Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini komibatela na mokili oyo etondi na makama?

Ndenge nini komibatela na mokili oyo etondi na makama?

Ndenge nini komibatela na mokili oyo etondi na makama?

SOKI ozali kotambola na bisika oyo bakundikundi bamine okoki kozwa likama ya liwa. Kasi, soki ozali na karte oyo ezali kolakisa yo bisika oyo mine ezali, okomibatela, boye te? Lisusu, soki oyekolá ndenge oyo bayebaka bisika oyo bakundi mine ata ya ndenge nini, okoki komibatela mpo onyata yango te, oyo ekoki kokata yo lokolo to koboma yo.

Tokoki kokokanisa Biblia na karte yango mpe koyekola ndenge bayebaka bisika oyo bakundi mine. Biblia ezali kolakisa mayele oyo eleki mayele nyonso mpo na komibatela mpe kolonga mikakatano ya bomoi.

Talá ndenge Masese 2:10, 11 ezali kolendisa biso: “Boye mayele ekokɔta na motema na yo mpe boyebi ekoyokama malamu na molimo na yo; mayele ekobatela yo mpe bososoli ekosunga yo.” Mayele na bososoli oyo balobeli awa euti na moto te, kasi ezali mayele oyo Nzambe apesaka. “Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.” (Masese 1:33) Tótala sikoyo ndenge oyo Biblia ekoki kobakisela biso mayele ya komibatela mpe kosalisa biso tókima ebele ya mikakatano mosusu.

Ndenge ya kokima makama ya liwa

OMS (Ebongiseli ya ONU, mpo na kɔlɔngɔnɔ ya nzoto na mokili mobimba) euti kobimisa lapolo moko oyo emonisi ete na mokili mobimba, na mbula moko bato soki 1 171 000 bazali kokufa na makama ya motuka. Bato pene na milio 40 bazali kozoka bampota, mpe koleka milio 8 bazali kozwa mpasi oyo ekoumela.

Atako tokoki te komibatela liboso ya likama nyonso, tokoki komibatela liboso ya makama mingi soki tozali kotosa mibeko ya nzela. Bakonzi ya Leta nde batyaka mibeko ya nzela mpe bapesaka etumbu na moto oyo atosi te. Biblia elobi boye mpo na bango: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi.” (Baloma 13:1) Basɔfele oyo balandaka toli yango bamibatelaka liboso ya makama mingi oyo mbala mingi ezalaka nsɔmɔ.

Likambo mosusu oyo ezali kotinda biso tótambwisaka motuka malamu ezali limemya oyo tosengeli kozala na yango mpo na bomoi ya nzoto. Biblia elobi na ntina na Yehova ete: “Yo nde liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9NW) Yango emonisi ete bomoi ezali likabo ya Nzambe. Yango wana, tozali na lotomo te ya kobɔtɔla moto likabo yango to kozanga limemya mpo na bomoi, ata bomoi na biso moko.​—Genese 9:5, 6

Soki tozali na limemya mpo na bomoi tokotala malamumalamu motuka na biso mpe ndako na biso mpe tosengeli komindimisa ete ekoki kobimisa likama te. Na Yisalaele ya kala, bazalaki kosɛnga na bato ete bámibatela na makambo nyonso ya bomoi. Na ndakisa, na ntango bazali kotonga ndako, Mibeko ya Nzambe elobaki ete na nsuka ya esika oyo bazalaki kobongisa likoló ya ndako, esika oyo libota mobimba bazalaki kosala misala ndenge na ndenge, basengeli kotya efelo oyo ekopekisa ete moto akwea te. “Tia mwa lopango o mbalasani ya likolo mpo ‘te soko moto abuti wana, akweya o nse te.” (Mibeko 22:8Liloba lya Nzambe) Soki moto akwei longwa na esika yango mpo batosaki mobeko yango te, nkolo-ndako azalaki na ngambo na miso ya Nzambe. Tomoni mpenza ete soki tolandi etinda oyo ezali na mobeko yango, tokomibatela liboso ya makama mingi, ezala na mosala to na masano.

