Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Totikalaki epai batindaki biso

Totikalaki epai batindaki biso

Lisolo ya bomoi

Totikalaki epai batindaki biso

YA HERMANN BRUDER

Nasengelaki kopona kati na makambo mibale oyo: kosala mbula mitano na limpinga ya basoda oyo babengi Légion étrangère to kokangama na bolɔkɔ moko na Maroc. Tiká naino nayebisa bino ndenge oyo nakómaki liboso ya mokakatano yango.

NABOTAMAKI na engumba Oppenau, na Allemagne. Ezalaki na 1911, elingi koloba mbula misato liboso ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda. Tata na ngai, Joseph Bruder, na mama na ngai Frida, babotaki biso bana 17, basi na mibali. Ngai nazalaki mwana ya 13.

Nabosanaka te ete mokolo moko, ntango nazalaki mwana moke, namonaki basoda bazali koleka na balabala monene ya mboka na biso mpe bazalaki kobɛta miziki. Ndenge na bango ya kotambola nzela moko na miziki ebendaki ngai, nalandaki bango tii na gare. Kuna, namonaki tata na mibali mosusu, bango nyonso balataki sokoto mpe bazalaki komata na engbunduka. Ntango engbunduka elongwaki na gare, basi mosusu oyo bazalaki na nse babandaki kolela. Mwa moke na nsima, sango na biso asalaki lisukulu moko molai na ndako-nzambe; atángaki bankombo ya mibali minei oyo bakufaki na etumba mpo na ekólo. Alobaki ete: “Sikoyo, bazali na lola.” Mwasi moko oyo atɛlɛmaki pene na ngai akangamaki mpema.

Tata abɛlaki fièvre typhoïde kuna esika bazalaki kobunda na basoda ya Russie. Ntango azongaki na ndako, azalaki mpenza na makasi lisusu te mpe mbala moko bakɔtisaki ye na lopitalo. Sango ayebisaki ngai boye: “Kende na mwa ndako-nzambe oyo ezali pene na esika bakundaka bato mpe sambelá Tata wa biso mbala 50 mpe Maria losako mbala 50. Nsima na yango, tata na yo akobika.” Nasalaki ndenge alobaki, kasi tata akufaki na mokolo oyo elandaki. Ata mpo na ngai oyo nazalaki naino mwana, etumba ezalaki likambo ya mpasi mpenza.

Ndenge oyo nayebaki solo

Kobanda na 1919 tii na 1939, ezalaki mpenza mpasi mpo na kozwa mosala na Allemagne. Kasi, ntango natikaki kelasi na 1928, nazwaki mosala ya kolona bafololo na engumba Basel, na Suisse.

Ngai mpe nazalaki Mokatolike ya solosolo lokola tata na ngai. Nazalaki kokana nazala moine capucin na ekólo Inde. Ntango leki na ngai Richard, oyo azalaki Motatoli ya Yehova na ntango wana, ayokaki likambo oyo nazalaki kokana kosala, ayaki na Suisse mpo na komeka kopekisa ngai. Akebisaki ngai ete kotyela bato motema, mingimingi bakonzi ya mangomba, ezali likama; mpe alendisaki ngai natángaka Biblia mpe natyela kaka yango motema. Atako nazalaki kokakatana, nasombaki Boyokani ya Sika mpe nabandaki kotánga yango. Mokemoke, nabandaki komona ete ebele ya mateya ya lingomba na biso ekesani na mateya ya Biblia.

Mokolo moko ya lomingo na 1933, ntango nazalaki na ndako ya Richard, na Allemagne, alakisaki ngai epai ya mobali moko na mwasi na ye oyo bazalaki Batatoli ya Yehova. Ntango nayebisaki bango ete natángaka Biblia, bapesaki ngai mwa buku moko oyo ezalaki na motó ya likambo ete La Crise. * Natángaki mwa buku yango tii na midi ya butu. Namonaki mpenza ete nazwi solo!

Batatoli ya Yehova ya engumba Basel bapesaki ngai volime mibale ya buku Études des Écritures* na bazulunalo mpe mikanda mosusu. Lokola makambo nazalaki kotánga esimbaki motema na ngai, nakendeki kokutana na sango ya engumba yango mpe nasɛngaki ye alongola nkombo na ngai na buku ya lingomba. Sango asilikaki makasi mpe akebisaki ngai ete nazali mosika te na kobungisa kondima na ngai. Nabungisaki kondima na ngai soki moke te. Kutu, mpo na mbala ya liboso na bomoi na ngai, nabandaki nde kokolisa kondima ya solo.

