Okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto!
Okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto!
SOKI esi ekómelá yo olɛmba nzoto, na ntembe te okondima maloba oyo moto moko ya mayele akomaki ete: ‘Soki [okolɛmba nzoto, NW] na mokolo ya mpasi, nguya na yo ekozala bobele moke.’ (Masese 24:10)
Tóyeba ete kolɛmba nzoto eponaka moto te. Tokoki kolɛmba nzoto mwa moke mokolo moko to mikolo mibale, mpe na nsima tokozwa lisusu makasi. Kasi kolɛmba nzoto mosusu ekoki koumela mingi soki tozali na nkanda na motema mpo basalelaki biso mabe. Ezali kolɛmba nzoto ya motindo wana nde ememaki baklisto mosusu na kotika koyangana na makita ya lisangá mpe kotika kosakola.
Soki ozali koyoka ete olɛmbi nzoto, yiká mpiko! Basaleli ya sembo ya Yehova na ntango ya kala babundaki na ezaleli ya kolɛmba nzoto mpe balongaki yango. Na lisalisi ya Nzambe, yo mpe okoki kolonga yango.
Ntango bazokisi yo na motema
Kokanisa te ete ekoki kokómela yo te ete báloba na yo maloba ya kozokisa to básalela yo likambo ya mabe. Kasi, kotika nzela te ete mabunga ya bato mosusu epekisa yo kosalela Yehova. Soki moto moko azokisi yo, lolenge oyo Hana, mama ya Samwele, alongaki mokakatano ya kolɛmba nzoto oyo akutanaki na yango ekoki kosalisa yo.
Hana azalaki mpenza na mposa ya kobota, kasi azalaki ekomba. Nzokande, Penina, mbanda na ye, abotaki bana ya mibali mpe ya basi. Na esika Penina ayokela Hana mawa mpo na mpasi oyo azalaki na yango, azalaki komona ye monguna mpe azalaki kotumola ye, yango wana Hana “alelaki mpe alyaki bilei te.”—1 Samwele 1:2, 4-7.
Mokolo moko Hana akendaki kosambela na hema. Eli, nganga-monene ya Yisalaele, amonaki kaka bibɛbu na ye ezali koningana. Lokola ayebaki te ete Hana azalaki kosambela, Eli akanisaki ete alangwe masanga. Yango wana, atunaki ye boye: “Yo, okolangwa masanga kino ntango nini? Longolá masanga na kati na yo!” (1 Samwele 1:12-14) Kanisá naino ndenge Hana amiyokaki! Akendaki na hema nde mpo na koluka elendiseli! Na ntembe te akanisaki ata moke te ete moto oyo alekaki bato nyonso na Yisalaele akokanisela ye mabe!
Likambo wana ekokaki mpenza kolɛmbisa Hana nzoto. Akokaki kobima na hema na nkanda mpe kolapa ndai ete akotya lisusu makolo na ye kuna te mikolo nyonso oyo Eli akozala nganga-monene. Kasi, tomoni mpenza ete Hana apesaki motuya mingi na boyokani na ye na Yehova. Ayebaki ete soki asali ndenge wana, Yehova akosepela te. Hema ezalaki ndako ya losambo ya pɛto. Yehova atyaki nkombo na ye wana. Atako nganga-monene Eli azalaki moto ya kozanga kokoka, Yehova aponaki ye mpo na kosalela ye na hema.
Na efundeli ya Eli, Hana apesaki eyano oyo ezali ndakisa mpo na biso lelo oyo, mpamba te eyano yango emonisi ete Hana azalaki solo kobanga Nzambe. Andimaki te ete bákanisela ye mabe, kasi, na limemya mpenza, ayanolaki ete: “Te, nkolo na ngai! Nazali mwasi ya mawa na motema, nameli masanga te soko eloko mosusu ya kolangwisa te nde nabimiseli [Yehova] motema na ngai. Tángá moombo na yo lokola mwasi mpamba te, mpo ete nazali koloba kino [sikoyo] bobele mpo na mabondeli na ngai mingi mpe mpo na mawa na ngai.”—1 Samwele 1:15, 16.
Eyano ya Hana ezalaki mpenza polele. Kasi, azongiselaki Eli maloba ya kozokisa te, alobaki na ye mabe te mpo akaniselaki ye mabe. Yango esalaki ete Eli aloba na ye na boboto mpenza ete: “Kendá na kimya. Tiká ete Nzambe ya Yisalaele 1 Samwele 1:17, 18.
apesa yo libondeli lisili yo kobondela ye.” Ntango likambo esilaki, Hana “alongwaki na nzela na ye, alyaki bilei mpe mawa emonanaki lisusu na elongi na ye te.”—Lisolo oyo ezali koteya biso nini? Hana azelaki te mpo na kosembola makanisi mabe ya Eli, kasi asalaki yango na limemya mpenza. Na ndenge yango, abatelaki boyokani malamu na Yehova mpe na Eli. Emonisi ete mbala mingi kosolola malamu mpe komonisa mwa boboto ekoki kosala ete mwa makambo ya mikemike ekóma monene te!
