8. Makambo nini makokani kati na baklisto ya liboso mpe ba Témoins de Jéhovah na mikolo na biso?

7 Wana azalaki kotanga maloba makomamaki na Justin Martyr, mokoteli ya ekeke ya mibale, mpo na kolóngisa baklisto ya liboso, Robert M. Grant akomaki kati na mokanda Boklisto ya liboso mpe mokili (na Lingelesi) ete: “Soki baklisto bazalaki batomboki, mbele balingaki komibomba mpo na kokokisa mokano na bango. . . . Bazali bato bayokani malamu na mokonzi mpo na oyo etali kimya mpe bizaleli malamu.” Bobele bongo, lelo oyo ba Témoins de Jéhovah bayebani kati na mokili mobimba lokola ba citoyens ya kimya mpe ya boboto. Biyangeli, ezala ya lolenge nini, biyebi ete bizali na likambo moko te ya komitungisa na ntina na ba Témoins de Jéhovah.

8 Mokomi moko ya zulunalo na Amérique du nord akomaki ete: “Esengeli mpenza kozala na makanisi mokuse mpe ya mobulungano mpo na kondima ete ba Témoins de Jéhovah bazali likámá mpo na boyangeli moko ya politike; bazali batomboki te mpe bazali bato ya kimya lokola lingomba lisengeli kozala.” Kati na mokanda na ye, L’objection de conscience, Jean-Pierre Cattelain akomi ete: “Batemwe bazali mpenza kotósa bakonzi na lolenge ya kokoka mpe bazali kotósa mibeko; bafutaka mpako na bango, mpe balukaka te kotungisa, kobongola to kokweisa biyangeli, mpamba te bamikotisaka kati na makambo ya mokili oyo te.” Cattelain abakisi ete ezali bobele na ntango Leta alingi kozwa bomoi na bango, oyo bapesá yango mobimba mpo na Nzambe, nde ba Témoins de Jéhovah baboyaka kotósa. Na likambo oyo, bakokani mpenza na baklisto ya liboso.​—Malako 12:17; Misala 5:29.

Bakonzi bayebaka bango malamu te

9. Mpo na oyo etali komikabola na mokili, bokeseni nini monene ezali kati na baklisto ya liboso mpe Bakatolike ya mikolo na biso?

9 Bakonzi mingi ya Loma bayebaki malamu baklisto ya liboso te mpe banyokolaki bango. Komonisáká ntina ya likambo yango, mokanda L’épître à Diognète, oyo bato mosusu bakanisi ete ekomamaki uta ekeke ya mibale ya ntango na biso, elobi ete: “Baklisto bafandi kati na mokili, kasi bazali bato na mokili to eteni na yango te.” Na ngambo mosusu, likita monene ya mibale na Vatican, kati na Buku na yango ya Mateya ya Lingomba elobaki ete, Bakatolike basengeli “koluka Bokonzi ya Nzambe na kokotáká na bibongiseli ya mokili oyo” mpe “kosala mpo na kobulisama ya mokili na kozaláká kati na yango mpenza.”

10. (a) Lolenge nini bakonzi ya mokili batalelaki baklisto ya liboso? (b) Lolenge nini batalelaka mbala mingi ba Témoins de Jéhovah, mpe likambo yango lizali na bopusi nini likoló na bango?

10 Mokomi na makambo ya kala E. G. Hardy alobi ete bakonzi ya Loma batalelaki baklisto ya liboso “lokola bato oyo bazali na molende mozangi ntina.” Etienne Trocmé, mokomi na makambo ya kala, moto wa ekólo France alobeli “botyoli oyo bato na mayele ya Grèce mpe bakonzi na Loma bazalaki na yango epai na oyo bazalaki kotalela lokola moko na mangomba mike ya mpambampamba na Orient [baklisto].” Mikanda oyo mizalaki kotindama kati na Pline le Jeune, moyangeli Moloma ya etúka ya Bithynie, mpe mokonzi Trajan, emonisi ete bakonzi bayebaki mpenza te lolenge ya solo ya boklisto. Bobele bongo lelo oyo, mbala mingi bakonzi ya mokili bayebaka ba Témoins de Jéhovah malamu te, to mpe batyolaka bango. Nzokande, likambo yango likamwisaka mpe libangisaka Batemwe te.​—Misala 4:13; 1 Petelo 4:12, 13.

