Tiká ete bolingo etonga bino
Tiká ete bolingo etonga bino
“Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.”—MATAI 22:37.
1. (a) Tángá mwa bizaleli oyo moklisto alonaka. (b) Wapi ezaleli oyo eleki ntina epai ya moklisto, mpe mpo na nini?
MOKLISTO alonaka bizaleli mingi mpo azala ministre ya malamu. Mokanda ya Masese ezali komonisa ntina ya kozala na boyebi, bososoli mpe na mayele. (Masese 2:1-10) Ntoma Paulo alobelaki ntina ya kozala na kondima mpe elikya makasi. (Baloma 1:16, 17; Bakolose 1:5; Baebele 10:39) Koyika mpiko mpe komipekisa ezali mpe na ntina mingi. (Misala 24:25; Baebele 10:36) Kasi, ezali na ezaleli moko oyo, soki ezangi, bizaleli mosusu nyonso ebebaka mpe ekoki ntango mosusu kozala ata na ntina moko te. Ezaleli yango ezali bolingo.—1 Bakolinti 13:1-3, 13.
2. Ndenge nini Yesu amonisaki ntina ya bolingo, mpe yango ebimisi mituna nini?
2 Yesu amonisaki ntina ya bolingo ntango alobaki boye: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Lokola bolingo ezali elembo oyo emonisaka moklisto ya solo, tosengeli komituna mituna lokola oyo: Bolingo ezali nini? Mpo na nini bolingo ezali na ntina mingi na boye ete Yesu alobaki ete yango nde elembo ya libosoliboso ya bayekoli na ye? Ndenge nini tokoki kokolisa bolingo? Tosengeli kolinga nani? Tótalela naino mituna yango.
Bolingo ezali nini?
3. Ndenge nini tokoki kolimbola bolingo, mpe mpo na nini ezalaka na makanisi mpe na motema?
3 Ndimbola moko ya bolingo elobi ete ezali ‘kokangama to kosepela mingi na moto moko, to kozala na mposa ya moto.’ Ezaleli yango nde etindaka moto asalela basusu bolamu, ata soki ntango mosusu ekosɛnga ye amipimelaka makambo mingi. Na ndenge oyo Biblia elimboli yango, bolingo ezalaka likambo ya makanisi mpe ya motema. Ezali likambo ya makanisi to ya bɔɔngɔ mpo moto oyo alingaka ayebaka oyo azali kosala, ayebaka ete ezala ye moko to bato mosusu oyo ye alingi, bango nyonso bazali na bolɛmbu mpe na bizaleli ya malamu. Bolingo ezali mpe likambo ya makanisi, mpamba te moklisto alingaka bato mosusu mpo Biblia emonisi ye ete Nzambe alingi bongo, ata soki mbala mosusu motema na ye moko elingi yango te. (Matai 5:44; 1 Bakolinti 16:14) Kasi, bolingo ezali libosoliboso likambo ya motema. Bolingo ya solosolo, ndenge oyo Biblia emonisi yango, esukaka kaka na makanisi te. Esɛngaka kozala mpenza sembo mpe komipesa na motema mobimba.—1 Petelo 1:22.
4. Na ndimbola nini bolingo ezali nsinga ya makasi oyo ekangisaka bato?
4 Bato oyo balukaka matomba na bango moko bakokaka mpenza kolinga te mpamba te moto oyo alingi andimaka kotya matomba ya bato mosusu liboso mpe kozongisa oyo ya ye moko nsima. (Bafilipi 2:2-4) Maloba oyo Yesu alobaki ete “esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa” emonanaka mpenza solo soki bolingo nde ezali kotinda moto na kopesa. (Misala 20:35) Bolingo ezali mpenza ekanganeli makasi. (Bakolose 3:14) Mbala mingi bolingo emonanaka na boninga, kasi bolingo ezali makasi koleka boninga. Lolango ya mwasi na mobali na ye ebengamaka mpe bolingo; kasi, bolingo oyo Biblia ezali kolendisa biso tólona ezali makasi koleka kolulana. Ntango mwasi na mobali balingani mpenza, batikalaka elongo ata soki bakoki lisusu kosangisa nzoto te mpo na maladi to bobange to mpo moko na bango azali lisusu na makoki te ya kosala makambo mosusu.
