Bele-seba Esika bomoi esimbamaki na libulu ya mai
Bililingi ya Mokili na ndaká
Bele-seba Esika bomoi esimbamaki na libulu ya mai
“LONGWA na Dani kino Bele-seba.” Oyo ezali maloba mayebani malamu na batangi ya Biblia. Ezali kolobela Yisraele mobimba, kobanda Dani, pene na ndelo ya nord, kino Bele-seba, na sud. Kimya na nse ya boyangeli ya Salomo elobelamaki boye ete: “Yuda mpe Yisraele bafandaki na kimya longwa na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nse na mowiti na ye mpe na nzeté na ye na mbuma, mikolo nyonso ya Solomo.”—1 Mikonzi 4:25; Basambisi 20:1.
Nzokande, bokeseni kati na Dani mpe Bele-seba, ezalaki te bobele ntáká oyo ekaboli yango. Na ndakisa, Dani ezalaki kozwa mbula mingi; mai mazalaki kobima na mabelé mpo na kosala moko na maziba ya ebale Yaladene, lokola tokoki komona yango na foto oyo ezali na loboko ya mobali. Oyo nde bokeseni na Bele-seba, oyo ezwami na etúka ya kokauka, katikati na mai monene mpe ndelo ya sud ya libeke libengami mer Morte!
Na etúka ya Bele-seba, mwayene ya mbula oyo enɔkaka na mbula mobimba ezalaka na ba centimètres bobele 15 kino 20. Lokola oyebi likambo oyo, talá foto ya libóndo, to mwa ngomba ya mabelé ya Bele-seba oyo ezali awa na likoló. * Langi na mai ya mpondu oyo ozali komona elakisi ete bakangaki foto oyo nsima na mwa mbula moke oyo ebetaka na eleko ya malili makasi, na boumeli ya eleko mokuse, wana bilanga oyo bizali zingazinga na Bele-seba bibimisi matiti. Bisobe oyo bizali zingazinga bizalaki—mpe bizali ntango nyonso—mabelé kitoko mpo na milóna.
Mpo ete etúka yango ezalaki ya kokauka, masoló ya Biblia na ntina na Bele-seba malobeli mingi mabulu ya mai mpe lotómo ya kotoka mai. Mboka yango ezalaki penepene ya nzela to balabala ya mibembo oyo ezalaki kokatisa mokili mokauki kino na sud. Lokola okoki kokanisa yango, basali mibembo oyo bazalaki koleka to kotelema wana bazalaki na mposa ya mai bango moko mpe mpo na banyama na bango. Mai yango mazalaki kobima na mabelé te lokola na Dani, kasi ezalaki kozwama na mabulu ya mai. Ya solo, liloba na Liebele beʼerʹ emonisaki libulu to liziba litimolami mpo na kobenda mai na nse ya mabelé. Bele-seba elimboli “Libulu ya Ndai” to, “Libulu ya Nsambo.”
Abalayama mpe libota na ye bafandaki ntango molai na Bele-seba, mpe zingazinga na yango, mpe bayebaki ntina ya mabulu ya mai. Ntango Agala, moombo mwasi ya Sara akimaki na mokili mokauki, ekoki kozala ete akanisaki kozwa mai na mabulu to epai ya bafandi na mokili mokauki oyo bazalaki kosalela mabulu yango. Na ndakisa, foto oyo ezali na likoló na lokasa elandi, emonisi mwasi moko mofandi na mokili mokauki azali kotoka mai na libulu oyo ezali na etúka ya Sinai. Na nsima, ntango Abalayama asengelaki kobengana Agala elongo na mwana na ye, oyo azalaki na maloba ya kotuka, apesaki bango na boboto nyonso ndambo ya mai oyo esengelaki. Likambo nini likómaki ntango mai yango esilaki? “Nzambe afungolaki miso na ye mpe amonaki liziba na mai mpe akendaki kotondisa loposo na mai mpe amelisaki mwana.”—Genese 21:19.
Epai wapi Abalayama azwaki mai mpo na kotondisa loposo ya Agala? Mbala mosusu na libulu oyo atimolaki, mpe oyo pene na yango alonaki nzeté ya tamalise. (Genese 21:25-33) Toyeba ete bato na mayele bazali sikawa komona ntina na liponi oyo Abalayama asalaki ya nzeté ya tamalise, mpamba te nzeté yango ezali na nkasa mikemike oyo ebungisaka bobele mai moke: yango wana ekoki kokóla mpenza malamu atako etúka yango ezali ya kokauka.—Talá foto oyo ezali awa na nse.
Kozala ya libulu ya mai oyo Abalayama atimolaki eyebisameli biso kati na lisoló ya matáta oyo mazalaki kati na ye mpe mokonzi ya Bafilisitia. Libulu ya mai ezalaki eloko ya motuya mingi mpo ete mai mazalaki mpenza komonana mingi te mpe kotimola libulu ya mozindo ezalaki kosenga mosala monene. Ya solo, na ntango ya kala, kotoka mai kati na libulu ya moto kozanga ndingisa ekokanaki na kobotola moto lotómo ya biloko na ye.—Talá Mituya 20:17, 19.
Soki okei kotala Ngomba Bele-seba, okoki komona libulu moko ya mai na mopanzi na yango ya sud-est. Moto moko te ayebi ntango nini batimolaki yango kati na libanga ya makasi mpe eteni na yango ya likoló (talá na nse) etóngami na mabanga. Bakundoli ya biloko ya kala na ntango na biso, bapetolaki yango kino bamɛtɛlɛ 30 kozanga ete bakóma na nse na yango. Moko kati na bango alobaki ete: “Ezali kotinda na kokanisa ete libulu oyo ezalaki . . . ‘Libulu ya Ndai’ esika Abalayama mpe Abimeleke basalaki kondimana na bango.”—Biblical Archaeology Review.
Ya solo, Bele-seba ekolaki na nsima na eleko ya kala, kino ekómaki mboka makasi oyo ezalaki na ekuke moko monene. Kasi likambo ya ntina mpo na kozala mpe lokumu na yango ezalaki mai ya ntina mingi oyo mazalaki kouta na mabulu na yango ya mozindo.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 5 Mpo na bonene ya ngomba ya Bele-seba, talá Calendrier des Témoins de Jéhovah 1993.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.