Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi na kaa ya bato bakimá mboka

Bomoi na kaa ya bato bakimá mboka

Bomoi na kaa ya bato bakimá mboka

OKANISAKA nini ntango balobelaka “kaa ya bato bakimá mboka”? Osilá komona kaa moko ya bato bakimá mboka? Ezalaka ndenge nini?

Ntango lisolo oyo ezalaki kokomama, kaa 13 esalamaki na wɛsti ya Tanzanie. Guvɛrnema ya Tanzanie na boyokani na Ebongiseli ya ONU mpo na bato bakimá mboka (HCR), eyambaki bato koleka 500 000 oyo bakimaki bitumba na mikili mosusu ya Afrika. Bomoi na kaa ezalaka ndenge nini?

Kokóma na kaa

Kandida, elenge mwasi moko, ayebisi biso makambo esalemaki eleki mwa bambula ntango libota na bango mobimba bakómaki na kaa: “Bapesaki biso kalati moko oyo tosengelaki kolakisaka mpo na kozwa biloko mpe batindaki biso na kaa ya Nyarugusu. Kuna bapesaki biso nimero ya balabala mpe ya esika oyo tosengelaki kotonga ndako. Balakisaki biso esika ya kokata banzete mpe ya kokata bisobe mpo na kotonga mwa ndako na biso. Tosalaki babiliki ya mabelé, mpe bato ya HCR bapesaki biso bakapo ya kozipa na yango likoló ya ndako. Ezalaki mosala ya makasi mpenza, kasi tozalaki na esengo ntango mwa ndako na biso esilaki.”

Bazwaka biloko mbala moko na pɔsɔ mibale na mokolo ya misato. Kandida abakisi boye: “Tosalaka molɔngɔ liboso ya depo mpo na kozwa bilei oyo bato ya HCR bakabolelaka biso.”

Bapesaka moto mokomoko bilei nini mpo na mokolo?

“Bapesaka moto mokomoko kɔpɔ misato ya fufu ya masangu, kɔpɔ moko ya madesu, gramɛ 20 ya soya baniká, lutu mibale ya mafuta, mpe gramɛ 10 ya mungwa. Mbala mosusu mpe bapesaka biso sabuni oyo tosengeli kosalela sanza mobimba.”

Ezali boni mpo na mai ya komɛla? Ezalaka mpe? Mwasi moko, nkombo na ye Riziki, alobi boye: “Ɛɛ, babendaka mai ya ebale, eleki na batiyo tii na batono ya mineneminene. Liboso ya kotinda mai na bisika nyonso oyo ebimaka na bapɔmpi, batyaka yango nkisi mpo na koboma mikrobe. Atako bongo, totɔkisaka mai ntango nyonso liboso ya komɛla yango mpo na koboma mikrobe mosusu. Mbala mingi, mokolo mobimba tosalaka mosala makasi ya kokende kotoka mai mpe kosukola bilamba na bapɔmpi. Na mokolo moko, tosengeli kozwa kaka katini moko na ndambo ya mai.”

Soki otamboli na kaa moko, okoki mbala mosusu komona bakelasi ya bana mike, bakelasi ya ebandeli mpe ya ntei. Okoki mpe komona bakelasi ya mikóló. Biro ya bapolisi mpe ya Leta ezali na mwa mosika ya kaa mpo na kobatela mpe kopekisa mobulu na kaa. Wenze moko ya monene ezali, mpe ebele ya bamagazini ya mikemike epai bato ya kaa basombaka ndunda, mbuma, mbisi, nsoso, mpe biloko mosusu ya kolya. Bato mosusu ya mboka wana mpe bayaka na wenze yango kotɛkisa biloko na bango. Kasi bato oyo bafandi na bakaa bazwaka mbongo wapi mpo na kosomba biloko? Bamosusu basalaka mwa bilanga ya ndunda mpe batɛkaka yango na wenze. Basusu mpe batɛkaka mwa ndambo ya masangu mpe madesu oyo bapesaka bango mpo na kozwa mbongo ya kosomba nyama to mbisi to mbuma. Kaa mosusu ekómá kaka lokola mboka moko ya monene. Mbala mingi okomona bato na wenze bazali kosɛka mpe bazali na esengo lokola kaka nde bazali na bamboka na bango moko.