Bolingo ezali ezaleli ya ntina mingi
5. Mpo na nini bolingo ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na moklisto?
5 Mpo na nini ezali na ntina mingi ete moklisto azala na bolingo? Ya liboso, mpo Yesu apesaki bayekoli na ye mobeko ete bálinganaka. Alobaki boye: “Bino bozali baninga na ngai soko bokosalaka yango esili ngai kolakela bino. Nazali kolakela bino boye ete bólingana kati na bino mpenza.” (Yoane 15:14, 17) Ya mibale, mpo Yehova azali bolingo, mpe biso basaleli na ye tosengeli kolanda ndakisa na ye. (Baefese 5:1; 1 Yoane 4:16) Biblia elobi ete koyekola koyeba Yehova na Yesu ememaka na bomoi ya seko. Ndenge nini tokoki koloba ete toyebi Nzambe soki tozali kosala makasi te ya kozala lokola ye? Ntoma Yoane alobaki boye: “Ye oyo akolingaka te ayebi Nzambe te, mpo ete Nzambe azali bolingo.”—1 Yoane 4:8.
6. Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati na makambo ya bomoi na biso?
6 Bolingo ezali na ntina mingi mpo na likambo mosusu ya misato: Esalisaka biso tózala na bokatikati na makambo ya bomoi na biso mpe etindaka biso tósala makambo na mokano ya malamu. Na ndakisa, ezali na ntina mingi ete tóyekolaka Liloba ya Nzambe ntango nyonso. Mpo na moklisto, boyebi yango ezali lokola bilei. Esalisaka ye akɔmela na elimo mpe asala makambo oyo eyokani na mokano ya Nzambe. (Nzembo 119:105; Matai 4:4; 2 Timote 3:15, 16) Kasi, Paulo akebisaki ete: “Boyebi evimbisaka na lolendo, kasi bolingo etongaka.” (1 Bakolinti 8:1, NW) Boyebi ya solosolo yango moko ezali mabe te. Likambo ezali nde epai na biso: tozali bato ya masumu. (Genese 8:21) Soki moto azali na boyebi kasi azangi bolingo, ekoki kovimbisa ye na lolendo mpe akokanisa ete aleki bato mosusu. Kasi ekozala bongo te soki bolingo nde ezali kotinda ye na makambo oyo azali kosala. “Bolingo ezali na lolendo te, ekomivimbisaka te.” (1 Bakolinti 13:4) Moklisto oyo azali kosala makambo na bolingo akómaka na lolendo te ata soki akómi na boyebi mingi. Bolingo esalisaka ye azala ntango nyonso na komikitisa mpe epekisaka ye aluka lokumu.—Nzembo 138:6; Yakobo 4:6.
7, 8. Ndenge nini bolingo esalisaka biso na kotya makanisi na biso na makambo oyo eleki ntina?
7 Paulo akomelaki Bafilipi boye: “Libondeli na ngai ezali ete bolingo na bino bóyikana koleka mingi mingi esika moko na boyebi mpe bososoli nyonso ete [bótalela malamu makambo oyo eleki ntina, NW].” (Bafilipi 1:9, 10) Lokola tozali baklisto, bolingo na biso ekosalisa biso tólanda elendiseli ya kotalela makambo oyo eleki ntina. Na ndakisa, talá maloba oyo Paulo ayebisaki Timote: “Soko moto alingi ete asala mosala ya Mokɛngɛli, azali na mposa malamu.” (1 Timote 3:1) Na boumeli ya mobu ya mosala 2000, masangá 1 502 esalemaki, elingi koloba ete na mokili mobimba masangá ekómi 91 487. Yango emonisi ete tozali na mposa ya bankulutu mingi, mpe ebongi kopesa longonya na baoyo bazali na mposa ya mokumba yango.
8 Kasi, baoyo bazali na mposa ya mikumba ya mokɛngɛli bakozala ntango nyonso na bokatikati soki bazali kobosana te ntina ya mokumba yango. Koluka kozala na bokonzi to koyebana ezali te likambo oyo eleki ntina. Yehova asepelaka na bankulutu oyo basalaka makambo mpo balingi ye mpe balingi bandeko na bango. Balukaka te kozala bato minene to kozala na bokonzi. Nsima ya kopesa bankulutu toli ete bázalaka ntango nyonso na elimo ya malamu, ntoma Petelo amonisaki ntina ya kozala na “kosɔkema.” Apesaki bato nyonso na lisangá toli ete: “Bómisɔkisa na lobɔkɔ ya Nzambe makasi.” (1 Petelo 5:1-6) Ebongi ete moto na moto oyo azali na mposa ya kozwa mokumba atalela ndakisa ya ebele ya bankulutu na mokili mobimba oyo bazali kosala mosala makasi, bazali na komikitisa, mpe na bongo, bazali lipamboli mpo na masangá na bango.—Baebele 13:7.
