Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baklisto ya liboso mpe mokili

Baklisto ya liboso mpe mokili

Baklisto ya liboso mpe mokili

ESILI koleka penepene na mibu nkóto mibale, likambo moko oyo eleki kokamwisa esalemaki na Moyen-Orient. Nzambe atindaki Mwana na ye bobele moko longwa na efandelo na ye ya likoló mpo ete azala na bomoi kati na mokili ya bato mpo na mwa ntango moke. Ebele ya bato bayambaki ye motindo nini? Ntoma Yoane ayanoli ete: “[Yesu] azalaki kati na mokili, mpe mokili ezalisamaki na nzela na ye nde mokili eyebaki ye te. Ayei epai na ekólo na ye moko [Yisraele], nde bato na ye bayambaki ye te.”​—Yoane 1:10, 11.

Mokili endimaki Yesu, Mwana na Nzambe te. Mpo na nini? Yesu alimbolaki moko na bantina yango ntango alobaki ete: “Bamokili . . . bazali koyina ngai mpo ete nazali kotatola mpo na bango ete misala na bango mizali mabe.” (Yoane 7:7) Na nsima, bobele mokili oyo​—emonisamaki na mwa bakonzi ya mangomba ya Bayuda, mokonzi moko Moɛdɔmɛ, mpe moto moko ya politike ya Loma⁠—​ebomisaki Yesu. (Luka 22:66 kino 23:25; Misala 3:14, 15; 4:24-28) Ezali boni mpo na bayekoli ya Yesu? Mokili elingaki mpenza koyamba bango malamu? Te. Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu akebisaki bango ete: “Soki bozalaki bato na mokili, mbele bamokili balingaki bato na bango mpenza. Nde awa ezali bino na mokili te, kasi nasili kopona bino longwa na mokili, bongo bamokili bazali koyina bino.”​—Yoane 15:19.

Ntango ya bantoma

Maloba ya Yesu mazalaki solo. Bobele mwa baposo nsima ya liwa na ye, bakangaki bantoma na ye, bakanelaki bango mpe babetaki bango. (Misala 4:1-3; 5:17, 18, 40) Ntango moke na nsima, moyekoli ya molende Etienne, amemamaki liboso ya Esambiselo monene ya Bayuda mpe abomamaki na mabanga. (Misala 6:8-12; 7:54, 57, 58) Na nsima, mokonzi Hérode Agrippa Ier abomaki ntoma Yakobo. (Misala 12:1, 2) Na boumeli ya mibembo na ye ya misionere, ntoma Paulo akutanaki na minyoko miutaki na Bayuda oyo bazalaki kofanda na mikili misusu.​—Misala 13:50; 14:2, 19.

Baklisto ya liboso basalaki nini liboso na botemeli motindo yango? Na ebandeli, ntango bakonzi ya mangomba bapekisaki bantoma kosakola na nkombo ya Yesu, bantoma balobaki ete: “Ekoki ete totósa Nzambe liboso ya kotósa bato.” (Misala 4:19, 20; 5:29) Bazalaki na elimo wana moko ntango nyonso oyo bazalaki kokutana na botemeli. Nzokande, ntoma Paulo apesaki baklisto ya Loma toli ete ‘batósaka bakonzi [bayangeli] baleki liboso.’ Apesaki lisusu bango toli ete: “Soki ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bozala na bato nyonso kimya.” (Baloma 12:18; 13:1) Na yango, baklisto ya liboso basengelaki kobatela bokatikati ya mpasi mingi. Batósaki Nzambe lokola Mokonzi na bango monene. Na ntango yango moko, bazalaki kotósa bakonzi ya bikólo mpe bamekaki kozala na kimya elongo na bato nyonso.

Baklisto kati na Boyangeli ya Loma

Kati na boyangeli ya Loma na ekeke ya liboso, na ntembe te baklisto bazwaki matomba ya Pax Romana, to Kimya ya Loma oyo ebatelamaki na mampinga ya Loma. Bokonzi makasi oyo ezalaki kopesa mibeko mpe kobatela molongo, banzela ya malamu, mpe mwa libateli na mibembo ya mai monene epesaki nzela na kopalangana ya boklisto ya solo. Baklisto ya liboso bayebaki nyongo oyo bazalaki na yango epai na bayangeli mpe bazalaki kotósa etinda oyo ya Yesu ete: “Bopesa na Kaisala biloko ya Kaisala.” (Malako 12:17) Ntango akomelaki mokonzi ya Loma Antonin le Pieux (138-161 T.B.), Justin Martyr amonisaki ete baklisto bazalaki kofuta mpako na bango “na motema malamu koleka bato nyonso.” (Première apologie, mokapo 17) Na 197 T.B., Tertullien alobaki na bakonzi ya Loma ete bakongoli na bango ya mpako bazalaki na “nyongo ya kozongisa botɔndi epai na baklisto” mpo na motema malamu oyo bazalaki komonisa na bofuti mpako. (Apologie, mokapo 42) Wana ezali lolenge moko oyo bamonisaki ete bazalaki kolanda toli ya ntoma Paulo oyo ete basengelaki kotósa bakonzi baleki liboso.

