Nasalaki bisika nyonso oyo bazalaki na mposa na ngai
Lisolo ya bomoi
Nasalaki bisika nyonso oyo bazalaki na mposa na ngai
YA JAMES B. BERRY
Ezalaki na 1939. Bomoi ekómaki mpasi na États-Unis mpo nkita ya mboka ekweaki mpenza, mpe bato bazalaki kobanga ete etumba ebanda na Mpoto. Ngai na leki na ngai ya mobali Bennett tolongwaki epai na biso na etúká ya Mississippi mpe tokendaki na Houston, na etúká ya Texas, mpo na koluka mosala.
MOKOLO moko, pene na nsuka ya eleko ya molunge, toyokaki nsango moko ya nsɔmɔ na radio ete: basoda ya Hitler bakɔti na Pologne. Ndeko na ngai agangaki ete: “Armagedon ebandi!” Mbala moko totikaki mosala tozalaki kosala. Tokendaki na Ndako ya Bokonzi oyo ezalaki pene wana mpe toyanganaki na makita mpo na mbala ya liboso. Mpo na nini na Ndako ya Bokonzi? Tiká nabanda lisolo yango na ebandeli.
Nabotamaki na Hebron, na etúká ya Mississippi, na 1915. Tozalaki kofanda na mboka. Soki mbala moko na mbula, Bayekoli ya Biblia, ndenge Batatoli ya Yehova bazalaki kobengama, babandaki koya na mboka mpe kosala lisukulu na ndako ya moto moko. Yango wana baboti na ngai bazalaki na mikanda mingi oyo elimbolaka Biblia. Ngai na Bennett tokómaki kondima makambo tozalaki kotánga na babuku yango: Lifelo ya mɔ́tɔ ezali te, molimo ekufaka, bato ya sembo bakozala na bomoi awa na mabele mpo na libela. Kasi, ezalaki na makambo ebele oyo toyekolaki naino te. Mwa moke na nsima, ntango nasilisaki kelasi, ngai na ndeko na ngai tokendaki na Texas mpo na koluka mosala.
Ntango tokutanaki na Batatoli na Ndako ya Bokonzi, batunaki soki tozali babongisi-nzela. Toyebaki ata te ete Batatoli ya Yehova babengaka basakoli ya ntango nyonso ete babongisi-nzela. Na nsima, batunaki biso soki tolingi kosakola. Tozongisaki ete “tolingi.” Tokanisaki ete bakotinda biso na moto moko mpo na kolakisa biso ndenge ya kosakola. Kasi, bapesaki biso kaka kalati ya teritware
mpe bayebisaki biso ete: “Bósala awa!” Ngai na Bennett toyebaki ndenge ya kosakola te; mpe toboyaki komibendela mindɔndɔ mpamba. Nsukansuka, tozongisaki kalati ya teritware na lisangá na nzela ya posita, mpe tozongaki na Mississippi!Tomipesi mpenza na koyekola solo ya Biblia
Ntango tozongaki epai na biso, tobandaki kotánga mikanda ya Batatoli mikolo nyonso na boumeli soki ya mbula moko. Lokola ndako na biso ezalaki na kura te, na butu, tozalaki kopelisa mɔ́tɔ mpo na kotánga. Na ntango wana, bakɛngɛli-batamboli bazalaki kotala masangá ya Batatoli ya Yehova mpe Batatoli oyo bazalaki bango moko mosika na masangá, mpo na kolendisa bango na elimo. Ted Klein, moko ya bakɛngɛli-batamboli yango, atalaki lisangá na biso, mpe ngai na Bennett tobimaki na ye na mosala ya kosakola ndako na ndako; mpe mbala mingi, azalaki kobima na biso mibale nzela moko. Alimbolelaki biso mosala ya mobongisi-nzela.
Lokola toumelaki mingi elongo na ye, yango etindaki biso tósala mingi na mosala ya Nzambe. Yango wana, na mokolo ya 18 Aprili 1940, Ndeko Klein abatisaki ngai, Bennett, na leki na biso ya mwasi Velva. Baboti na biso bazalaki wana ntango babatisaki biso mpe basepelaki na ekateli na biso. Soko mbula mibale na nsima, bango mpe babatisamaki. Bango mibale bazalaki sembo epai ya Nzambe tii na liwa na bango—Tata akufaki na 1956 mpe Mama na 1975.
