Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bolingo na yo ezali mpenza monene?

Bolingo na yo ezali mpenza monene?

Bolingo na yo ezali mpenza monene?

“Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”​—MATAI 22:39.

1. Soki tolingaka Yehova, mpo na nini tosengeli mpe kolinga mozalani na biso?

 NTANGO moto moko atunaki Yesu mobeko oyo eleki monene, apesaki eyano ete: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.” Na nsima, alobelaki mobeko ya mibale oyo ekokani na oyo ya liboso ete: “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:37, 39) Ya solo, kolinga mozalani ezali elembo oyo emonisaka moklisto ya solo. Soki tolingaka Yehova, tosengeli kolinga mozalani na biso. Mpo na nini? Mpamba te mpo na komonisa ete tolingaka Nzambe, totosaka Liloba na ye, nzokande Liloba na ye ezali kosɛnga biso tólinga mozalani na biso. Na yango, soki tolingaka bandeko na biso te, tokoki kolinga Nzambe na ndenge ya solo te.​—Baloma 13:8; 1 Yoane 2:5; 4:20, 21.

2. Bolingo ya ndenge nini tosengeli kozala na yango mpo na bazalani na biso?

2 Ntango Yesu alobaki ete tosengeli kolinga mozalani na biso, alobaki kaka te ete tómona bango lokola baninga. Azalaki kolobela bolingo oyo ekeseni na bolingo oyo bandeko bazalaka na yango to bolingo ya mwasi na mobali. Azalaki kolobela bolingo lokola oyo Yehova azali na yango mpo na basaleli na ye oyo bamipesi mpe oyo bango bazali na yango mpo na ye. (Yoane 17:26; 1 Yoane 4:11, 19) Moyuda moko mokomeli, ye oyo Yesu asosolaki ete azalaki koloba na mayele, andimaki makanisi ya Yesu ete tosengeli kolinga Nzambe “na motema na biso mobimba mpe na molimo na biso mobimba mpe na mayele na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba.” (Malako 12:28-34) Alobaki solo. Bolingo oyo moklisto azalaka na yango mpo na Nzambe mpe mpo na mozalani na ye ezalaka likambo ya motema mpe ya bɔɔngɔ. Moto ayokaka yango na motema mpe etambwisami na makanisi.

3. (a) Ndenge nini Yesu ateyaki “molakisi ya Mibeko” ete asengeli kosuka na kotalela mozalani te kaka na ndenge oyo ye azalaki kokanisa? (b) Na nini lisese ya Yesu etaleli baklisto lelo oyo?

3 Luka akomaki ete ntango Yesu alobaki ete tosengeli kolinga mozalani na biso, “molakisi ya mibeko moko” atunaki ete: “Mozalani na ngai azali nani?” Mpo na kopesa ye eyano, Yesu asalelaki lisese moko. Babɛtaki mobali moko, bayibaki biloko na ye mpe batikaki ye pembeni ya nzela azali kobunda na mpasi ya liwa. Liboso, nganga moko alekaki wana, na nsima Molevi moko mpe alekaki. Bango mibale babwakelaki ye ata liso te. Na nsuka, Mosamalia moko mpe alekaki na nzela yango, amonaki moto yango oyo azokaki bampota mpe asalisaki ye na boboto mingi. Na kati ya bato yango misato, nani oyo azalaki mozalani ya moto oyo azokaki? Eyano ezalaki polele. (Luka 10:25-37) Na ntembe te molakisi yango ya mibeko ayokaki mabe na ndenge Yesu alobaki ete Mosamalia akoki kozala mozalani malamu koleka nganga na Molevi. Tomoni mpenza ete Yesu azalaki kosalisa moto yango alinga mozalani na ye koleka ndenge oyo azalaki kokanisa. Baklisto mpe bazalaka na bolingo ya ndenge yango. Tótalela bato ndenge na ndenge oyo bango balingaka.

