“Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo”
“Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo”
“Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” —1 PETELO 2:17.
1, 2. (a) Mopanzi-nsango moko alobaki nini mpo na Batatoli ya Yehova? (b) Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka makasi mpo na kobatela etamboli malamu?
ELEKI sikoyo bambula mwa mingi, mopanzi-nsango moko na engumba Amarillo, na États-Unis, azalaki kotambola na mangomba ndenge na ndenge mpe azalaki kokoma makambo oyo azalaki komona na kati ya mangomba yango. Amonaki lingomba moko oyo ekeseni mpenza na mangomba mosusu. Alobaki boye: “Na boumeli ya mbula misato, nazalaki kokende na liyangani ya Batatoli ya Yehova oyo basalaka mbula na mbula na ndako monene ya makita na Amarillo. Ntango nazali kati na bango, ata mbala moko te namonaki moto moko apelisi likaya, afungoli molangi ya masanga to azali koloba maloba ya nsɔni. Bazali pɛto, bazali na bonkonde, molato na bango mindɔndɔ te, bazali na boboto koleka bato nyonso oyo namoná.” Bato mingi bakomaki maloba ya ndenge yango na ntina na Batatoli ya Yehova. Mpo na nini bato oyo bazali Batatoli te bazali mbala mingi koloba malamu bongo mpo na Batatoli?
2 Mbala mingi, bato bazali kokumisa basaleli ya Nzambe mpo na etamboli malamu na bango. Lelo oyo, bato mingi bazali kotika bizaleli ya malamu; kasi Batatoli ya Yehova bamonaka ete basengeli kozala na etamboli malamu mpenza, yango ezali likambo oyo esɛngami na losambo na bango. Bayebi ete misala na bango ekoki kotinda bato mosusu báloba malamu to mabe mpo na nkombo ya Yehova mpe bandeko na bango baklisto mpe ete etamboli malamu na bango ekumisaka solo oyo basakolaka. (Yoane 15:8; Tito 2:7, 8) Yango wana, tótalela naino ndenge oyo tokoki kobatela etamboli malamu mpo ete lokumu ya Yehova mpe ya Batatoli na ye ebeba te mpe matomba oyo tozwaka ntango tozali kosala yango.
Libota ya baklisto
3. Na makambo nini baklisto basengeli kobatela mabota na bango?
3 Tólobela naino etamboli na biso na kati ya libota. Gerhard Besier na Erwin Scheuch, bakomaki buku moko oyo elobeli bonsomi ya losambo (Die Neuen Inquisitoren: Religionsfreiheit und Glaubensneid), na buku yango balobaki boye: “Mpo na [Batatoli ya Yehova] libota ezali eloko ya kobatela mpenza.” Maloba yango ezali solo, mpe lelo oyo esengeli kobatela libota na makambo mingi. Bana mosusu “bazangi botosi epai ya baboti” mpe mikóló mosusu “bazangi bolingo ya libota” to mpe “bazangi komipekisa.” (2 Timote 3:2, 3) Na kati ya mabota, mibali bazali kobɛta basi na bango mpe basi bazali koswanisa to kofinga mibali na bango; baboti bazali konyokola to kosundola bana; mpe bana bazali matoi mangbongi, bazali komɛla bangi mpe bazali kosala kindumba, to mpe bazali kokima ndako. Nyonso wana ezali mbuma mabe oyo ‘elimo ya mokili’ ezali kobota. (Baefese 2:1, 2) Tosengeli kosala makasi mpo ete elimo wana ekɔta na mabota na biso te. Mpo na yango tosengeli kolanda toli mpe malako oyo Yehova azali kopesa moto na moto na kati ya libota.
