Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na kotalela mibeko ya Biblia oyo elobi ete makila esengeli kosalelama na lolenge oyo ebongi, ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalisa moto na makila na ye moko?

Na esika ya kozwa ekateli oyo euti na mposa na ye moko to na toli ya monganga, moklisto mokomoko azali na mokumba ya kotalela malamumalamu makambo oyo Biblia elobi. Ezali likambo etali boyokani na ye na Yehova.

Yehova, moto apesi biso bomoi, apesaki mobeko ete esengeli kolya makila te. (Genese 9:3, 4) Na Mibeko oyo apesaki Yisalaele ya kala, Nzambe ayebisaki ndenge oyo basengeli kosalela makila mpamba te makila ezali bomoi. Alobaki boye: “Mpo ete bomoi ya mosuni ezali kati na makila, mpe ngai nasili kopesa yango na bino na likoló ya etumbelo mpo na kosala kozongisa na bondeko na ntina na bomoi.” Moto asengelaki kosala nini soki abomi nyama mpo na kolya? Nzambe alobaki ete: “Akosopa makila na yango mpe akozipa yango na mputulu.” * (Levitike 17:11, 13) Yehova azongelaki mobeko yango mbala na mbala. (Deteronome 12:16, 24; 15:23) Buku moko ya Bayuda (Soncino Chumash) elobi boye: “Esengeli kobomba makila te kasi kosopa yango na mabele mpo bálya yango te.” Moyisalaele moko te asengelaki kokamata, kobomba, to kosalela makila ya ekelamu mosusu, oyo Nzambe apesá bomoi.

Kotosa Mobeko ya Mose esukaki ntango Masiya akufaki. Kasi, likanisi ya Nzambe ete makila ezali bulɛɛ esukaki te. Elimo santu ya Nzambe etindaki bantoma báyebisa baklisto ‘báboya makila.’ Basengelaki kozwa mobeko yango na lisɛki te. Ezalaki na ntina mingi ndenge moko na koboya pite na ekobo to losambo ya bikeko. (Misala 15:28, 29; 21:25) Ntango likambo ya kopesa mpe kozongisama makila ekómaki kosalema mingi na ekeke ya 20, Batatoli ya Yehova basosolaki ete likambo yango eyokani te na Liloba ya Nzambe. *

Ntango mosusu, monganga akoki kosɛnga moto ya maladi apesa makila na ye bábomba yango mwa bapɔsɔ liboso básala ye lipaso mpo ete soki ekosɛnga bátya ye makila, bázongisa ye makila na ye moko oyo babombaki. Kasi, likambo yango ya kozwa, kobomba, mpe kozongisa makila eyokani ata moke te na makambo oyo mokanda ya Levitike mpe ya Deteronome elobi. Makila esengeli kobombama te; kasi esengeli nde kosopa yango, ezali lokola bazongisi yango epai ya Nzambe. Ya solo, lelo oyo, tozali lisusu na nse ya Mobeko ya Mose te. Atako bongo, Batatoli ya Yehova batosaka mitinda oyo Nzambe amonisaki na kati ya mobeko yango, mpe bazali na ekateli ya ‘koboya makila.’ Yango wana, makila na biso oyo esengeli ‘kosopama,’ topesaka yango te, tobombaka yango mpe te mpo na kozongisa yango lisusu na nzoto. Kopesa to kobomba makila mpo na kozongisa yango lisusu na nzoto ezali kobuka mobeko ya Nzambe.

Emonani ete mayele mosusu to baekizamɛ mosusu oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko ebuki mpenza mitinda ya Nzambe te. Na ndakisa, baklisto mingi bandimaka bábenda bango ndambo ya makila mpo básala yango ekizamɛ, nsima básopa yango. Minganga bakoki mpe kosɛnga moto apesa makila mpo na bantina mosusu mingi.

