Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kosilisa bilembo oyo bitumba etikaka

Ndenge ya kosilisa bilembo oyo bitumba etikaka

Ndenge ya kosilisa bilembo oyo bitumba etikaka

ABRAHAM alekisaki mbula 20 na mosala ya soda na limpinga moko ya batomboki. * Kasi, atiká mosala ya soda mpe mokolo moko te akosimba lisusu mondoki mpo akende na etumba. Kutu, bato mosusu oyo bazalaki banguna na ye, bazali lelo baninga na ye ya motema. Eloko nini ebongolaki ye? Ezali Biblia. Biblia epesaki Abraham elikya mpe efungolaki ye miso, esalisaki ye amona makambo ya mokili oyo ndenge Nzambe amonaka yango. Biblia elongolaki ye mposa ya kobunda mpe abandaki kobosana mawa, nkanda, koyina mpe nkɛlɛ oyo azalaki na yango. Amonaki ete Biblia ezali na nkisi makasi mpo na kobikisa motema.

Ndenge nini Biblia esalisaka moto alongola bilembo ya mabe na motema na ye? Biblia ebongolaki te makambo oyo Abraham akutanaki na yango. Kasi, koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola likoló na yango, ebongolaki makanisi na ye mpe akómaki na makanisi ya Mozalisi. Lelo oyo azali na elikya mpo na mikolo ekoya mpe azali na makambo mosusu oyo atyaka na esika ya liboso. Makambo oyo ezali na ntina na miso ya Nzambe nde ekómá na ntina epai na ye. Ntango likambo yango ebandaki kosalema, oyo ezalaki lokola mpota na motema na ye ebandaki kosila. Ezali na ndenge yango nde Abraham azwaki lisalisi mpo na kobongwana.

Na etumba ya banamboka

Abraham abotamaki na Afrika na bambula ya 1930. Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ekólo mosusu ya makasi oyo ezali penepene ekómaki koyangela bango; kasi, bato mingi na ekólo ya Abraham bazalaki na mposa ete ekólo na bango ezwa lipanda. Na 1961, Abraham akɔtaki na lingomba moko ya politiki oyo ezalaki kobundisa ekólo oyo ezalaki koyangela bango mpo bázwa lipanda.

Abraham alobi ete: “Bazalaki banguna na biso. Bazalaki kokana koboma biso, yango wana biso mpe tozalaki koboma bango.”

Bomoi ya Abraham ezalaki mbala mingi na likama, yango wana, na 1982, nsima ya kolekisa mbula 20 na bitumba, akimaki mpe akendaki kofanda na Mpoto. Lokola akómaki pene na mbula 50, azwaki ntango ya kokanisa likoló ya bomoi na ye. Makambo nyonso oyo azalaki kolikya esukaki wapi? Mikolo oyo ekoya ekozala na makambo nini? Abraham akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe akómaki koyangana na makita na bango. Akanisaki lisusu ete mwa bambula liboso, ntango azalaki na Afrika, atángaki trakte moko oyo Motatoli moko apesaki ye. Trakte yango elobelaki paladiso oyo ekozala awa na mabele mpe guvɛrnɛma ya likoló oyo ekoyangela bato nyonso. Makambo yango ekoki mpenza kosalema?

Abraham alobi boye: “Biblia esalisaki ngai na koyeba ete nasalaki mosala ya mpunda na bambula nyonso oyo nalekisaki na bitumba. Guvɛrnɛma kaka moko oyo ekotya bosembo mpo na moto nyonso ezali Bokonzi ya Nzambe.”

Ntango Abraham azwaki batisimo mpe akómi Motatoli ya Yehova, mwa moke na nsima, mobali moko nkombo na ye Robert alongwaki na Afrika mpe akendaki kofanda na Mpoto, kaka na mboka oyo Abraham azalaki kofanda. Ntango bazalaki na Afrika, Robert na Abraham babundaki na etumba moko lokola banguna. Robert azalaki mbala mingi komituna soki ntina mpenza ya bomoi ezali nini. Robert alingaki makambo ya Nzambe mingi, mpe lokola atángaki mikanda ya Biblia mingi, ayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Ntango Batatoli oyo bazali lisangá moko na Abraham batunaki Robert soki akondima básalisa ye na koyeba Biblia malamu, andimaki mbala moko.

Robert alobi boye: “Kobanda kaka na ebandeli, nasepelaki na ndenge oyo Batatoli basalelaka nkombo ya Yehova na nkombo ya Yesu; bamonisaka mpenza ete bazali bato mibale oyo bakeseni. Yango eyokanaki na makambo oyo nayebaki liboso na Biblia. Longola yango, Batatoli balataka malamu mpe bazalaka na boboto epai ya bato, ezala bazali bato ya ekólo nini. Makambo yango esimbaki mpenza motema na ngai.”

