Nazali kosalela Nzambe na molimo mobimba atako mikakatano ezali
Lisolo ya bomoi
Nazali kosalela Nzambe na molimo mobimba atako mikakatano ezali
YA RODOLFO LOZANO
Nabotamá mokolo ya 17 Sɛtɛmbɛ 1917, na engumba Gómez Palacio, etúká ya Durango, na ekólo Mexique. Mobulu (révolution mexicaine) ezalaki kongala. Atako mobulu yango esilaki na 1920, na esika tozalaki kofanda, yikiyiki ekobaki nsima ya bambula, mpe bomoi ekómaki mpasi mingi.
MOKOLO moko, Mama ayokaki ete bitumba ekozala kati na basoda batomboki na basoda ya guvɛrnɛma, afandisaki ngai, bayaya misato ya mibali, na oyo ya mwasi mpe leki na biso ya mwasi na ndako mikolo mingi. Tozalaki na biloko mingi te ya kolya, nazali koyeba lisusu ete ngai na leki na ngai ya mwasi tozalaki kobombama na nse ya mbeto. Nsima na yango, mama amemaki biso na États-Unis, mpe tata alandaki biso nsima.
Tokómaki na etúká ya Californie na 1926, mwa moke liboso nkita ya États-Unis ekita. Tozalaki koyɛngayɛnga bipai nyonso oyo tokokaki kozwa mosala, na bamboka lokola San Joaquin Valley, Santa Clara, Salinas, mpe King City. Toyekolaki kosala bilanga, kobuka mbuma mpe ndunda ya ndenge nyonso. Atako na bolenge na ngai mobimba nazalaki kosala misala ya makasi, ezalaki ntango ya esengo na bomoi na ngai.
Nayekoli mateya ya solo ya Biblia
Na Marsi 1928, Moyekoli ya Biblia moko, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova, ayaki kotala biso. Azalaki mobange, azalaki koloba lokota ya Espagnole, nkombo na ye Esteban Rivera. Mwa buku oyo atikelaki biso ezalaki na motó ya likambo ete “Bakufi bazali wapi?” ebendaki likebi na ngai. Atako nazalaki elenge, nalandaki koyekola Biblia mpe kosangana na
Bayekoli ya Biblia. Na nsima, mama na leki na ngai ya mwasi Aurora, bakómaki basanzoli ya molende ya Yehova.Na kati ya bambula ya 1930, batongaki Ndako ya Bokonzi moko na San Jose mpo na lisangá ya lokota ya Lingelesi. Lokola bato mingi oyo balobaka lokota ya Espagnole bazalaki kosala na bafɛrmɛ na San Jose, tobandaki koteya bango mpe koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Batatoli oyo balobaka lokota ya Espagnole, bazalaki kouta na San Francisco, kilomɛtrɛ soki 80, nde bazalaki koya kosalisa biso. Nsima ya mikolo, tokómaki bato soki 60 oyo tozalaki koyangana na makita ya lokota ya Espagnole na Ndako ya Bokonzi ya San Jose.
Mokolo ya 28 Febwali 1940, nazwaki batisimo na kati ya mayi na liyangani moko na San Jose mpo na kolakisa ete namipesaki na Yehova. Na mbula oyo elandaki, nakómaki mobongisi-nzela, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso ya Batatoli ya Yehova. Na Aprili 1943, basɛngaki ngai nakende na engumba Stockton, na kilomɛtrɛ soki 130, mpo na kosala lisangá moko ya lokota ya Espagnole. Na ntango yango, nazalaki mokɛngɛli-mokambi na lisangá ya lokota ya Lingelesi na San Jose, nazalaki mpe kosalisa Batatoli ya lokota ya Espagnole. Nsima ya kopona bato oyo basengelaki kotikala na mikumba yango, nakendaki na Stockton.
Bosembo emekami
Kobanda na 1940, bazalaki kobengisa ngai mbala na mbala na biro ya basoda, kasi na mbala nyonso nazalaki koyebisa bango ete lisosoli na ngai ya moklisto epekisi ngai nasala mosala ya soda mpe bazalaki kondima. Ntango États-Unis ekɔtaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba na 1941, mwa moke na nsima batungisaki ngai mingi ete nakɔta kaka mosala ya soda. Nsukansuka, na 1944, batyaki ngai na bolɔkɔ. Ntango nazalaki kozela bákata likambo na ngai, batyaki ngai na kasho moko na nse ya mabele na bato ya mobulu. Ntango bato ya mobulu yango bayebaki ete nazali Motatoli ya Yehova, mingi batunaki ngai mituna mpo na koyeba soki Nzambe azalaki kotalela bango ndenge nini mpo na makambo mabe oyo basalaki.