Na ndakisa, na mapaso mosusu, minganga bakoki kobimisa makila mosusu libándá ya nzoto na mayele oyo babengaka hémodilution. Basalaka ete makila oyo etikali na nzoto ya moto ezala lisusu mingi te. Na nsima, bakozongisa makila oyo babimisaki na nzoto, na bongo makila ekomata pene na ndenge ezalaki. Ndenge moko mpe, bakoki lisusu kozwa makila oyo ezali kobima na mpota ya lipaso, babendi ba globules rouges mpo na kozongisa yango lisusu na nzoto ya moto. Babengaka mayele yango cell-saver. Na mapaso mosusu, bakoki kolekisa makila na masini moko oyo, mpo na mwa ntango, ekosala mosala oyo binama ya nzoto esalaka (na ndakisa, motema, mimpululu, to bangei). Na nsima bakozongisa makila oyo euti na masini na nzoto ya moto yango. Na mapaso mosusu, balekisaka makila na masini moko (centrifugeuse) mpo na kolongola biloko mosusu to biloko oyo ebebi na kati ya makila. Ntina na yango ekoki mpe kozala ete bábimisa biloko mosusu oyo esangani na kati ya makila mpo na kosalisa na yango eteni mosusu ya nzoto ya moto yango. Ezali mpe na baekizamɛ mosusu oyo babendaka moto makila mingi mpo na koyeba groupe na yango to mpo na kosangisa yango na nkisi mosusu, bongo na nsima bakozongisa yango na nzoto ya moto yango.

Makambo mikemike ezali ndenge na ndenge, mpe na ntembe te, minganga bakobimisa mayele, bankisi, mpe baekizamɛ mingi mpo na makila. Ezali mokumba na biso te ya kolobela likambo mokomoko mpe kozwa ekateli. Moklisto asengeli kozwa ekateli na ndenge bakosalela makila na ye na ntango ya lipaso, ekizamɛ, to mpo na kosalisa ye na nkisi mosusu. Ntango mingi liboso, asengeli kosɛnga monganga to moto oyo azali kosalisa ye ayebisa ye malamumalamu eloko nini bakosala na makila na ye. Na bongo akozwa ekateli na kolanda likambo oyo lisosoli na ye endimi. (Talá etanda.)

Baklisto basengeli koyeba ete bamipesá na Nzambe mpe bazali na mokumba ya ‘kolinga ye na motema na bango mobimba, na molimo na bango mobimba, na nguya na bango mobimba, mpe na mayele na bango mobimba.’ (Luka 10:27) Batatoli ya Yehova bakeseni na bato mingi, bango bapesaka motuya mingi na boyokani na bango na Nzambe. Mopesi ya bomoi azali kosɛnga na bato nyonso bátya elikya na makila ya Yesu oyo esopamaki. Tozali kotánga boye: “Na ye [Yesu Klisto] tozwi lisiko na nzela ya makila na ye, kolimbisama ya mabunga.”—Baefese 1:7.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Profesɛrɛ Frank Gorman akomaki boye: “Kosopa makila ezali mpenza likambo ya losambo oyo ezali komonisa limemya mpo na bomoi ya nyama mpe, na ndenge yango, ezali komonisa botosi epai ya Nzambe, oyo akelaki mpe azali kobatela bomoi yango.”

^ par. 5 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1951 (ebimeli ya Lingelesi), epesaki biyano na mituna mpo na likambo yango, emonisaki ntina oyo kozongisa moto makila ya moto mosusu ezali malamu te.

[Etanda/Bililingi na lokasa 31]

MITUNA OYO OSENGELI KOMITUNA

Soki makila na ngai ebimi na libándá ya nzoto na ngai, mpe ata soki makila etiki kotambola na nzoto mpo na mwa ntango, lisosoli na ngai ekondima natalela yango lokola kaka makila na ngai moko, kozanga ete nasɛnga ‘básopa yango na mabele’?

Lisosoli na ngai oyo eteyami na Biblia ekotungisama te soki na ntango ya lipaso to mpo na kosalisa ngai babendi ngai makila, babongoli yango, mpe bazongisi ngai yango lisusu na nzoto?