Ndenge ya kotika biloko oyo ebomaka

Lapolo ya OMS ezali komonisa ete lelo oyo, bato koleka miliare moko bamelaka likaya, mpe na mbula moko bato soki milio minei bazali kokufa mpo na likaya. Nsima ya mbula 20 to 30, bato milio 10 bakokufa mpo na likaya. Bamilio mosusu ya bato oyo bamelaka likaya, na baoyo bamelaka bangi, bakobebisa bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango mpe bomoi na bango mpo na biloko yango.

Atako Liloba ya Nzambe elobeli polele te komela likaya to bangi, mitinda na yango ekoki kobatela biso mpo na koboya mimeseno yango. Na ndakisa, 2 Bakolinti 7:1 epesi toli oyo: “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso ya nzoto mpe ya [elimo, NW].” Moto moko te akoki kotya ntembe ete likaya na bangi ezali mabe to ebebisaka nzoto, mpamba te biloko mingi oyo ezali na kati na yango ezali pwazo. Longola yango, Nzambe alingi ete nzoto na biso ezala “bosantu,” elingi koloba ezala pɛto. (Baloma 12:1) Omoni ete kolanda mitinda yango ekobatela moto liboso ya makama mingi!

Ndenge ya kotika mimeseno oyo ememaka makama

Bato mingi balyaka mpe bamelaka na lokoso. Kolekisa ndelo na kolya epesaka maladi lokola diabɛti, kanser, na maladi ya motema. Komela masanga mingi ememaka mikakatano mosusu lokola kokóma moombo ya masanga, kobɛla maladi ya mabale (cirrhose du foie), libota ekopanzana mpe makama ya motuka. Nzokande, koboya kolya to kolya kaka moke ekoki mpe kozala likama mpe ekoki komema maladi mosusu ya motó (anorexie mentale).

Atako Biblia ezali mokanda ya makambo ya monganga te, kasi ezali kopesa toli ya polele ete esengeli kolekisa ndelo te na kolya mpe komela. “Mwana na ngai, yoká mpe zalá na boyebi mpe kambá motema na yo na nzela. Zalá elongo na bameli na masanga te, soko elongo na bato te baoyo bakolingaka mosuni na mposa mabe. Zambi kolangwa mpe kolyaka mingi mingi ekokómisa moto na bobola.” (Masese 23:19-21) Atako bongo, Biblia elobi ete moto asengeli kosepela na kolya mpe komela. “Moto na moto alya mpe amela mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye nyonso. Yango likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:13.

Biblia ezali mpe kolendisa biso tózala na bokatikati na likambo etali kokembisa nzoto, mpe elobi ete “kokembisa nzoto ezali na litomba moke.” Kasi ebakisi ete: “Kosalela Nzambe ezali na litomba na makambo nyonso, mpamba te ezali na elaka ya bomoi oyo mpe oyo ekoya.” (1 Timote 4:8NW) Okoki komituna, ‘Kosalela Nzambe ezali na litomba nini ata sikoyo?’ Ezali na matomba mingi. Kosalela Nzambe ezali kosala ete tókokisa bamposa ya elimo oyo ezali na ntina mingi mpe ezali kokolisa bizaleli lokola bolingo, esengo, kimya, komipekisa, bizaleli nyonso wana esalisaka mpo na kozala na bomoi malamu mpe nzoto kolɔngɔnɔ.​—Bagalatia 5:22, 23.

Mbuma mabe ya pite na ekobo

Lelo oyo, ebele ya bato bamipesi na pite mpe na ekobo. Moko na mbuma na yango ezali ete bato mingi bazali kozwa maladi ya sida. Lapolo ya OMS emonisi ete banda maladi yango ebandá, bato milio 16 bakufi na yango, mpe na moi ya lelo, bato milio 34 bazali na mikrobe ya sida. Bato mingi oyo bazali na maladi ya sida bazwaki yango mpo bazalaki kotambola na basi to na mibali kilikili, to bamitɔbɔlaki biloko oyo elangwisaka na ntonga oyo ezali na mikrobe ya sida, to mpe bazongisaki bango makila oyo ezali na mikrobe ya sida.