Batatoli ya engumba San Jose bafutaki mbongo mpo bábimisa ngai na bolɔkɔ ntango nazali kosamba. Avoka moko ya engumba Los Angeles oyo azalaki kosamba mpo na bakangami, andimaki kosamba likambo na ngai kozanga ete tópesa ye mbongo. Zuzi alobaki ete akotika ngai soki nandimi kotika mosala ya mobongisi-nzela, nazwa mosala mosusu mpe nakendaka komilakisa liboso ya bakonzi sanza na sanza. Naboyaki likambo yango, bakatelaki ngai etumbu
ya mbula mibale na bolɔkɔ ya McNeil Island, na etúká ya Washington. Kuna nazalaki kolekisa ntango mingi na koyekola Biblia na mozindo. Nayekolaki lisusu kokoma na masini. Mbula mibale ekokaki te, babimisaki ngai na bolɔkɔ mpo nazalaki na etamboli malamu. Naumelaki te nazongelaki mosala ya mobongisi-nzela.Mosala ekómi mingi
Na eleko ya mpiɔ ya 1947, batindaki ngai na mobongisi-nzela moko, tókende kosakola epai ya bato oyo balobaka Espagnole na engumba Colorado City, na etúká ya Texas. Lokola malili ezalaki makasi tokendaki na San Antonio mpo kuna ezalaki na mwa molunge. Kasi, mbula ezalaki kobɛta mingi kuna mpe mosala na biso ya ndako na ndako ekatanaki. Eumelaki te mbongo tozalaki na yango esilaki. Elekaki bapɔsɔ mingi tozalaki kolya kaka ndunda ya mobesu mpe komela ti. Moninga na ngai azongaki na ndako, kasi ngai natikalaki. Ntango Batatoli ya lokota ya Lingelesi bayokaki ete nazali na bosɛnga, babandaki kosunga ngai.
Na prɛnta, nazongaki na teritware na ngai ya Colorado City, mpe nsukansuka lisangá moko ya moke ya lokota ya Espagnole esalemaki. Na nsima nakendaki na engumba Sweetwater, na etúká ya Texas, kuna napesaki maboko mpo na kosala lisangá moko ya lokota ya Espagnole. Ntango nazalaki na Sweetwater, nazwaki mokanda oyo babengisaki ngai na kelasi ya mbala ya 15, na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpo na kobongisama na mosala ya misionɛrɛ oyo ebandaki mokolo ya 22 Febwali 1950. Na eleko ya molunge, nsima ya kozwa diplome na liyangani oyo esangisaki bato bautaki na mikili mingi, na Yankee Stadium, na engumba New York, natikalaki sanza misato na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn. Kuna nalandaki mateya mpo na mokumba na ngai na biro ya filiale ya Mexique.
Mosala na Mexique
Nakómaki na engumba Mexico mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ 1950. Nsima ya pɔsɔ soki mibale, nakómaki mokambi ya filiale, nasalaki mbula minei na ndambo na mokumba yango. Makambo oyo nayekolaki na mosala ya mobongisi-nzela, na bolɔkɔ, na Gileadi, mpe na Brooklyn esalisaki ngai mingi mpenza. Ntango nakómaki na Mexique, namonaki mbala moko ete esengeli kolendisa bandeko na biso ya Mexique na elimo. Esengelaki mpenza kosalisa bango bátosa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na bizaleli malamu.
Na mikili ya Amérique latine, na Mexique mpe, bato bazalaki na momeseno ya kofanda lokola mwasi na mobali ata soki bakomisi libala na bango na buku ya Leta te. Mangomba ya boklisto, mingimingi mpenza Lingomba ya Katolike, epesaki nzela na momeseno yango oyo Makomami eboyi. (Baebele 13:4) Yango wana, bamosusu bakómaki Batatoli ya Yehova, atako mabala na bango ekomamaki na buku ya Leta te. Tozwaki bibongiseli mpo na kopesa bato yango sanza motoba mpo ete bábongisa makambo ya mabala na bango. Soki te, bakotángama lisusu Batatoli ya Yehova te.