Ntango Ndeko Klein atunaki soki nakokaki kozala mobongisi-nzela, nayebisaki ye ete nasepelaka kosala mosala yango, kasi nazali na mbongo te, nazali mpe na bilamba te, eloko te. Alobaki ete “kobanga te, nakotalela yango.” Mpe asalaki yango. Liboso, asalisaki ngai na kotinda lokasa ya kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela. Na nsima, akendaki na ngai na Nouvelle Orleans, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 300 longwa epai na biso, mpe alakisaki ngai mwa bandako kitoko oyo ezalaki likoló ya Ndako ya Bokonzi moko. Bandako yango ezalaki mpo na babongisi-nzela. Mosika te, nakendaki kofanda kuna mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Batatoli oyo bazalaki na Nouvelle Orleans bazalaki kokabela babongisi-nzela bilamba, mbongo mpe biloko ya kolya. Na moi, bandeko bazalaki koya na biloko ya kolya mpe kotika yango na ndako to mpe kotyela biso yango na frigo. Ndeko moko oyo azalaki na restora na ye pene wana, azalaki kobenga biso tókendaka mbala na mbala na mpokwa kozwa biloko ya kolya oyo etikalaka—lokola misuni, mampa, mpe biloko mosusu.
Nakutani na bato ya mobulu
Nsima ya mwa ntango, batindaki ngai nakende kosala lokola mobongisi-nzela na engumba Jackson, na etúká ya Mississippi. Kuna, ngai na moninga na ngai ya mosala tokutanaki na bato ya mobulu; mpe emonanaki lokola ete bakonzi ya Leta ya mboka wana bazalaki mpe kotinda bango. Ezalaki mpe motindo moko na esika oyo batindaki biso na nsima, na engumba Columbus, kaka na Mississippi. Lokola tozalaki kosakola epai ya bato ya mposo nyonso mpe ya bikólo nyonso, mindɛlɛ mosusu bayinaki biso. Mingi bakanisaki ete tozalaki kotinda bato bátombokela bakonzi ya Leta. Komanda ya limpinga moko ya basoda ya kala ya États-Unis, ebongiseli oyo elendisaka mingi bolingo ya ekólo, azalaki kokanisa bongo. Mbala ebele atindaki bato ya mobulu mpe ya nkanda ete bálanda biso.
Mbala ya liboso oyo balandaki biso na Columbus, bato yango ya mobulu bayaki nsima na biso ntango tozalaki kokabola bazulunalo na balabala. Batindikaki biso tii na lininisa ya talatala ya magazini moko. Bato batondanaki mpo na kotala likambo nini ezalaki koleka. Mosika te, bapolisi bakómaki mpe bamemaki biso na tribinale. Bato yango ya mobulu balandaki biso kuna mpe bayebisaki liboso ya bakonzi nyonso oyo bazalaki wana ete soki
tolongwi na engumba wana liboso ya mokolo oyo batyelaki biso, tokokende malamu. Kasi soki tokolongwa nsima ya mokolo yango, bakosala biso mabe, ata koboma biso. Tomonaki ete ezali malamu tólongwa naino na engumba yango. Kasi nsima ya mwa bapɔsɔ, tozongaki mpe tobandaki lisusu kosakola.Elekaki mpenza ntango molai te, bato mwambe balandaki biso mpe bakɔtisaki biso na makasi na mituka na bango mibale. Bamemaki biso na kati ya zamba, balongolaki biso bilamba; bazwaki mokaba na ngai mpe babɛtaki biso fimbo 30 na moto! Bazalaki na mindoki na bansinga, mpe nakoki koloba ete tozalaki mpenza kobanga. Nakanisaki ete bakokanga biso bansinga mpe bakobwaka biso na ebale. Bapasolaki mikanda na biso mpe bapanzaki yango, babambaki fono na biso na ekumu ya nzete mpe epanzanaki.
Nsima ya kobɛta biso fimbo, bayebisaki biso tólata bilamba mpe tótambola na nzela moko ya moke na kati ya zamba, mpe tótala nsima te. Wana tozalaki kotambola, tokanisaki ete soki tomeki kaka kobaluka, bakobɛta biso masasi—mpe bakokima mpe moto akoyeba bango te. Kasi, nsima ya mwa miniti, toyokaki makɛlɛlɛ ya mituka na bango, bakendaki.
Mokolo mosusu, bato ya mobulu mpe ya nkanda balandaki biso, mpe esengelaki tózinga bilamba na bankingo na biso mpe tóbɛta mai na ebale mpo na kokima. Eumelaki ntango molai te, bakangaki biso mpe bafundaki biso ete tozali kotinda bato bátombokela bakonzi ya Leta. Tolekisaki pɔsɔ misato na bolɔkɔ liboso ete básambisa biso. Likambo yango eyebanaki na Columbus mobimba. Bapesaki nzela na bayekoli ya eteyelo monene moko oyo ezalaki pene wana ete bábima liboso ya ngonga mpo na kolanda ndenge bakosambisa biso. Ntango mokolo yango ekokaki, ndako ya kosambisa etikalaki lisusu na esika ya kofanda te. Na kati ya batemwe ya Leta, ezalaki na bapastɛrɛ mibale, mokambi ya engumba, na bapolisi.