“Eboyami na bisika nyonso”

11. (a) Makambo nini malobamaki na ntina na baklisto ya liboso, mpe ba Témoins de Jéhovah? (b) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakotaka na makambo ya politike te?

11 Bazalaki koloba na ntina na baklisto ya liboso ete: “Mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” (Misala 28:22) Na ekeke ya mibale ya ntango na biso, Celse oyo azalaki mopakano alobaki ete boklisto ya solo ezalaki kobenda bobele bato mpamba ya mokili. Bobele bongo, balobaki na ntina na ba Témoins de Jéhovah ete “mingi kati na bango bauti na bisika ya bato mpamba kati na mokili.” Johann Neander, mokomi ya makambo ya mangomba ayebisaki ete “baklisto batalelamaki lokola bato basilá kokufa kati na mokili, mpe bazangi ntina kati na makambo nyonso ya bomoi; . . . mpe bazalaki komituna, lolenge nini bomoi elingaki kozala soki bato nyonso bazalaki lokola bango?” Lokola ba Témoins de Jéhovah baboyaka kokota na makambo ya politike, bango mpe batalelamaka mbala mingi lokola bato bazangi ntina kati na mokili. Kasi lolenge nini bakokaki kozala na mbala moko bakambi ya politike mpe bakoteli ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali elikya bobele moko mpo na bato? Ba Témoins de Jéhovah bazali kobatela maloba oyo ya ntoma Paulo ete: “Ndimá koyika mpiko na mpasi, lokola sodá malamu ya Klisto Yesu. Sodá akomikotisaka na makambo mosusu ya bomoi te, mpo ete akoka kosepelisa ye oyo azwaki ye na mosala.”​—2 Timoté 2:3, 4, MN.

12. Na likambo nini ya ntina litali kozanga kokota na makambo ya mokili, ba Témoins de Jéhovah bakokani na baklisto ya liboso?

12 Kati na mokanda na ye, Lisoló ya boklisto ya solo (na Lingelesi), molakisi K. S. Latourette akomi ete: “Moko na makambo oyo baklisto bayokanaki na yango te elongo na mikili miyangelamaki na Bagreke mpe Baloma ezalaki likambo ya kosangana na bitumba. Na boumeli ya bikeke misato ya liboso ezali na makomi moko te ya boklisto oyo mabatelami kino na ntango na biso oyo mazali kondima bosangani ya baklisto kati na bitumba.” Mokanda ya Edward Gibbon, Lisoló ya bokiti mpe ya bokwei ya Boyangeli ya Loma, eyebisi ete: “Ekokaki kosalema te ete baklisto, kozanga kowangana mokumba moleki bulee, bakoka kosala lokola basodá, ba magistrats, to bana na mikonzi.” Bobele bongo, ba Témoins de Jéhovah bazali mpe kosimba makasi etelemelo ya bokatikati mpe bazali kolanda mitinda ya Biblia oyo miyebisami kati na Yisaya 2:2-4 mpe na Matai 26:52.

13. Efundeli nini babimisaka na ntina na ba Témoins de Jéhovah, kasi makambo mamonisi nini?

13 Banguna ya ba Témoins de Jéhovah bazali kofunda bango ete bazali kokabola mabota ya bato. Ya solo, ekómaka ete mabota makabwana wana moko to mingi kati na basangani na yango bakómi ba Témoins de Jéhovah. Yesu asakolaki ete likambo yango lisengelaki kosalema. (Luka 12:51-53) Nzokande, mituya mipesami mimonisi ete mabala oyo makabwani mpo na ntina wana mazali mingi te. Na ndakisa, kati na ba Témoins de Jéhovah na mokili ya France, kati na mabala misato, libala moko lizali na mobalani oyo azali Temwe te. Nzokande, motuya ya mabala oyo makufi kati na mabala oyo mobalani mosusu azali Temwe te, ezali moke soki tokokanisi yango na mwayene ya mabala oyo mazali kokufa na mboka wana. Mpo na nini? Ntoma Paulo mpe ntoma Petelo bapesaki epai na baklisto oyo babalani na bato bazali bandimi te toli ya mayele, oyo epemami na Nzambe, mpe ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi mpo na kolanda maloba na bango. (1 Bakolinti 7:12-16; 1 Petelo 3:1-4) Soki libala ya Temwe elongo na moto azali mondimi te ekufi, mbala mingi ezalaka moto oyo azali Temwe te nde alingi yango. Epai mosusu, bankóto ya mabala ebatelamaki mpo ete babalani bakómaki ba Témoins de Jéhovah mpe babandaki kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi na bango.