Bolingo na kati ya libota

4. Epai wapi moklisto abandaka komonisa bolingo?

4 Baklisto balingaka bato ya libota na bango: basi balingaka mibali na bango, mibali balingaka basi na bango, baboti balingaka bana na bango. (Mosakoli 9:9; Baefese 5:33; Tito 2:4) Ya solo, na kati ya mabota mingi bato balinganaka. Kasi, masolo ya mabala oyo ezali kopanzana, ya mibali oyo bazali kobɛta basi na bango mpe baboti bazali kosundola to konyokola bana na bango, ezali komonisa ete lelo oyo, mabota ekómi na mokakatano mingi, mpe mbala mosusu bolingo oyo ezalaka na kati ya bandeko ekoki te mpo na kosangisa bango esika moko. (2 Timote 3:1-3) Mpo mabota na bango ezala malamu, baklisto basengeli komonisa bolingo lokola oyo Yehova na Yesu bazali na yango.​—Baefese 5:21-27.

5. Baboti basɛngaka lisalisi ya nani mpo na kobɔkɔla bana na bango, mpe mingi kati bango bazwi mbano nini?

5 Baklisto oyo bazali na bana batalelaka bango lokola biloko ya motuya oyo Yehova abombisi epai na bango mpe basɛngaka ye asalisa bango na kobɔkɔla bango. (Nzembo 127:3-5; Masese 22:6) Na ndenge yango, balonaka bolingo ya baklisto oyo esalisaka bango bábatela bana na bango mpo bálanda makambo mabe te oyo bilenge bakoki kokwea na yango. Yango wana, baklisto mingi oyo bazali na bana bayokaki esengo lokola ya mama moko na ekólo Pays-Bas. Ntango amonaki mwana na ye ya mobali azwi batisimo, azalaki na kati ya bato 575 oyo bazwaki batisimo na Pays-Bas na mbula eleki, akomaki boye: “Sikoyo, nazwi mbano ya mosala nyonso oyo nasalaki na boumeli ya mbula 20 oyo eleki. Ntango napesaki mpe makasi nyonso oyo nasalaki, na mpasi na motema, na molende mpe mawa, nabosani yango.” Azali na esengo mingi ete mwana na ye aponi ye moko kosalela Yehova. Na kati ya basakoli 31 089 oyo basalaki mosala ya kosakola na Pays-Bas na mbula eleki, mingi bateyamaki kolinga Yehova na baboti na bango.

6. Ndenge nini bolingo ya baklisto ekoki kosalisa mpo libala ezala malamu?

6 Paulo alobaki ete bolingo ezali “ekanganeli ekoki mpenza,” mpe ekoki kobatela libala ata soki mikakatano ebimi. (Bakolose 3:14, 18, 19; 1 Petelo 3:​1-7) Ntango mobali moko oyo afandi na Rurutu, mwa esanga moko moke ekabwani na Tahiti na ntaka ya kilomɛtrɛ 700, abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mwasi na ye asepelaki ata moke te. Nsukansuka, akamataki bana, atikaki mobali mpe akendaki kofanda na Tahiti. Kasi, mobali yango alakisaki bolingo na ye; azalaki ntango nyonso kotindela ye mbongo mpe azalaki kobenga ye na telefone mpo na koyeba soki ye na bana bazali na mposa ya eloko moko. Yango emonisi ete asalaki makasi mpo na kokokisa mokumba na ye lokola moklisto. (1 Timote 5:8) Azalaki ntango nyonso kobondela ete mokolo mosusu libota na ye ezala lisusu esika moko; nsukansuka mwasi na ye azongaki. Ntango azongaki, mobali yango afandaki na ye na “bolingo, etingya, [mpe] bopɔlɔ.” (1 Timote 6:11) Na 1998, mobali yango azwaki batisimo mpe na nsima ayokaki nsuka na esengo ntango mwasi na ye andimaki koyekola Biblia. Mwasi yango azali kati na bato 1 351 oyo bayekolaki Biblia na mbula eleki na teritware oyo filiale ya Tahiti etalelaka.

7. Mpo na mobali moko na Allemagne, nini esalisaki mpo libala na ye ekóma malamu mpenza?

7 Na Allemagne, mobali moko aboyaki ete mwasi na ye ayekola Biblia mpe azalaki kokanisa ete Batatoli ya Yehova bazalaki koluka kokosa ye. Kasi, na nsima, akomelaki Motatoli oyo akutanaki na mwasi na ye mpo na mbala ya liboso mokanda oyo ezalaki na maloba oyo: “Natɔndi yo mingi na ndenge olakisaki mwasi na ngai Batatoli ya Yehova. Liboso, nazalaki kobanga mpo nayokaki ebele ya makambo ya mabe likoló na bango. Kasi sikoyo, lokola ngai moko nakendaki na makita na mwasi na ngai, namoni mpenza ete nazalaki komikosa. Sikoyo nayebi ete makambo oyo nazali koyoka ezali mateya ya solo, mpe yango esalisi biso ete libala na biso ekóma malamu mpenza.” Kati na Batatoli ya Yehova 162 932 na Allemagne, na bamosusu 1 773 oyo bazali na bisanga oyo filiale ya Tahiti etalelaka, mingi bazali na kati ya ebele ya mabota oyo bolingo ya Nzambe esangisi.