Ndeko Clarke, oyo azalaki avoka ya Batatoli ya Yehova, atindamaki elongo na moninga na ye mpo na kolobela biso. Basɛngaki ete efundeli na biso elongolama mpo likambo moko te ezalaki kondimisa yango. Atako avoka oyo azalaki elongo na Ndeko Clarke azalaki Motatoli ya Yehova te, alobelaki biso malamu mpenza. Na esika moko ayebisaki zuzi boye: “Bato balobaka ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya magboma. Bato ya magboma? Bato mpe bazalaki koloba ete Thomas Edison azali na ligboma!” Na nsima alakisaki mosapi na mwinda ya kura mpe alobaki ete: “Kasi talá mwinda wana!’’ Bamosusu batalelaki Edison oyo abimisaki mayele ya kosala mwinda wana lokola moto ya ligboma, kasi ata moto moko te akoki kotɛmɛla misala na ye.
Nsima ya koyoka maloba ya batemwe, zuzi-mokambi ya tribinale ayebisaki prokirɛrɛ ete: “Olakisi biso likambo moko te oyo emonisi ete bazali kotinda bato bátombokela bakonzi ya Leta, mpe bazali na lotomo ya kosala mosala oyo. Koya na bango lisusu na tribinale oyo te mpe kobebisa ntango mpe mbongo ya Leta mpamba te, kobebisela ngai mpe ntango te tii mokolo okozwa bango na likambo ya solo!” Tolongaki!
Kasi, nsima na yango, zuzi abengaki biso na kati ya biro na ye. Ayebaki ete bato nyonso na engumba basepelaki te na ndenge akataki likambo na biso. Na yango akebisaki biso boye: “Oyo nalobaki eyokani na mibeko; kasi toli nakopesa bino ezali ete bólongwa awa, soki te, bakoboma bino!” Toyebaki ete alobaki solo, na yango tolongwaki na engumba yango.
Kolongwa wana, nalandaki Bennett na Velva, bango bazalaki babongisi-nzela minene na engumba
Clarksville, na etúká ya Tennessee. Nsima ya mwa basanza, totindamaki na engumba Paris, na etúká ya Kentucky. Nsima ya mbula moko na ndambo oyo tosalaki na engumba yango, wana tokómaki pene ya kofungola lisangá kuna, mbala moko, babengisaki ngai na Bennett mpo na likambo moko ya ntina mpenza.Na mosala ya misionɛrɛ
Ntango babengisaki biso na kelasi ya mbala ya mibale ya Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, tolobaki ete: ‘Babosani! Ndenge nini bakoki kobenga bilenge mibale ya Mississippi, oyo bauti na libota ya bozwi mingi te na eteyelo wana?’ Tobandaki kokanisa ete bazalaki koluka baoyo batángá mingi; kasi tokendaki kaka. Tozalaki bayekoli 100 na kelasi yango, mpe mateya eumelaki sanza mitano. Likita mpo na kopesa badiplome ezalaki na mokolo ya 31 Yanuali 1944, mpe tozalaki na mposa ya kokende kosala na mboka mopaya. Kasi na mikolo wana, kozwa passeport na visa ezalaki kozwa ntango molai, yango wana bana-kelasi bazalaki naino kotindama lokola babongisi-nzela na kati ya États-Unis. Nsima ya kosala mwa ntango lokola babongisi-nzela na etúká ya Alabama mpe na etúká ya Géorgie, batindaki ngai na Bennett na Barbade, moko ya bisanga ya Antilles.
Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki se kokoba, mpe mosala na mikanda ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na bisika ebele, lokola mpe na Barbade. Ntango tokómaki na mboka yango, basali ya Leta bafungolaki mpe batalaki bavalisi na biso, mpe bakutaki mikanda oyo tobombaki na kati. Tolobaki na kati ya motema ete: ‘Bakokanga biso.’ Kasi, moko na bango ayebisaki biso ete: “Bólimbisa biso, esengelaki tótala bavalisi na bino; mikanda mosusu tomoni awa epekisami na Barbade.” Atako bongo, atikaki biso na mikanda nyonso oyo tomemaki! Na nsima, ntango topesaki bakonzi ya Leta litatoli, balobaki ete bayebaki te mpo na nini mikanda na biso epekisamaki. Nsima ya mwa basanza, balongolaki mobeko oyo ezalaki kopekisa mosala na biso mpe mikanda na biso.
