Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli

Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli

Konyata mikanda mikolimbolaka biblia na ntango ya epekiseli

LISOLÓ YA MALCOLM G. VALE

“Bonyata mokanda Enfants.” Nazwaki etinda wana ya kokamwa euti na mokɛngɛli ya filiale ya ba Témoins de Jéhovah ya Australie na boumeli ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba, mwa moke nsima ya kobimisama ya mokanda yango, le 10 Août 1941, na assemblée de district na engumba Saint Louis, na Missouri (Etats-Unis). Mpo na nini etinda yango ezalaki ya kokamwa?

MOSALA na biso ya kosakola epekisamaki na Janvier 1941, yango wana kolanda konyata mikanda ata mwa ndambo ezalaki mokakatano monene. Lisusu, mokanda Enfants ezalaki na nkasa 384 na bililingi ya langi mingi. Esengelaki kozwa bisaleli ya sika mpo na binyateli na biso, papier ezalaki komonana mingi te, mpe basali na biso bayebaki te mosala ya kokangisa mikanda.

Liboso ya kolobela bino lolenge nini tolóngaki konyata mikanda na nse ya epekiseli, tiká nayebisa bino ndenge nini nakómaki kosala na filiale ya Australie lokola mokɛngɛli na eyanteli ya mikanda.

Bomwana na ngai

Tata na ngai azalaki na kompanyi moko ya konyata mikanda na Ballarat, engumba ya bozwi mingi na etúka ya Victoria, epai na nabotamaki na 1914. Yango wana nayekolaki mosala ya konyata mikanda na kompanyi ya tata na ngai. Nazalaki mpe kosala misala misusu na Lingomba ya Angleterre, koyemba kati na etuluku ya bayembi ya lingomba mpe kobeta ngonga ya ndakonzambe. Nkutu, bazalaki kokana ete nakóma molakisi ya malongi, kasi yango esepelisaki ngai te.

Ntina ya kozanga kosepela ezalaki ete nazalaki komituna mituna mingi mpo na mateya mosusu ya lingomba. Mateya lokola Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ mpe kozanga kokufa ya molimo na moto, mpe moto moko te apesaki ngai biyano ya malamu. Nazalaki lisusu kobulungana wana, mbala na mbala, moteyi na biso ya lingomba azalaki kolobela na kosilika mingi na ntina na lingomba moko moke oyo basangani na yango babengamaki ba Témoins de Jéhovah. Nazalaki komituna mpo na nini etuluku moke boye ekokaki koningisa engumba mobimba ya bafandi 40 000.

Mokolo moko ya Dimanche, natelemaki libandá ya ndakonzambe nsima ya losambo ya mpokwa ntango etuluku moko ya bilenge basi ya Eglise méthodiste ya penepene balekaki. Nasalaki boninga elongo na moko na bango. Nkombo na ye ezalaki Lucy, mpe na nsima abyangaki ngai na ndako na bango mpo nakoka koyebana na baboti na ye. Kanisá kokamwa monene nazalaki na yango ntango nayokaki ete mama na ye, Vera Clogan, azalaki Témoin de Jéhovah. Tosalaki masoló ya mɔ́tɔ kati na Biblia, mpe makambo oyo azalaki koloba mamonanaki ete mazali na ntina.

Ntango moke na nsima, ngai na Lucy tobalanaki, mpe kino na 1939, tofandaki na Melbourne, mboka-mokonzi ya etúka ya Victoria. Atako Lucy asilaki kokóma Témoin de Jéhovah, nazwaki naino ekateli te. Nzokande, ntango Etumba ya mibale ya mokili mobimba ebandaki na Septembre ya mobu yango, nabandaki kokanisa mingi likoló na makambo oyo nayekolaki kati na Makomami. Kopekisama ya mosala ya ba Témoins de Jéhovah na Janvier 1941 esalisaki ngai solo na kozwa ekateli. Namipesaki epai na Jéhovah Nzambe mpe mwa ntango moke na nsima nazwaki batisimo.