Bolingo mpo na bandeko na biso baklisto

8, 9. (a) Nani oyo ateyaka biso tólinga bandeko na biso, mpe bolingo etindaka biso na kosala nini? (b) Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge bolingo ekoki kosalisa bandeko básalisanaka.

8 Paulo alobaki na baklisto ya Tesaloniki ete: “Bino mpenza bosili kolakisama na Nzambe mpo na kolingana.” (1 Batesaloniki 4:9) Ya solo, bato oyo ‘balakisami na Yehova’ balinganaka. (Yisaya 54:13) Bolingo na bango emonanaka na misala, lokola Paulo amonisaki yango ntango alobaki ete: “Bósalelana lokola baombo na bolingo.” (Bagalatia 5:13; 1 Yoane 3:18) Basalaka yango, na ndakisa, ntango batalaka bandeko oyo bazali na maladi, ntango balendisaka baoyo bazali konyokwama na makanisi, mpe ntango basungaka baoyo balɛmbi. (1 Batesaloniki 5:14) Bolingo ya solosolo ya baklisto oyo tozali na yango ezali kosala ete paladiso na biso ya elimo ekola.

9 Na lisangá ya Ancón, moko na masangá 544 ya ekólo Équateur, bandeko basalaki likambo moko oyo emonisaki mpenza bolingo na bango. Lokola nkita ya mboka ebebaki, bazalaki lisusu na misala te to ndenge mosusu ya kozwa mbongo mpe ezalaki te; yango wana, basakoli bamonaki mayele ya kozwa mbongo: bátɛkelaka babomi-mbisi biloko ya kolya ntango bazongaka nsima ya kosala mosala na bango na butu. Bango nyonso bapesanaki mabɔkɔ, bana mike mpe batikalaki nsima te. Esengelaki bábandaka mosala na ngonga ya liboso ya butu mpo básilisaka na ngonga ya 4 ya butu ntango babomi-mbisi bazongaka. Bandeko bakabolaki mbongo nyonso oyo bazwaki na kotalela bamposa ya ndeko mokomoko. Kosalisana motindo wana emonisaki bolingo ya solosolo ya baklisto.

10, 11. Ndenge nini tokoki komonisa bolingo epai ya bandeko oyo toyebi bango te?

10 Kasi, bolingo na biso esuki kaka te na baklisto oyo toyebi bango. Ntoma Petelo alobaki boye: “Tolinga bandeko na biso ya mokili mobimba.” (1 Petelo 2:17NW) Tolingaka bandeko na biso nyonso mpamba te bango nyonso bazali baninga oyo biso na bango tosambelaka Yehova Nzambe. Ntango ya mpasi ekoki kozala libaku ya komonisa bolingo yango. Na ndakisa, na boumeli ya mobu ya mosala 2000, mpela ezindisaki mpe ebebisaki bisika mingi na Mozambique, mpe bitumba oyo ezali kosila kaka te na Angola ekómisi bato mingi babola. Na kati ya bandeko 31 725 ya Mozambique mpe 41 222 ya Angola, mingi bazwaki mikakatano mpo na makambo yango. Yango wana, Batatoli ya Afrika ya Sudi, ekólo oyo ezali penepene ya bikólo yango, batindaki biloko mingi mpo na kosunga ata mwa moke bandeko na bango na bamboka yango. Mposa na bango ya kokaba ‘biloko’ na bango ‘oyo eleki’ epai ya bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga emonisaki ete bazali na bolingo.​—2 Bakolinti 8:8, 13-15, 24NW.