Na nsuka ya pɔsɔ wana, bandeko ya engumba Basel babongisaki mobembo moko mpo na kokende kosakola na France. Ndeko moko ayebisaki ngai na boboto mpenza ete soki babengisaki ngai te ezali mpo nazalaki naino moto ya sika na lisangá. Nazongaki nsima te, namonisaki ete nazalaki na mposa makasi ya kobanda kosakola. Ndeko yango akendaki kosolola na nkulutu mosusu, na nsima apesaki ngai teritware na Suisse. Mokolo ya lomingo, na ntɔngɔntɔngɔ, nazwaki velo na ngai mpo na kokende na mwa mboka moko moke oyo ezali pene na engumba Berne. Na sakosi na ngai, namemaki babuku 4, bazulunalo 28 mpe mwa babuku 20. Ntango nakómaki, bato mingi ya mwa mboka yango bazalaki na ndako-nzambe. Atako bongo, ntango tokómaki na ngonga ya 11, ata mokanda moko te etikalaki na sakosi na ngai.

Ntango nayebisaki bandeko ete nazali na mposa ya kozwa batisimo, basololaki na ngai mingi mpe batunaki ngai mituna ya makasi mpo na komeka soki nayebi makambo mingi na solo. Molende mpe bosembo na bango epai ya Yehova mpe epai ya ebongiseli na ye esimbaki motema na ngai. Lokola ezalaki eleko ya malili makasi, ndeko moko abatisaki ngai na kati ya saani monene ya kosukola na ndako ya nkulutu moko. Nazali koyeba lisusu ete nayokaki nsuka na esengo mpe namiyokaki mpenza na nguya. Likambo yango esalemaki na 1934.

Mosala na Ferme ya Bokonzi

Na 1936, nazwaki nsango ete Batatoli ya Yehova basombi mabele na Suisse. Napesaki nkombo na ngai mpo nasala mosala ya kolona bafololo kuna. Nazalaki na esengo ntango babengaki ngai nakende kosala mosala yango na Ferme ya Bokonzi na engumba Steffisburg oyo ekabwani na engumba Berne na kilomɛtrɛ 30. Ntango nyonso oyo nazwi likoki, nazalaki mpe kokende kopesa mabɔkɔ na mosala ya ferme. Na Betele, nayekolaki ntina ya kosala na bomoko na bandeko.

Likambo oyo nabosanaka te na bambula nyonso oyo nasalaki na Betele ezali nde ntango Ndeko Rutherford ayaki kotala biso na ferme, na 1936. Ntango amonaki batomato na biso ya mineneminene mpe ndenge bilanga na biso ebotaki, asɛkaki mpe amonisaki ete esepelisaki ye. Azalaki mpenza ndeko moko ya bolingo!

Mokolo moko, wana nasilaki kokokisa mbula koleka misato na ferme, batángelaki biso mokanda moko oyo eutaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na ntango oyo biso nyonso tozalaki komɛla tii na ntɔngɔ. Na mokanda yango, bamonisaki ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu mpenza mpe basɛngaki ndeko nyonso oyo alingi, akende kosala mosala ya mobongisi-nzela na mboka mopaya. Mbala moko, napesaki nkombo na ngai. Na sanza ya Mai 1939, bayebisaki ngai ete batindi ngai na Brésil!

Na ntango wana, nazalaki na lisangá ya Thoune, pene na Ferme ya Bokonzi. Mikolo nyonso ya lomingo, bandeko mwa mingi ya lisangá tozalaki kokende kosakola na bangomba ya Alpes. Mpo na kokóma kuna, tozalaki kosala ngonga mibale na velo. Margaritha Steiner azalaki moko ya bandeko oyo tozalaki kokende na bango. Likanisi moko eyelaki ngai mbala moko: Yesu atindaki bayekoli na ye mibale mibale te? Ntango nayebisaki Margaritha ete batindaki ngai na Brésil, ye mpe amonisaki ete azali na mposa ya kokende kosala epai basakoli bazali mingi te. Tobalanaki mokolo ya 31 Yuli 1939.