4. Na kati ya libota ya baklisto, mikumba nini moto mokomoko azali na yango epai ya basusu?
4 Baklisto oyo babalá bayebi ete moto na moto azali na makambo oyo asengeli kokokisa mpo na bolamu ya elimo, ya makanisi mpe ya nzoto ya molongani na ye. (1 Bakolinti 7:3-5; Baefese 5:21-23; 1 Petelo 3:7 ) Baoyo bazali na bana bazali na mikumba minene liboso ya bana na bango. (Masese 22:6; 2 Bakolinti 12:14; Baefese 6:4) Bana oyo bazali kokola na libota ya baklisto bayebaka mpe ete bazali na makambo oyo basengeli kokokisa. (Masese 1:8, 9; 23:22; Baefese 6:1; 1 Timote 5:3, 4, 8) Kokokisa mikumba nyonso wana na kati ya libota esɛngaka molende, komipesa, kozala na bolingo mpe komipimela makambo mosusu. Kasi, soki moto na moto azali kosala makasi mpo na kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi ye na kati ya libota, akosalisa bato mosusu na kati ya libota mpe na kati ya lisangá. Mpe, likambo eleki ntina ezali ete akokumisa Yehova Nzambe, Mobandisi ya libota.—Genese 1:27, 28; Baefese 3:15.
Bondeko ya baklisto
5. Matomba nini tozwaka na boninga ya bandeko na biso baklisto?
5 Biso baklisto tozali na mikumba oyo tosengeli kokokisa mpo na bandeko na biso bandimi, ezala baoyo tozali na bango lisangá moko, to baoyo nyonso bazali na “lisangá mobimba ya bandeko . . . na kati ya mokili.” (1 Petelo 5:9) Boyokani na biso na bandeko na kati ya lisangá ezali na ntina mingi mpo na bolamu na biso ya elimo. Ntango tozali kosangana na bandeko na biso baklisto, boninga na bango elendisaka biso mpe tolyaka na bango esika moko bilei malamu ya elimo oyo eutaka na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Soki tozwi mikakatano, tokoki kotuna toli oyo euti na Makomami epai ya bandeko na biso. (Masese 17:17; Mosakoli 4:9; Yakobo 5:13-18) Ntango tokeleli, bandeko na biso basundolaka biso te. Kozala na kati ya ebongiseli ya Nzambe ezali malamu mpenza!
6. Ndenge nini Paulo amonisaki ete tozali na makambo oyo tosengeli kokokisa mpo na bandeko na biso baklisto?
6 Kasi, tozali na lisangá te kaka mpo basusu bápesaka biso; biso mpe tosengeli kopesaka. Kutu, Yesu alobaki ete: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Ntoma Paulo alendisaki ezaleli ya kokaba ntango akomaki boye: “Tiká tósimba makasi eyambweli ya elikya na biso kozanga kotengatenga, mpo moto oyo apesaki elaka azali sembo. Mpe tiká tótyelanaka likebi mpo na kopusama na kozala na bolingo mpe na misala ya malamu, kotikáká te koyangana na biso mpenza, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi nde tólendisanaka, mpe tósalaka bongo na koleka mpenza lokola bozali komona mokolo yango ezali kokóma pene.”—Baebele 10:23-25.
7, 8. Ndenge nini tomonisaka elimo ya kopesa na kati ya lisangá na biso mpe epai ya bandeko oyo bazali na bisika mosusu?
7 Tosalaka “eyambweli ya elikya na biso” na kati ya lisangá ntango tozali kopesa biyano na makita to ntango tozali kosala masolo to bilakiseli. Makambo yango elendisaka bandeko na biso. Tolendisaka bango mpe ntango tosololaka na bango liboso mpe nsima ya makita. Na ntango wana nde tokoki kolendisa bato oyo balɛmbi, tokoki kobɔndisa bato oyo bazali konyokwama na makanisi mpe bato ya maladi. (1 Batesaloniki 5:14) Baklisto ya sembo bazalaka mabɔkɔ makasi te na kopesa ndenge wana; yango wana, bato mingi bakamwaka mpo na bolingo oyo bamonaka na kati na biso soki bayei na makita mpo na mbala ya liboso.—Nzembo 37:21; Yoane 15:12; 1 Bakolinti 14:25.