Mbongwana monene kati na bomoi na biso

Na ntango wana, tozalaki kofutela ndako moko kitoko na Melbourne. Nzokande, mwa ntango moke na nsima, babyangaki biso ete tokende kofanda na ndako moko elongo na Batemwe mosusu mingi. Totekaki biloko na biso ya ndako nyonso, totikalaki bobele na biloko ya ndako ya kolala mpe tokendeki kofanda na oyo bazalaki kobenga ete ndako ya ba pionniers. Nalandaki kosala lokola monyati mikanda mpe na yango nakokaki kopesa mwa mosolo mpo na kobatela ndako yango. Mibali misusu bazalaki kosala mpe bongo. Yango epesaki nzela na basi na biso ete bakoka kosangana na mosala ya kosakola ntango nyonso, mpe biso mibali tozalaki kosangana na bango na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá na mpokwa mpe na wikende.

Mwa ntango moke na nsima, ngai mpe mwasi na ngai tozwaki mokanda eutaki na filiale ya la Société Watch Tower oyo ezalaki kobyanga biso na kokende na Sydney. Totekaki mbeto mpe matela na biso mpe tofutaki mwa banyongo oyo tozalaki na yango, kasi mpo na kozwa mbongo ya kofuta engbunduka kino Sydney, esengelaki toteka lopɛtɛ ya Lucy!

Na ntina na mikakatano ya bitumba mpe ya epekiseli oyo eutaki kobanda, ezalaki mpenza mpasi mpo na komema Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia longwa na mikili misusu. Mpo na ntina wana, filiale ya Australie ezwaki ekateli ya konyata mikanda na kobombama mpo ete bilei ya elimo elandana kopesama, mpe nabyangamaki mpo na kokɛngɛla mosala yango. Nazwaki libaku malamu ya kosala elongo na ndeko moko ya Écosse, George Gibb, oyo asalaki mibu 60 na enyateli ya filiale ya Australie. * Ezalaki na ntango wana nde nazwaki etinda oyo: “Bonyata mokanda Enfants.”

Tozongeli bisaleli na biso ya konyata mikanda

Makambo ya yikiyiki, mbala mosusu ya kobangisa mazalaki mingi na boumeli ya bambula wana ya etumba. Na ndakisa, mpo na kobanda misala na biso ya konyata mikanda, tozalaki na mposa ya bisaleli. Bakonzi bakangaki bisaleli oyo tozalaki kosalela liboso na etumba mpo na konyata mwa mikanda, mpe sikawa enyateli moke ya la Société ekangamaki na fungola mpe ekɛngɛlamaki na basodá. Lolenge nini tokokaki kobimisa yango mpe kotya yango na bisika bibongi mpo na konyata mikanda na kobombama?

Bakɛngɛli bazalaki na mindoki, bazalaki kosala na komikitana, bazalaki kokɛngɛla lopango ya la Société butu na moi. Nzokande, efelo moko ya nsima ezalaki pembeni na nzela ya engbunduka oyo bato balekaka mpenza mingi te. Yango wana, basali ya mpiko ya Béthel balandaki likanisi lizali na Ezekiele 12:5-7; na butu, bakotaki kati na ndako, nsima na kolongola mwa ndambo ya biliki ya efelo. Wana bazalaki na kati basengelaki kozongisa biliki mpo ete bakoka te komona bango. Botamboli wana ya butu, eumelaki soko poso mibale, mpe bandeko balóngaki na mayele nyonso kopanza enyateli moke, masini ebengami Linotype, mpe mwa ndambo ya masini mosusu. Bongo, kozanga lokito babimisaki biloko yango libandá, balekaki na yango kozanga ete bakɛngɛli bayeba!

