‘Bókima mbangu na ndenge yango’
‘Bókima mbangu na ndenge yango’
KANISÁ ete ozali na libándá ya masano esika moko na bato oyo bazali na loyenge. Bato oyo bakosala masano bazali koleka na molɔngɔ. Bato bazali kobɛta mabɔkɔ makasi mpe koganga ntango bamoni bilombe na bango ya masano. Bakonzi ya masano bazwi bisika na bango mpe bazali kolandela basani mpo ete bátosa mibeko ya masano. Ntango masano ezali kosalema, bato bazali koganga mpo na kokumisa baoyo bazali kolonga mpe kozomela bamosusu. Bazali kobɛtɛla baoyo bazali kolonga mabɔkɔ makasi!
Ozali kotala lisano ya mikolo oyo te, kasi oyo esalemaki esili koleka mbula soki 2 000 na Isthme de Corinthe. Kuna, nsima ya mbula mibale nyonso kobanda na ekeke ya motoba L.T.B. tii na ekeke ya minei T.B., bazalaki kosala masano babengi jeux isthmiques. Na ekólo Grèce mobimba, bato bazalaki kolanda masano yango oyo ezalaki koumela mikolo mingi. Masano yango ezalaki kaka momekano te. Bato oyo bazalaki kosala masano bazalaki komonisa ndenge oyo bazalaki kobongisa basoda. Baoyo bazalaki kolonga, bazalaki kokumisa bango lokola bilombe, bazalaki kozwa mitole ya nkasa ya nzete. Bazalaki mpe kopesa bango mbongo.
Ntoma Paulo ayebaki malamu masano ya isthmique oyo ezalaki kosalema pembeni ya Kolinti, mpe akokanisaki bomoi ya moklisto na momekano yango. Ntango azwaki ndakisa ya bato oyo bakimaka mbangu, bato oyo babundaka libanda mpe baoyo babundaka na makofi, amonisaki ete komibongisa malamu, kosala milende, mpe koyika mpiko ezalaka na mbano. Baklisto oyo akomelaki mokanda bayebaki mpe masano yango malamu. Na ntembe te bamosusu bazalaki na kati ya bato oyo bazalaki koganga na libándá ya masano. Elingi koloba ete bakangaki ntina ya bandakisa ya ntoma Paulo malamu. Boni mpo na biso lelo oyo? Biso mpe tozali kati na momekano ya mbangu mpo na bomoi ya seko. Bolamu nini tokozwa na bandakisa ya mimekano oyo Paulo asaleli?
‘Bókima mbangu na kotosa mibeko’
Na masano yango ya kala, mpo bándima moto, asengelaki kokokisa masɛngami ya makasi. Molobi moko azalaki kolakisa mosani mokomoko na batali mpe kotuna boye: ‘Ezali na moto moko oyo akoki kofunda moto oyo ete asalaki mabe moko? Azali moyibi to moto mabe? Lolenge na ye ya bomoi ezali ya mbindo?’ Buku moko (Archaeologia Graeca) elobi ete, “moto moko te oyo ayebanaki lokola moto ya mobulu, to [moninga] ya moto ya mobulu, azalaki kondimama na momekano.” Lisusu, soki moto alandi mibeko ya masano te, azalaki kozwa
etumbu makasi, bazalaki kolongola ye na momekano.Likambo oyo esalisi biso tókanga ntina ya maloba ya ntoma Paulo ete: “Soki moto asali makasi na masano, akozwa motole bobele soki atosi mibeko.” (2 Timote 2:5, NW) Lolenge moko, mpo na kokima mbangu mpo na bomoi, tosengeli kokokisa masɛngami ya Yehova, kotosa mibeko na ye ya bizaleli malamu ndenge emonisami na Biblia. Kasi, Biblia elobi na biso boye: “Makanisi ya motema ya moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Yango wana, ata tosili kobanda kokima mbangu, tosengeli kosɛnzɛla ete tókimaka kaka na kotosa mibeko mpo ete Yehova akoba kondima biso mpe tózwa bomoi ya seko.
