Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo

Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo

Lolenge nini boklisto ya lokuta ekómaki eteni ya mokili oyo

BOYANGELI ya Loma, oyo emonaki ebandeli ya boklisto ya solo, ekweaki. Bakomi mingi ya makambo ya kala bazali koloba ete kokwea wana ezalaki mpe eleko ya bolóngi mpo na libela ya boklisto ya solo likoló na bopakano. Episkopo ya Lingomba Anglican E. W. Barnes amonisaki likanisi ekeseni wana akomaki ete: “Ntango civilisation ya kala ekweaki, boklisto ya solo etikaki kozala kondima ya lokumu ya Yesu Klisto: ekómaki lingomba moko oyo esalelamaki lokola ekanganeli kati na mokili oyo ezalaki kopanzana.”​—Ebandeli ya boklisto ya solo (na Lingelesi).

Liboso ya kokwea wana, na boumeli ya bikeke ya mibale, ya misato mpe ya minei ya ntango na biso, lisoló ya makambo na kala limonisi ete na makambo mingi, baoyo balobaki ete bazalaki kolanda Yesu bamikabolaki na boyangeli ya Loma. Kasi limonisi lisusu bokóli ya lipengwi kati na mateya, na etamboli mpe na ebongiseli, ndenge Yesu mpe bantoma na ye basakolaki yango. (Matai 13:36-43; Misala 20:29, 30; 2 Batesaloniki 2:3-12; 2 Timoté 2:16-18; 2 Petelo 2:1-3, 10-22) Na nsima, boyokani eyaki kosalema elongo na mikili miyangelamaki na Bagreke mpe Baloma, mpe basusu oyo bazalaki komitanga baklisto bamekolaki makambo ya bopakano ya mokili (lokola bilambo na yango mpe losambo na yango ya nzambe-mama mpe ya bosato ya banzambe), filozofi na yango (lokola kondima kozanga kokufa ya molimo), mpe ebongiseli ya boyangeli na yango (oyo emonanaki kati na molongo ya bakonzi ya mangomba). Ezali lolenge wana mabe ya boklisto nde ebendaki ebele ya bapakano mpe ekómaki nguya oyo bakonzi ya Loma bamekaki liboso kolongola, kasi na nsima bandimaki yango mpe bamekaki kosalela yango mpo na kokokisa mikano na bango moko.

Mokili elóngi yango

Mokomi na makambo ya mangomba, Johann Neander amonisaki makámá ya boyokani wana ya sika kati na “boklisto” mpe mokili. Akomaki ete, soki baklisto batiki bokabwani na bango elongo na mokili, “matomba mabe malingaki kozala mobulungano ya Lingomba elongo na mokili . . . na yango lingomba esengelaki kobwaka bopeto na yango, mpe wana emonani ete elóngi, ezali yango moko nde ekweisamaki.”​—Lisoló mobimba ya losambo ya boklisto mpe ya lingomba ya Katolike (na Allemand).

Ezali yango nde esalemaki. Na ebandeli ya ekeke ya minei, mokonzi ya Loma Constantin amekaki kosalela losambo ya “boklisto” ya mikolo na ye mpo na koyeisa makasi boyangeli na ye oyo ezalaki kopanzana. Mpo na kokokisa mokano wana, apesaki bonsomi ya losambo na baoyo bazalaki komitanga baklisto mpe alekisaki matomba mosusu ya bonganga ya bapakano epai na bakonzi na bango ya mangomba. Mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique eyebisi ete: “Constantin abimisaki Lingomba longwa na komikabola na yango na mokili mpo na kondima mikumba kati na bato mpe asalisaki bapakano ete bamipesa mpo na Lingomba.”

Lingomba ya Leta

Nsima ya Constantin, mokonzi Julien (361-363 T.B.) amekaki kotemela boklisto ya solo mpe kozongisa bopakano. Kasi alóngaki te, mpe soko mibu 20 na nsima, mokonzi Théodose Ier apekisaki bopakano mpe asengisaki ete “boklisto” ya Bosato ekóma Lingomba ya Leta na boyangeli ya Loma. Na bosikisiki, mokomi na makambo ya kala mpe moto wa ekólo France, Henri-Irénée Marrou akomaki ete: “Boklisto ya solo, na elobeli ya malamu, Lingomba ya Katolike Orthodoxe ekómaki lingomba kati na mikili nyonso miyangelamaki na Loma na nsuka ya boyangeli ya Théodose.” Lingomba ya Katolike orthodoxe ekitanaki boklisto ya solo mpe ekómaki bongo “eteni ya mokili.” Lingomba wana ya Leta ekesenaki mpenza na losambo ya bayekoli ya liboso ya Yesu, oyo alobaki na bango ete: “Bino bozali bato na mokili te.”​—Yoane 15:19.