Tóyeba ete kosilisa matata na bamosusu esɛngaka ete biso nyonso tózala na komikitisa mpe tózala na makambo makasi te. Soki ndeko moko aboyi koyokela yo atako ozali kosala makasi bósilisa matata kati na bino, ekozala malamu otika likambo yango na mabɔkɔ ya Yehova, na elikya ete akobongisa yango na ntango oyo ye moko alingi mpe na ndenge oyo ye moko akomona malamu.
Obungisi mokumba moko?
Basusu bakómaki mawamawa mpo basengelaki kotika mokumba moko oyo balingaki mingi na mosala ya Nzambe. Bazalaki kosepela kosalela bandeko na bango, mpe na ntango babungisaki mokumba yango, bayokaki lokola ete bazali lisusu na ntina te na miso ya Yehova to na kati ya ebongiseli na ye. Soki mpe ozali koyoka ndenge yango, ndakisa ya Malako to Yoane Malako, oyo azalaki moko ya bakomi ya Biblia ekoki kosalisa yo ozala na makanisi malamu.—Misala 12:12.
Malako akendaki na Paulo na Balanaba na mobembo na bango ya liboso lokola bamisionɛrɛ, kasi atikaki bango na nzela mpe azongaki na Yelusaleme. (Misala 13:13) Na nsima, ntango basalaki mobembo mosusu, Balanaba alingaki kokende na Malako. Nzokande, Biblia elobi ete: “Paulo asepelaki kokamata ye te, oyo atiki bango na Pamfulia mpe akei na bango nzela moko kuna na mosala te.” Balanaba asepelaki te. Biblia elobi lisusu ete: “Ntembe makasi ebimi, bongo [Paulo na Balanaba] bakabwani, mpe Balanaba akamati Malako mpe akei na masuwa kuna na Kupulu. Nde Paulo aponi Sila, mpe . . . alongwi wana.”—Misala 15:36-40.
Malako asengelaki komitungisa makasi na komona ete ntoma Paulo, oyo bato bazalaki kopesa limemya, aboya kosala na ye mpe lisusu mpo na ye matata ebimi mpe ekaboli Paulo na Balanaba. Kasi, nyonso esukaki wana te.
Paulo na Sila bazalaki kaka na mposa ya moninga mosusu mpo na mobembo. Na yango, ntango bakómaki na mboka Lusutula, bazwaki elenge mobali moko, nkombo na ye Timote, mpo bákende na ye na esika ya Malako. Ekoki kozala ete, na ntango oyo baponaki Timote, ye autaki kozwa batisimo eleki bobele mbula mibale to misato. Epai mosusu, Malako azalaki na lisangá ya boklisto banda na ebandeli na yango. Kutu alekisaki bambula mingi na lisangá koleka Paulo ye moko. Atako bongo, ezalaki nde Timote moto azwaki libaku malamu wana.—Misala 16:1-3.
Malako asalaki nini ntango ayokaki ete na esika na ye bazwi moto oyo ye alekaki na bambula ya kobotama mpe ayebaki makambo mingi lokola ye te? Biblia elobi yango te. Kasi, emonisi ete Malako atikaki kosalela Yehova te. Asepelaki na mikumba oyo azalaki na yango. Atako asalaki elongo na Paulo na Sila te, kasi asalaki mobembo elongo na Balanaba tii na Kupulu, mboka ya Balanaba. Malako asalaki mpe na Petelo na engumba Babilone. Na nsuka, Malako ayaki kozwa libaku ya kosala elongo na Paulo na Timote, na Loma. (Bakolose 1:1; 4:10; 1 Petelo 5:13) Na nsima, Malako apemamaki mpo na kokoma moko na Baevanzile minei!
Nyonso oyo ezali koteya biso likambo moko ya ntina mingi. Malako akómaki komitungisatungisa te mpo na libaku malamu oyo abungisaki mpo esala ete asepela te na mikumba mosusu oyo akokaki kozwa. Kasi Malako alandaki kosalela Yehova mingi mpe Yehova apambolaki ye.
Na yango soki obungisi libaku malamu oyo ozalaki na yango, kolɛmba nzoto te. Soki ozali kaka na elimo ya kokende liboso mpe soki okangi mabɔkɔ te, okoki kozwa mikumba mosusu, mpamba te ezali na makambo mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.—1 Bakolinti 15:58.
Mosaleli moko ya sembo alɛmbi nzoto
Kobunda etumba makasi ya kondima ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Mbala mosusu, okoki kolɛmba nzoto. Na nsima, okoki kutu komipesa foti lokola olɛmbi nzoto mpe kokanisa ete mosaleli ya sembo ya Nzambe asengeli ata moke te komiyoka ndenge wana. Kasi, kanisá Eliya, mosakoli moko monene na Yisalaele.
