Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bato oyo basimbaki losambo ya solo na ntango ya kala mpe lelo oyo

Bato oyo basimbaki losambo ya solo na ntango ya kala mpe lelo oyo

Bato oyo basimbaki losambo ya solo na ntango ya kala mpe lelo oyo

OYEBI moto moko oyo alelaki Yelusaleme ya ntango ya kala? Okoki koyanola ete ezali Yesu, mpe ezali solo ete Yesu alelaki Yelusaleme. (Luka 19:​28, 41) Kasi, bankama ya bambula liboso ete Yesu aya awa na mabele, moto mosusu oyo asalelaki Nzambe na bosembo alelaki mpe Yelusaleme. Nkombo na ye Nehemia.​—⁠Nehemia 1:​3, 4.

Nini eyokisaki Nehemia mawa oyo etindaki ye alela Yelusaleme? Asalaki nini mpo na engumba yango mpe mpo na bato oyo bazalaki kofanda kuna? Ndakisa na ye ekoki koteya biso nini? Mpo na kozwa biyano, tótalela naino mwa makambo oyo esalemaki na ntango wana.

Moto oyo azalaki komibanzabanza mpo na basusu mpe azalaki kokanga mabɔkɔ te

Baponaki Nehemia guvɛrnɛrɛ ya Yelusaleme, kasi liboso na yango, azalaki moto monene na ndako ya mokonzi ya Baperse oyo ezalaki na engumba Susana. Atako azalaki na bomoi ya malamu kuna, azalaki kaka komitungisa mpo na bolamu ya bandeko na ye Bayuda oyo bazalaki na Yelusaleme. Kutu, eloko ya liboso oyo asalaki ntango mwa Bayuda ya Yelusaleme bayaki na Susana ezalaki ya ‘kotuna sango ya Bayuda oyo babikaki na boumbu pe bazongaki na mboka, ná pe sango ya Yeruzalem.’ (Nehemia 1:​2Bible na Lingala ya lelo oyo) Ntango bapaya yango bayebisaki ye ete bato na Yelusaleme bazalaki na “pasi penza” mpe ete lopango ya engumba yango ‘ebukanakibukanaki,’ Nehemia ‘afandaki na mabele po na kolela; atikalaki na mawa mikolo ebele.’ Nsima na yango, asalaki libondeli oyo eutaki mpenza na motema mpo na komonisa Yehova mawa na ye. (Nehemia 1:​3-11, Bible na Lingala ya lelo oyo) Mpo na nini Nehemia azalaki mpenza na mawa? Mpamba te, na mabele mobimba, esika oyo bazalaki kosambela Yehova ezalaki nde Yelusaleme; kasi Bayuda babosanaki yango. (1 Mikonzi 11:36) Lisusu, ndenge oyo engumba yango ebebaki ezalaki komonisa ndenge oyo bafandi na yango balɛmbaki na elimo.​—⁠Nehemia 1:​6, 7.

Lobanzo oyo Nehemia azalaki na yango mpo na Yelusaleme mpe mawa oyo azalaki na yango mpo na Bayuda oyo bazalaki kofanda kuna etindaki ye na komipesa. Ntango mokonzi ya Baperse andimaki kopesa ye konje, mbala moko Nehemia abandaki komibongisa mpo na kosala mobembo moko molai tii na Yelusaleme. (Nehemia 2:​5, 6) Azalaki na mposa ya kosalela makasi na ye, ntango na ye mpe makoki na ye mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala oyo esengelaki kosalema mpo na kobongisa lopango mobimba ya Yelusaleme. Mwa mikolo moke nsima ya kokóma na ye, abongisaki ndenge oyo mosala yango esengelaki kosalema.​—⁠Nehemia 2:​11-18.

Nehemia akabolaki mosala monene ya kobongisa lopango yango na mabota ebele mpe mabota yango nyonso basengelaki kosala elongo. * Apesaki na mokomoko ya bituluku koleka 40 mokumba ya kobongisa “eteni” moko ya lopango yango. Esukaki ndenge nini? Bato oyo bapesaki ntango mpe makasi na bango mpo na kosala mosala yango bazalaki mingi mpenza, kati na bango ezalaki mpe na baboti oyo bazalaki kosala na bana na bango; yango wana mosala yango oyo ezalaki komonana monene mpenza ekómaki pɛpɛlɛ. (Nehemia 3:​11, 12, 19, 20) Nsima ya sanza mibale ya mosala makasi, basilisaki kobongisa lopango yango mobimba! Nehemia akomaki ete ata baoyo bazalaki kolinga te ete mosala yango esalema bandimaki ete “mosala [yango] esalamaki na Nzambe na biso.”​—⁠Nehemia 6:​15, 16.