Mokomi na makambo ya kala mpe filozofe Louis Rougier akomaki ete: “Na bopalangani na yango, boklisto ya solo ebongwanaki mpenza mingi kino ekokaki lisusu koyebana te. . . . Lingomba ya ebandeli ya babóla, oyo ezalaki kobika na makabo ya bolingo, ekómi Lingomba makasi oyo ezali na bokonzi elongo na bato minene ya eleko na yango soki ekokaki te kolónga bango.”

Na ebandeli ya ekeke ya mitano ya ntango na biso, “Saint” Augustin, ya Lingomba Katolike ya Loma akomaki mokanda na ye oyo eyebani mingi Mboka ya Nzambe. Kati na yango amonisi mboka mibale, “oyo ya Nzambe mpe oyo ya mokili.” Mokanda yango emonisaki mpenza bokabwani kati na Bakatolike mpe mokili? Soko moke te. Molakisi Latourette ayebisi ete: “Augustin andimaki polele ete mboka wana mibale, moko ya mabelé mpe mosusu ya likoló ezali na boyokani makasi.” Augustin ateyaki ete “Bokonzi ya Nzambe esilaki kobanda mosala na yango kati na mokili oyo uta kotyama ya Lingomba [Katolike].” (Nouvelle Encyclopédie britannique, Macropædia, Volume 4, lokasa 506) Na yango, atako mokano ya ebandeli ya Augustin ezalaki nini, mateya na ye mazalaki kopusa Lingomba ya Katolike na komikotisa mozindo kati na makambo ya politike ya mokili oyo.

Boyangeli ekabwani

Na 395 T.B., ntango Théodose Ier akufaki, boyangeli ya Loma ekabwanaki na biteni mibale. Boyangeli ya Orient, to byzantin, oyo mboka-mokonzi na yango ezalaki na Constantinople (oyo kala ebengamaki Byzance, ekómi lelo oyo Istanbul), mpe Boyangeli ya Occident ezalaki na mboka-mokonzi na yango (nsima ya 402 T.B.) na Ravenne, na Italie. Na motindo yango, boklisto ya lokuta ekabwanaki na makambo ya politike mpe na makambo ya losambo. Mpo na boyokani kati na Lingomba mpe Leta, lingomba ya Boyangeli ya Orient elandaki mateya ya Eusèbe de Césarée (azalaki na bomoi na ntango ya Constantin le Grand). Lokola alandaki te etinda ya boklisto oyo etali komikabola na mokili, Eusèbe akanisaki ete soki mokonzi mpe boyangeli na ye bakómi baklisto, Lingomba mpe Leta ekokóma etuluku moko ya boklisto, elongo na mokonzi lokola momonisi ya Nzambe awa na mabelé. Wana ezali na mokuse, boyokani oyo Mangomba ya Orthodoxe ya Orient, esalaki na boumeli ya bikeke mingi, elongo na Leta. Kati na mokanda na ye, Lingomba ya Orthodoxe (na Lingelesi), Timothy Ware, episkopo Orthodoxe amonisi makambo oyo yango ebimisaki: “Bolingo ya ekólo ezalaki libebi ya lingomba ya Orthodoxe na boumeli ya bikeke zomi oyo euti koleka.”

Na Occident, mokonzi ya nsuka ya Loma alongolamaki na 476 T.B. na balóngi ya bitúka bibengami Germanie. Yango etyaki nsuka na Boyangeli ya Loma na Occident. Na ntina na kozanga bokonzi oyo elandaki yango, mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique eyebisi ete: “Nguya ya sika esalemaki: Lingomba ya Katolike ya Loma, lingomba ya episkopo wa Loma. Lingomba yango emimonaki lokola mokitani ya Boyangeli ya Loma oyo esili kokwea.” Mokanda yango elandi koyebisa ete: “Bapápa ya Loma . . . balekisaki ndelo ya bokonzi ya mokili likoló ya Lingomba mosika koleka oyo ya Lingomba-Leta mpe babimisaki liteya ya mipangá mibale, kolobáká ete Klisto apesaki na pápa bobele nguya ya elimo te likoló na Lingomba, kasi lisusu nguya likoló na bikonzi ya mokili.”