8 Kasi, bolingo na biso esukaka te kaka na bandeko oyo tozali na bango lisangá moko. Tolingaka lisangá ya bandeko na mokili mobimba. Yango wana tomonaka, na ndakisa, na Ndako ya Bokonzi nyonso ezalaka na bakɛsi ya makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi. Ekoki kozala ete biso moko tozali na Ndako ya Bokonzi oyo etongami malamu, kasi toyebi ete ebele ya bandeko na biso baklisto basalaka makita na bango na bisika ya malamu te. Ntango topesaka makabo mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, tolakisaka ete tolingaka bandeko wana atako toyebi bango te.
9. Mpo na ntina nini ya monene Batatoli ya Yehova balinganaka?
9 Mpo na nini Batatoli ya Yehova balinganaka? Mpo ete Yesu atindaki bango basalaka bongo. (Yoane 15:17) Bolingo na bango emonisaka ete elimo ya Nzambe ezali kosala kati na mokomoko na bango mpe na kati na bango nyonso. Bolingo ezali na kati ya “mbuma ya elimo.” (Bagalatia 5:22, 23) Ntango Batatoli ya Yehova bazali koyekola Biblia, bazali koyangana na makita, mpe bazali kobondela Nzambe ntango nyonso, bolingo ekómaka ezaleli oyo ezali na kati ya bomoto na bango mpenza atako bafandi na mokili oyo ‘bolingo ya bato mingi ekómi mpiɔ.’—Matai 24:12.
Ndenge totalelaka mokili oyo
10. Mokumba nini tozali na yango liboso ya bato ya mokili?
10 “Eyambweli ya elikya na biso” oyo Paulo alobelaki ezali komonisa biso mokumba mosusu oyo tozali na yango. Eyambweli yango esɛngi mpe kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bazali naino bandeko na biso baklisto te. (Matai 24:14; 28:19, 20; Baloma 10:9, 10, 13-15) Kosakola wana ezali mpe lolenge mosusu ya kopesa. Mpo na kosala mosala yango esɛngaka ntango, makasi, komibongisa, kozwa formasyo, mpe kosalela bozwi na biso. Kasi, Paulo akomaki mpe ete: “Ezala epai ya Bagrɛki mpe Babarbare, ezala epai ya bato ya bwanya mpe bazoba nazali na nyongo: bongo nazali na mposa moko makasi ya kosakola nsango malamu mpe epai na bino baoyo bofandi na Loma.” (Baloma 1:14, 15) Lokola Paulo, tózala mabɔkɔ makasi te mpo na kofuta “nyongo” yango.
11. Wapi makambo mibale oyo Makomami elobeli oyo totalelaka na oyo etali boyokani na biso na mokili; atako bongo, likambo nini toyebaka malamu?
11 Tozali mpe na mikumba mosusu epai ya bato oyo bazali bandeko na biso bandimi te? Ɛɛ. Toyebi malamu ete “mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Toyebi ete Yesu alobaki ete bayekoli na ye ‘bazali bato ya mokili te, lokola ye moko mpe azali moto ya mokili te.’ Atako bongo, tozali na kati ya mokili yango, tosalaka mosala na kati ya mokili yango mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela, mpe bato mosusu ya mokili basalelaka biso misala oyo tozali na yango mposa. (Yoane 17:11, 15, 16) Yango wana, tozali na mikumba na mokili oyo. Mikumba nini? Ntoma Petelo apesaki eyano na motuna yango. Mwa bambula liboso ete Yelusaleme ebomama, akomelaki baklisto ya Asie Mineure mokanda, mpe mwa bavɛrsɛ ya mokanda yango ezali komonisa biso ndenge ya malamu ya kotalela mokili oyo.
12. Na ndenge nini baklisto bazali “bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse,” mpe na yango, makambo nini basengeli koboya?