Baklisto, kasi bandimi ya Bosato te

14. Efundeli nini babimisaki na ntina na baklisto ya liboso, mpe mpo na nini ezali likambo ya kokamwa?

14 Likambo ya kokamwa ezali ete kati na boyangeli ya Loma, moko na bifundeli oyo bafundaki na yango baklisto ya liboso ezalaki ete bandimaka Nzambe te. Johann Neander akomi ete: “Batuki, bato bandimaka Nzambe te, . . . wana ezalaki nkombo oyo bazalaki kobyanga na yango baklisto kati na bato.” Ezali solo likambo ya kokamwa ete baklisto, baoyo bazalaki kosambela Mozalisi oyo azali na bomoi, kasi ebele na banzambe te, batalelama lokola bato bandimaka Nzambe te na bapakano, oyo bazalaki kosambela “banzambe te, kasi mosala na maboko na bato, na nzeté mpe na mabanga.”​—Yisaya 37:19.

15, 16. (a) Bato mosusu ya mangomba balobaki nini likoló ya ba Témoins de Jéhovah, kasi yango ezali kobimisa motuna nini? (b) Nini emonisi ete ba Témoins de Jéhovah bazali solo baklisto?

15 Ezali mpe likambo ya kokamwa lelo oyo ete, bato minene mosusu kati na boklisto ya lokuta bazali koboya kondima ete ba Témoins de Jéhovah bazali baklisto. Mpo na nini? Mpamba te Batemwe bandimaka Bosato te. Engebene ndimbola oyo boklisto ya lokuta ezali kopesa, “Baklisto bazali baoyo bandimaka Klisto lokola Nzambe.” Na bokeseni, diksionere moko ya sika elimboli liloba “moklisto” lokola “moto oyo azali kondimela Yesu Klisto mpe azali kolanda mateya na ye” mpe “Boklisto” lokola “lingomba oyo ezali na moboko likoló na mateya ya Yesu Klisto mpe ezali kondima ye ete azali Mwana na Nzambe.” Etuluku nini mpenza eyokani na ndimbola oyo?

16 Ba Témoins de Jéhovah bazali kondima litatoli oyo Yesu apesaki na ntina na ye moko. Alobaki ete: “Nazali Mwana na Nzambe,” kasi alobaki te ete: “Nazali Nzambe Mwana.” (Yoane 10:36; talá Yoane 20:31.) Bandimi maloba oyo mapemami ya ntoma Paulo na ntina na Klisto ete: “Ata azalaki na motindo na Nzambe, atangaki te ete ameka kokokana na Nzambe.” * (Bafilipi 2:6) Kati na mokanda Misala ya bopakano kati na boklisto (na Lingelesi), tozali kotanga ete: “Yesu alobelaki soko moke te likambo motindo wana [Bosato ya banzambe oyo bakokani], mpe esika moko te kati na Kondimana ya Sika liloba ‘Bosato’ limonani. Lingomba lindimaki liteya yango bobele bikeke misato nsima na liwa ya Nkolo na biso; mpe ebandeli ya liteya yango ezali mpenza kati na bopakano.” Ba Témoins de Jéhovah bazali kondima mateya ya Biblia na ntina na Klisto. Bazali baklisto, kasi bandimaka Bosato te.

Baboyi bosangisi ya mangomba

17. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah basanganaka te na ebongiseli ya bosangisi ya mangomba?