Na nsima, tozwaki bisaleli mosusu oyo biutaki bipai mosusu, mpe nokinoki tobandaki na molende nyonso mosala ya konyata mikanda na kobombama na bisika bikeseni ya Sydney. Yango wana, tokómaki na makoki ya konyata mpe kokangisa bobele mokanda Enfants te, kasi lisusu mikanda minene lokola Le monde nouveau, “La vérité vous affranchira,” “Le Royaume s’est approché,” mpe ba Annuaires des Témoins de Jéhovah ya 1942, 1943, 1944, mpe 1945. Lisusu, na boumeli ya epekiseli ya mibu wana ya etumba, ba Témoins de Jéhovah ya Australie bazangaki ata nimero moko te ya Mosenzeli. Yango endimisaki biso moto na moto na motema na ye ete loboko na Jéhovah ezali mokuse te.​—Yisaya 59:1.

Bavizite ya mbalakaka

Na boumeli ya ntango wana ya epekiseli, bayangeli bazalaki kokɛngɛla makasi na ntina na mikanda minyatami mpo na kotekisama, basali ya boyangeli bazalaki mbala na mbala kokende kotala binyateli mpo na komona mikanda oyo mizali kobimisama. Nzokande, moko na binyateli na biso ya kobombama ezalaki na ebongiseli mpo na kokebisa, butó moko oyo ezalaki na nse, penepene na moto oyo azali koyamba bato na ekoteli. Ntango nyonso oyo mopaya to moto oyo amonani lokola inspecteur azalaki koya na ebutelo, moto oyo azali na ekoteli asengelaki kofina butó yango.

Wana butó efinami, bandeko bazalaki kobima na maninisa mpe kokima bipai na bipai! Bobele bandeko oyo bakomamaki lokola basáli nde basengelaki kotikala nsima mpo na kobomba nkasa enyatami ya Mosenzeli mpe mikanda misusu mikolimbolaka Biblia oyo ezalaki konyatama. Mpo na kosala yango, basengelaki kosalela nkasa ya bonene moko na mikanda misusu oyo mizalaki konyatama mpo na bato oyo basengaki yango.

Na boumeli ya moko ya vizite yango, ba inspecteurs mibale bafandaki likoló ya mikanda minyatami ya masapo, nzokande, na nse na yango ezalaki na nkasa ya Mosenzeli oyo eutaki konyatama na butu eleki. Kati na enyateli oyo ezalaki na quartier mosusu ya engumba wana, tozalaki konyata mikanda ya bato oyo basengaki yango na moi mpe tozalaki konyata mikanda ya [la Société] Watchtower na butu mpe na wikende.

Tozwi ba papiers

oyo tozalaki na yango mposa

Kozwa ba papiers mpo na konyata mikanda ezalaki mokakatano monene. Nzokande, binyateli ya minene, oyo bizalaki na mposa ya ba papiers na yango nyonso te na ntina na kokita ya makambo ya mombongo na ntango ya etumba, endimaki kotɛkela biso ndambo ya ba papiers oyo elekaki likoló, kasi na ntálo moko makasi. Atako bongo, na mabaku mosusu, tozalaki kozwa ba papiers bipai mosusu.

Masuwa moko monene ezalaki koya na Australie na ebele ya ba papiers na langi ya kaki, kasi masuwa yango etɔbɔkaki kati na mai monene mpe mai ekotaki kati na ba papiers mingi. Ba papiers nyonso ya masuwa yango etɛkamaki na ntálo mingi te, mpe tokamwaki mingi na komona ete bobele biso nde tozalaki basombi. Epesaki biso nzela ya kosomba yango na ntálo moke. Tokaukisaki ba papiers na moi, mpe bongo tobongisaki ndambo monene na yango, mpe tokatakataki yango engebene bonene ya binyateli na biso.

Lolenge nini tolingaki kosalela ba papiers wana ya kaki? Tokanisaki, mpe ezalaki solo, ete batangi ya masapo bakosepela ntango nyonso kotanga masapo na bango, ata etyami likoló ya ba papiers oyo ezali na langi. Na yango, ba papiers ya mpembe oyo liboso ezalaki mpo na masapo totikaki yango mpo na Mosenzeli mpe mikanda misusu ya la Société.