Tosɛmi na mboka oyo tokanaki te

Na nsuka ya sanza ya Augusto 1939, tolongwaki na engumba Le Havre, na France, mpe tobandaki mobembo na biso ya masuwa mpo na kokende na engumba Santos, na Brésil. Na kati ya masuwa, bisika ya kolala ya bato mibale mibale esilaki; yango wana, ngai na mwasi na ngai tosalaki mobembo yango moto na moto na esika na ye ya kolala. Ntango tozalaki kokende, tozwaki nsango ete Grande-Bretagne na France babandaki kobunda na Allemagne. Ntango bayokaki nsango wana, bato 30 oyo bazalaki bana-mboka Allemagne babandaki mbala moko koyemba loyembo ya ekólo Allemagne. Kapitɛnɛ ya masuwa asepelaki na likambo yango te; yango wana, azwaki nzela mosusu mpe asɛmisaki masuwa na libongo ya engumba Safi, na Maroc. Bapesaki bato nyonso oyo bazalaki na mikanda ya mobembo ya Allemagne miniti mitano mpo bálongwa na masuwa. Biso mpe tozalaki na kati.

Bakangaki biso mokolo moko na biro ya bapolisi mpe nsima na yango, bakɔtisaki biso nyonso na mwa bisi moko ya kala mpo na komema biso na bolɔkɔ ya Marrakech, engumba oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 140. Mikolo oyo elandaki ezalaki mikolo ya mpasi mpenza. Bakasho oyo batyaki biso etondaki na bato mpe ezalaki molili. Twalɛti ya biso nyonso, oyo ezalaki mwa lidusu oyo batimolaki na kati ya kasho, ezalaki kokangama mbala na mbala. Bapesaki biso nyonso saki moko oyo ezalaki salite mpo na kolala, mpe na butu, bampoko bazalaki koswa biso na makolo. Mbala mibale na mokolo bazalaki kopesa biso bilei na kati ya linzanza moko egugá.

Mokonzi moko ya basoda ayebisaki ngai ete soki nandimi kosala mbula mitano na limpinga ya basoda oyo babengi Légion étrangère, bakobimisa ngai na bolɔkɔ. Lokola naboyaki, batyaki ngai moko na kati ya libulu moko ya molili na boumeli ya mokolo mobimba. Nalekisaki ntango wana nyonso na kobondela.

Nsima ya mikolo mwambe, bakonzi ya bolɔkɔ bapesaki ngai ndingisa ya komona lisusu Margaritha. Akɔndaki mingi, mpe alelaki makasi. Nasalaki nyonso mpo na kolendisa ye. Bakonzi ya bolɔkɔ batunaki biso mituna; nsima na yango, batyaki biso na engbunduka mpo na komema biso na engumba Casablanca, kuna babimisaki Margaritha na bolɔkɔ. Batindaki ngai na bolɔkɔ oyo ezalaki na Port Lyautey (lelo oyo Kenitra), engumba oyo ekabwani na Casablanca na kilomɛtrɛ 180. Mosali ya Leta oyo azalaki komonisa ekólo Suisse na Maroc apesaki Margaritha toli ete azonga na Suisse, kasi Margaritha aboyaki ete ye azonga, bongo ngai natikala. Na boumeli ya sanza mibale oyo nalekisaki na Port Lyautey, Margaritha azalaki mokolo na mokolo kouta na Casablanca mpo na kotala ngai mpe azalaki komemela ngai biloko ya kolya.

Mbula moko liboso ya makambo wana, Batatoli ya Yehova babimisaki buku oyo ezalaki na motó ya likambo ete Etumba na lingomba ya boklisto (na Allemand) mpo na komonisa na bato nyonso ete Batatoli bazalaki kopesa mabɔkɔ te na boyangeli ya Banazi. Ntango nazalaki na bolɔkɔ, biro ya Batatoli ya Yehova na Suisse, oyo ezali na engumba Berne, ekomelaki bakonzi ya France mokanda; na kati ya anvɛlopi, batyaki mpe buku yango mpo na komonisa bango ete biso tozali Banazi te. Margaritha mpe asalaki mosala monene, azalaki kokende kokutana na bakonzi ya guvɛrnɛma mpo na komonisa bango ete biso tosalaki ata likambo moko te ya mabe. Na nsuka ya 1939, bapesaki biso ndingisa ya kolongwa na Maroc.