12 Petelo abandaki boye: “Balingami, lokola bozali bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse, nazali kolendisa bino ete bóboya bamposa ya mosuni, oyo ezali mpenza bamposa oyo ebundisaka molimo.” (1 Petelo 2:11) Na maloba ya elilingi, baklisto ya solo bazali “bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse” mpamba te bango bazelaka bomoi ya seko. Baoyo bapakolami na elimo bazelaka bomoi na likoló; bongo “bampate mosusu” bazelaka paladiso oyo ekozala awa na mabele. (Yoane 10:16; Bafilipi 3:20, 21; Baebele 11:13; Emoniseli 7:9, 14-17) Kasi, bamposa ya mosuni ezali nini? Yango ezali makambo lokola mposa ya kokóma mozwi, mposa ya kozala moto monene, bamposa ya pite to ekobo, na bamposa mabe oyo ebengami “likunya” mpe “ezaleli ya kolula biloko ya bato.”—Bakolose 3:5; 1 Timote 6:4, 9; 1 Yoane 2:15, 16.
13. Ndenge nini bamposa ya mosuni “ebundisaka molimo [na biso]”?
13 Bamposa yango “ebundisaka molimo [na biso].” Ebebisaka boyokani na biso na Nzambe mpe ezali likama mpo na elikya (“molimo” to bomoi) na biso. Na ndakisa, soki tokómi kosepela na makambo ya mbindo, ndenge nini tokokoka komimonisa lokola “mbeka moko ya bomoi, ya bosantu, oyo ekoki kondimama epai ya Nzambe”? Soki tokwei na motambo ya koluka ebele ya biloko ya mokili, ndenge nini ‘tokoluka liboso bokonzi’? (Baloma 12:1, 2; Matai 6:33; 1 Timote 6:17-19) Eleki malamu kolanda ndakisa ya Moize, kopesa masɛnginya ya mokili oyo mokɔngɔ, mpe kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso. (Matai 6:19, 20; Baebele 11:24-26) Kosala bongo ezali na ntina mingi soki tolingi kozala na ndenge malamu ya kotalela mokili oyo.
‘Tósala ete etamboli na biso ezalaka malamu’
14. Mpo na nini biso baklisto tosalaka makasi ete tózala na etamboli malamu?
14 Toli mosusu ya malamu ezali na kati ya maloba ya Petelo oyo elandi: “Bósala ete etamboli na bino ezalaka malamu na kati ya bikólo, mpo, na likambo oyo bazali kolobela bino mabe lokola nde na basali-mabe, bákoka kopesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akoya kotala mpo basili komona na miso na bango moko misala na bino ya malamu.” (1 Petelo 2:12) Biso baklisto tosalaka makasi ete tózala na etamboli malamu. Na kelasi, tomipesaka mpenza na koyekola. Na mosala, tosalaka mosala na biso na ndenge oyo esengeli mpe toyibaka biloko ya mosala te, ata soki patrɔ na biso azali na makambo makasi. Mobali to mwasi moklisto oyo molongani na ye azali mondimi te, asalaka makasi mpenza mpo na kotosa mibeko ya boklisto. Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi toyebi ete ndakisa na biso ya malamu esepelisaka Yehova mpe mbala mingi ebotaka mbuma malamu epai ya bato oyo bazali Batatoli te.—1 Petelo 2:18-20; 3:1.