Mpo na bato mingi, ezalaki likambo ya mpasi te mpo bábongisa makambo ya mabala na bango. Basengelaki kaka kokomisa libala na bango na buku ya Leta. Mpo na bato mosusu, ezalaki mwa mindɔndɔ. Na ndakisa, bamosusu babalaki mbala mibale, ata mpe mbala misato, kozanga ete báboma libala ya liboso na kolanda mibeko ya Leta. Ntango basaleli ya Yehova bakómaki na mabala oyo elandi ndenge Liloba ya Nzambe ezali koteya, masangá ezwaki mapamboli mingi na elimo.—1 Bakolinti 6:9-11.
Na mikolo yango bato oyo batángá bazalaki mingi te na Mexique. Ata liboso nakóma kuna na 1950, filiale ebongisaki bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma na masangá nyonso. Babongisaki lisusu bakelasi yango mpe bibongiseli ezwamaki mpo Leta ayeba bakelasi yango. Kobanda na 1946, ntango babandaki kopesa lapolo ya bana-kelasi, koleka bato 143 000 na Mexique bayekolaki kotánga mpe kokoma na bakelasi ya Batatoli ya Yehova!
Mibeko ya Mexique ezalaki makasi na makambo etali mangomba. Kasi, na bambula eleki, mbongwana minene esalemaki na likambo yango. Na 1992, babimisaki mobeko ya sika mpo
na likambo etali mangomba; yango wana na 1993, Batatoli ya Yehova bandimamaki na mikanda ya Leta lokola mangomba nyonso.Mbongwana yango esepelisaki ngai mingi mpenza, ezali makambo oyo liboso nazalaki kokanisa te ete ekoki kosalema. Na boumeli ya bambula mingi, mbala na mbala nazalaki kokutana na bakonzi ya Leta mpe bazalaki kaka na mwa kokakatana. Kasi, ezali esengo na komona ndenge oyo departema ya makambo ya mibeko na filiale na biso elandelaki likambo yango, lelo tozali kokutana lisusu na mikakatano mingi te na mosala ya kosakola.
Nazali kosala na mwasi na ngai oyo azali misionɛrɛ
Ntango nakómaki na Mexique, nakutaki bamisionɛrɛ mingi oyo bazwaki diplome na kelasi ya Gileadi liboso na biso. Moko na bango ezalaki Esther Vartanian, Motatoli oyo autaki na ekólo Armenie mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela na 1942, na engumba Vallejo, etúká ya Californie. Tobalanaki mokolo ya 30 Yuli 1955, mpe tokobaki mosala na biso na Mexique. Esther akobaki mosala na ye ya misionɛrɛ na engumba Mexico, mpe tozalaki kofanda na Betele, epai nazalaki kosala.
Na 1947, Esther akómaki na teritware na ye ya liboso ya misionɛrɛ na engumba Monterrey, na etúká ya Nuevo León, na Mexique. Na Monterrey, lisangá ezalaki kaka moko ya Batatoli 40, kasi ntango batindaki ye na engumba Mexico na 1950, masangá ekómaki minei. Na Betele na biso na Mexico, ezali na bilenge mibale ya mabota oyo Esther ayekolaki na bango Biblia ntango azalaki kosala na Monterrey.
Na 1950 teritware ya mosala ya kosakola mpo na bamisionɛrɛ na Mexico ezalaki engumba mobimba. Bazalaki kotambola na makolo to na babisi ya kala oyo ezalaki kotonda na bato. Ntango nakómaki kuna na 1950, masangá ezalaki nsambo. Sikoyo na engumba Mexico masangá ekómi soki 1 600, na basakoli ya Bokonzi
koleka 90 000. Mpe na mbula eleki, bato koleka 250 000 bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto! Ngai na Esther tozwaki libaku malamu ya kosala na masangá mingi ya engumba yango.Ntango ngai na Esther tobandi koyekola Biblia na moto, tosalaka makasi ete tata ya libota asepela na boyekoli mpo ete libota mobimba bándima koyekola. Na ndenge yango, tomoni mabota mingi oyo ezali mpe na bana ebele bakómi kosalela Yehova. Nandimi mpenza ete soki losambo ya solo ekóli nokinoki na Mexique ezali mpe mpo ete bato ya libota mobimba bandimaka losambo ya solo.
Yehova apamboli mosala
Kobanda 1950 ezali komonana mpenza ete mosala na Mexique ezali kokende liboso, basakoli bakómi mingi mpe makambo mingi ebongwani. Nazali na esengo mingi na ndenge napesi mwa mabɔkɔ mpo na kokolisa mosala yango, nasalaki na bato oyo bayebi koyamba bapaya mpe bazali bato ya esengo.
