Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpasi mingi mpo na nini?

Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpasi mingi mpo na nini?

Kosɛnga bolimbisi ezalaka mpasi mingi mpo na nini?

NA Yuli ya mobu 2000, badepite ya etúká ya Californie, na États-Unis, bazwaki likanisi ya kobimisa mobeko moko oyo ekopekisa kolandela moto oyo asɛngi bolimbisi nsima ya likama to likambo mosusu oyo ezokisi mozalani na ye to eyokisi ye mpasi. Mpo na nini mobeko ya ndenge wana? Mpo bamonaki ete mbala mingi moto abangaka kosɛnga bolimbisi soki azokisi moto mosusu to abebisi biloko na ye, noki te, soki ekómi likambo ya kosamba na tribinale, bazuzi bakopesa ye foti mpamba te ye moko andimaki ete asalaki mabe na ntango asɛngaki bolimbisi. Moto mosusu mpe oyo basali ye mabe akoki kotomboka mpo amoni ete basɛngi ye bolimbisi noki te; na ntango wana, mwa likambo moke ekoki kokóma koswana ya makasi.

Toyebi ete tosɛngisami te kosɛnga bolimbisi mpo na likambo oyo esalemi na foti na biso te. Mpe ntango mosusu ezalaka malamu tókeba na maloba na biso. Lisese moko ya kala elobaka ete: “Na ebele ya maloba lisumu ezangaka te, kasi ye oyo apekisi mbɛbu na ye azali na mayele.” (Masese 10:​19, NW; 27:12) Atako bongo, yango te ezali kopekisa biso kozalaka na bonkonde mpe kosalisa mozalani na biso oyo azali na mpasi.

Kasi, ezali komonana ete bato mingi bazali lisusu kosɛnga bolimbisi te, ata na makambo oyo ekoki kosɛnga te ete báfunda bango na tribinale! Na kati ya ndako, okoyoka mwasi azali koloba ete, ‘Mobali na ngai asɛngaka bolimbisi ata moke te.’ Na mosala, kapita akoloba ete, ‘Bato nasalaka na bango bandimaka mabunga na bango te, ezali mpasi mpo oyoka bango báloba ete “nasali mabe.” ’ Na kelasi, balakisi bakoloba ete, ‘Balakisaka bana-kelasi te koloba limbisá ngai.’

Bato mosusu bakakatanaka mpo na kosɛnga bolimbisi mpo bakanisaka ete bakondima kolimbisa bango te. Moto mosusu akoki kokanisa ete eleki malamu afanda nyɛɛ soki azali kobanga ete bakozongisela ye eyano te. Mpamba te ekómaka ete moto oyo basali ye mabe alingi ata moke te kokutana na moto oyo asali mabe, na ntango wana kozongisa kimya ekómaka mpasi mpenza.

Basusu mpe basɛngaka bolimbisi te mpo bakipaka te ndenge oyo makambo na bango ekoki kosala na mitema ya bato mosusu. Ntango mosusu balobaka ete, ‘Ata nasɛngi bolimbisi, mai esi esopani.’ Ezali mpe na bato mosusu oyo bakakatanaka kosɛnga bolimbisi mpo na kobanga makambo oyo yango ekoki kobendela bango na nsima. Na mitema na bango balobaka ete: ‘Mbala mosusu bakomemisa ngai ngambo nyonso mpe bakofutisa ngai “masumu” oyo nasali!’ Kasi, ntina monene mpenza oyo bato mingi bandimaka mabunga na bango te ezali nde lolendo. Moto oyo akokaka koloba te ete “nasali mabe” mpo apusi lolendo, akanisaka ete, ‘Soki nandimi mabe na ngai, nakomisambwisa. Lokumu na ngai ekokita.’

Ezala mpo na ntina nini, bato mingi bayokaka monɔkɔ kilo mpo na kobimisa maloba lokola ‘Nasali mabe,’ ‘Ezali foti na ngai,’ ‘Limbisá ngai.’ Kasi, kosɛnga bolimbisi ezali mpenza na ntina? Kosɛnga bolimbisi ezali na matomba nini?

[Elilingi na lokasa 3]

“Balakisaka bana-kelasi te koloba limbisá ngai”

[Elilingi na lokasa 3]

“Bato nasalaka na bango bandimaka mabunga na bango te”

[Elilingi na lokasa 3]

“Mobali na ngai asɛngaka bolimbisi ata moke te”