Mosala na biso ezalaki koleka malamu mpenza na Barbade. Moto na moto azalaki koyekola Biblia na bato soki 15, mpe bayekoli mingi kati na bango bakolaki na elimo. Tosepelaki na komona bamosusu koya na makita. Nzokande, lokola mikanda na biso epekisamaki mpo na mwa ntango, bandeko ya mboka yango bayebaki malamu te lolenge oyo makita esengelaki kotambwisama. Atako bongo, toumelaki te mpo na kolakisa bandeko mosusu ya makoki ndenge ya kosala. Tozalaki na esengo ya kosalisa ebele ya bato oyo tozalaki koyekola na bango mpo bábanda kobima na mosala ya kosakola mpe tozalaki na esengo ya komona ndenge oyo lisangá ezalaki kokola.
Nakómi tata ya bana
Nsima ya sanza 18 na Barbade, esengelaki básala ngai lipaso, mpe nazongaki na États-Unis. Kuna nabalaki Motatoli moko na nkombo Dorothy, oyo ngai na ye tozalaki kotindelana mikanda. Na nsima, ngai na mwasi na ngai tosalaki lokola babongisi-nzela na Tallahassee, na etúká ya Floride; kasi nsima ya sanza motoba, tokendaki na engumba Louisville, na etúká ya Kentucky, epai kuna Motatoli moko
apesaki ngai mosala. Ndeko na ngai Bennett akobaki na mosala na ye na Barbade na boumeli ya bambula ebele. Na nsima, abalaki mpe moninga na ye misionɛrɛ mpe akómaki kosala lokola mokɛngɛli-motamboli na bisanga. Nsukansuka, mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto, esengelaki ete bázonga na États-Unis. Bennett alandaki kosala elongo na mwasi na ye, kotala masangá ya monɔkɔ ya Espagnole lokola mokɛngɛli-motamboli tii na liwa na ye na 1990, na ntango wana azalaki na mbula 73.Na 1950, Dorothy abotaki mwana na biso ya liboso; azalaki mwana mwasi mpe topesaki ye nkombo Daryl. Tobotaki bana mitano. Mwana na biso ya mibale, Derrick, akufaki na mbula mibale na ndambo, na maladi ya méningite. Na 1956, Leslie abotamaki; mpe na 1958, Everett, mwana mobali mosusu alandaki. Ngai na Dorothy tosalaki nyonso mpo na koteya bana na biso solo ya Biblia. Tozalaki ntango nyonso kosala milende mpo na koyekola Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ mpe kosala ete bana nyonso básepela na yango. Ntango Daryl, Leslie na Everett bazalaki naino mike, pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki kopesa bango mituna mpo básala bolukiluki mpe bápesa biyano na pɔsɔ oyo ekolanda. Na ndako, bazalaki mpe komeka ndenge ya kosala na mosala ya kosakola ndako na ndako. Moko azalaki kokɔta na armware mpe kosala lokola moto oyo bayei kotala. Mosusu azalaki kotɛlɛma libándá mpe kobɛta na ekuke ya armware. Na lisano na bango, bazalaki kosalela maloba ya kobangisana, kasi yango esalisaki bango bálinga mosala ya kosakola. Tozalaki mpe kosakola na bango elongo mbala na mbala.
Ntango Elton, mwana na biso ya nsuka abotamaki, na 1973, Dorothy akómaki pene na mbula 50 mpe ngai pene na mbula 60. Na lisangá bazalaki kobenga biso Abalayama na Sala! (Genese 17:15-17) Mbala mingi bana mibali oyo ya mikóló bazalaki komema Elton na mosala ya kosakola. Tozalaki komona ete tozalaki kopesa bato litatoli moko ya malamu ntango bazalaki komona mabota mobimba—bandeko mibali, bandeko basi, baboti na bana—kosala elongo, koteya bato mosusu mateya ya solo ya Biblia. Bayaya ya Elton bazalaki komema ye na mapeka mpe kosimbisa ye trakte. Mbala mingi bato bazalaki koyoka soki bafungoli ndako mpe bamoni mwana moke na mapeka ya bayaya na ye ya mikóló. Bayaya ya Elton balakisaki ye ndenge ya kopesa moto trakte na nsuka ya lisolo mpe kobakisa mwa maloba moke. Ezalaki na motindo wana nde abandaki kosakola.