Eleki mwa bambula, Karl Klein, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, na mwasi na ye Margaret, bayaki kotala biso ntango bazalaki na konje. Ndeko Klein, alingaki komona ndenge mosala ezali kotambola na teritware na biso na Mexique, yango wana, ye na Margaret bayaki na lisangá ya San Juan Tezontla, oyo ezali penepene ya engumba Mexico, lisangá na biso na ntango wana. Ndako ya Bokonzi na biso ezalaki moke, ezalaki na mɛtrɛ soki minei na ndambo na monene mpe mɛtrɛ mitano na ndambo na molai. Ntango tokómaki, bato soki 70, bisika ya kofanda ekokaki lisusu te. Mikóló bafandaki na bakiti, bilenge na baa, mpe bana na biliki to na nse.
Ndeko Klein akamwaki mingi mpamba te bana nyonso bazalaki na Babiblia na bango na mabɔkɔ, mpe bazalaki koluka bavɛrsɛ na Biblia nzela moko na molobi. Nsima ya lisolo, Ndeko Klein asalaki lisolo moko etongami na mokapo ya Matai 13:19-23 mpe alobaki ete Mexique ezalaki na “mabele malamu” mingi oyo Yesu alobaki. Lelo oyo, bana nsambo oyo bazalaki na likita mokolo yango bazali kosala mosala ya kotonga bandako ya sika ya filiale na Mexico City. Moko asalaka na Betele, mpe mingi bazali babongisi-nzela!
Ntango nakómaki na engumba Mexico, filiale na biso ezalaki kaka na bato 11. Sikoyo tozali soki 1 350, bakisa mpe 250 oyo bazali kotonga bandako ya sika ya filiale. Ntango mosala yango nyonso ekosila, emonani ete na mobu 2002, tokozala na likoki ya koyamba bato mosusu soki 1 200 na bandako yango. Kanisa naino na 1950 tozalaki na basakoli ya Bokonzi ata 7 000 te, kasi lelo oyo tozali na bango koleka 500 000! Motema na ngai etondi na esengo na komona ndenge Yehova apamboli milende ya bandeko na biso ya Mexique oyo bazali kosala makasi mpo na kosanzola ye.
Liboso ya mokakatano monene
Mokakatano eleki monene oyo nakutanaki na yango nsima ezali maladi. Nazalaki mpenza moto ya kobɛlabɛla te. Kasi na Novɛmbɛ 1988, nazwaki mpasi ya motema oyo elɛmbisaki ngai nzoto mobimba. Yehova azali kosalisa ngai, nasalaka mpe mwa ngalasisi mpe nazali kozwa mpe nkisi ya monganga, yango wana nakómi mwa malamu, kasi binama mosusu ya nzoto na ngai ezali kosala te na ndenge oyo nalingaka. Nazali kaka kozwa nkisi mpe monganga azali kolandela ngai mpo motó esala ngai mpasi makasi te mpe mitungisi mosusu oyo ezali naino.
Atako nakoki kosala lisusu mingi te ndenge oyo nakokaki kolinga, nazali na esengo mpo nayebi ete nasalisi bato mingi báyeba mikano ya Yehova mpe bákóma basaleli na ye oyo bamipesi. Nasepelaka lisusu kosolola na bandeko na biso ntango bayaka na Betele; namonaka ete tolendisanaka.
Nazwaka makasi mingi lokola nayebi ete Yehova asepelaka na mosala oyo tosalelaka ye mpe mosala oyo tosali ezali mpamba te. (1 Bakolinti 15:58) Atako nakoki kosala lisusu mingi te mpo na maladi, nabatelaka maloba ya Bakolose 3:23-24 ete: “Soko bozali kosala nini, bótya mitema na kosala bongo; lokola mpo na kosalela bato te, kasi kosalela Nkolo. Mpo boyebi ete bokozwa libula lokola libonza na mabɔkɔ ya Nkolo.” Lokola nazali kolanda toli yango, nazali kosalela Yehova na molimo na ngai mobimba atako mikakatano ezali.
[Elilingi na lokasa 24]
Na 1942 ntango nazalaki mobongisi-nzela
[Elilingi na lokasa 24]
Mwasi na ngai abandaki mosala ya misionɛrɛ na Mexique na 1947
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai na Esther lelo oyo
[Bililingi na lokasa 26]
Na likoló, na lobɔkɔ ya mwasi: Libota na biso ya Betele na Mexique na 1952 mpe ngai na liboso
Na likoló: Bato koleka 109 000 oyo bazalaki na liyangani ya etúká na Mexico City stadium na 1999
Na nse, na lobɔkɔ ya mwasi: Bandako ya sika ya Betele na biso elingi kosila