Kolinga Nzambe nde ekosalisa biso mingi na likambo yango. (Malako 12:29-31) Bolingo yango ekopusa biso tósepelisaka Yehova mpe tósalaka mokano na ye.—1 Yoane 5:3.
“Tólongola kilo nyonso”
Na masano ya kala, bakimi mbangu bazalaki kolata bilamba ya kilo te. Buku moko (The Life of the Greeks and Romans), elobi ete: “Na masano ya mbangu, . . . basani bazalaki pembeni mpenza ya kozala bolumbu.” Basani basengelaki kokima mbangu malamu soki balati bilamba te mpo bazali pɛpɛlɛ. Bazalaki komilɛmbisa te na kilo ezangi ntina. Ekoki kozala mpenza ete ntoma Paulo akanisaki na likambo yango ntango akomelaki baklisto ya Baebele ete: “Tólongola kilo nyonso . . . , mpe tókima na mpiko na momekano ya mbangu oyo etyami liboso na biso.”—Baebele 12:1, NW.
Biloko nini ya kilo ekoki kopekisa biso tókima malamu na momekano ya mbangu mpo na bomoi? Moko na yango ekoki kozala mposa ya biloko ya mokili oyo ezangi ntina to kozala na bomoi ya lokumu. Bamosusu bakoki komona ete bozwi nde ekoki kobatela bango to kopesa bango esengo. Ebele ya “kilo” ndenge wana ekoki kolɛmbisa mokimi mbangu mpe, nsukansuka, akomona ete Nzambe azali mpenza na ntina mingi mpo na ye te. (Luka 12:16-21) Bomoi ya seko ekoki kokóma lokola elikya moko ya mosika. Akoki koloba boye: ‘Mokili ya sika ekoya sikoyo te, yango wana, nasepela naino na biloko ya mokili.’ (1 Timote 6:17-19) Kozala na makanisi ya kokóma na biloko mingi ya mosuni ekoki kolongola moto na momekano ya mbangu mpo na bomoi to ekoki kopekisa ye ete abanda kokima mbangu.
Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Moto akoki kosalela bankolo mibale te. Zambi soko akoyina moko mbe akolinga mosusu, soko nde akondima moko mbe akotyola mosusu. Bokoki kosalela Nzambe mpe misolo te.” Na nsima, ntango alobaki ete Yehova akokisaka bamposa ya nyama na nzete mpe ete bato bazali na valɛrɛ mingi koleka yango, alobaki boye: “Bómitungisa te mpo na koloba ete, Tokolya nini?’ Soko ete, Tokomela nini? soko ete, Tokolata nini? Bapakano bakolukaka biloko yango nyonso. Zambi Tata na bino na Likoló ayebi ete bozali na bosɛnga na yango nyonso. Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye mpe bilɔkɔ oyo nyonso ikobakisama na bino.”—Matai 6:24-33.
‘Bokima mbangu na molende’
Mimekano mosusu ya kokima mbangu na ntango ya kala ezalaki na ntaka milai. Momekano moko, babengaki yango dolikhos, ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki minei. Kosala yango ezalaki kosɛnga kozala makasi mpe na molende. Balobaka ete na 328 L.T.B., mosani moko na nkombo Ageas, ntango alongaki na momekano yango, akimaki lisusu tii na engumba na bango Argos, mpo na koyebisa ete alongi. Mokolo yango, akimaki kilomɛtrɛ soki 110!
2 Timote 4:7, 8, NW) Lokola ntoma Paulo, tosengeli kokima “tii na nsuka.” Soki mpiko na biso elɛmbi, mpamba te momekano ya kokima mbangu ezali molai koleka ndenge oyo tokanisaki, tokozwa mpe mbano te. (Baebele 11:6) Ekozala mpenza mawa mingi na kozonga nsima lokola tokómi pene na nsuka!