Tosalisaki bato mosusu ete báyeba Yehova. Na nsuka ya bambula ya 1970, tolongwaki na Louisville mpe tokendaki na Shelbyville, na etúká ya Kentucky, kosala na lisangá moko epai mposa ezalaki. Kuna, tosukaki te kaka na komona ndenge oyo lisangá ezalaki kokola, kasi topesaki mpe mabɔkɔ na kozwa esika mpe kotonga Ndako ya Bokonzi. Na nsima, basɛngaki biso tókende kosala na lisangá mosusu oyo ezalaki pene wana.
Mbongwana na bomoi ya libota
Nakanisaki ete bana na biso nyonso bakotikala na nzela ya Yehova, kasi ezalaki bongo te. Ntango bakolaki mpe bakendaki bipai mosusu, misato kati na bana na biso minei oyo batikalaki na bomoi, batikaki nzela ya solo. Kasi, mwana na biso Everett alandaki ndakisa na ngai mpe akɔtaki na mosala ya ntango nyonso. Na nsima asalaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York, mpe na 1984, babengisaki ye na kelasi ya mbala ya 77 ya Gileadi. Nsima ya kozwa diplome, batindaki ye na ekólo Sierra Leone, na Afrika ya Wɛsti. Na 1988, abalaki Marianne, mobongisi-nzela moko oyo autaki na Belgique. Kobanda wana, bazali kosala lokola bamisionɛrɛ.
Lokola moboti nyonso akoki kokanisa yango, ezalaki mpasi mingi mpo na biso komona bana na biso misato kopesa mokɔngɔ na nzela ya bomoi oyo ezali kosepelisa sikoyo, mpe oyo ezali kopesa elikya kitoko ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele na mikolo ezali koya. Ntango mosusu, nazalaki komipesa foti. Kasi nazwaka libɔndisi na koyeba ete ata bikelamu mosusu ya elimo oyo Yehova ye moko azalisaki, to baanzelu, batikaki kosalela ye atako Yehova apamelaka na bolingo mpe na ngɔlu mpe asalaka mabunga te. (Deteronome 32:4; Yoane 8:44; Emoniseli 12:4, 9) Yango endimisaki ngai ete ata baboti basali milende ndenge nini mpo na kobɔkɔla bana na nzela ya Yehova, bana mosusu bakoki kaka koboya kondima solo.
Lokola nzete oyo mopɛpɛ makasi ezali kobɛta, tosengeli komimesenisa na mikakatano mpe minyoko ndenge na ndenge oyo tozali kokutana na yango. Ndenge bambula ezalaki koleka, namonaki ete koyekola Biblia ntango nyonso mpe koyangana na makita epesaka ngai makasi ya kosala Yakobo 1:2, 3.
mbongwana wana, mpe kotikala makasi na elimo. Wana nazali konuna mpe kokanisa mabunga oyo nasalá, nazali komeka kotalela makambo malamu oyo esalemá na bomoi na ngai. Soki totikali sembo, makambo nyonso tokokutana na yango ekosala ete tókola na elimo. Mpe soki tozwi mayele na makambo yango, tokoki kotalela na lolenge ya malamu makambo ya mabe oyo tokutanaka na yango na bomoi na biso.—Sikoyo, ngai na Dorothy tozali lisusu na makasi te mpe nzoto na biso ezali kolɔngɔnɔ te mpo na kosala oyo tolingi kosala na mosala ya Yehova. Kasi tozali na botɔndi mpo na lisungi ya bandeko na biso baklisto. Mbala nyonso oyo tokendeke na makita, bandeko bayebisaka biso ete basepelaka mingi komona biso kuna. Mpe bazali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosunga biso, lokola kobongisela biso ndako mpe motuka.
Na bantango mosusu, tosalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe toyekolaka na bato oyo basepelaka. Tosepelaka mingi ntango tozwaka bansango ya mwana na biso oyo azali misionɛrɛ na Afrika. Tii lelo oyo, toyekolaka na libota, atako totikali kaka biso mibale. Tozali na esengo ete tolekisaki bambula ebele na mosala ya Yehova. Andimisi biso ete ‘akobosana te mosala na biso mpe bolingo oyo tomonisi mpo na nkombo na ye.’—Baebele 6:10.
[Elilingi na lokasa 25]
Ted Klein azali kobatisa ngai, Velva na Bennett, mwa 18 Aprili 1940
[Bililingi na lokasa 26]
Na mwasi na ngai Dorothy, na ebandeli ya bambula ya 1940 mpe na 1997
[Elilingi na lokasa 27]
Na Barbade, tobakaki bapapye na bisi mpo na kobengisa bato na lisukulu ya bato nyonso “Mokonzi ya kimya”
[Elilingi na lokasa 27]
Ndeko na ngai Bennett, liboso ya ndako ya bamisionɛrɛ