Mangomba ya Protestá mpo na ekólo

Na boumeli ya Moyen Age, mangomba ya Orthodoxe mpe ya Katolike ya Loma elandaki komikotisa mozindo kati na politike, na mobulu ya mokili mpe na bitumba. Mbongwana oyo, na ekeke ya zomi na motoba, ebimisaki lingomba Protestá ezalaki nde bozongi na boklisto ya solo, oyo ekabwani na mokili?

Soko moko te. Tozali kotanga kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique ete: “Baprotestá oyo babandisaki mbongwana, oyo balandi mateya ya Luther, ya Calvin mpe ya Anglican . . . bakangamaki makasi na makanisi ya Augustin, oyo mateya na ye masepelisaki bango mingi. . . . Moko na moko ya mangomba minene ya Protestá ya ekeke ya zomi na motoba kati na mikili ya Mpótó . . . ezwaki lisungi na bakonzi ya mokili na Saxe [centre ya Allemagne], na Suisse, mpe na Angleterre, mpe babatelaki etelemelo bobele moko ya Lingomba ya Moyen Age.”

Na esika ya kozonga na boklisto ya solo, Mbongwana [ya Protestá] ememaki ebele na mangomba mpo na bikólo to mpo na bitúka oyo elukaki kondimama na biyangeli ya politike mpe esungaki yango na molende nyonso kati na bitumba. Ya solo, Lingomba ya Katolike mpe Lingomba ya Protestá ebimisaki bitumba mingi ya mangomba. Kati na mokanda na ye, Mangomba, lolenge yango etalelamaki na mokomi moko ya makambo ya kala (na Lingelesi), Arnold Toynbee akomaki na ntina na bitumba yango ete: “Emonisaki polele ete Bakatolike mpe Baprotestá ya France, ya Hollande, ya Allemagne, mpe ya Irlande, mpe mangomba mikemike mazangi boyokani ya Protestá na Angleterre mpe na Ecosse, nde babimisaki mobulu ya kobomana kati na bango na nzela ya bibundeli.” Bitumba oyo ezali naino kokabola Irlande mpe oyo ebengamaki kala ete Yougoslavie, emonisi ete mangomba ya Katolike ya Loma, ya Orthodoxe mpe mangomba ya Protestá mazali kino lelo komikotisa mingi na makambo ya mokili oyo.

Makambo oyo nyonso mamonisi nde ete boklisto ya solo, oyo ekabwani na mokili, ezali lisusu awa na mabelé te? Lisoló lilandi likoyanola na motuna wana.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 10, 11]

LOLENGE OYO “BOKLISTO” EKÓMAKI LINGOMBA YA LETA

YESU alobaki ata mbala moko te ete boklisto ya solo esengelaki kokóma eteni ya mokili oyo. (Matai 24:3, 9; Yoane 17:16) Nzokande, mikanda ya makambo ya kala mizali komonisa ete na ekeke ya minei ya ntango na biso “boklisto” eyebanaki na mibeko lokola Lingomba ya Leta na Bokonzi ya Loma. Likambo yango esalemaki ndenge nini?

Kobanda na eleko ya mokonzi Néron (54-68 T.B.) kino pene na katikati ya ekeke ya misato ya ntango na biso, bakonzi ya Loma banyokolaki mingi baklisto to bapesaki nzela ete banyokola bango. Gallien (253-268 T.B.) azalaki mokonzi ya liboso ya Loma oyo abimisaki mobeko mpo na kotika bango. Atako bongo, boklisto ya solo ezalaki lingomba epekisami kati na boyangeli mobimba ya Loma. Nsima ya Gallien, minyoko milandanaki, mpe miyaki makasi na nse ya boyangeli ya Dioclétien (284-305 T.B.) mpe ya bakitani na ye ya penepene.

Mbongwana esalemaki na ebandeli ya ekeke ya minei, na oyo ebengamaki ete kobongwana ya mokonzi Constantin Ier na boklisto ya solo. Na ntina na “kobongwana” yango, mokanda ya Lifalansé Théo— Nouvelle encyclopédie catholique elobi ete: “Constantin amimonisi lokola mokonzi moklisto. Mpo na koloba solo, azwaki batisimo bobele wana akómaki penepene na kokufa.” Atako bongo, na 313 T.B., Constantin mpe Licinius (oyo azalaki koyangela na eteni mosusu ya bokonzi) babimisaki mobeko oyo epesaki bonsomi ya losambo na baklisto mpe na bapakano lokola. Mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique eyebisi ete: “Bonsomi ya losambo oyo Constantin apesaki epai na baklisto, oyo elimbolaki ete boklisto ya solo endimamaki na mibeko lokola religio licita [Lingomba lindimami] motindo moko na bopakano, ezalaki mpenza likambo moko ya mbongwana.”