Momekano ya kokima mbangu ya baklisto ezali molai mpe ezali komeka molende na biso. Moto asengeli koyika mpiko tii na nsuka mpo ete Yehova andima ye mpe azwa libonza ya bomoi ya seko. Ntoma Paulo akimaki na ndenge yango. Ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye, alobaki boye: “Nabundi etumba malamu, nakimi mbangu tii na nsuka, nabateli kondima. Kobanda sikoyo motole ya boyengebene ebombami mpo na ngai.” (Libonza
Mbala mingi bato oyo bazalaki kolonga na mimekano na Grèce ya kala, bazalaki kozwa mitole oyo esalemaki na nkasa ya nzete mpe ezalaki na bafɔlɔlɔ. Na lisano ya pythique, bato oyo bazalaki kolonga bazalaki kozwa motole esalemi na nkasa ya nsɔlɔ (laurier). Na lisano ya olympique, bazalaki kozwa mitole ya nkasa ya olive mpe na lisano ya ishtmique bazalaki kozwa mitole esalemi na nkasa ya nzete ya pin. Moto moko ya mayele ya makambo ya Biblia alobi ete: “Mpo bato oyo bazalaki kosala masano bábakisa molende, bazalaki kotya mitole, mbano ya kolonga, mpe bitape ya nzete ya mbila mpe batii yango na mesa moko na libándá ya masano ntango bazali kosala masano mpe bazalaki komona yango.” Mpo na moto oyo alongi, kolata motole ezalaki lokumu monene. Ntango azongi na mboka na ye, azalaki komata na likalo mpe bazalaki kotambwisa ye na engumba.
Ntoma Paulo akanisaki na yango mpe atunaki baklisto ya Kolinti boye: “Boyebi te ete bango bakomekana mbangu na makolo, [bakokima] nyonso nde bobele moko akozwa libonza? [Bókima] mbangu ete bózwa na solo. . . . Bango bakosalaka bongo mpo na kozwa motole mokobeba nde biso mpo na yango ekobeba te.” (1 Bakolinti 9:24, 25; 1 Petelo 1:3, 4) Talá bokeseni! Libonza bato oyo bazali kokima mbangu mpo na bomoi bakozwa ekeseni mpenza na mitole ya mpambampamba ya masano ya kala, mpamba te oyo ya bango ekobeba te.
Mpo na motole yango oyo eleki malamu, ntoma Petelo akomaki boye: “Wana ekomonana Mokonzi Mobateli, bokozwa motole na nkembo mokobeba te.” (1 Petelo 5:4). Mokili oyo ezali na libonza ya kopesa oyo tokoki kokokanisa na kozanga kokufa, libonza ya bomoi ya kozanga kobeba kati na nkembo ya likoló elongo na Klisto?
Lelo oyo, baklisto mingi oyo bazali na momekano ya kokima mbangu bazali bapakolami te mpo na kozala bana ya Nzambe na elimo mpe bazali na elikya ya bomoi na likoló te. Bazali kokima mbangu te mpo bázwa libonza ya kozanga kokufa. Kasi, Nzambe abombeli bango libonza moko ya motuya mingi: Bomoi ya seko mpe ya kokoka na paladiso awa na mabele oyo ekoyangelama na Bokonzi ya likoló. Ata soki moklisto azali kokima mpo na libonza nini, asengeli kokima na molende mpe na mpiko koleka mosani nyonso ya momekano ya kokima mbangu. Mpo na nini? Mpamba te libonza oyo bakozwa ekobeba te. “Oyo mpe ezali elaka etikelaki ye bino, ete bomoi na seko.”—1 Yoane 2:25.
Soki moklisto oyo azali kokima mbangu atii miso na libonza yango monene, ndenge nini akotalela biloko ya mokili oyo ezali kolɛngola? Akotalela yango lokola ntoma Paulo alobaki ete: “Nazali kotánga biloko nyonso mpamba mpo na likambo lileki malamu, yango koyeba Klisto Yesu Nkolo na ngai. Mpo na ye nabungisi biloko nyonso mpe nazali kotánga yango bobele nyei.” Bafilipi 3:8, 13, 14) Ntoma Paulo azalaki kokima mbangu miso kaka na libonza. Biso mpe tósala bongo.