Makanisi malamu esalisaka biso tóyika mpiko
9. Mpo na nini baklisto bakanisaka mapamboli oyo Yehova alaki bango?
9 Ntina ya kosala makambo na bolingo emonanaka mpe na likambo mosusu. Biblia elaki ete bato oyo bazali kokangama na Nzambe mpo balingaka ye, bakozwa mapamboli mingi sikoyo mpe mapamboli ebele lisusu na mikolo ekoya. (1 Timote 4:8) Moklisto oyo andimaka mpenza bilaka yango mpe andimaka ete Yehova “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye” akoki kozala ntango nyonso na kondima makasi. (Baebele 11:6) Biso nyonso tolingaka ete bilaka ya Nzambe ekokisama mpe tozalaka na mayoki lokola ya ntoma Yoane, ye alobaki ete: “Bobele bongo, Nkolo Yesu, oya.” (Emoniseli 22:20) Ya solo, soki tozali kokanisa mapamboli oyo tokozwa soki totikali sembo, elendisaka biso na koyika mpiko, se lokola Yesu ayikaki mpiko mpo azalaki kokanisa ‘esengo oyo etyamaki liboso na ye.’—Baebele 12:1, 2.
10, 11. Ndenge nini kosala makambo na bolingo esalisaka biso tóyika mpiko?
10 Kasi, likambo nini ekoki komonana soki kaka mposa ya kozala na mokili ya sika nde likambo oyo ezali kotinda biso na kosalela Yehova? Tokoki kokóma motema mɔ́tɔmɔ́tɔ to kozala na esengo te soki mikakatano ebimi to makambo esalemi te na ndenge to na ntango oyo tokanisaki. Likama ezali ete tokoki kolongwa na nzela. (Baebele 2:1; 3:12) Paulo alobaki ete moninga na ye moko na nkombo Dema, asundolaki ye. Mpo na nini? Mpamba te “alingaki makambo ya mokili oyo.” (2 Timote 4:10, NW) Moto na moto oyo azali kosalela Nzambe mpo na koluka matomba na ye moko akoki mpe kosuka ndenge yango. Akoki kobendama na banzela ya mokuse mpo na kozala na bomoi ya malamu na mokili mpe na bongo akoboya komipimela makambo mosusu sikoyo mpo na kozela mapamboli oyo ekoya.
11 Atako ezali mabe te kozala na mposa ya kozwa mapamboli oyo ekoya mpe kozala na elikya ya kolongwa na mikakatano, bolingo esalisaka biso na kokanisa oyo esengeli kozala na esika ya liboso na bomoi na biso. Likambo oyo eleki ntina ezali mokano ya Yehova, kasi mokano na biso te. (Luka 22:41, 42) Ya solo, bolingo etongaka biso. Esalisaka biso tóndima kozela Nzambe na motema molai, tósepela na mapamboli nyonso oyo azali kopesa biso mpe tózala na elikya ete na ntango oyo ebongi, tokozwa eloko nyonso oyo alaki biso mpe akobakisa mosusu likoló na yango. (Nzembo 145:16; 2 Bakolinti 12:8, 9) Kasi sikoyo, bolingo ezali kosalisa biso tómipesa ntango nyonso na kosalela Nzambe mpamba te “bolingo . . . ekolukaka malamu na yango mpenza te.”—1 Bakolinti 13:4, 5.
Baklisto basengeli kolinga nani?
12. Yesu alobaki ete tosengeli kolinga nani?
12 Yesu apesaki motinda oyo ezali komonisa nani oyo tosengeli kolinga ntango azongelaki makambo mibale oyo ezali na Mibeko ya Mose. Alobaki boye: “Okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba” mpe “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.”—Matai 22:37-39.