Ntango tozwaki lisusu masuwa mpo na kokende na Brésil, toyokaki ete bamasuwa ya Allemagne oyo etambolaka na kati ya mai (sous-marin) ezalaki kobɛta masuwa nyonso oyo ezali kotambola na Mbu ya Atlantique masasi mpe ete bazalaki mpenzampenza kokanela masuwa na biso. Atako masuwa na biso oyo ebengamaki Jamaïque ezalaki masuwa ya mobembo, ezalaki na mindoki ya minene na liboso mpe na nsima. Na moi, kapitɛnɛ azalaki kotambwisa masuwa yango na nzela semba te mpe azalaki ntango nyonso kobɛta masasi. Na butu, azalaki koboma miinda nyonso mpo basoda ya Allemagne bámona biso te. Na mokolo ya 6 Febwali 1940, sanza koleka mitano banda tolongwaki na Mpoto, masuwa na biso esɛmaki na libongo ya engumba Santos, na Brésil. Mitema na biso ekitaki mpenza!

Nakɔti lisusu bolɔkɔ

Batindaki biso liboso na Monténégro, engumba moko oyo ezali na sudi ya Brésil, na etúká ya Rio Grande do Sul. Emonani mpenza ete bayebisaki bakonzi ya mangomba ete tokómaki na engumba yango. Tosakolaki kaka ngonga mibale; nsima na yango, bapolisi bakangaki biso mpe babɔtɔlaki biso badiskɛ ya fono oyo ezalaki na mateya ya Biblia, mikanda nyonso oyo tozalaki na yango, babɔtɔlaki biso mpe basakosi ya mposo ya kamela oyo tosombaki na Maroc. Sango moko na pastɛrɛ moko oyo ayebaki koloba monɔkɔ ya Allemand bazalaki kozela biso na biro ya bapolisi. Mokonzi ya bapolisi abɛtaki diskɛ moko oyo ezalaki na lisukulu moko ya Ndeko Rutherford na fono oyo abɔtɔlaki biso; bato yango mibale bazalaki koyoka. Ndeko Rutherford mpe azalaki molangi-mpɛmbɛ mpenza! Ntango lisukulu ekómaki kolobela Vatican, sango asilikaki makasi mpe abimaki mbala moko.

Ndenge oyo episkɔpɔ ya Santa Maria asɛngaki bango, bapolisi batindaki biso na Pôrto Alegre, mboka-mokonzi ya etúká oyo tozalaki. Eumelaki te, batikaki Margaritha mpe akendaki kosɛnga lisalisi na biro oyo ezalaki komonisa ambassade ya Suisse. Mokonzi na yango apesaki ye likanisi ete azonga na Suisse. Na mbala oyo mpe, Margaritha aboyaki kotika ngai. Margaritha azalaki ntango nyonso molongani ya sembo mpenza. Nsima ya mikolo ntuku misato, batunaki ngai mituna mpe babimisaki ngai na bolɔkɔ. Bapolisi bayebisaki biso tópona kati na makambo mibale oyo: kolongwa na etúká yango nsima ya mikolo zomi to “kondima nyonso oyo ekokómela biso.” Lokola bandeko ya biro monene ya Batatoli bapesaki biso toli, tolongwaki kuna mpe tokendaki na engumba Rio de Janeiro.

“Nasɛngi yo otánga kalati oyo”

Atako tokutanaki na mikakatano wana na ebandeli ya mosala na biso ya kosakola na Brésil, tozalaki mpenza na esengo! Tozalaki na bomoi, tozwaki lisusu ebele ya mikanda, mpe tozalaki na bonsomi ya kosakola na Rio de Janeiro mobimba. Kasi, ndenge nini tokokaki kosakola lokola toyebaki koloba monɔkɔ ya Portugais malamu te? Na nzela ya bakalati oyo ezalaki na nsango ya Biblia. Maloba ya liboso oyo toyekolaki na monɔkɔ ya Portugais mpo na koloba na mosala ya kosakola ezalaki: “Por favor, leia este cartão,” elingi koloba “Nasɛngi yo otánga kalati oyo.” Kalati yango ebotaki mpenza mbuma mingi! Na sanza moko mpamba, tokabolaki buku koleka 1 000. Bato mingi oyo bazwaki mikanda na biso, na nsima bayambaki solo. Mpo na koloba solo, mikanda na biso epesaki litatoli ya malamu mpenza koleka oyo biso moko tokokaki kopesa. Yango esalisaki ngai mpenza namona ntina ya kopesa mikanda epai ya bato oyo bazali kosepela na nsango na biso.