11 Bolingo ezali mpe komonana ntango, na mikili mingi, bandeko bazali kopesa makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi na Bandako ya Mayangani na mikili ya bobola. Tozali na ndakisa ya Bisanga Salomon. Atako yikiyiki ezali mingi na bisanga yango, motango ya basakoli ebakisamaki na mbula eleki (6 %); basakoli bazali sikoyo 1 697. Bazalaki na mposa ya kotonga Ndako ya Mayangani. Atako bato mingi ya bisanga yango bazalaki kokima yikiyiki oyo ezali na mboka na bango, bandeko ya bolingo malamu bautaki na Australie mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga. Nsukansuka, esengelaki ete bandeko oyo bakendaki kosala mosala bázonga na bamboka na bango, kasi liboso na yango, balakisaki bandeko ya mboka yango ndenge oyo bakosilisa moboko. Bifelo ya bibende eutaki na Australie, mpe ntango ndako kitoko yango ya losambo ekosila, ekozala litatoli malamu na nkombo ya Yehova mpe na bolingo ya bandeko na ntango oyo bato basundoli bandako mingi oyo bazalaki kotonga.

Tolingaka mokili ndenge Nzambe alingaka yango

12. Ndenge nini tolandaka ndakisa ya Yehova na ndenge na biso ya kotalela bato oyo tozali na bango lingomba moko te?

12 Bolingo na biso esuki kaka na libota mpe epai ya bandeko na biso? Soki tozali ‘kolanda ndakisa ya Nzambe,’ ekozala bongo te. Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana [mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Biso nde totɛngisi makomi; Baefese 5:1, NW; Yoane 3:16) Tolandaka ndakisa ya Yehova Nzambe, tosalelaka bato nyonso makambo na bolingo, ata baoyo tozali na bango lingomba moko te. (Luka 6:35, 36; Bagalatia 6:10) Yango wana, libosoliboso tosakolaka nsango malamu ya Bokonzi mpe toyebisaka bato mosusu likambo moko monene oyo Nzambe asalaki mpo na bango, oyo emonisi ete alingi bango. Yango ekoki kobikisa moto nyonso oyo akoyoka.​—Malako 13:10; 1 Timote 4:16.

13, 14. Yebisá makambo mosusu oyo bandeko bakutanaki na yango mpo bamonisaki bolingo epai ya bato oyo bazali Batatoli te, oyo ntango mosusu mpe esɛngaki bango makambo ya mpasi?

13 Tótala ndakisa ya babongisi-nzela monene minei na ekólo Népal. Batindaki bango na engumba moko na sudi-wɛsti ya ekólo yango, mpe na boumeli ya mbula mitano oyo eleki, bamonisaki bolingo na bango na ndenge balɛmbaki te kosakola na engumba yango mpe na bamboka oyo ezali mosika. Mpo na kokóma na bisika nyonso na teritware na bango, mbala mingi bazalaki kotambola na velo na boumeli ya bangonga mingi mpe na moi ya makasi mpenza (40o C). Bolingo na bango mpe ‘etingya mpo na kosala malamu’ ebotaki mbuma malamu ntango etuluku moko ya boyekoli ya mokanda esalemaki na mboka moko. (Baloma 2:7) Na sanza ya Marsi 2000, bato 32 bayokaki lisukulu oyo mokɛngɛli ya zongazonga asalaki ntango akendaki kotala bango. Na Népal, basakoli bazalaki 430 na mbula eleki, yango elingi koloba babakisami (9 %). Ezali komonana ete Yehova azali kopambola molende mpe bolingo ya bandeko na biso na ekólo yango.

14 Na ekólo Colombie, bandeko oyo bandimaki kosala lokola babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango bakendaki kosakola epai ya Ba-Indiens Wayuu. Mpo na koteya bango, bayekolaki monɔkɔ ya sika; kasi, boboto mpe bolingo na bango ezwaki mbano ntango bato 27 bakendaki koyoka lisukulu, atako mbula makasi ebɛtaki. Bolingo mpe molende lokola oyo ya babongisi-nzela wana esalaki ete motángo ya basakoli ebakisama (5 %) na Colombie, mpe basakoli bazali sikoyo 107 613. Na ekólo Danemark, ndeko mwasi moko oyo azali mobange azalaki na mposa ya koyebisa bato mosusu nsango malamu, kasi azalaki na likoki ya kotambola te. Yango elɛmbisaki ye te. Alukaki bato oyo bakosepela na nzela ya mikanda oyo azalaki kotindela bango. Sikoyo, atindelaka bato 42 mikanda mpe azali koyekola Biblia na bato 11. Azali na kati ya basakoli 14 885 oyo bapesaki lapolo na mbula eleki na ekólo Danemark.