17 Bifundeli mosusu mibale oyo bazali kofunda na yango ba Témoins de Jéhovah ezali ete baboyi kokota na ebongiseli ya bosangisi mangomba mpe bamipesi na oyo ebengami “bopalanganisi makasi ya mateya na bango.” Bifundeli oyo mibale bilobamaki mpe na ntina na baklisto ya liboso. Na ntembe te, boklisto ya lokuta, elongo na biteni na yango: Katolike, Orthodoxe mpe Protestá ezali eteni ya mokili oyo. Lokola Yesu, ba Témoins de Jéhovah bazali “bato na mokili te.” (Yoane 17:14) Lolenge nini bakoki kosangana elongo na mangomba mosusu kati na ebongiseli ya bosangisi mangomba mpo na kokumisa etamboli mpe bindimeli oyo ezali ya boklisto te?

18. (a) Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah bakoki te kokweisama wana bazali koloba ete bobele bango nde bazali kosalela lingomba ya solo? (b) Atako bazali kondima ete bazali kati na lingomba ya solo, eloko nini Bakatolike bazali na yango te?

18 Nani akoki na bosembo nyonso kokweisa ba Témoins de Jéhovah mpo bandimi, lokola baklisto ya liboso, ete bobele bango nde bazali kati na lingomba ya solo? Ata lingomba ya Katolike, wana ezali na bokosi nyonso koloba ete ezali kosangana na ebongiseli ya bosangisi mangomba, ezali kosakola ete: “Tondimi ete lingomba wana ya solo bobele moko ezali kati na lingomba ya Katolike mpe ya bantoma, oyo Nkolo Yesu apesaki mokumba ya kopalanganisa yango kati na bato, ntango alobaki ete: ‘Boye bokende kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso.’” (Likita monene ya mibale na Vatican, “Maloba na ntina na bonsomi ya losambo”) Nzokande, ezali polele ete endimeli motindo wana ekoki te mpo na kopesa na Bakatolike molende ya ntango nyonso mpo na kokende kozalisa bayekoli.

19. (a) Ba Témoins de Jéhovah bazali na ekateli ya kosala nini, mpe nini ezali kopusa bango na kosala bongo? (b) Tokotalela nini kati na lisoló oyo elandi?

19 Ba Témoins de Jéhovah bazali na molende lolenge yango. Bazali na ekateli ya kokende kopesa litatoli ntango nyonso oyo Nzambe akolinga ete basala yango. (Matai 24:14) Mosala na bango ya kopesa litatoli mosalemi na molende kasi na lolenge ya mobulu te. Epusami na bolingo mpo na bazalani, kasi na koyina bato te. Bazali na elikya ete bato mingi bakobika. (1 Timoté 4:16) Lokola baklisto ya liboso, bazali kosala makasi mpo na “kozala na kimya elongo na bato nyonso.” (Baloma 12:18) Tokotalela lolenge oyo bazali kosala yango kati na lisoló oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 16 Mpo na ndimbola ya mokapo oyo na boyokani na liteya ya Bosato, talá Réveillez-vous! ya 22 Septembre 1971, lokasa 3 kino lokasa 7.

Bozongeli

◻ Nini ezalaki kokesenisa baklisto ya liboso, mpe na makambo nini ba Témoins de Jéhovah bakokani na bango?

◻ Na makambo nini ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa ete bazali ba citoyens malamu?

◻ Lolenge nini bakonzi bazalaki kotalela baklisto ya liboso, mpe ezali nde na bokeseni lelo oyo?

◻ Endimiseli oyo Batemwe bazali na yango ete bazali kati na solo ezali kopusa bango na kosala nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 12]

Ba Témoins de Jéhovah bazali na ekateli ya kopesa litatoli ntango nyonso oyo Nzambe akolinga ete basala yango

[Elilingi na lokasa 17]

Pilato alobaki: “Botala moto!”​—Ye oyo asanganaki na mokili te.​—Yoane 19:5

[Eutelo ya bafɔtɔ]

“Ecce Homo” by A. Ciseri: Florence, Galleria d’Arte Moderna / Alinari/​Art Resource, N.Y.