Banguna bakómi baninga

Robert na Abraham, bato oyo bazalaki liboso banguna, bazali lelo oyo baninga ya motema. Bango mibale bazali babongisi-nzela na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova. Abraham alobi boye: “Ntango tozalaki kobunda, mbala mingi nazalaki komituna ntina nini bato oyo bafandi na bikólo oyo ezali penepene, oyo mingi na bango bazali bato ya lingomba moko, bayinanaka. Ngai na Robert tozalaki na lingomba moko, kasi tozalaki kobunda. Lelo oyo biso mibale tozali Batatoli ya Yehova, mpe kondima na biso esangisi biso.”

Robert abakisi ete: “Bokeseni yango wana. Sikoyo tozali na lingomba oyo esangisi biso lokola bandeko ya solosolo. Tokoki lisusu kosimba mindoki te mpo na kobunda.” Biblia ebongoli mpenza mitema ya bato yango oyo bazalaki banguna. Mokemoke koyinana na nkanda etiki esika na boninga mpe babandi kotyelana motema.

Na ntango oyo Abraham na Robert bazalaki kobunda, bilenge mosusu mibale bazalaki kobunda lokola banguna na etumba mosusu oyo ezalaki kondongwana kati na bikólo mibale oyo ezali penepene. Mwa moke na nsima, Biblia esalaki lisusu mosala lokola nkisi makasi mpo na kosilisa mpota na mitema na bango. Esalemaki ndenge nini?

Bomá mpe na nsima kufá lokola martiru

Gabriel akolaki na libota oyo balingaki makambo ya Nzambe mingi mpe bayebisaki ye ete ekólo na ye ezalaki kobunda etumba mosantu. Yango wana, ntango akokisaki mbula 19, akendaki kokɔta na mosala ya soda mpe asɛngaki bátinda ye na bitumba. Alekisaki sanza 13 na bisika oyo bitumba ezalaki mpenza makasi, ntango mosusu kutu kilomɛtrɛ moko mpamba ezalaki kokabola ye na banguna. Alobi boye: “Nazali koyeba lisusu mokolo moko, komanda na biso alobaki na biso ete banguna bakoyela biso na butu. Lokola tozalaki mitema likoló, tobɛtaki masasi na kanɔ butu mobimba.” Azalaki komona bato ya ekólo oyo bazalaki kobunda na yango lokola banguna na ye oyo babongi na eloko mosusu te kaka liwa. “Makanisi na ngai ezalaki ete naboma bato mingi mpenza. Na nsima, ndenge moko na baninga na ngai mingi, nalingaki nakufa lokola martiru.”

Kasi, na nsima, Gabriel amonaki ete makambo ezali lisusu ndenge oyo azalaki kokanisa te. Akimaki na bangomba mpe alekaki na ekólo mosusu oyo ezalaki na bitumba te, mpe na nsima akendaki na Mpoto. Azalaki ntango nyonso kotuna Nzambe mpo na nini bomoi ezali mpasi boye, soki mikakatano ezali nde etumbu ya Nzambe. Akutanaki na Batatoli ya Yehova mpe, na lisalisi ya Biblia, bamonisaki ye mpo na nini lelo oyo bomoi ezali na mikakatano mingi.​—⁠Matai 24:​3-14; 2 Timote 3:​1-5.

Ntango Gabriel ayekolaki makambo mingi na Biblia, akómaki komona ete Biblia ezali na mateya ya solo. “Nayekolaki ete tokoki kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Likambo ya kokamwa, yango nde mposa oyo nazalaki na yango na bomwana.” Biblia ebɔndisaki Gabriel mpe ekitisaki motema na ye oyo ezalaki naino kotungisama. Bilembo mabe oyo azalaki na yango na makanisi ekómaki kolimwa. Yango wana, ntango Gabriel akutanaki na Daniel, oyo kala azalaki monguna na ye, azalaki lisusu koyina ye te. Kasi, mpo na nini Daniel akendaki kofanda na Mpoto?

“Soki mpenza ozali, nasɛngi yo osalisa ngai!”

Daniel akolaki na Lingomba ya Katolike mpe ntango akokisaki mbula 18 akɔtaki na mosala ya soda. Batindaki ye na bitumba oyo Gabriel mpe azalaki kobunda, kasi ye azalaki na ngámbo mosusu. Daniel azalaki kotambwisa motuka ya bitumba (char de combat) mpe bazalaki kopusana penepene na banguna, mbala moko, bɔmbi moko eyaki kobɛta motuka yango. Baninga na ye bakufaki mpe ye azokaki mpota monene mpe banguna bakangaki ye. Alekisaki basanza mingi na lopitalo mpe na kaa moko liboso ya kotinda ye na ekólo mosusu oyo ezalaki na bitumba yango te. Lokola kuna azalaki se ye moko mpe atikalaki mabɔkɔ mpamba, makanisi ya komiboma ekómaki koyela ye. Daniel abondelaki Nzambe ete: “Soki mpenza ozali, nasɛngi yo osalisa ngai!” Mokolo oyo elandaki, Batatoli ya Yehova bakendaki kotala ye mpe bapesaki ye biyano na ebele ya mituna oyo atunaki bango. Nsukansuka, akendaki na Mpoto lokola moto akimá mboka. Daniel akutanaki lisusu na Batatoli mpe ayekolaki Biblia. Makambo oyo ayekolaki ekitisaki mitungisi mpe nkanda na ye.