Ndakisa oyo tosengeli kobosana te

Nehemia apesaki ntango na ye mpe asalelaki makoki na ye ya kotambwisa misala. Longola yango, asalelaki mpe biloko na ye mpo na kotombola losambo ya solo. Na mbongo na ye moko, asombaki bandeko na ye Bayuda oyo batɛkamaki na boombo. Azalaki kodefisa kozanga kosɛnga matabisi. Lokola azalaki guvɛrnɛrɛ, Bayuda basengelaki kofutaka ye, kasi ye aboyaki ‘kotya bozito’ wana likoló na bango. Kutu, ye moto azalaki koyamba bato epai na ye, azalaki koleisa “bato mokama na ntuku mitano . . . na baoyo bayelaki biso longwa na kati na mabota mazingelaki biso.” Mokolo na mokolo, azalaki kopesa ‘ngɔmbɛ moko, bampate kitoko motoba mpe bandɛkɛ’ mpo na bapaya na ye. Longola yango, nsima ya mikolo zomi, azalaki kopesa “vinyo mingi”; nyonso wana azalaki kosala yango na mbongo na ye moko.​—⁠Nehemia 5:​8, 10, 14-18.

Nehemia azalaki mpenza kokaba! Yango ezali ndakisa monene, ezala mpo na basaleli ya Nzambe na ntango wana to mpe mpo na biso lelo oyo. Mosaleli yango ya Nzambe, oyo azalaki na mpiko, andimaki na bolingo na ye moko kosalela biloko na ye mpo na kosunga bato ya misala mpo ete losambo ya pɛto ekende liboso. Yango wana, asɛngaki Yehova ete: “Ɛ Nzambe na ngai, kanisá mpo na malamu oyo nyonso esali ngai mpo na bato oyo.” (Nehemia 5:19) Yehova akosalela ye mpenza likambo yango.​—⁠Baebele 6:⁠10.

Lelo oyo basaleli ya Yehova balandaka ndakisa ya Nehemia

Ezali esengo monene na komona ete lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali mpe komibanzabanza mpo na losambo ya solo, bazali mpe kondima komipesa mpo na yango. Ntango toyokaka ete bandeko na biso bazali konyokwama, tomibanzabanzaka mpenza mpo na bolamu na bango. (Baloma 12:15) Lokola Nehemia, tobondelaka Yehova asunga bandeko na biso oyo bazali na mpasi; tosɛngaka ye ete: “Tiká ete litoi na yo lisembolama epai na libondeli na moombo na yo mpe epai na mabondeli ya baombo na yo baoyo basepeli mpo na kotosa nkombo na yo.”​—⁠Nehemia 1:11; Bakolose 4:⁠2.

Kasi, lobanzo oyo tozalaka na yango mpo na bolamu ya elimo mpe ya mosuni ya bandeko na biso baklisto mpe mpo losambo ya solo ekende liboso esukaka kaka na motema te. Etindaka biso mpe tósala eloko moko. Baoyo makambo na bango epesi bango nzela, bolingo oyo bazali na yango etindaka bango bátika bomoi ya malamu oyo bazali na yango mpe bákende na bisika mosusu mpo na kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi ndenge oyo Nehemia asalaki. Atako bomoi ezalaka malamu te na bisika mosusu ya mokili epai bakendeke, basali yango ya bolingo malamu bazongaka nsima te; elongo na bandeko na bango baklisto oyo bafandi na bisika yango, batikaka te kopesa mabɔkɔ mpo ete losambo ya solo ekende liboso. Basengeli mpenza kozwa longonya mpo na elimo na bango ya komipesa.

Tósimba losambo ya solo na esika oyo tofandi

Emonani polele ete biso nyonso tozali na makoki te ya kokende na bisika mosusu. Tosimbaka losambo ya solo na esika oyo tofandi. Mokanda ya Nehemia ezali mpe komonisa likambo yango. Yoká likambo mosusu oyo Nehemia abakisaki ntango azalaki kolobela mabota mosusu ya sembo, oyo bapesaki mabɔkɔ na mosala ya kobongisa lopango ya Yelusaleme. Akomaki ete: “Yedaya, mwana ya Harumaf, atongi na esika oyo etalaná na ndako na ye . . . Benjamin ná Hashub batongi eteni oyo etalaná ná bandako na bango; bongo Azarya, mwana ya Maseya pe koko ya Ananya, atongi pembeni ya ndako na ye.” (Biso nde totɛngisi makomi; Nehemia 3:​10, 23, 28-30, Bible na Lingala ya lelo oyo) Mibali wana na mabota na bango bapesaki mpenza mabɔkɔ mpo na kotombola losambo ya solo na ndenge basalaki mosala ya kobongisa lopango penepene na bandako na bango.