Lisusu, wana mitinda na bango ya boklisto epesaki bango nzela, baklisto ya liboso bamekaki kozala na kimya elongo na bazalani na bango. Kasi yango ezalaki likambo ya petee te. Mokili oyo ezingaki bango emipesaki mingi na etamboli ya mbindo mpe emikotisaki mpenza kati na losambo ya bikeko ya Baloma mpe Bagreke, oyo kati na yango losambo ya mokonzi ebakisamaki. Losambo ya bopakano ya Loma ezalaki mingimingi lingomba ya Leta, mpo na yango, koboya kosangana na yango etalelamaki lokola koyina Leta. Ezalela ya baklisto ezalaki nini?

Molakisi E. G. Hardy ya Oxford akomaki ete: “Tertullien atangi makambo mingi oyo mayokani te na lisosoli ya moklisto oyo matalelamaki lokola losambo ya bikeko, na ndakisa: momeseno ya kolapa ndai ntango ya kotya mabɔkɔ na boyokani moko, kongengisa bikuke na ntango ya bilambo, mpe bongo na bongo; milulu nyonso ya losambo ya bopakano; masano mpe bisika ya masano ebengami cirque; kolakisa makambo na ntɔ́ki [ya Baloma mpe Bagreke]; mosala ya sodá; misala ya Leta.”​—Boklisto ya solo mpe boyangeli ya Loma (na Lingelesi).

Ya solo, ezalaki mpasi kofanda na boyangeli ya Loma kozanga kotika bindimeli ya boklisto. Mokomi ya Katolike, na ekólo France, Adalbert Hamman akomi ete: “Ezalaki mpasi kosala likambo kozanga ete ezala na boyokani na nzambe moko. Etelemelo ya moklisto ezalaki komemela ye mikakatano mikolo nyonso; azalaki komikotisa te na makambo ya bato . . . Azalaki kokutana na mikakatano mingi na ndako, na balabala, na zando . . . Kati na balabala, azala mwana-mboka Moloma to moloma te, moklisto asengelaki kolongola ekɔti na ye liboso ya ndakonzambe to liboso ya ekeko. Lolenge nini akokaki koboya kosala bongo kozanga kobenda likebi ya bato, lolenge nini akokaki kosala yango kozanga ete elimbola bokangami na ye? Soki azalaki moto na mombongo mpe alingaki kodefa mbongo, asengelaki kolapa ndai epai na modefisi na ye na nkombo ya banzambe. . . . Soki andimaki kosala mosala ya Leta, asengelaki kopesa mbeka. Soki akotisamaki na mosala ya sodá, lolenge nini akokaki kopengola kolapa ndai mpe bosangani na milulu ya mosala ya sodá?”​—Bomoi ya mokolo na mokolo ya baklisto ya liboso, 95-197 T.B. (na Lifalansé).

Ba citoyens malamu, kasi batɔngami

Penepene na mobu 60 to 61 T.B., wana ntoma Paulo azalaki na Loma kozela ete mokonzi Néron asambisa ye, mikóló na Bayuda balobaki na ntina na baklisto ya liboso ete: “[Ya solo], mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” (Misala 28:22) Lisoló ya bato limonisi ete bazalaki koloba mabe mpo na baklisto​—mpe yango kozanga ntina. Kati na mokanda na ye Ebandeli ya boklisto ya solo (na Lingelesi), E. W. Barnes alobi ete: “Kati na mikanda na yango ya kala oyo tokoki kotyela motema, ebongiseli ya boklisto elakisami mingi mpenza ete ezali na etamboli malamu mpe na botosi ya mibeko. Basangani na yango balingaki kozala ba citoyens malamu mpe bayangelami ya sembo. Bazalaki koboya bizaleli mabe ya bapakano. Kati na bomoi na bango balukaki ete bazala bazalani ya kimya mpe baninga oyo bakoki kotyela motema. Bazalaki koteya bango kozala na bokatikati, kozala basali malamu mpe kozala na bomoi ya peto. Atako bazingamaki na makambo ya mabe mpe ya mbindo, batikalaki sembo na mitinda na bango, bazalaki bato na kolongobana mpe bazalaki kobuka lokuta te. Bazalaki na mitinda mitombwami na makambo ya kosangisa nzoto: bazalaki na limemya mpo na bikanganeli ya libala mpe bazalaki na bomoi ya peto na libota. Lokola bazalaki na bizaleli malamu motindo wana, basengelaki te kotalelama lokola ba citoyens ya mabe. Nzokande, na boumeli ya ntango molai batyolamaki, batɔngamaki mpe bayinamaki.”