Mosala monene ya basi

Na boumeli ya mibu ya etumba, basi baklisto mingi ya Australie bayekolaki mosala ya kokangisa mikanda. Mokolo moko na eleko ya molungé na nsima ya midi, basusu kati na bango bazalaki kosala bobele bango moko kati na ebombelo (garage) moko moke oyo tozalaki kofutela na nzela moko oyo ezalaki pembeni na Sydney. Mpo na komibatela, bazalaki kokanga bikuke mpe maninisa. Nzungu ya colle ezalaki kobimisa milinga ya mɔ́tɔ, ya nsolo makasi, mpe molungé elekaki mingi. Yango wana balongolaki bilamba mpe batikalaki bobele na bilamba ya nse.

Na pwasa, moto moko abetaki na ekuke. Bandeko basi batunaki soki azalaki nani, mpe mosali moko ya Leta ayanolaki. Azalaki mosali ya esika oyo na ntango ya etumba, bazali na lotómo ya kotinda bato bipai nyonso mosala mozali kosenga. Bandeko basi bayanolaki ye na mongongo makasi ete bakokaki te kokotisa ye, mpo ete lokola molungé ezalaki makasi, balataki bobele bilamba ya nse.

Moto yango afandaki nyee mpo na ntango moke; na nsima alobaki ete asengelaki kokende epai mosusu bobele wana zingazinga. Alobaki ete asengelaki kozonga na mokolo mokolanda mpo na kotala esika yango. Nokinoki bandeko basi babengaki biso na telefone, mpe totindaki motuka na butu wana mpo na kolongola mikanda nyonso oyo bazalaki kokangisa, bamemaki yango na esika mosusu.

Bandeko mingi oyo bazalaki kosala na binyateli na ntango ya kobombama bamesenaki liboso na mosala ya konyata mikanda te, mpo na yango mosala nyonso oyo esalemaki, endimisaki ngai ete elimo ya Jéhovah ezalaki kopesa lisalisi mpe litambwisi ya ntina. Ezalaki mpo na ngai mpe mwasi na ngai Lucy, oyo azalaki kosala na esika ya kokangisa mikanda, libaku malamu ya kosangana na mosala wana.

Lolenge nini mosala na biso etambwisamaki na boumeli ya ntango wana ya komekama? Ndeko oyo azalaki kosala na esika ya mokɛngɛli ya filiale ya ba Témoins de Jéhovah azwaki etinda na bakonzi, ya kokende kofanda na engumba oyo ekabwanaki na Sydney na ntáká soko ya bakilomɛtɛlɛ 100. Etinda epekisaki ye kotambola koleka bakilomɛtɛlɛ 8 kolongwa na engumba yango. Essence epesamaki bobele litɛlɛ minei mpo na motuka moko na sanza. Kasi bandeko basalaki masini moko ya kokamwa ebengami gazogène: molondá moko oyo ezalaki soko na kilo 500, oyo etyamaki nsima ya motuka. Makala ezalaki kozika kati na yango, mpo na kopesa oyo ebengami oxyde de carbone oyo ezalaki kosalelama lokola essence. Na boumeli ya butu mingi kati na poso, ngai mpe bandeko mosusu oyo bazalaki na mikumba ya kokamba mosala tozalaki kosala mobembo na mwango wana mpo na kokutana na mokɛngɛli na mongala moko oyo mai na yango esilaki kokauka, penepene na engumba epai azalaki kofanda. Bongo, tokokaki kosolola makambo mingi liboso ya kotondisa lisusu gazogène na biso mpe kozonga na Sydney na ntongontongo.

