Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi na yo emonisaka mpenza ete omipesi na Nzambe?

Bomoi na yo emonisaka mpenza ete omipesi na Nzambe?

Bomoi na yo emonisaka mpenza ete omipesi na Nzambe?

“Soko bozali kosala nini, bótya mitema na kosala bongo; lokola mpo na kosalela bato te, kasi kosalela Nkolo.”​—BAKOLOSE 3:23.

1. Na makambo ya mokili, “komipesa” elimbolaka nini?

 BATO ya masano basalaka nini mpo bákóma na makoki mingi? Na lisano nyonso, tenisi, ndembo ya makolo, basketball, golf to lisano nini, moto akómaka mosani monene se soki amipesi. Mpo na moto yango, kokembisa nzoto mpe komibongisa na makanisi ezalaka na esika ya liboso. Yango eyokani mpenza na ndimbola moko ya liloba “komipesa,” oyo ezali “kokaba nzoto na likambo to na mosala moko.”

2. Na Biblia, “komipesa” elimboli nini? Pesá ndakisa.

2 Kasi na ndenge oyo Biblia esaleli yango, liloba “komipesa” elimboli nini? Verbe ya Liebele oyo ebongolami na “kopesa” ezali na likanisi ya “kotyama pembeni; kokabolama; kolongolama.” a Na Yisalaele ya kala, Nganga Monene Alona azalaki kolata elamba moko na motó mpe likoló na yango bazalaki kobakisa “elembo mosantu ya komipesa”; yango ezalaki mwa etanda oyo ezalaki kongɛnga, esalemaki na wolo ya pɛto mpe likoló na yango bakomaki maloba ya Liebele oyo elimboli “Bosantu ezali ya Yehova.” Ezalaki koyebisa nganga monene ete asengeli kokima eloko nyonso oyo ekoki kokɔtisa mbindo na esika mosantu “mpamba te elembo ya komipesa, mafuta ya kopakola moponami ya Nzambe na ye [ezalaki] na motó na ye.”​—Exode 29:6; 39:30, NW; Levitike 21:12NW.

3. Tosengeli kozala na etamboli ya ndenge nini lokola tomipesi na Nzambe?

3 Yango emonisi biso ete na makambo ya Nzambe, komipesa ezali likambo ya lisɛki te. Yango elimboli kondima komonisa ete ozali mosaleli ya Nzambe, mpe yango esɛngaka kozala na etamboli ya pɛto. Yango wana, tokoki kokanga ntina oyo ntoma Petelo azongelaki maloba ya Yehova ete: “Bosengeli kozala basantu mpo ete ngai nazali mosantu.” (1 Petelo 1:15, 16NW) Lokola tozali baklisto oyo bamipesi, tozali na mokumba monene ya komonisa na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe, tosengeli kozala sembo tii na nsuka. Kasi, komipesa mpo na moklisto elimboli nini?​—Levitike 19:2; Matai 24:13.

4. Ndenge nini tokómaka tii na komipesa, mpe tokoki kokokanisa yango na nini?

4 Nsima ya koyeba Yehova Nzambe mpe mikano na ye malamumalamu, mpe lisusu koyeba Yesu Klisto na mokumba oyo azali kokokisa na mikano yango, biso moko tozwaki ekateli ya kosalela Nzambe na motema na biso mobimba, na elimo na biso mobimba, na molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso. (Malako 8:34; 12:30; Yoane 17:3) Tokoki ata koloba ete tolapaki ndai, tomipesaki mobimba na Nzambe. Ezali loyenge ya mwa ntango te nde etindaki biso tómipesa. Tosalelaki mayele na biso, tokanisaki malamumalamu mpe tobondelaki. Na yango, ezalaki ekateli ya mwa mikolo te. Tokoki te kozala lokola moto oyo abandi kokata elanga, bongo na nsima asuki na nzela mpo mosala eleki makasi to mpo amoni ete akozela mingi mpo na kobuka mbuma to mpe mbala mosusu elanga yango ekobota te. Tótalela bandakisa ya bato mosusu oyo ‘batyaki mabɔkɔ na etimweli,’ elingi koloba, bandimaki mikumba na lisangá atako bazalaki mpe na mikakatano.​—Luka 9:62; Baloma 12:1, 2.