Na ntango wana, Rio de Janeiro ezalaki mboka-mokonzi ya Brésil, mpe bato oyo bazalaki kosala na bandako ya Leta bazalaki koyamba nsango na biso malamu. Nazwaki libaku malamu ya kopesa litatoli epai ya ministre ya finance mpe na ministre ya makambo ya basoda. Na mabaku wana, namonaki polele ndenge oyo elimo ya Yehova ezalaki kosala.

Mokolo moko, nsima ya kosakola na rond-point na vile mpenza ya Rio, nakɔtaki na ndako monene ya batribinale. Mbala moko nakómaki na ndako moko oyo ezalaki na bato balati bilamba ya moindo; nakanisaki ete ebembe ezali wana. Napusanaki epai ya moto moko oyo alataki kitoko mpe akeseneki na bamosusu mpe napesaki ye kalati oyo ezalaki na nsango ya Biblia. Nzokande, ezalaki ebembe te. Bazalaki nde kosambisa moto mpe ngai nakataki bango, mpe moto oyo nazalaki kosolola na ye ezalaki nde zuzi. Asɛkaki mpe asalaki mwa elembo epai ya bakɛngɛli mpo na komonisa bango ete básala ngai eloko te. Na boboto mpenza, andimaki kozwa buku Bana * mpe apesaki likabo na ye. Ntango nazalaki kobima, mokɛngɛli moko alakisaki ngai na mosapi maloba oyo bakomaki yango polele na porte ete: Proibida a entrada de pessoas estranhas (Epekisami kokɔta awa).

Esika mosusu oyo nazalaki kosakola malamu ezalaki na libongo. Mokolo mosusu, nasololaki na moto moko ya masuwa; andimaki kozwa mikanda liboso ete bázonga na mobembo na bango na mai. Na nsima, tokutanaki na ye na liyangani moko. Libota na ye mobimba bandimaki solo, mpe ye moko azalaki kokola malamu na elimo. Epesaki biso esengo mingi.

Kasi, makambo nyonso ezalaki kaka pɛtɛɛ te. Tozalaki na mikanda mpo na kofanda sanza motoba na ekólo yango mpe sanza motoba yango ekokaki; tozalaki kobanga noki bábengana biso. Nsima ya kotinda mokanda na biro ya Brooklyn mpo na koyebisa bango mokakatano na biso, Ndeko Rutherford atindelaki biso mokanda moko; na mokanda yango, alendisaki biso tózonga nsima te mpe ayebisaki biso ndenge oyo tosengeli kosala. Tozalaki na mposa ya kotikala na Brésil. Nsukansuka, na 1945, na lisalisi ya avoka moko, tozwaki mikanda mpo na kofanda libela na Brésil.

Mokumba ya bambula mingi

Kasi na 1941, Jonathan, mwana na biso ya liboso, abotamaki; nsima na ye, Ruth abotamaki na 1943 mpe Esther, na 1945. Mpo na koleisa libota na ngai oyo ekómaki monene, nazwaki mosala. Margaritha akobaki na mosala ya kosakola ntango nyonso tii ntango mwana na biso ya misato abotamaki.

Kobanda na ebandeli, libota na biso mobimba tozalaki kosakola elongo na babalabala minene, na bisika bingbunduka etɛlɛmaka, mpe na bisika ya mombongo. Mikolo nyonso ya pɔsɔ, na mpokwa, biso nyonso tozalaki kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká!; wana ezalaki mpenza bantango ya esengo.

Na ndako, mwana mokomoko azalaki na misala na ye ya kosala mokolo na mokolo. Jonathan azalaki kosukola lituká na kuku. Bana basi bazalaki kosukola frigo, kokɔmba lopango mpe kopangusa basapato na biso. Yango esalisaki bango báyeba kobongisa makambo na bango mpe báyeba kosala makambo bango moko. Lelo oyo, bana na biso basalaka mosala makasi, babatelaka bandako na bango mpe biloko na bango malamu; yango epesaka ngai na Margaritha esengo mingi.

Tozalaki mpe kolinga ete bana na biso bálandaka makita malamu. Liboso makita ebanda, bazalaki komɛla kɔpɔ ya mai mpe kokende na twalɛti. Na ntango ya makita, Jonathan azalaki kofanda na lobɔkɔ na ngai ya mwasi, Ruth na lobɔkɔ na ngai ya mobali mpe Margaritha azalaki pene na ye; Esther, ye azalaki kofanda na lobɔkɔ ya mobali ya Margaritha. Yango esalisaki bango bálandaka makita na likebi mpenza mpe bálya bilei ya elimo banda bomwana na bango.

