Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bitumba etikaka bilembo

Bitumba etikaka bilembo

Bitumba etikaka bilembo

MOTO moko oyo azalaká soda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, alobaki boye: “Na etumba, ezali na ngámbo moko te oyo elongaka. Bato nyonso balongaka te.” Bato mingi mpe bandimaka likanisi yango. Etumba etikaka makambo ya nsɔmɔ nsima na yango; ebebisaka biloko mingi, ezala epai ya baoyo balongi to epai ya baoyo balongi te. Ata soki etumba esili, bato ebele batikalaka na bilembo ya mabe.

Bilembo nini? Etumba ebomaka bato ebele; yango wana, bana mingi batikalaka bitike mpe basi mingi bakufelaka mibali. Bato mingi oyo babikaka na liwa bazokaka mpota minene mpe batikalaka na bilembo ya mabe na makanisi. Bamilio ya bato batikalaka mabɔkɔ mpamba to bakimaka bamboka na bango. Tókanisa koyinana mpe nkanda oyo etikalaka na mitema ya bato oyo babiki na liwa?

Mpota minene

Bilembo mabe oyo bitumba etikaka na mitema ya bato esilaka noki te ata soki etumba esili, lokito ya mindoki ezali lisusu te mpe basoda bazongi na bamboka na bango. Mbala mosusu bana oyo bakobotama nsima ya bitumba, na ngámbo nyonso mibale, bayokanaka te. Yango wana, bilembo mabe oyo etumba moko etiki ekoki komema etumba mosusu.

Na ndakisa, Traité de Versailles, boyokani oyo esalemaki na 1919 mpo na kosukisa Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, esɛngisaki Allemagne makambo oyo bato mingi ya ekólo yango bamonaki ete elekaki makasi mpe ezalaki lokola nde bapesaki bango etumbu mpo na makambo oyo basalaki. Mokanda moko (The Encyclopædia Britannica) elobi ete “bato mingi ya Allemagne basepelaki te” na makambo oyo esɛngamaki na boyokani yango “mpe epesaki bango mposa ya kozongisa mabe.” Mwa bambula na nsima, “nkanda oyo bazalaki na yango na motema mpo na boyokani yango ya kimya, epesaki Hitler nzela abanda makambo na ye” mpe ezalaki moko ya makambo oyo ebimisaki Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na Pologne mpe ekómaki tii na mikili ya Balkans. Na bambula ya 1940, bato ya bikólo ya Balkans basalanaki mabe mpe nsukansuka ememaki bango na bitumba mosusu na bambula ya 1990. Zulunalo moko (Die Zeit) oyo ebimaka na Allemagne, elobaki ete “koyinana mpe mposa ya kozongisa mabe na mabe ezalaki se kokola tii na ntango na biso.”

Mpo bato báfanda na kimya, esengeli mpenza kosilisa bilembo mabe oyo bitumba etikaka. Kasi ndenge nini kosilisa yango? Bato bakoki kosala nini mpo bátika koyinana mpe bábosana nkanda? Nani akoki kosilisa bilembo mabe oyo bitumba etikaka?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Fɔtɔ ya soda ya États-Unis; FƆTƆ YA ONU 158297/J. Isaac