Na nsima, epekiseli ya ba Témoins de Jéhovah ekómaki liboso ya Esambiselo eleki monene ya Australie. Basambisi balobaki ete epekiseli ezalaki “na ntina ya solo te, euti na makanisi mpamba, mpe ya monyokoli” mpe balongolaki ba Témoins de Jéhovah na bifundeli nyonso ya kotombokisa bato. Basangani nyonso ya Esambiselo eleki monene bandimaki ekateli wana, mpe na bongo tokómaki lisusu kosala misala na biso ya Bokonzi na boyokani na mibeko.

Mikumba mpe mapamboli misusu

Nsima na etumba bandeko mingi oyo basalaki na binyateli na eleko ya kobombama bakendeki na mosala ya pionnier. Na nsima, basusu kati na bango bakendeki na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la société Watchtower na New York. Ngai mpe Lucy tozalaki na mokano yango, kasi ntango tobotaki mwana moko ya mwasi, nazwaki ekateli ya kozongela mosala ya konyata mikanda. Tobondelaki Jéhovah ete asalisa biso ntango nyonso mpo tokoka kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, mpe asalaki yango. Nazwaki mokumba mosusu na lolenge oyo elandi:

Nazwaki libyangi ya telefone euti na ndeko Lloyd Barry, oyo azali lelo mosangani ya Collège central ya ba Témoins de Jéhovah na Brooklyn, na engumba ya New York. Na eleko wana, azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na Sydney. Atunaki ngai soki nayebaki date ya assemblée na biso oyo ekosalema na mikolo mizali koya. Ntango nayanolaki ete nayebaki yango, alobaki ete: “Tolingi ete otambwisa mosala ya cafétéria.”

Mpo na ntango moke, nakamwaki, mpe nayanolaki ye na bolembu nyonso ete: “Naino nasala mosala wana te kati na bomoi na ngai.”

Azongiselaki ngai na mongongo ya kosekisa ete: “Ndeko, ezali sikawa ntango malamu mpo na yo koyekola yango!” Nayekolaki, mpe nalandaki kozwa libaku malamu ya kokɛngɛla misala ya cafétéria, ata na ba assemblées minene, na boumeli ya mibu 40.

Nsima ya bambula, mosala na biso ya konyata mikanda ekólaki, mpe esengaki ete nasala mibembo mingi mpo na makambo ya mombongo na mikili misusu. Nazalaki koyokanisa ntango ya mibembo yango na ba assemblées internationales oyo esalemaki na engumba ya New York mpe na bisika mosusu ya Etats-Unis. Yango epesaki ngai libaku ya kolekisa ntango elongo na bandeko oyo bazalaki na mikumba ya kokɛngɛla misala, mingimingi oyo ya cafétéria. Bongo, ntango nazalaki kozonga na Australie, nakokaki kosala malamu mingi mpo na kokokisa mposa ya ba assemblées na biso.

Lokola tosili kokóma mibangé, Lucy mpe ngai tomitunaka mbala mosusu ete tosengelaki mpenza kosala mingi koleka soki tobotamaki mwa bambula moke na nsima. Epai mosusu, lokola tobotamaki na 1916 mpe 1914, ezali libaku malamu mpo na biso na komona kokokisama ya bisakweli ya Biblia. Tozali kotɔnda Jéhovah mpo na libaku tozwaki ya koyekola elongo na bato mingi mpe ya kosalisa bango na koyeba solo, mpe ya komona bango sikawa kosala lokola ba ministres oyo basili kozwa batisimo. Libondeli na biso lizali ete tokoka kolanda kosalela ye libela na libela, koyeba ye ntango nyonso lokola Moyangeli Monene ya molongo mobimba.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Talá La Tour de Garde ya 15 Décembre 1978, lokasa 24 kino lokasa 27.

[Bililingi na lokasa 29]

Esika ya konyata mikanda na Béthel ya Strathfield, 1929 kino 1973

George Gibb atelemi pembeni na moko ya bamasini ya konyata mikanda oyo ebimisamaki na enyateli na efelo ya nsima