Lokola mokili ya ntango na kala eyebaki Yesu malamu te, bobele bongo ekokaki te koyeba malamu baklisto; yango wana eyinaki bango. Mpo ete bazalaki koboya kosambela mokonzi mpe banzambe ya bapakano, baklisto bafundamaki ete bazali bato bandimaka Nzambe te. Soki likámá libimi, bazalaki kopamela bango ete batumolaki nkanda ya banzambe. Mpo ete bazalaki kokende te na masano ya mbindo to na masano ya kosopa makila oyo babundi bazalaki kosala, batalelamaki lokola bato balingaka bazalani na bango te, to ata lokola ‘bayini ya bato.’ Bayini na bango bazalaki koloba ete mabota mazalaki kokabwana mpo na “lingomba” ya baklisto mpe ete yango ezalaki bongo likámá mpo ete kimya ezala kati na libota ya bato. Tertullien alobeli mibali bapakano oyo bazalaki kolinga komona basi na bango kosala ekobo, na esika ete bakóma baklisto.

Bazalaki kotɔnga baklisto mpo ete bazalaki koboya likambo ya kosopa zemi, oyo ezalaki kosalema mingi na eleko wana. Nzokande, bayini na bango bazalaki kofunda bango ete bazalaki koboma bana. Bazalaki koloba ete, na makita na bango, bazalaki komela makila ya bana oyo bapesamaki mbeka. Bobele na ntango yango, bayini na bango bamekaki kopusa bango na kolya boudin esalemi na makila, ata bayebaki malamu ete eyokani te na lisosoli na bango. Na bongo, bayini ya boklisto ya solo bamonisaki ete efundeli na bango ezalaki ya lokuta.​—Tertullien, Apologie, mokapo 9.

Etyolami mpo ete ezali “lingomba ya sika”

Mokomi na makambo ya kala Kenneth Scott Latourette akomaki ete: “Molongo mosusu ya bifundeli mpo na kotyola boklisto ya solo ezali na ntina ya ebandeli na yango oyo eutaki kosalema kala mingi te mpe ekeseni na mangomba mosusu ya kala [Lingomba ya Bayuda mpe mangomba ya bopakano ya Bagreke mpe Baloma].” (Lisoló ya bopalangani ya boklisto ya solo, [na Lingelesi], Volume 1, lokasa 131) Na ebandeli ya ekeke ya mibale ya ntango na biso, mokomi na makambo ya kala Moloma, Suétone abengaki boklisto ya solo “biyambayamba ya sika mpe ya mabe.” Tertullien amonisaki ete nkombo moklisto eyinamaki mpe baklisto bazalaki lingomba oyo elingamaki mingi te. Ntango alobelaki motindo oyo bakonzi ya Loma bazalaki kotalela baklisto na ekeke ya mibale, Robert M. Grant akomaki ete: “Likanisi ya moboko ezalaki ete boklisto ya solo ezalaki lingomba moko ezangi ntina, oyo ezali na likámá.”​—Baklisto ya liboso mpe bato (na Lingelesi).

Bafundami mpo na bopalanganisi mabe ya mateya

Kati na mokanda na ye, Bikeke ya liboso ya Lingomba (na Lifalansé), Jean Bernardi, molakisi na université ya Sorbonne, akomaki ete: “[Baklisto] basengelaki kokende koloba bipai nyonso mpe epai na bato nyonso. Na balabala mpe na bingumba, na biyanganelo mpe na bandako. Ezala bayambi bango to baboyi koyamba bango. Epai na babola mpe epai na bazwi, kati na biloko mingi na bango. Na bato mpamba mpe na bayangeli ya bitúka ya Loma . . . Basengelaki kotambola na nzela mpe kokota na masuwa mpo na kokende kino na nsuka ya mabelé.”

