Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ezali mabe kobɛta masano ya mbongo, ata soki ekosɛnga kaka mwa mbongo moke?

Liloba ya Nzambe elobeli mpenza mingi te likambo etali kobɛta masano ya mbongo. Kasi mwa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi ekoki mpo na komonisa ete lolenge nyonso ya masano ya mbongo ezali na boyokani te na mitinda ya Biblia. * Na ndakisa, bato mingi bandimaka ete, masano ya mbongo elendisaka ezaleli ya lokoso. Kaka likambo oyo moko ezali na ntina mingi na miso ya baklisto, mpamba te Biblia elobi ete “bato ya lokoso” bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe te, mpe etángi ezaleli ya bilulela esika moko na losambo ya bikeko.​—⁠1 Bakolinti 6:​9, 10; Bakolose 3:⁠5.

Masano ya mbongo elendisaka lisusu epai na bato ezaleli ya moimi, elimo ya kowelana mpe mposa makasi ya koluka na lolenge nyonso kolonga lisano. Ntoma Paulo akebisaki mpo na makambo yango, ntango akomaki ete: “Tiká tókóma te na ezaleli ya komitya liboso, kobimisáká kowelana na kati na biso, koyokelanáká likunya.” (Bagalatia 5:26) Epai mosusu, masano ya mbongo etindaka bato mosusu na kotya motema na biyambayamba ya kozala na makila malamu. Bato oyo babɛtaka masano ya mbongo bandimelaka biyambayamba ya lolenge nyonso, bakanisaka ete bakoki kosala makambo mosusu mpo na kozala na makila malamu. Bazali kokundwela biso likambo ya bana ya Yisalaele oyo bazangaki sembo, oyo “batɛmisaki mesa mpo na nzambe ya makila malamu mpe batondisaki kɔpɔ ya vinyo mpo na nzambe ya makambo oyo masilá kotángama.”​—⁠Yisaya 65:​11, NW.

Basusu bakoki kokanisa ete kotya mwa mbongo moke na lisano mpamba ya kalati to ya damɛ wana bazali kobɛta yango na libota to elongo na baninga ya motema, ezali bobele lolenge ya komisepelisa oyo ekoki mpenza kosala mabe te. Ya solo, moto oyo atii bobele mwa mbongo moke na lisano akoki mbala mosusu kokanisa te ete azali moto ya lokoso to ya moimi, to azali na elimo ya kowelana to ya biyambayamba. Nzokande, kobɛta lisano wana ekosala nini epai na bato oyo bazali kobɛta na ye elongo? Bato mingi oyo bakómá baombo ya masano ya mbongo babandaki bobele na mwa masano ya mbongo ya mikemike oyo ezalaki ‘se mpo na komisepelisa.’ (Luka 16:10) Na yango, oyo emonanaki lokola lisano mpamba ya kolekisa ntango, eyaki kokómela bango likama moko monene.

Likambo yango ezalaka mpenza bongo epai ya bana. Bana mingi bayokaka esengo makasi ya kozwa mwa mbongo moke oyo batii mpo moto oyo akolonga na lisano azwa yango, mpe na nsima likambo yango etindaka bango na kobɛta masano oyo esɛngaka mbongo mingi mpenza. (1 Timote 6:10) Lisangá moko (The Arizona Council on Compulsive Gambling) eyekolaki likambo yango na boumeli ya ntango molai, mpe endimisi ete, bato mingi oyo bakómá baombo ya masano ya mbongo, babandaki kobɛta yango na bomwana, “bazalaki kotya mwa mbongo ya moke mpo na kotyana ntembe soki ekipi nini ekolonga na masano ya ndembo to bazalaki kobɛta kalati ya mbongo elongo na baninga to na bato ya libota.” Lapolo mosusu elobi ete “bana babandaka koyekola kobɛta masano ya mbongo na ndako. Mbala mingi na nzela ya kalati ya mbongo elongo na libota mpe na baninga.” Lapolo yango ebakisi lisusu ete, “na bana monkama oyo babɛtaka masano ya mbongo, bana ntuku misato babandaki yango liboso ete bakokisa mbula zomi na moko.” Na kotalela boyekoli moko, [Why Do People Gamble Too Much​—⁠Pathological and Problem Gambling (Ntina oyo bato bamipesaka na masano ya mbongo​—⁠Maladi mpe mikakatano ya masano ya mbongo)], bilenge mingi oyo babɛtaka masano ya mbongo bazwaka mbongo oyo babɛtelaka masano na kosala mobulu mpe na komipesa na pite. Oyo nde likama monene ebimi na likambo oyo emonanaki lokola lisɛki mpamba!

Tozali kobika na mokili oyo etondi na mitambo mpe masɛnginya, bongo mpo na nini tokoluka lisusu komibakisela mikakatano mpambampamba? (Masese 27:12) Masano ya mbongo, ezala ebɛtami esika bana bazali to te, na mbongo moke to na ebele ya mbongo, ezalaka likama mpo na elimo; yango wana tosengeli koboya yango. Baklisto oyo basepeli kobɛta lisano ya kalati to damɛ mpo na kominanola, bakoki kokoma na kreyo ntango bazali kolonga to kobɛta mpamba kozanga kokoma. Baklisto ya bwanya oyo bazali komibanzabanza mpo na elimo na bango moko, ya baninga mpe ya libota na bango, baboyaka masano ya mbongo, ata soki yango esɛngi mbongo moke mpenza.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Buku moko (The World Book Encyclopedia) elimboli lisano ya mbongo boye, “kotya mbongo mpo na ntembe ya koyeba nani akolonga na lisano moko, na momekano moko to na likambo moko oyo etali makila malamu.” Elobi lisusu ete “bato oyo babɛtaka masano ya mbongo, mbala mingi batyaka mbongo . . . na masano oyo esɛngaka kotya motema na makila malamu lokola tombolá (loto), kobɛta kalati to Zeke.