15. Nini ezali komonisa biso ete etamboli malamu ya Batatoli ya Yehova eyebani na mokili mobimba?
15 Ebele ya Batatoli ya Yehova bazali kolonga kobatela etamboli malamu mpe yango ezali komonana na makambo oyo bato mosusu bazali kokoma na ntina na bango banda bambula mingi sikoyo. Na ndakisa, na zulunalo moko (Il Tempo) ya Italie bakomaki boye: “Bato oyo basalaka esika moko na Batatoli ya Yehova balobaka ete bazalaka sembo na mosala, bandimaka mpenza mateya ya lingomba na bango na boye ete ekɔtelá bango mpenza na motema; yango wana, ebongi mpenza kopesa bango limemya mpo na bizaleli malamu na bango.” Na zulunalo mosusu (Herald) oyo ebimaka na Buenos Aires, na Argentine, bakomaki boye: “Banda bambula mingi sikoyo, Batatoli ya Yehova bazali se komonisa ete bazali bato oyo balingaka mosala, bazwaka makambo ya ntina na lisɛki te, basalelaka bozwi na bango malamu, mpe babangaka Nzambe.” Sergeï Ivanenko, moto moko ya mayele na ekólo Russie, alobaki boye: “Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bazali bato oyo batosaka mpenza mibeko mpe bazalaka na molɔngɔ na likambo etali kofuta mpako.” Na Zimbabwe, mokambi ya esika moko oyo Batatoli ya Yehova bafutelaka mpo na kosala mayangani alobaki boye: “Namonaka Batatoli mosusu bazali kolɔkɔta bapapye mpe kosukola batwalɛti. Batikaka esika pɛto koleka ndenge oyo bakutaki yango. Bilenge na bino bazali na bizaleli malamu. Soki mokili mobimba etondaki ata na Batatoli ya Yehova!”
Botosi ya baklisto
16. Ndenge nini totalelaka bakonzi ya mokili mpe mpo na nini?
16 Petelo alobelaki mpe ndenge oyo tosengeli kotalelaka bakonzi ya mokili. Alobaki boye: “Mpo na Nkolo bótosaka bibongiseli nyonso ya bato: ezala mokonzi mpo azali liboso to baguvɛrnɛrɛ mpo batindami na ye mpo na kopesa etumbu na basali-mabe kasi kosanzola bato oyo basalaka malamu. Mpo mokano ya Nzambe ezali boye, ete na kosaláká malamu bókanga bazoba monɔkɔ na bango oyo ezangi boyebi.” (1 Petelo 2:13-15) Tondimaka makambo malamu oyo baguvɛrnɛma ya malamu esalelaka biso; tolandaka mpe maloba ya Petelo na ndenge totosaka mibeko mpe tofutaka mpako na biso. Tondimaka ete Nzambe apesi baguvɛrnɛma lotomo ya kopesa etumbu na bato oyo bazali kobuka mibeko; kasi ntina mpenza oyo totosaka bakonzi ezali “mpo na Nkolo.” Nzambe nde alingi bongo. Lisusu, tolingaka te ete tózwa etumbu lokola basali-mabe, mpamba te yango ekofingisa nkombo ya Yehova.—Baloma 13:1, 4-7; Tito 3:1; 1 Petelo 3:17.
17. Ntango “bazoba” bazali kotɛmɛla biso, tokoki kozala na elikya nini?
17 Kasi, likambo ya mawa yango oyo: bato mosusu bazali na bokonzi, oyo vɛrsɛ wana ebengi bango ete “bazoba,” banyokolaka biso to batɛmɛlaka biso na ndenge mosusu; na ndakisa, bapanzaka biso nsango ya lokuta. Kasi, na ntango oyo Yehova ye moko aponi, lokuta na bango eyebanaka, mpe bakangaka “monɔkɔ na bango oyo ezangi boyebi.” Etamboli malamu na biso lokola baklisto yango moko etatolaka. Yango wana bakonzi oyo bazali sembo bapesaka biso longonya ete tosalaka makambo ya malamu.—Baloma 13:3; Tito 2:7, 8.