Lelo oyo, Gabriel na Daniel bazali baninga ya motema, bazali bandeko, bazali Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo. Gabriel alobi boye: “Bolingo na ngai mpo na Yehova mpe boyebi ya Biblia esalisi ngai namona makambo ndenge oyo ye amonaka yango. Daniel azali lisusu monguna na ngai te. Eleki bambula, nakokaki koyoka mawa te mpo na koboma ye. Biblia eteyi ngai likambo mosusu: kondima kokufa mpo na ye.”

Daniel alobi boye: “Namonaki bato ya mangomba mpe baoyo bazali ekólo moko te bazali kobomana. Kasi ezalaki mpe na bato ya lingomba moko oyo bazalaki banguna mpe bazalaki kobomana. Ntango nazalaki komona bongo, nazalaki kokanisa ete nyonso wana ezali foti ya Nzambe. Sikoyo nayebi ete Satana nde azali mobandisi ya bitumba nyonso. Ngai na Gabriel tozali sikoyo bandeko. Mokolo moko te tokosimba lisusu mindoki mpo na kobunda!”

“Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya”

Mpo na nini Abraham, Robert, Gabriel na Daniel babongwanaki mpenza ndenge yango? Nini esalisaki bango bálongola koyinana mpe nkanda oyo efandaki na mitema na bango?

Mokomoko na bango atángaki, amanyolaki mpe ayekolaki mateya ya solo ya Biblia, oyo ezali na “bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Mozalisi ya bato nde akomisaki Biblia; ye ayebi komema moto oyo andimi koyoka mpe koyekola na kosala makambo ya malamu. “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kopesa disipilini na bosembo.” Ntango moto oyo azali kotánga atiki nzela ete Biblia etambwisa ye, akómaka komona makambo ndenge mosusu. Akoyekola ndenge oyo Yehova amonaka makambo. Nyonso wana epesaka matomba mingi; moko na yango ezali ete esilisaka bilembo mabe oyo bitumba etikaka.​—⁠2 Timote 3:​16NW.

Liloba ya Nzambe elobi ete ezali na ekólo moko te to mposo moko oyo ezali malamu koleka mosusu. “Nzambe akokabolaka bato te; kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” Soki moto oyo azali kotánga Biblia andimi likambo yango, esalisaka ye mokemoke abwaka makanisi ya koyina bato ya mposo mosusu to ya ekólo mosusu.​—Misala 10:34, 35.

Bisakweli ya Biblia emonisi ete etikali moke Nzambe asukisa boyangeli ya bato mpo Bokonzi ya Masiya eyangela. Na nzela ya boyangeli yango, Nzambe “akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili.” Masangá ya politiki oyo ezali kolendisa bitumba mpe kotinda bato na kobunda ekozala lisusu te. Bato oyo bakufá na bitumba bakosekwa mpe bakozwa libaku ya kozala na bomoi na paladiso awa na mabele. Moto moko te akokima mboka na ye mpamba te bato oyo batumolaka mpe banyokolaka bato mosusu bakozala lisusu te.​—Nzembo 46:9; Danyele 2:44; Misala 24:15.

Biblia elobi ete bato oyo bakozala na bomoi na ntango wana “bakotonga ndako mpe bakofanda na yango; bakokona bilanga ya miwiti mpe bakolya mbuma na yango. Bakotonga te ete mosusu afanda. . . . Bakosala mosala ya mpamba te, bakobota bana mpo na nsɔmɔ ya pwasa te.” Mbeba to mpasi moko te ekotikala. Soki moto andimi elikya yango, esalisaka ye asilisa mokemoke mpasi mpe mawa na motema.​—Yisaya 65:21-23.

Ya solo mpenza, Biblia ezali nkisi ya makasi mpo na motema. Mateya na yango ezali kosilisa bilembo mabe oyo bitumba etikaka. Bato oyo bazalaki banguna bazali kokóma bandeko na lisangá moko ya mokili mobimba. Lisalisi yango ekokoba na mokili ya sika ya Nzambe tii koyinana mpe nkanda, mawa mpe mpasi ekosila na mitema ya bato. Mozalisi alaki ete “makambo ya liboso makokanisama te, makoya mpe na motema te.”​—Yisaya 65:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ Topesi bango bankombo mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]

“Biblia esalisaki ngai na koyeba ete nasalaki mosala ya mpunda na bambula nyonso oyo nalekisaki na bitumba”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Biblia ekoki mpenza kobongola mitema ya bato oyo bazalaki banguna

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Mokemoke koyinana na nkanda etikaki esika na boninga mpe babandaki kotyelana motema

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Ntango moto oyo azali kotánga Biblia atikeli yango nzela ete etambwisa ye, akómaka komona makambo ndenge mosusu

[Elilingi na lokasa 7]

Bato oyo bazalaki liboso banguna bazali kokóma bandeko na lisangá moko ya mokili mobimba

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Kaa ya bato bakimá mboka: FƆTƆ YA ONU 186811/J. Isaac