Bólinga banguna na bino

15, 16. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete bolingo na biso esengeli kozala mpenza monene? (b) Ndenge nini bandeko oyo baponami bamonisaki bolingo ntango basololaki na moto oyo akomaki makambo ya lokuta mpo na Batatoli ya Yehova?

15 Yesu ayebisaki molakisi ya mibeko ete akoki kotalela Mosamalia lokola mozalani na ye. Na Lisolo na ye Likoló ya Ngomba, Yesu abakisaki likambo mosusu ntango alobaki ete: “Boyoki ete balobaki boye, Olinga mozalani na yo mpe oyina moyini na yo. Nde ngai nazali koloba na bino ete, Bólinga bayini na bino mpe bóbondela mpo na banyokoli na bino. Bongo bokozala bana na Tata na bino na Likoló.” (Matai 5:43-45) Ata soki moto azali kotɛmɛla biso, tosalaka makasi ete ‘tósala makambo ya malamu mpo na kolonga oyo ya mabe.’ (Roma 12:19-21Boyokani ya Sika) Soki likoki ezali, topesaka ye eloko ya motuya mingi oyo tozali na yango, elingi koloba mateya ya solo.

16 Na ekólo Ukraine, zulunalo moko (Kremenchuk Herald) ebimisaki lisolo moko oyo elobaki ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba oyo esengeli kokeba na yango. Ezalaki likambo moke te mpamba te na Mpoto, bato mosusu balobaka mpe bongo mpo na Batatoli ya Yehova mpo na kondimisa bato ete esengeli kotyela bango mibeko mingi to mpe kopekisa misala na bango. Yango wana, bandeko bakutanaki na mokambi ya zulunalo yango mpe basɛngaki ye abimisa liyebisi moko na zulunalo na ye mpo na kosembola makambo oyo balobaki na lisolo yango. Moto yango andimaki, kasi na liyebisi yango, abakisaki mwa maloba mpo na komonisa ete ezali na likambo ya solo oyo etindaki bango bákoma lisolo ya liboso. Bandeko oyo baponamaki bakutanaki na ye lisusu mpe bamonisaki ye makambo mwa mingi. Na nsuka, mokambi ya zulunalo asosolaki ete lisolo ya liboso elobaki solo te, mpe abimisaki lisolo mosusu oyo esembolaki makambo yango. Lokola basololaki na ye na bosembo mpenza mpe na boboto, ezalaki ndenge ya malamu oyo emonisi bolingo mpo na kobongisa likambo yango mpe ebotaki mbuma malamu.

Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo?

17. Nini emonisi ete kosalela bato mosusu makambo na bolingo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te?

17 Ntango mwana abotami sika, baboti na ye balingaka ye mbala moko. Kasi mpo na kolinga mikóló ezalaka ntango nyonso ndenge yango te. Ekoki kozala mpo na yango nde Biblia ezali mbala na mbala koyebisa biso ete tólinganaka, tosengeli kosala makasi mpo na yango. (1 Petelo 1:22; 4:8; 1 Yoane 3:11) Yesu ayebaki ete bolingo na biso ekomekama ntango alobaki ete tosengeli kolimbisa ndeko na biso “kino mbala ntuku nsambo na nsambo.” (Matai 18:21, 22NW) Paulo mpe alendisaki biso ete ‘tóyikanaka mpiko.’ (Bakolose 3:12, 13) Yango wana mpenza balobi na biso ete: “Bólanda bolingo”! (1 Bakolinti 14:1NW) Ndenge nini tokoki kosala yango?