13. Ndenge nini tokoki koyekola kolinga Yehova atako tokoki komona ye te?
13 Maloba ya Yesu ezali komonisa polele ete tosengeli libosoliboso kolinga Yehova. Nzokande, na mitema na biso, tobotamaka na bolingo te mpo na Yehova. Tosengeli nde kolona yango. Mbala ya liboso oyo toyokaki nsango na ye, tosepelaki na ye mpo na makambo oyo toyokaki. Mokemoke, toyebaki ndenge oyo abongisaki mabele mpo na bato. (Genese 2:5-23) Toyekolaki makambo oyo asalelaki bato, ete ntango lisumu ya liboso ebebisaki bato, asundolaki biso te, kasi abongisaki nzela ya kosikola biso. (Genese 3:1-5, 15) Azalaki na boboto epai ya bato oyo bazalaki sembo, mpe nsukansuka apesaki Mwana na ye mobotami-bobele-moko mpo na bolimbisi ya masumu na biso. (Yoane 3:16, 36) Makambo yango oyo tozalaki koyekola esalisaki biso tókóma kosepela na Yehova mingi. (Yisaya 25:1) Mokonzi Davidi alobaki ete alingaki Yehova mpo na boboto mpe bolingo na ye. (Nzembo 116:1-9) Lelo oyo, Yehova azali kobatela biso, azali kotambwisa biso, kopesa biso makasi mpe kolendisa biso. Ntango tozali koyekola makambo na ye mingi, bolingo na biso mpo na ye ezali mpe kokola.—Nzembo 31:23; Sefania 3:17; Baloma 8:28.
Ndenge nini tokoki komonisa bolingo?
14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka solo Nzambe?
14 Na mokili mobimba, bato mingi balobaka ete balingaka Nzambe, kasi makambo oyo basalaka emonisaka ete balobaka solo te. Ndenge nini tokoki koyeba ete tolingaka mpenza Yehova? Tokoki kosolola na ye na libondeli mpe koyebisa ye ndenge nyonso oyo tozali koyoka. Tokoki mpe kosala makambo oyo ekomonisa bolingo na biso. Ntoma Yoane alobaki boye: “Ye oyo akokokisaka maloba ya [Nzambe], ya solo bolingo ya Nzambe esili kokoka kati na ye. Na likambo oyo tososoli ete tozali kati na ye.” (1 Yoane 2:5; 5:3) Liloba ya Nzambe elobi na biso makambo mingi, mpe moko na yango ezali ete tóyanganaka elongo mpe tózala na bizaleli ya malamu mpe ya pɛto. Tózala liso na nse ya lokasa te, tólobaka solo mpe tózala ntango nyonso na makanisi ya pɛto. (2 Bakolinti 7:1; Baefese 4:15; 1 Timote 1:5; Baebele 10:23-25) Tomonisaka bolingo ntango tokabelaka baoyo bazali kokelela. (1 Yoane 3:17, 18) Mpe lisusu, tokangaka monɔkɔ te mpo na koyebisa bato makambo ya Yehova. Yango esɛngi mpe kosangana na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na mokili mobimba. (Matai 24:14; Baloma 10:10) Ntango tozali kotosa Liloba ya Nzambe na makambo yango, emonisaka solo ete tolingaka Yehova.
15, 16. Na mbula eleki, ndenge nini bomoi ya bato mingi ebongwanaki mpo balingi Yehova?
15 Kolinga Yehova esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu. Na mbula eleki, bolingo yango etindaki bato 288 907 bámipesa na ye mpe bazwaki batisimo na mai mpo na komonisa yango. (Matai 28:19, 20) Komipesa na bango ezalaki na ntina. Emonisaki ete babongoli bomoi na bango. Tozali na ndakisa ya Gazmend, ye azalaki moko ya babɛti minene ya lisano ya basketball na ekólo Albanie. Banda mwa bambula, ye na mwasi na ye bakómaki koyekola Biblia mpe, atako bazwaki mwa mikakatano, nsukansuka bakómaki basakoli ya Bokonzi oyo bazwi naino batisimo te. Na mbula oyo eleki, Gazmend azwaki batisimo, azali na kati ya bato 366 oyo bazwaki batisimo na Albanie na mobu ya mosala 2000. Lisolo na ye ebimaki na zulunalo moko mpe elobaki boye: “Bomoi na ye ezali na ntina, mpe mpo na yango, ye na libota na ye bazali na mikolo oyo eleki malamu na bomoi na bango. Mpo na ye, likambo ya ntina ezali lisusu te ya koluka nini oyo akoki kozwa na bomoi oyo, kasi nini oyo akoki kopesa mpo na kosalisa basusu.”
