Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bato bazali kondimela Nzambe oyo bayebi te

Bato bazali kondimela Nzambe oyo bayebi te

Bato bazali kondimela Nzambe oyo bayebi te

NA Allemagne, soki batuni bato misato, mibale bakoloba ete bandimaka ete Nzambe azali. Kasi, ntango batunaki bato koleka nkóto bámeka koloba soki Nzambe oyo bandimelaka azali ndenge nini, moto na moto azalaki na eyano na ye. Zulunalo moko (FOCUS) elobaki boye: “Na Allemagne, moto na moto azali na makanisi na ye na oyo etali Nzambe.” Kondima ete Nzambe azali ezali malamu, kasi ezali mpenza mawa kondima ete Nzambe azali mpe koyeba te soki azali ndenge nini?

Likambo yango ya kozanga koyeba soki Nzambe azali ndenge nini to soki azali na bizaleli nini ezali kaka epai ya bato ya Allemagne te; ezali bongo bipai nyonso na Mpoto. Ankɛtɛ moko esalemaki na Angleterre , na Autriche mpe na Pays-Bas emonisaki ete ebele ya bato balobaka ete oyo babengaka Nzambe, ezali “nguya moko ya makasi koleka to libombami oyo moto akoki kolimbola te.” Mingimingi epai na bilenge, ata baoyo bandimaka ete azali, Nzambe azali moto oyo bakoki koyeba te.

Oyebi mpenza Nzambe malamu?

Koyeba ete moto boye azalaka ekeseni mpenza na koyeba moto yango malamumalamu. Koyeba ete moto moko boye azalaka​—na ndakisa, mokonzi moko monene oyo tokoki kokutana na ye mpambampamba te, elombe moko ya masano, to moto moko oyo tomonaka na bafilme​—ezali kaka kondima mpamba ete moto yango azalaka. Nzokande, koyeba moto malamumalamu esuki kaka wana te. Koyeba moto malamumalamu esɛngaka koyeba bomoto na ye, bizaleli na ye, mayoki na ye, makambo oyo alingaka ná oyo alingaka te mpe makambo oyo azali kokana kosala. Koyeba moto malamumalamu ekoki kosala ete okóma moninga na ye ya motema.

Ebele ya bato bamonaki ete ekoki te básuka kaka na koyeba Nzambe likolólikoló to mpe báyeba kaka ete azalaka. Basali makasi mpo na koyeba Nzambe malamumalamu. Bamoni nde ete balekisaki ntango na bango mpamba mpo na koluka koyeba Ye? Paul, mobali moko oyo afandaka na Allemagne na epai ya nɔrdi, azalaki kondima kaka likolólikoló ete Nzambe azalaka; kasi azwaki ekateli ya koluka koyeba Ye malamumalamu. Paul alobi boye: “Koyeba Nzambe malamumalamu esɛngaka ntango mpe milende, kasi mbano na yango ezali monene mpenza. Kozala moninga ya motema ya Mozalisi ekómisaka bomoi malamu koleka.”

Ezali mpenza na ntina ete ozwa ntango mpe osala milende mpo na koluka koyeba Nzambe malamumalamu? Tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

Koyeba ete moto boye azalaka ekeseni mpenza na koyeba moto yango malamumalamu