18. Nini ekosalisa biso tólona bolingo mpo na basusu?

18 Ya liboso, tosengeli te kobosana bolingo oyo tozali na yango mpo na Yehova Nzambe. Bolingo yango nde ekotinda biso mpenza na kolinga mozalani na biso. Mpo na nini? Mpamba te ntango tozali kosala yango, yango epesaka Tata na biso ya likoló lokumu mpe esanzolaka ye. (Yoane 15:​8-10; Bafilipi 1:​9-11) Ya mibale, tokoki komeka komona makambo ndenge oyo Yehova amonaka yango. Mbala nyonso oyo tosali lisumu, tosalelaka nde Yehova lisumu; kasi, mbala na mbala alimbisaka biso mpe atikaka te kolinga biso. (Nzembo 86:5; 103:2, 3; 1 Yoane 1:9; 4:18) Soki toloni makanisi ya Yehova, tokozala na motema ya kolinga basusu mpe kolimbisa mabunga oyo bakoki kosalela biso. (Matai 6:12) Ya misato, tokosalela bato makambo ndenge oyo tolingaka básalelaka biso. (Matai 7:12) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tozalaka na mposa bálimbisa biso. Na ndakisa, ntango tolobi likambo moko oyo ezokisi basusu, tolingaka ete bábosana te ete mokomoko azali na lolemo oyo ebɛtaka libaku mbala na mbala. (Yakobo 3:2) Soki tolingi ete bato mosusu básalelaka biso makambo na bolingo, biso mpe tosengeli kosalelaka bango makambo na bolingo.

19. Ndenge nini tokoki koluka lisalisi ya elimo santu ntango tozali kolona bolingo?

19 Ya minei, tokoki koluka lisalisi ya elimo santu mpamba te bolingo ezali moko ya mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:22, 23) Mbala mingi, kozala moninga ya moto, kolinga bandeko ya libota mpe lolango ezalaka likambo oyo kaka motema elingi. Kasi tozali na mposa ya elimo ya Yehova mpo na kolona bolingo oyo Yehova azali na yango, bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza. Tosengeli kotángaka Biblia Mosantu mpo na kozwa lisalisi ya elimo santu. Na ndakisa, soki toyekoli bomoi ya Yesu, tokomona ndenge oyo afandaki na bato, mpe tokoki koyekola kolanda ndakisa na ye. (Yoane 13:34, 35; 15:12) Lisusu, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso elimo santu, mingimingi na ntango oyo kosala makambo na bolingo ezalaka mpasi. (Luka 11:13) Na nsuka, tokoki koluka bolingo soki tokangami na lisangá ya boklisto. Kozala elongo na bandeko ya bolingo ekosalisa biso tólona bolingo.​—⁠Masese 13:20.

20, 21. Likambo nini ya monene Batatoli ya Yehova basalaki oyo emonisaki bolingo na boumeli ya mobu ya mosala 2000?

20 Na mbula eleki, basakoli ya nsango malamu bazalaki 6 035 564 na mokili mobimba. Batatoli ya Yehova balekisaki ngonga 1 171 270 425 mpo na koluka bato mpe koteya bango nsango malamu. Bolingo esalisaki bango báyikela moi, mbula mpe malili mpiko mpo na kosala mosala yango. Bolingo nde etindaki bango na kosakola epai ya baninga na bango ya kelasi mpe ya mosala mpe etindaki bango bákutana na bato oyo bayebi te na babalabala mpe na bisika mosusu. Batatoli bakutanaki na bato mingi oyo batyelaki nsango na bango likebi te, mwa ndambo mosusu batɛmɛlaki bango. Kasi, bamosusu basepelaki; yango wana bazongelaki bato 433 454 049 mpe bayekolaki Biblia na bato 4 766 631. *

21 Nyonso wana ezali mpenza kolakisa ete Batatoli ya Yehova balingaka Nzambe na bango mpe balingaka bazalani na bango! Bolingo yango ekokita te. Tozali na elikya ete na mobu ya mosala 2001 bato mingi lisusu bakoyoka litatoli. Tiká ete mapamboli ya Yehova elanda kosopama epai ya basaleli na ye ya sembo mpe ya molende wana bazali ‘kotika ete makambo nyonso na bango esalema na bolingo.’​—1 Bakolinti 16:14.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ Mpo na komona mituya nyonso, talá etanda ya lapolo ya mbula ya mosala 2000 na nkasa 18-21.

Okoki kolimbola?

• Tolandaka ndakisa ya nani ntango tozali kolinga mozalani na biso?

• Bolingo na biso esengeli kozala monene ndenge nini?

• Yebisá mwa makambo oyo ezali komonisa bolingo ya baklisto.

• Ndenge nini tokoki kolona bolingo ya baklisto?

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 18-21]

LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA 2000

(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)

[Bililingi na lokasa 15]

Bolingo ya baklisto ekoki kosangisa libota esika moko

[Bililingi na lokasa 17]

Bolingo etindaka biso tóyebisa basusu elikya na biso