Bawanganaki komipesa na bango te

5. Na ndenge nini Yilimia azalaki ndakisa malamu ya mosaleli ya Nzambe oyo amipesi?

5 Yilimia asalaki mosala ya mosakoli na Yelusaleme mbula koleka 40 (647-607 L.T.B.), mpe mosala yango ezalaki pɛtɛɛ te. Ayebaki bolɛmbu na ye malamu. (Yilimia 1:2-6) Asengelaki kozala na mpiko mpe na molende mpo na kotɛlɛma mokolo na mokolo liboso ya bato ya motó makasi oyo bazalaki na Yuda. (Yilimia 18:18; 38:4-6) Atako bongo, Yilimia atyelaki Yehova Nzambe elikya mpe Yehova alendisaki ye, yango wana asalaki mpenza lokola mosaleli ya Nzambe oyo amipesi.​—Yilimia 1:18, 19.

6. Ntoma Yoane atikelaki biso ndakisa nini?

6 Ezali boni mpo na Yoane, ntoma ya sembo oyo batyaki na esanga ya Patamo, esika moko ya mpasi, ntango akómaki mobange kaka mpo na “Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli na ntina na Yesu”? (Emoniseli 1:9) Ayikaki mpiko mpe amonisaki na bomoi na ye ete amipesaki mpe azalaki moklisto na boumeli ya mbula soki 60. Azalaki na bomoi ata nsima ya ntango oyo basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme. Azwaki libaku malamu ya kokoma Evanzile moko, mikanda misato oyo epemami, bakisa mpe mokanda ya Emoniseli, kati na yango asakolaki etumba ya Armagedon. Atikaki nde mosala ntango ayebaki ete Armagedon ekokuta ye na bomoi te? Te, Yoane atikalaki sembo tii na liwa na ye, ayebaki ete atako ‘elaka ezalaki penepene,’ bimonaneli oyo azwaki esengelaki kokokisama na ntango wana te.​—Emoniseli 1:3; Danyele 12:4.

Bandakisa ya bato oyo bamipesi na mikolo na biso

7. Ndenge nini ndeko moko amonisaki ete azali ndakisa malamu na oyo etali komipesa na Nzambe?

7 Na mikolo na biso, bankóto ya baklisto ya sembo bazalaki na molende mpe bawanganaki komipesa na bango te atako batikalaki na bomoi te tii na Armagedon. Tozali na ndakisa ya Ernest Beavor, moto ya Angleterre. Ye akómaki Motatoli na 1939 na ebandeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe atikaki mosala na ye ya kokanga bafɔtɔ atako ezalaki kotambola malamu mpe abandaki mosala ya ntango nyonso. Lokola aboyaki kokɔta na makambo ya politiki, akɔtaki bolɔkɔ mbula mibale. Mwasi na ye na bana na ye balendisaki ye, mpe na 1950, babengisaki bana na ye misato na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia na New York, mpo na kobongisama mpo na mosala ya misionɛrɛ. Ndeko Beavor azalaki mpenza na molende na mosala ya kosakola, yango wana baninga na ye bazalaki kobenga ye Armagedon Ernie. Na bosembo mpenza, amonisaki na bomoi na ye ete amipesaki na Nzambe mpe, tii ntango akufaki na 1986, azalaki kosakola ete Armagedon, etumba ya Nzambe, ekómi penepene. Mpo na ye, komipesa na Nzambe ezalaki kɔntra ya mwa ntango te! b​—1 Bakolinti 15:58.

8, 9. (a) Bilenge mingi bapesaki ndakisa nini ntango Franco azalaki mokonzi ya Espagne? (b) Ebongi tómituna mituna nini?

8 Ndakisa mosusu ya molende mpenza ezali ya bandeko ya Espagne. Ntango Franco azalaki mokonzi ya Espagne (banda 1939 tii 1975), bilenge mingi oyo bazalaki Batatoli baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Mingi kati na bango basalaki mbula zomi to koleka na bolɔkɔ. Motatoli moko nkombo na ye Jesús Martín, azwaki bitumbu ya bolɔkɔ mingi, soki tosangisi yango nyonso, ezali mbula 22. Bazalaki kobɛta ye na ndenge ya nsɔmɔ ntango azalaki na bolɔkɔ moko na Afrika ya Nɔrdi. Ezalaki mpasi mingi, kasi azongaki nsima te.