Lelo oyo, na bisika oyo tofandi, mingi kati na biso tosalaka makambo ndenge na ndenge mpo na kosimba losambo ya solo. Topesaka mabɔkɔ na misala ya kotonga Bandako ya Bokonzi, na kosalisa baoyo bazwi likama, mpe na mosala oyo eleki ntina, elingi koloba mosala ya kosakola Bokonzi. Lisusu, ezala ete tozali na likoki ya kopesa mpenza mabɔkɔ na misala ya kotonga to ya kosalisa baoyo bazwi likama to tozali na yango te, biso nyonso tozalaka na mposa makasi ya kopesa biloko na biso mpo losambo ya solo ekende liboso, ndenge kaka Nehemia asalaki na mikolo na ye.​—⁠Talá etanda “Ndenge ya kopesa makabo ya bolingo malamu.”

Kozwa mbongo oyo tosengeli na yango mpo na misala na biso ya kobimisa mikanda, ya kosalisa baoyo bazwi likama mpe mpo na ebele ya misala mosusu oyo tozali kosala na mokili mobimba ekoki ntango mosusu kozala mokakatano mpenza. Tóbosana te ete mosala ya kobongisa lopango monene ya Yelusaleme ezalaki mpe komonana monene mpenza. (Nehemia 4:10) Kasi, lokola bakabolaki mosala yango na mabota ebele oyo bazalaki na mposa ya kosala, mosala yango esalamaki. Ndenge moko mpe lelo oyo, tokozwa mbongo ebele oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa misala na biso na mokili mobimba se soki mokomoko na biso atiki te kokokisa mokumba na ye.

Etanda “Ndenge bato mosusu bapesaka” ezali komonisa mitindo ndenge na ndenge oyo tokoki kopesa mbongo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi. Na mbula oyo euti koleka, mingi kati na basaleli ya Yehova bapesaki makabo ya motindo wana; mpo na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwi libaku oyo mpo na kotɔnda mpenza baoyo nyonso mitema na bango etindaki bango bápesa makabo ya bolingo malamu. Na koleka, tozongisi matɔndi epai ya Yehova na ndenge apamboli mpenza milende ya solosolo ya basaleli na ye mpo na kotombola losambo ya solo na mokili mobimba. Ya solo, soki tokanisi ndenge lobɔkɔ ya Yehova etambwisi biso tii sikoyo, ezali kotinda biso tóloba lokola Nehemia, oyo alobaki mpo na kotɔnda Yehova ete: “Lobɔkɔ ya Nzambe na ngai ezalaki likoló na ngai na malamu.”​—⁠Nehemia 2:⁠18.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Nehemia 3:5 elobi ete kaka Bayuda mosusu kati na bato minene to “mikóló” nde baboyaki kosala mosala yango. Kasi, bato ya ndenge na ndenge bapesaki mabɔkɔ na mosala yango: banganga-nzambe, batuli na wolo, basali na nkisi, mikóló, batɛkisi.​—⁠Vɛrsɛ 1, 8, 9, 32.

[Etanda/Bililingi na lokasa 28]

Ndenge bato mosusu bapesaka

MAKABO MPO NA MOSALA NA MOKILI MOBIMBA

Bandeko mingi babombaka mwa mbongo, to bakanaka kosala bongo soki bazwi mbongo, mpe batyaka yango na kɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba​—⁠Matai 24:14.”

Sanza na sanza, masangá matindaka mbongo yango na biro monene ya Batatoli ya Yehova to na biro ya filiale oyo ezali na mboka na bango. Makabo ya bolingo malamu ya mbongo makoki kotindama mbala moko na Treasurer’s Office, Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya mboka na bino. Okoki mpe kopesa biju to biloko mosusu ya motuya. Osengeli kokoma mokanda moko ya mokuse mpo na komonisa ete makabo yango ezali makabo ya bolingo malamu.

KOSIMBISA MBONGO

Moto akoki kosimbisa mbongo na ye na boye ete soki asengeli na yango, akoki kozwa yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kokomela Treasurer’s Office na adresi oyo etyami likoló.