Mbuma mabe mosusu ya pite na ekobo ezali bamaladi lokola herpès, sopisi, hépatite B, hépatite C na kasende. Atako ntango bazalaki kokoma Biblia bankombo ya bamaladi yango ezalaki te, kasi bayebaki binama ya nzoto oyo bamaladi mosusu ya ntango wana oyo ezwamaka na kosangisa nzoto ebebisaka. Na ndakisa, Masese 7:23 (NW) ebengi mbuma mabe ya pite ete ‘mbanzi oyo etɔbɔlaka libale.’ Mbala mingi kasende, ata mpe hépatite ebebisaka mabale. Toli ya Biblia oyo elobi na baklisto ete ‘báboya makila na pite’ ebongi mpenza mpe ezali komonisa bolingo!​—Misala 15:28, 29.

Bolingo ya mbongo ezali motambo

Mpo bákóma na bozwi nokinoki, bato mingi bazali kondima kokɔtisa mbongo na bango na makambo oyo ezali na makama minene. Likambo ya mawa ezali ete mbala mingi makambo yango etikaka moto mabɔkɔ mpamba. Nzokande, Biblia elobi na basaleli ya Nzambe boye: “Tiká ete asalaka mosala, asalisa mabɔkɔ na ye mosala ete akoka kokabela bango bazali kozanga.” (Baefese 4:28) Ya solo, ntango mosusu moto oyo azali kosala na motoki na ye akómaka mozwi te. Kasi, azalaka na kimya ya makanisi, apesaka nzoto na ye kilo mpe ntango mosusu azwaka mbongo oyo akoki kopesa lokola makabo mpo na makambo ya ntina.

Biblia elobi boye: “Baoyo bazali na mposa na kozwa mosolo, bakokwea na kati na komekama mpe na [motambo, NW], mpe kati na mposa ezangi ntina mpe ikoyokisa mpasi. Mposa yango ikozindisa bato na liwa mpe libebi nyɛ. Zambi mposa ya mosolo ezali ntina ya mabe nyonso. Mpo na yango, bamosusu . . . bamitɔbɔli bango mpenza na bolɔzi mingi.” (1 Timote 6:9, 10) Toboyi te, bato mosusu oyo ‘bazalaka na mposa ya kozwa mosolo’ bakómaka na yango. Kasi esɛngaka bango nini? Kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango, mabota na bango, elimo na bango, ata mpe mpɔngi na bango ebebaka, boye te?​—Mosakoli 5:12.

Moto ya mayele asosolaka ete “bomoi ya moto ezali kati na motuya ya biloko bizali na ye te.” (Luka 12:15) Na bisika mingi, kozala na mbongo mpe kozala na biloko mosusu ezali na ntina. Kutu, Biblia elobi ete ‘mosolo ebatelaka,’ kasi ebakisi ete “malamu ya mayele ezali ete mayele ekobikisa bomoi na ye oyo azwi yango.” (Mosakoli 7:12) Kozala na boyebi mpe na mayele oyo ebongi ekoki kosalisa biso na makambo nyonso, mingimingi na makambo ya bomoi, kasi mbongo te.​—Masese 4:5-9.

Ntango oyo mayele yango moko ekobatela biso

Etikali moke, mayele ‘ebatela baoyo bazali na yango’ na ndenge oyo emonaná naino te: ekobatela bango na ntango ya “bolɔzi monene” oyo ezali koya wana Nzambe akoboma bato mabe. (Matai 24:21) Biblia elobi ete na ntango wana bato bakobwaka mbongo na bango na balabala lokola “eloko ya mbindo.” Mpo na nini? Mpasi oyo bakokutana na yango ekomonisa bango ete bakoki kosomba bomoi te na wolo mpe na palata na “mokolo ya nkɛlɛ ya [Yehova].” (Ezekiele 7:19) Nzokande, “ebele monene” oyo, na mayele na bango ‘bamibombelaki biloko ya motuya na likoló’ lokola bazalaki kotya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na bango, bakozwa mbano ya mosala na bango mpe bakozwa bomoi ya seko na paladiso awa na mabele.​—Emoniseli 7:9, 14; 21:3, 4; Matai 6:19, 20.