9 Mbala mingi, bilenge mibali yango bazalaki koyeba te soki mokolo mosusu bakobima na bolɔkɔ, mpamba te bazalaki kokatela bango etumbu likoló ya etumbu. Atako bongo, batikalaki sembo mpe na kati ya bolɔkɔ basalaki mosala ya kosakola na molende. Ntango makambo ebandaki kobonga na 1973, mingi kati na Batatoli yango bakómaki na mbula koleka 30, babimaki na bolɔkɔ mpe babandaki mbala moko mosala ya ntango nyonso, bamosusu bakómaki babongisi-nzela monene mpe bakɛngɛli-batamboli. Na kati ya bolɔkɔ, bazalaki komonisa na bomoi na bango ete bamipesi na Nzambe, mpe mingi bakobaki kosala bongo ntango babimaki. c Ezali boni mpo na biso lelo oyo? Na bosembo mpenza, tozali komonisa na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe lokola bato wana ya sembo?​—Baebele 10:32-34; 13:3.

Ndenge malamu ya kotalela komipesa na biso

10. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela komipesa na biso na Nzambe? (b) Ndenge nini Yehova atalelaka mosala oyo tozali kosalela ye?

10 Ndenge nini totalelaka komipesa na biso na Nzambe mpo na kosala mokano na ye? Ezalaka na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso? Ata soki bomoi na biso ezali ndenge nini, tózala bilenge to mikóló, bato oyo babali to minzemba, tózala na nzoto kolɔngɔnɔ to na maladi, tosengeli kosala makasi mpo tómonisa na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe, na kotalela ndenge bomoi na biso ezali. Moto mosusu akoki kosala mosala ya ntango nyonso lokola mobongisi-nzela, to kosala na Betele, kosala lokola misionɛrɛ to lokola mokɛngɛli-motamboli. Nzokande, baboti mosusu bakoki kozala na misala mingi mpo na kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya elimo ya bana na bango. Ezali na bangonga oyo moto akoki kosala na mosala ya kosakola sanza na sanza bongo Yehova amona yango ete ezali moke na kotalela ebele ya bangonga oyo basaleli ya ntango nyonso basalaka? Te. Nzambe alukaka te ete tópesa ye eloko oyo tozali na yango te. Ntoma Paulo alobaki boye: “Soko mposa ezali, likabo ekoyambama [lokola] na biloko bizali na moto, nde [lokola] na biloko bizangeli ye te.”​—2 Bakolinti 8:12.

11. Lobiko na biso etaleli likambo nini?

11 Na nyonso wana, lobiko na biso ezali kotalela te oyo tokoki kosala, kasi ezali nde kotalela ngɔlu ya Yehova na nzela ya Klisto Yesu, Nkolo na biso. Paulo alobaki polele ete: “Bato nyonso babungi mpe bazangi nkembo ya Nzambe. Balongi bobele mpo na likabo ya ngɔlu na ye na nzela ya lisiko lizali kati na Yesu Klisto.” Atako bongo, misala na biso emonisaka ete tozali solo mpenza kondima bilaka ya Nzambe.​—Baloma 3:23, 24; Yakobo 2:17, 18, 24.

12. Mpo na nini tosengeli te kokokanisaka mosala na biso na oyo ya bato mosusu?

12 Ezali na ntina te tókokanisaka bangonga oyo biso tozali kolekisa na mosala ya kosakola, mikanda oyo tozali kokabola, to motango ya bato oyo tozali koyekola na bango Biblia na oyo bato mosusu bazali kosala. (Bagalatia 6:3, 4) Ata soki tozali kosala mingi na mosala ya kosakola, biso nyonso tosengeli kobosanaka te maloba ya Yesu oyo ezali koteya komikitisa: “Ezali ndenge moko mpo na bino, soki bosali nyonso oyo batindi bino, bóloba ete: ‘Tozali se baombo mpamba. Tosali kaka oyo tosengelaki kosala.’” (Luka 17:10NW) Kasi, mbala boni tosalaka mpenza na ndenge oyo tokoki koloba ete tosali ‘nyonso oyo batindi biso’? Yango wana tosengeli komituna boye, Mosala ya ndenge nini nasengeli kosalelaka Nzambe?​—2 Bakolinti 10:17, 18.