Nzokande, mokanda Nouvelle Encyclopédie britannique elobi ete: “Ye [Constantin] akómisaki te boklisto ya solo lingomba ya boyangeli.” Mokomi na makambo ya kala, moto wa ekólo France, Jean-Rémy Palanque, mosangani ya Institut de France, akomi ete: “Leta ya Loma . . . etikalaki, atako bongo, ya bopakano engebene mibeko. Mpe Constantin, ntango akotaki na Lingomba ya Klisto, asukisaki ezalela yango te.” Kati na mokanda Libúla ya Loma (na Lingelesi), molakisi Ernest Barker alobaki ete: “[Bolóngi ya Constantin] eutaki te na kotyama ya nokinoki ya boklisto ya solo lokola lingomba ya Leta. Constantin asukaki bobele na kondima boklisto ya solo lokola moko na mangomba minene ya bokonzi. Na boumeli ya mibu ntuku nsambo oyo milandaki, milulu ya bopakano mizalaki ntango nyonso kosalema na boyokani na mibeko na Loma.”

Mpo na yango, na eleko wana “boklisto” ezalaki Lingomba lindimami na Boyangeli ya Loma. Ntango nini ekómaki, na ndimbola na yango mpenza, Lingomba ya Leta? Tozali kotanga kati na mokanda Nouvelle Encyclopédie catholique (na Lingelesi) ete: “Makanisi [ya Constantin] elandanaki na bakitani na ye, longola bobele Julien [361-363 T.B.], oyo liwa na ye esukisaki na mbalakaka minyoko oyo azalaki kobimisela baklisto. Na nsima, na nsuka ya ekeke ya minei, Théodose le Grand [379-395 T.B.] akómisaki boklisto ya solo lingomba liyebani kati na Boyangeli mpe alongolaki losambo ya bapakano kati na milulu ya bato.”

Mpo na kondimisa yango mpe komonisa lolenge lingomba ya sika ya Leta ezalaki, moyekoli na Biblia mpe mokomi na makambo ya kala, F. J. Foakes Jackson akomaki ete: “Na nse ya boyangeli ya Constantin, boklisto ya solo mpe boyangeli ya Loma ezalaki na boyokani. Na nse ya boyangeli ya Théodose ekómaki na bomoko. . . . Kobanda wana, nkombo ya Katolike epesamaki na baoyo bazalaki kosambela Tata, Mwana mpe Elimo-Santu na lokumu motindo moko. Makanisi ya mokonzi wana na ntina na losambo ezalaki mpo na mokano wana, mpo na yango Bindimeli ya Katolike ekómaki lingomba bobele moko lindimami na Baloma.”

Jean-Rémy Palanque akomaki ete: “Théodose, wana azalaki kobundisa bopakano, andimaki mpe Lingomba ya [Katolike] Orthodoxe; mobeko na ye ya mobu 380 T.B. etindaki bato na ye nyonso na kosakola bindimeli ya Pápa Damas mpe ya episkopo [mondimi ya Bosato] ya Alexandrie mpe elongolaki bonsomi ya losambo epai na baoyo baboyaki kondima yango. Likita monene ya Constantinople (381) ekweisaki lisusu mateya nyonso oyo makeseni, mpe mokonzi azalaki kosenzela ete episkopo moko te andima yango. Boklisto ya [Bosato] ya Nice ekómaki mpenza lingomba ya Leta . . . Lingomba ekangamaki makasi na Leta mpe ezwaki lisungi mobimba na yango.”

Na yango, ezalaki te boklisto ya peto ya bantoma nde ekómaki lingomba ya Leta ya Boyangeli ya Loma. Ezalaki Bosato ya Katolike ya ekeke ya minei, oyo etyamaki na makasi na mokonzi Théodose Ier mpe esalelamaki na lingomba ya Katolike ya Loma, oyo ezalaki mpe ezali kino sikawa, eteni mpenza ya mokili oyo.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Emperor Theodosius I: Real Academia de la Historia, Madrid (Foto Oronoz)

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]

Scala/​Art Resource, N.Y.