Tosengeli kosala nini mpo tómibatela ndenge yango na mikolo ezali koya? Yesu alobi boye: “Oyo ezali bomoi ya seko ete báyekola koyeba yo Nzambe moko ya solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3NW) Bamilio ya bato bazwi boyebi yango na Liloba ya Nzambe, Biblia. Bato yango bazali na elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya mpe lisusu bazali na mwa kimya mpe babatelami liboso ya makama mingi lelo oyo. Ezali lokola mokomi ya nzembo alobaki yango ete: “Nakolala, ɛɛ nakolala mpɔngi na kimya, zambi bobele yo [Yehova] okobatela ngai na esika na ngai.”​—Nzembo 4:8.

Okoki koyeba mokanda mosusu oyo ekoki kosalisa yo na kobatela nzoto to bomoi na yo mobimba liboso ya makama, lokola Biblia ezali kosala yango? Mokanda mosusu te ezali na nguya lokola Biblia, mpe ezali na mokanda mosusu te oyo ekoki kosalisa yo omibatela malamu na mokili oyo etondi na makama. Tolendisi yo oyekola yango malamu.

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

Biblia esalisi bato bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe bámibatela

Mwasi moko nkombo na ye Jane, a azalaki komela marijuana, likaya, bangi, mpe biloko mosusu ndenge na ndenge oyo elangwisaka mpo na kobosana mitungisi ya bomoi. Azalaki mpe komela masanga mingi. Jane alobi ete mobali na ye mpe azalaki kaka lokola ye. Bazalaki na elikya te mpo na mikolo ezali koya. Na nsima, Jane akutanaki na Batatoli ya Yehova. Abandaki koyangana na makita mpe kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!; azalaki mpe kopesa mobali na ye atángaka. Jane na mobali na ye bakómaki koyekola Biblia na Batatoli. Ntango bakómaki koyeba malamu mibeko ya Yehova, batikaki komela biloko nyonso oyo bazalaki komela. Likambo nini esalemaki? Mwa bambula na nsima, Jane akomaki boye: “Tokómaki na bomoi ya esengo mpenza. Nazali kotɔnda Yehova mingi mpo na Liloba na ye oyo epɛtolaka mpe mpo na bomoi ya kimya mpe nzoto kolɔngɔnɔ oyo tozali na yango sikoyo.”

Kurt akutanaki na likambo oyo ezali komonisa biso ntina ya kozala sembo na mosala. Ye asalaka mosala ya baordinatɛrɛ. Ntango bakómaki na mposa ya bamasini ya sika na kompanyi epai asalaka, patrɔ na bango asɛngaki ye aluka esika oyo bakoki kozwa yango na ntalo malamu. Kurt amonaki esika oyo bakoki kosomba yango mpe bayokanaki ntalo. Nzokande, kalaka ya magazini epai basombaki bamasini yango asalaki libunga na faktire, asalaki faktire oyo ezangaki dolare 40 000 na ntalo oyo bayokanaki. Ntango Kurt amonaki yango, abengaki bango mpo na koyebisa bango, mpe patrɔ alobaki ete akokisi mbula 25 na mosala na ye, kasi amoná naino moto ya sembo ndenge yango te. Kurt amonisaki ete mateya ya Biblia nde esalisi ye azala na lisosoli ya ndenge wana. Patrɔ asɛngaki Lamuká! 300 ya nimero oyo elobelaki kozala sembo na mombongo mpo apesa bato na ye ya mosala. Kurt akómaki mokonzi na mosala mpo na bosembo na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 7]

“Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba.”​—YISAYA 48:17