Tósalaka oyo ezali na ntina mokolo na mokolo

13. Makanisi nini tosengeli kozala na yango ntango tozali kokokisa oyo esɛngami na komipesa na biso?

13 Nsima ya kopesa basi, mibali, bana, baboti mpe baombo toli, Paulo akomi boye: “Soko bozali kosala nini, bótya mitema na kosala bongo; lokola mpo na kosalela bato te, kasi kosalela Nkolo. Mpo boyebi ete bokozwa libula lokola libonza na mabɔkɔ ya Nkolo. Bósalelaka Nkolo Klisto lokola baombo.” (Bakolose 3:23, 24) Tozali koluka te ete tókamwisa bato na mosala oyo tozali kosalela Yehova. Tozali kosalela Nzambe na kolanda ndakisa ya Yesu Klisto. Atako mosala na ye eumelaki bambula mingi te, azalaki kosala yango na lombangu.​—1 Petelo 2:21.

14. Mpo na mikolo ya nsuka, Petelo apesaki likebisi nini?

14 Ntoma Petelo mpe amonisaki elimo yango ya kosala na lombangu. Na mokanda na ye ya mibale, alobaki ete na mikolo ya nsuka basɛki, elingi koloba bapɛngwi na bato ya ntembe, bakobima; mpe na mposa na bango moko, bakotya ntembe likoló ya kozala ya Klisto. Kasi, Petelo alobaki boye: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema. Nde mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi.” Ya solo, mokolo ya Yehova ekoya mpenza. Yango wana, mokolo na mokolo tosengeli kokanisaka soki tomonaka mpenza ete elaka ya Nzambe ezali mpenza solo.​—2 Petelo 3:3, 4, 9, 10.

15. Ndenge nini tosengeli kotalela mokolo moko moko ya bomoi na biso?

15 Mpo tómonisa mpenza na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe, tosengeli kokumisaka Yehova mokolo na mokolo. Na nsuka ya mokolo nyonso, tokoki kozongisa makanisi nsima mpe komituna soki tosali nini mpo na kokumisa nkombo ya Nzambe mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. Mbala mosusu na etamboli na biso ya pɛto, na maloba na biso ya kolendisa to na komibanzabanza na biso mpo na libota mpe baninga na biso. Tosalelaki mabaku nyonso oyo emonanaki mpo na koyebisa bato mosusu elikya na biso? Tosalisaki moto moko atalela malamu bilaka ya Nzambe? Mokolo na mokolo, tóbakisa eloko moko ya ntina na elimo, ezala lokola nde tozali kobombisa bozwi ya elimo.​—Matai 6:20; 1 Petelo 2:12; 3:15; Yakobo 3:13.

Batelá miso na yo malamu

16. Satana azali kosalela nini mpo na koluka kolɛmbisa biso lokola tomipesi na Nzambe?

16 Na mikolo oyo tozali na yango, bomoi ya baklisto ezali se kokóma mpasi. Satana na bato na ye bazali koluka kobulunganisa makambo mpo ezala mpasi mpo na kokesenisa malamu na mabe, eloko ya pɛto na eloko ya mbindo, etamboli malamu na etamboli mabe. (Baloma 1:24-28; 16:17-19) Asali na ndenge ete ezala na biso mpasi te mpo na kobebisa mitema mpe makanisi na biso na nzela ya baemisyo ya televizyo to na Internet. Miso na biso ekoki kokóma molili, to ekomona lisusu malamu te mpo na koyeba kososola misala mabe na ye. Ekateli na biso ya komonisa na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe ekoki kolɛmba mpe tokoki kolongola mabɔkɔ na “etimweli” soki tokómi kokakola mitinda ya elimo.​—Luka 9:62; Bafilipi 4:8.