Ntango Yezabele, mokonzi-mwasi ya Yisalaele oyo azalaki kolendisa losambo ya Baala, ayokaki ete Eliya abomi basakoli ya Baala, alapaki ndai ete akoboma Eliya. Ezali solo ete Eliya akutanaki na banguna oyo balekaki Yezabele, kasi na mbala moko, alɛmbaki nzoto mpe amonaki malamu akufa. (1 Mikonzi 19:1-4) Ebandaki boni azwa makanisi wana? Ezali mpo abosanaki likambo moko.
Eliya abosanaki kotalela Yehova lokola Ye oyo apesaka ye makasi. Nani apesaki Eliya nguya ya kosekwisa bakufi mpe ya kotɛmɛla basakoli ya Baala? Ezali Yehova. Na ntembe te, Yehova akokaki lisusu kopesa ye makasi ya kotɛmɛla nkanda ya mwasi ya mokonzi, Yezabele.—1 Mikonzi 17:17-24; 18:21-40; 2 Bakolinti 4:7.
Ekoki kokómela moto nyonso ete, mpo na mwa ntango moke, elikya na ye epai ya Yehova etɛngatɛnga. Lokola Eliya, okoki ntango mosusu kotalela likambo moko na ndenge oyo bato batalelaka yango na esika ete osalela “mayele mauti likoló” mpo na kosilisa yango. (Yakobo 3:17) Kasi, Yehova asundolaki Eliya te mpo alɛmbaki mpo na ntango moke.
Liboso, Eliya akimaki na Bele-seba, mpe na nsima, na esobe; akanisaki ete moto moko te akomona ye kuna. Kasi, Yehova amonaki ye mpe atindaki anzelu mpo na kobɔndisa ye. Anzelu apesaki Eliya limpa ya mɔ́tɔ alya mpe apesaki ye mai ya komela mpo akitisa motema. Eliya apemaki, bongo na nsima anzelu ayebisaki ye asala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 300 tii na Ngomba Holebe, epai kuna Yehova akopesa ye lisusu makasi.—1 Mikonzi 19:5-8.
Kuna na Ngomba Holebe, Yehova asalaki likamwisi oyo elakisaki nguya na ye mpe elendisaki kondima ya Eliya. Na nsima, Yehova alobaki na ye na mongongo ya moke mpenza mpo na kondimisa ye ete azalaki ye moko te. Yehova azalaki na ye mpe bandeko na ye mosusu 7 000, oyo Eliya ayebaki kutu te, bazalaki na ye. Nsukansuka, Yehova apesaki Eliya mokumba oyo asengelaki kokokisa. Yango emonisi ete Yehova azalaki kaka kotalela Eliya lokola mosakoli na ye!—1 Mikonzi 19:11-18.
Okoki kozwa lisalisi
Soki ntango mosusu olɛmbi nzoto mwa moke, okoki komiyoka malamu soki opemi mwa mingi to soki olei bilei ya malamu. Nathan Knorr, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova tii liwa na ye na 1977, alobaki mokolo mosusu ete mikakatano ya minene emonanaka mbala mingi lokola mokakatano ya moke na nsima ya kolala mpɔngi ya malamu na butu. Kasi, soki mokakatano ezali makasi, mpɔngi mpamba ekoki te kosalisa yango. Na ntango wana, osengeli koluka lisalisi mpo na kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto.
Yehova atindaki anzelu moko mpo na kopesa Eliya makasi. Lelo oyo, Nzambe azali kolendisa biso na nzela ya bankulutu mpe na nzela ya baklisto oyo bakɔmeli na elimo. Bankulutu bakoki mpenza ‘kozala lokola ebombamelo mpo na mopɛpɛ.’ (Yisaya 32:1, 2) Kasi soki olingi bálendisa yo, osengeli koluka lisalisi epai na bango. Atako Eliya alɛmbaki nzoto, kasi asalaki mobembo tii na Ngomba Holebe mpo na koyoka malako ya Yehova. Tozali kozwa mateya oyo elendisaka na nzela ya lisangá ya boklisto.
Ntango tondimi lisalisi mpe, na mpiko nyonso, totikali ngwi kati na komekama lokola kozokisama to kobungisa mikumba na lisangá, tokomonisa ete toponi ngámbo ya Yehova na likambo moko ya ntina mingi. Likambo nini? Satana alobaki ete bato basalelaka Yehova kaka mpo na bolamu na bango moko. Satana andimaka ete tokosalela Nzambe ntango tozali na mikakatano te na bomoi na biso, kasi alobi ete tokotika kosalela ye soki tozwi mikakatano. (Yobo, mokapo 1 na 2) Soki tolandi kosalela Yehova na kotɛngatɛnga te, atako tolɛmbi nzoto, tokozongisa eyano na efundeli ya lokuta ya Zabolo.—Masese 27:11.
Hana, Malako na Eliya bango nyonso bakutanaki
na mikakatano oyo elongolaki bango esengo mpo na mwa ntango moke. Kasi, balongaki yango, mpe na nsima, bazalaki na bomoi oyo ezali na ntina. Na lisalisi ya Yehova, yo mpe okoki kolonga ezaleli ya kolɛmba nzoto!