LIBULA MPO NA KOSUNGA

Longola makabo ya mbongo oyo epesami libela to oyo ekozongisama, ezali mpe na lolenge mosusu ya kopesa makabo mpo na matomba ya mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Yango etaleli makambo oyo:

Asiransi: Moto moko akoki kokomisa nkombo ya la Société Watch Tower mpo la Société azwa mbongo ya asiransi to azwa mbongo na ye ya epaso.

Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na la Société Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya la Société mpe la Société akosangola yango soki moto yango akufi.

Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na la Société lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.

Lopango to ndako: Moto akoki kopesa la Société Watch Tower lopango, ndako to biloko mosusu oyo bikoki kotɛkama, libela, to mpe akoki kobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Esengeli koyebisa biro ya filiale ya mboka na bino liboso ya kopesa biloko yango.

Kobombisa mbongo: Moto akoki kobombisa mbongo na ye to biloko mosusu epai ya la Société. Akobanda kozongiselaka moto yango to moto mosusu oyo ye aponi mwa mbongo, mbula na mbula na boumeli ya bomoi na ye mobimba. Kobanda na mbula oyo abombisi mbongo to biloko yango, Leta akokitisela ye takse oyo asengelaki kofuta.

Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa la Société biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to akoki kopesa la Société lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto akufi, biloko oyo atikaki mpo na lingomba, ntango mosusu Leta akitisaka mpako na yango.

Lokola ebengeli “libula mpo na kosunga” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba na lolenge ya libula mpo na kosunga, la Société abongisaki mwa buku moko ekomami na Lingelesi mpe na Espagnol oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide (Makabo oyo ebongisami mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomamaki mpo na koyanola na ebele ya mituna oyo batunaki na ntina na makabo, mpe mokanda ya kopesa libula. Yango ezali mpe kopesa bandimbola mosusu ya sikisiki likoló na bibongiseli mpo na makabo ya biloko lokola ndako, mosolo, mpe mpako. Mwa buku yango ezali koyebisa bato ebele ya mitindo oyo bakoki kosalela mpo na kopesa makabo sikoyo to kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Soki olingi kozwa mwa buku yango, okoki kosɛnga na Charitable Planning Office (Biro oyo etalaka makabo oyo moto apesi lokola libula mpo na kosunga).

Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe ya kosolola na bandeko ya Charitable Planning Office, bato mingi bazwaki likoki ya kosunga Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe mpako mpo na biloko yango ekitaki. Yambo ya kopesa likabo nyonso, esengeli koyebisa Charitable Planning Office mpe kopesa ye kopi ya mokanda nyonso oyo emonisi bibongiseli yango. Soki osepeli na bibongiseli oyo mpo na kopesa makabo, okoki kosolola na Charitable Planning Office, ezala na mokanda to na telefone to kosolola na biro ya Batatoli ya Yehova na mboka na bino.

Charitable Planning Office

Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania

100 Watchtower Drive

Patterson, New York 12563-9204

Telephone: (845) 306-0707

[Etanda na lokasa 30]

Ndenge ya kopesa makabo ya bolingo malamu

Na mokanda oyo akomelaki Bakolinti, ntoma Paulo atángaki makambo misato oyo emonisi ndenge ya kopesa makabo ya bolingo malamu. (1) Ntango akomelaki bango mpo na likambo ya kokɔngɔla mbongo, Paulo apesaki toli oyo: “Mokolo nyonso ya liboso na pɔsɔ tiká mokomoko na bino na ndako na ye mpenza abomba mwa eloko pembeni.” (1 Bakolinti 16:2a) Yango emonisi ete tosengeli komibongisaka liboso mpo na kopesa makabo, mpe tosengeli kosalaka yango mbala na mbala. (2) Paulo akomaki mpe ete moto na moto asengeli kopesa “na kotalela ezweli na ye.” (1 Bakolinti 16:2b) Yango elingi koloba ete moto oyo alingi kopesa makabo akoki kosala yango na kotalela bozwi na ye. Ata soki moklisto azwaka kaka mwa moke, mwa mbongo oyo akoki kopesa lokola likabo ezali na motuya na miso ya Yehova. (Luka 21:​1-4) (3) Paulo abakisaki ete: “Tiká ete moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na komilela te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakolinti 9:⁠7) Baklisto ya solo bapesaka na esengo, ndenge bakani na mitema na bango.

[Bililingi na lokasa 26]

Nehemia azalaki komibanzabanza mpo na basusu mpe azalaki kokanga mabɔkɔ te

[Bililingi na lokasa 30]

Makabo ya bolingo malamu esalisaka mpo na kobimisa mikanda, kosunga baoyo bazwi makama, esalisaka mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi mpe na misala mosusu na mokili mobimba