Mpo na yango nde ntoma Paulo azalaki kokima na molende mpenza! Alobi boye: “Bandeko, natángi te ete nasili kosimba yango, nde nazali kosalaka likambo oyo moko ete, awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe kopusaka mpo na yango izali liboso, nazali [kolanda] kino nsuka mpo na libonza.” (Ndakisa eleki malamu mpo na biso
Na masano ya kala, bazalaki kokumisa mingi bato oyo balongi. Bakomi ya ntɔki bazalaki kokoma maloba mpo na bango, mpe bayemi bazalaki kosala bikeko na bango. Věra Olivová, moto ya istware, alobi ete “bazalaki mpenza bato ya lokumu mpe bayebanaki mingi.” Bazalaki lisusu bandakisa mpo na bilenge oyo bazalaki nsima na bango.
Nani azali “molongi” oyo atikaki ndakisa eleki malamu mpo na baklisto? Ntoma Paulo apesi eyano: “[Tókima] na [mpiko] na emekaneli ya mbangu etyami liboso na biso, awa ezali biso kotala Yesu, ye Mobandisi mpe Mosukisi na kondima. Mpo na esengo etyami liboso na ye, ayikeli [nzete ya mpasi] mpiko, atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ ya mobali na kiti ya bokonzi ya Nzambe.” (Baebele 12:1, 2) Ya solo, soki tolingi kolonga na momekano ya kokima mbangu mpo na bomoi, tosengeli kotalela malamumalamu Ndakisa na biso, Yesu Klisto. Tokoki kosala bongo soki tozali kotánga mokolo na mokolo masolo ya Evanzile mpe kokanisa na ndenge oyo tosengeli kolanda ndakisa na ye. Boyekoli yango ekosalisa biso tóndima ete Yesu azalaki mpenza kotosa Nzambe mpe amonisaki kondima na ye na koyika mpiko. Lokola ayikaki mpiko, Yehova Nzambe andimaki ye mpe apesaki ye mikumba minene mosusu.—Bafilipi 2:9-11.
Ya solo, ezaleli eleki monene ya Yesu ezalaki bolingo. “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Apesaki ndimbola mozindo ya liloba “bolingo” ntango alobaki tólingaka ata banguna na biso. (Matai 5:43-48) Lokola alingaki Tata na ye ya likoló, Yesu azalaki kosepela kosala mokano na ye. (Nzembo 40:9, 10; Masese 27:11) Soki tokotalela Yesu lokola ndakisa na biso mpe moto oyo afungoli nzela kati na momekano ya kokima mbangu mpo na bomoi, yango ekopusa biso tólinga Nzambe mpe mozalani na biso mpe tósepela na mosala na biso ya bulɛɛ. (Matai 22:37-39; Yoane 13:34; 1 Petelo 2:21) Tóyeba ete Yesu asɛngaka bobele eloko oyo ekokani na makasi na biso. Alobi boye: “Ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ezali na motau, mpe mokumba na ngai ezali na [kilo] te.”—Matai 11:28-30.
Lokola Yesu, tosengeli kotya miso na libonza oyo babombeli bato nyonso oyo bakoyika mpiko tii na nsuka. (Matai 24:13) Soki tozali kokima na kotosaka mibeko, soki tolongoli kilo nyonso, mpe soki tozali kokima na mpiko, tokoki kozala na elikya ete tokolonga. Libonza oyo babombeli biso ezali kotinda biso tókende liboso. Ebakiselaka biso makasi, epesaka biso esengo oyo ekómisaka nzela pɛpɛlɛ mpo na kotambola.
[Elilingi na lokasa 29]
Momekano ya kokima mbangu ya baklisto ezali molai mpe ezali kosɛnga koyika mpiko
[Elilingi na lokasa 30]
Na kokesana na mitole ya bato oyo bazalaki kokima mbangu, baklisto bakoki kolikya na libonza oyo ebebaka te
[Elilingi na lokasa 31]
Bato nyonso oyo bakoyika mpiko kino nsuka, bakozwa libonza
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 28]
Copyright British Museum