Baombo ya Nzambe
18. Ndenge nini biso baklisto tokoki koboya kosalela bonsomi na biso na makambo ya mabe?
18 Petelo alobaki mpe ete: “Bózala lokola bato ya bonsomi, nde bóbatela bonsomi na bino, lokola ezipeli mpo na makambo mabe te, kasi lokola baombo ya Nzambe.” (1 Petelo 2:16; Bagalatia 5:13) Lelo oyo, boyebi ya solo ya Biblia elongoli biso na boombo ya mateya ya lokuta. (Yoane 8:32) Lisusu, tozali na bonsomi mpe tokoki kopona makambo oyo tolingi. Atako bongo, tosalelaka bonsomi na biso na makambo ya mabe te. Ntango tozali kopona baninga, molato, ndenge ya kobongisa nzoto, masano, bilei mpe masanga, tobosanaka te ete baklisto ya solo bazali baombo ya Nzambe, kasi bazali te bato oyo balukaka komisepelisa. Toponi na biso kosalela Yehova na esika ya kozala baombo ya bamposa na biso ya nzoto to mpe kolanda makambo ya mokili oyo.—Bagalatia 5:24; 2 Timote 2:22; Tito 2:11, 12.
19-21. (a) Ndenge nini totalelaka bakonzi ya mokili oyo? (b) Ndenge nini bandeko mosusu bamonisaki ‘bolingo mpo na lisangá mobimba ya bandeko’? (c) Mokumba na biso oyo eleki ntina ezali nini?
19 Petelo alobaki lisusu boye: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko, bózala na bobangi ya Nzambe, bópesa mokonzi lokumu.” (1 Petelo 2:17) Lokola Yehova Nzambe apesi bato nzela ya kozala na bokonzi ndenge na ndenge, biso topesaka bango lokumu oyo ebongi na bango. Kutu, tobondelaka mpo na bango, mpo bátika biso tókoba mosala na biso na kimya mpe na kokangama na Nzambe. (1 Timote 2:1-4) Kasi, tobosanaka te ete tosengeli ‘kolinga lisangá mobimba ya bandeko.’ Tosalaka makambo kaka oyo ezali mpo na bolamu ya bandeko na biso baklisto, kasi te oyo ezali mpo na koyokisa bango mpasi.
20 Na ndakisa, ntango etumba ekɔtaki na ekólo moko ya Afrika, emonanaki polele ete etamboli ya Batatoli ya Yehova ekeseni na etamboli ya bato mosusu. Zulunalo moko (Reformierte Presse) ya Suisse elobaki boye: “Na 1995, African Rights [ebongiseli moko mpo na ntomo ya bato] . . . emonisaki ete mangomba nyonso ekɔtaki [na etumba yango] longola kaka Batatoli ya Yehova.” Ntango nsango ya etumba yango epanzanaki mokili mobimba, Batatoli ya Yehova na Mpoto batindaki nokinoki bilei mpe bankisi mpo na kosalisa bandeko na bango mpe bato mosusu na ekólo yango oyo ezalaki na bitumba. (Bagalatia 6:10) Balandaki maloba ya Masese 3:27 oyo elobi ete: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi [nguya] ya kosala bongo.”
21 Kasi, longola lokumu oyo tosengeli kopesa bakonzi nyonso ya mokili mpe bolingo oyo tosengeli komonisa na bandeko na biso, tozali na mokumba mosusu oyo eleki ntina. Mokumba yango nini? Petelo alobaki ete: “Bózala na bobangi ya Nzambe.” Mokumba na biso epai ya Yehova eleki mikumba nyonso oyo tozali na yango epai ya bato. Na ndenge nini? Mpe ndenge nini tokoki kokokisa mikumba na biso liboso ya bakonzi ya mokili kozanga kobosana mikumba na biso epai ya Nzambe? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo elandi.
Ozali koyeba lisusu?
• Mikumba nini baklisto bazali na yango na kati ya libota?
• Ndenge nini tokoki komonisa elimo ya kopesa na kati ya lisangá?
• Mikumba nini tozali na yango na mokili oyo?
• Tángá mwa matomba oyo tozali kozwa na ndenge tozali kobatela etamboli malamu.
[Mituna ya boyekoli]
[Elilingi na lokasa 9]
Ndenge nini libota ya baklisto ekoki kozala esika oyo esengo mingi eutaka?
[Bililingi na lokasa 10]
Mpo na nini Batatoli ya Yehova balinganaka?
[Bililingi na lokasa 10]
Tokoki nde kolinga bandeko na biso ata soki toyebi bango te?