Yehova apamboli milende na biso. Bana na biso nyonso bazali kolanda kosalela ye na bosembo mpe bazali komipesa na esengo na mosala ya kosakola. Jonathan azali sikoyo nkulutu na lisangá ya Novo Méier, na engumba ya Rio de Janeiro.

Ntango tokómaki na 1970, bana nyonso babalaki mpe totikalaki kaka biso mibale na ndako; yango wana, ngai na Margaritha tozwaki ekateli ya kokende kosala epai basakoli bazalaki mingi te. Tokendeki liboso na Poços de Caldas, engumba oyo ezali na etúká ya Minas Gerais; na ntango wana basakoli bazalaki 19 na esika yango. Nayokaki mpasi na motema ntango namonaki mpo na mbala ya liboso esika oyo bazalaki kosala makita: eteni moko ya ndako oyo ezalaki na kati ya mabele, ezangá maninisa mpe ebebá mpenza. Tobandaki mbala moko koluka ndako moko oyo ebongi mpenza kozala Ndako ya Bokonzi mpe eumelaki te, tozwaki ndako moko kitoko oyo ezalaki na esika ya malamu! Nsima ya mbula minei na ndambo, basakoli bakómaki 155. Na 1989, tokendeki na Araruama, engumba oyo ezali na etúká ya Rio de Janeiro; kuna tosalaki mbula libwa. Na boumeli ya bambula yango, masangá mibale ebotamaki kuna.

Tozwi mbano mpo totikalaki epai batindaki biso

Na 1998, maladi mpe mposa ya kozala pene na bana na biso etindaki biso tókende kofanda na engumba São Gonçalo, na etúká ya Rio de Janeiro. Tii sikoyo, nazali nkulutu na lisangá moko na engumba yango. Tosalaka nyonso mpo na kosakola sanza na sanza. Margaritha asepelaka kokende kopesa litatoli epai ya bato oyo bayaka na magazini moko monene oyo ezali pene na biso. Lisusu, bandeko ya lisangá bapesi biso teritware oyo ezali pene na ndako na biso; yango nde ezali kosalisa biso tózala na mokakatano mingi te mpo na kosakola lokola tozali na nzoto kolɔngɔnɔ mpenza te.

Ekoki sikoyo mbula koleka 60 banda ngai na Margaritha tomipesaki na Yehova. Tomoni mpenza na miso na biso moko ete ‘ezala baguvɛrnɛma to makambo ya sikoyo to makambo oyo ekoya to banguya to bosanda to bozindo to ekelamu nini mosusu ekoki te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo ezali na kati ya Klisto Yesu Nkolo na biso.’ (Baloma 8:​38, 39) Tozali mpenza na esengo ya komona ndenge oyo “bampate mosusu” bazali koyanganisama, baoyo bazali na elikya kitoko ya kozala na bomoi ya seko na mabele kitoko na kati ya biloko kitoko oyo Nzambe akelá. (Yoane 10:16) Na 1940, ntango tokómaki na Brésil, lisangá ezalaki kaka moko na engumba mobimba ya Rio de Janeiro mpe basakoli bazalaki 28 mpamba. Lelo oyo, masangá ezali 250 mpe basakoli ya Bokonzi baleki 20 000.

Tokutanaki na makambo mosusu oyo ekokaki kotinda biso tózonga na Mpoto, epai bandeko na biso bazali. Kasi epai Yehova atindaki biso ezali nde awa na Brésil. Tozali mpenza na esengo mpo totiki yango te!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi babimisaka yango lisusu te.

^ par. 33 Ebimisami na Batatoli ya Yehova, kasi babimisaka yango lisusu te.

[Elilingi na lokasa 21]

Na Ferme ya Bokonzi na Steffisburg, na Suisse na nsuka ya bambula ya 1930 (nazali na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi)

[Elilingi na lokasa 23]

Mwa moke liboso ya libala na biso, na 1939

[Elilingi na lokasa 23]

Na Casablanca, na bambula ya 1940

[Elilingi na lokasa 23]

Libota na biso tozali kosakola

[Elilingi na lokasa 24]

Lelo oyo tozali kosakola sanza na sanza