17. Ndenge nini toli ya Paulo ekoki kosalisa biso na kobatela boyokani na biso na Nzambe?

17 Yango wana, maloba oyo Paulo akomelaki bandeko ya lisangá ya Tesaloniki ebongi mpenza mpo na biso lelo oyo ete: “Nzambe alingi ete bózala basantu, bóboya pite; moto na moto azala mokonzi ya mbeki na ye na bosantu mpe na lokumu, na lokoso na mposa ya nzoto te lokola oyo ezali epai ya bato oyo bayebi Nzambe te.” (1 Batesaloniki 4:3-5NW) Bato mosusu babimisami na lisangá ya boklisto mpo batalelaki komipesa na bango na Nzambe na lisɛki mpe bakweaki na pite mpe ekobo. Batikaki nzela ete boyokani na bango na Nzambe elɛmba, mpe babosanaki ye na bomoi na bango. Nzokande, Paulo alobaki boye: “Nzambe abengaki biso mpo na kondima makambo ya mbindo te, kasi mpo na kozala na bosantu. Yango wana, ye oyo akomona yango mpamba, azali komona moto mpamba te, kasi Nzambe, ye nde atii elimo santu na ye kati na bino.”​—1 Batesaloniki 4:7, 8NW.

Ekateli na yo ezali nini?

18. Tosengeli kozala na ekateli nini?

18 Soki tozali kotalela komipesa na biso na Yehova Nzambe na lisɛki te, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini? Tosengeli kozala na ekateli makasi ya kobatela lisosoli malamu, ezala na etamboli na biso to na mosala na biso ya kosakola. Petelo alendisaki na maloba oyo: “[Bóbatela] lisosoli malamu ete na likambo lizali bango kotuka bino, baoyo bakotɔngaka bizaleli na bino malamu kati na Klisto báyoka nsɔni.” (1 Petelo 3:16) Tokoki konyokwama to bakoki kosɛka biso mpo na etamboli na biso lokola baklisto, kasi Klisto mpe akutanaki na makambo yango mpo azalaki na kondima mpe azalaki sembo epai ya Nzambe. Petelo alobaki ete: “Bongo awa esili Klisto koyoka mpasi, bino mpe bómilatisa mokano na motindo moko. Zambi ye oyo asili koyoka mpasi na nzoto asili kotika lisumu.”​—1 Petelo 4:1.

19. Tokolinga báloba nini mpo na biso?

19 Ya solo, ekateli na biso makasi ya komonisa na bomoi na biso ete tomipesi na Nzambe ekobatela biso tókwea te na mitambo ya mokili ya Satana oyo bato na yango bazali na maladi na elimo, na makanisi mpe na nzoto. Kasi, longola yango, tokokóma na elikya ete tozali kosepelisa Nzambe, yango ezali malamu koleka eloko nyonso oyo Satana na bato na ye bakoki kopesa. Yango wana, tótika te ete báloba mpo na biso ete totiki bolingo oyo tozalaki na yango ntango toyebaki solo. Nzokande, báloba mpo na biso lokola balobaki mpo na baklisto ya lisangá ya Twatila na ekeke ya liboso ete: “Nayebi misala na yo, na bolingo na yo, na kondima na yo, na lisungi na yo, na mpiko na yo. Nayebi mpe ete misala na yo ya nsuka mileki misala ya liboso.” (Emoniseli 2:4, 18, 19) Na komipesa na biso, tózala mpiɔ te, mɔ́tɔ te, kasi “tópela na elimo,” tózala na molende tii na nsuka oyo ekómi penepene.​—Baloma 12:11; Emoniseli 3:15, 16.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1987, lokasa 31 (ebimeli ya Lifalanse).

b Lisolo ya bomoi ya Ernest Beavor ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1980, nkasa 8-12 (ebimeli ya Lifalanse).

c Talá Annuaire des Témoins de Jéhovah​—1978, nkasa 156-158, 201-218, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Komipesa esɛngi makambo nini?

• Pesá bandakisa ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso ya basaleli ya Nzambe oyo bamipesaki mpe ebongi tólanda yango.

• Ndenge nini tosengeli kotalela mosala oyo tozali kosalela Nzambe?

• Tosengeli kozala na ekateli nini lokola tomipesi na Nzambe?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 15]

Yilimia atikalaki sembo atako bazalaki konyokola ye

[Elilingi na lokasa 16]

Ernest Beavor apesaki bana na ye ndakisa ya malamu lokola moklisto ya molende

[Elilingi na lokasa 17]

Ebele ya bilenge Batatoli batikalaki sembo na babolɔkɔ na Espagne

[Bililingi na lokasa 18]

Tóbakisaka eloko moko ya malamu na elimo mokolo na mokolo