16 Ndenge moko mpe, ndeko mwasi moko oyo auti kozwa batisimo sika mpe asalaka na kompanyi moko ya petrole na ekólo Guam, bapesaki ye mosala moko oyo ekokaki mpenza kobenda ye. Abandaki na nse ntango akɔtaki na kompanyi yango mpe na boumeli ya bambula, azalaki se komata tii nsukansuka basɛngaki ye azala mwasi ya liboso, banda kompanyi yango esalemá, na kozala prezida-molandi. Nzokande, amipesaki na Yehova. Yango wana, nsima ya kosolola na mobali na ye, ndeko mwasi yango ya sika aboyaki esika yango mpe asɛngaki mosala oyo ekotikela ye ntango mpo akola na elimo tii akokóma mobongisi-nzela. Bolingo na ye mpo na Yehova epesaki ye mposa ya kosalela ye lokola mobongisi-nzela na esika ya koluka bozwi ya mokili oyo. Bolingo ya ndenge yango etindaki bato 805 205 na mokili mobimba básala mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza to ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya mobu ya mosala 2000. Babongisi-nzela yango bamonisaki mpenza bolingo mpe kondima!
Bayoki mposa ya kolinga Yesu
17. Wapi ndakisa malamu ya bolingo oyo Yesu apesaki?
17 Yesu azali mpenza ndakisa malamu mpo azali moto oyo asalaki makambo mpo na bolingo. Liboso abotama lokola moto, alingaki Tata na ye mpe alingaki bato. Lokola mayele oyo emonisami lokola moto, alobaki boye: “Nazalaki pembeni ya [Yehova] lokola [kapita-mosali, NW]; mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye, kosepela liboso na ye ntango nyonso; kosepelana na bifandelo ya mokili na ye mpe esengo na ngai ezalaki kati na bana ya bato.” (Masese 8:30, 31) Bolingo oyo Yesu azalaki na yango etindaki ye atika esika na ye na likoló mpe aya kobotama lokola mwana oyo azangi libateli. Azalaki na motema molai mpe na boboto epai ya basɔkɛmi na babola mpe banguna ya Yehova banyokolaki ye. Na nsuka, akufaki na nzete ya mpasi mpo na bato nyonso. (Yoane 3:35; 14:30, 31; 15:12, 13; Bafilipi 2:5-11) Azali mpenza ndakisa malamu mpamba te azali moto oyo asalaki makambo na makanisi malamu!
18. (a) Ndenge nini tokoki kolona bolingo mpo na Yesu? (b) Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Yesu?
18 Ntango bato ya mitema sembo batángaka masolo ya bomoi ya Yesu na kati ya Baevanzile mpe bakanisaka ebele ya mapamboli oyo azwaki mpo azalaki sembo, etindaka bango bálinga ye lisusu mingi. Lelo oyo biso tozali lokola bato oyo Petelo ayebisaki maloba oyo: “Ata bomoni naino [Yesu] te, bolingi ye.” (1 Petelo 1:8) Tomonisaka bolingo na biso ntango tozali kosala misala oyo ezali komonisa kondima epai na ye mpe tozali kolanda ndakisa ya bomoi na ye ya komipesa mpo na basusu. (1 Bakolinti 11:1; 1 Batesaloniki 1:6; 1 Petelo 2:21-25) Na mokolo ya 19 Aprili 2000, bato 14 872 086 bayokaki lisusu ntina oyo tosengeli kolinga Yesu ntango bayanganaki na Ekaniseli ya liwa na ye oyo esalemaka mbala moko na mbula. Bato bayanganaki ebele mpenza! Ezali mpenza kolendisa na koyeba ete mingi bazali na mposa ya lobiko na lisalisi ya mbeka ya Yesu! Ya solo, bolingo ya Yehova na Yesu epai na biso mpe bolingo na biso epai na bango ezali kotonga biso.
19. Mituna nini etali bolingo tokolobela na lisolo oyo elandi?
19 Yesu alobaki ete tosengeli kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba. Kasi, alobaki mpe ete tosengeli kolinga mozalani na biso lokola biso moko. (Malako 12:29-31) Mozalani na biso ezali nani? Mpe ndenge nini kolinga mozalani na biso ekosalisa biso tózala ntango nyonso na bokatikati mpe na makanisi malamu? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini bolingo ezali ezaleli ya ntina mingi?
• Ndenge nini tokoki koyekola kolinga Yehova?
• Ndenge nini bizaleli na biso emonisaka ete tolingaka Yehova?
• Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Yesu?
[Mituna ya boyekoli]
[Bililingi na lokasa 10]
Bolingo esalisaka biso tózela lisungi na motema molai
[Elilingi na lokasa 12]
Mbeka monene oyo Yesu apesaki etindaka biso tólinga ye