Basalaki bongo? Na ntembe te, basalaki yango. Molakisi Léon Homo ayebisi ete bato bazalaki koyina baklisto ya liboso mpo na “molende na bango na kopalanganisa mateya.” Molakisi Latourette ayebisi ete Bayuda babungisaki molende na bango mpo na kopalanganisa mateya na bango, “nzokande, baklisto bazalaki mpenza bamisionere ya molende mpe yango esalaki ete baboyama.”

Na ekeke ya mibale ya T.B., filozofe Moloma na nkombo Celse atyolaki myango oyo baklisto basalelaki mpo na kosakola. Alobaki ete boklisto ya solo ezalaki mpo na bato batangá mingi te mpe ekokaki ‘kondimisa bobele bazoba, baombo, basi mpe bana mike.’ Afundaki baklisto ete bazali kobongola makanisi ya “bato na bindimandima,” kotinda bango ete “bandima kozanga kososola malamu.” Alobaki ete baklisto bazalaki koyebisa na bayekoli na bango ya sika ete: “Botuna mituna te; bosuka bobele na kondima.” Nzokande, engebene Origène, Celse ye moko andimaki ete “ezalaki te bobele bato mpamba nde batambwisamaki na mateya ya Yesu mpo na kondima lingomba na Ye.”

Baboyaki bosangisi ya mangomba

Bazalaki lisusu kotɔnga baklisto ya liboso mpo ete bazalaki koloba ete bayebi solo na ntina na Nzambe bobele moko ya solo. Bazalaki kondima bosangisi ya mangomba te. Latourette akomaki ete: “Na bokeseni na mangomba mingi ya ntango wana, [baklisto] bazalaki koyina mangomba mosusu. . . . Bamikesenisaki na mangomba mosusu, oyo ezalaki kopesa nzela na makambo mingi, wana bazalaki koloba ete bazalaki na solo oyo ekoki kotyamela ntembe te.”

Na mobu 202 T.B., mokonzi Septime Sévère abimisaki mobeko oyo epekisaki baklisto ete bapalanganisa mateya. Nzokande, yango epekisaki bango te na kotatola mpo na kondima na bango. Latourette amonisi matomba na yango: “Wana ezalaki koboya boyokani elongo na bapakano na ntango wana mpe elongo na bizaleli mpe mitindo na bato ya ntango yango, [boklisto ya liboso] ekólisaki bomoko mpe lisangá oyo ekesenisaki yango na bato mosusu. Mbongwana oyo moto asengelaki kosala mpo na kokóma moklisto ezalaki kopesa basangani na yango endimiseli makasi oyo ezalaki liziba ya nguya mpo na kotemela minyoko mpe liziba ya molende mpo na kolónga kobongola bato.”

Na yango, matatoli makomami na mikanda mazali polele. Kati na makambo mingi, baklisto ya liboso, atako bazalaki kosala makasi mpo na kozala ba citoyens malamu mpe kozala na kimya elongo na bato nyonso, bazalaki koboya “kosangana na mokili.” (Yoane 15:19) Bazalaki kotósa bakonzi. Kasi, ntango Kaisala azalaki kopekisa bango kosakola, bazalaki na mwango mosusu te bobele kolanda kosakola. Bazalaki komeka kozala na kimya elongo na bato nyonso, kasi baboyaki kobuka mitinda ya bizaleli malamu mpe kosangana na losambo ya bikeko ya bopakano. Mpo na makambo oyo nyonso, batyolamaki, batɔngamaki, bayinamaki mpe banyokwamaki, lokola Klisto asakolaki yango.​—Yoane 16:33.

Komikabola na bango na mokili elandaki kosalema? To na boumeli ya bikeke, baoyo bandimaki ete bazalaki kosalela boklisto ya solo, babongolaki nde ezaleli na bango na likambo yango?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

Mpo ete baklisto bazalaki koboya kosambela mokonzi ya Loma mpe banzambe ya bapakano, bafundamaki ete bandimaka Nzambe te

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Etelemelo ya moklisto ezalaki komemela ye mikakatano mikolo nyonso; azalaki komikotisa na makambo ya bato te”

[Elilingi na lokasa 3]

Boklisto ya solo etyolamaki na ntina na ebandeli na yango oyo eutaki kosalema kala mingi te, mpe ekeseni na mangomba mosusu ya kala’

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Museo della Civiltà Romana, Roma

[Elilingi na lokasa 7]

Baklisto ya liboso bayebanaki malamu mpo na molende na bango ya kosakola nsango ya Bokonzi

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover: Alinari/​Art Resource, N.Y.