Soki okómi na lopitalo, monganga moko akoyebisa yo ete ezali na mwa lopitalo moko ya moke na kati ya kaa mpo na maladi ya mikemike; kasi mpo na maladi ya makasi, bamemaka moto na lopitalo ya monene. Ndako oyo basi babotaka mpe eteni ya ndako ya kobotisa ezali monene mpamba te, na kaa moko oyo ezali na bato 48 000, bana soki 250 babotamaka na sanza moko.

Bazali kolya malamu na elimo

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoki komituna mituna mingi mpo na bandeko na bango oyo bazali na bakaa ya Tanzanie. Bango nyonso bazali soki bato 1 200, bazali na masangá 14 mpe bituluku misato. Bazali ndenge nini?

Eloko ya liboso baklisto yango basalaki ntango bakómaki na bakaa ezalaki ya kosɛnga mwa esika mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi. Yango esalisaka baoyo bazali koya sika báyeba esika oyo bakoki komona Batatoli mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Na kaa ya Lugufu masangá ezali nsambo mpe baklisto nyonso bazali 659 oyo bazali komipesa na mosala ya kosakola. Na makita na mokolo ya lomingo, motuya ya bayangani na masangá nyonso nsambo ezalaka pene na bato 1 700.

Batatoli oyo bazali na bakaa yango nyonso basalaka mpe mayangani ya minene. Ntango basalaki liyangani ya etúká mpo na mbala ya liboso na kaa ya Lugufu, bato 2 363 bayanganaki. Batatoli basalaki mwa libulu ya mai mpo na batisimo kaka na libándá ya esika oyo liyangani ezalaki kosalema. Batimolaki libulu mpe batyaki bakapo mpo mai ekɔta na mabelé te. Bandeko bazalaki kokende kotoka mai na ebale na ntaka ya kilomɛtrɛ mibale mpe bazalaki komema yango na bavelo. Moto mokomoko azalaki komema na mbala moko litre 20 ya mai; elingi koloba ete bakendeki mbala mingi mpo na kotondisa libulu wana. Bato oyo bazwaki batisimo balataki malamu mpe basalaki molɔngɔ mpo na kozwa batisimo. Bazalaki bango nyonso bato 56 oyo bazwaki batisimo na mai. Mobongisi-nzela moko oyo batunaki ye mituna na liyangani yango amonisaki ete asalisaki bato 40 mpo báyekola Biblia. Bato minei kati na bango bazwaki batisimo na liyangani wana.

Biro ya filiale etindaka bakɛngɛli-batamboli mpo na kotala masangá yango mbala na mbala. Moko na bakɛngɛli yango alobaki boye: “Bandeko bazali na molende mpenza na mosala ya kosakola. Bazali na teritware monene, mpe na lisangá na lisangá mosakoli mokomoko azali kosala ngonga 34 na sanza na mosala ya kosakola. Basakoli mingi bazali koyekola Biblia na bato mitano to koleka oyo bazali kosepela. Mobongisi-nzela moko alobaki ete andimi te ete akoki kozala na teritware ya malamu ndenge wana epai mosusu. Bato oyo bafandaka na bakaa basepelaka mingi na mikanda na biso.”

Ndenge nini mikanda oyo elimbolaka Biblia ekómaka na bakaa yango? Biro ya filiale etindaka yango na engbunduka tii na engumba ya Kigoma, na wɛsti ya Laki ya Tanganyika. Kuna, bandeko bazwaka yango mpe batindaka yango na masangá. Ntango mosusu bafutelaka motuka moko mpo bango moko bákabola mikanda na bakaa nyonso. Lokola banzela ezali mabe, yango ezwaka bango mikolo ata misato to minei.

Lisungi ya biloko mosusu

Batatoli ya Yehova ya France, ya Belgique mpe ya Suisse basalisaka mpenza bato bakimá mboka oyo bazali na bakaa yango. Kutu, bamosusu bazwaki ndingisa ya ministre ya intérieur mpe ndingisa ya bakonzi ya HCR mpe bakendeki tii na Tanzanie kotala bakaa yango. Batatoli ya mikili ya Mpoto basangisaki batɔni ya miliki, bilamba, basapato, basakosi ya bana-kelasi mpe basabuni. Bapesaki biloko nyonso wana mpo bákabolela bato nyonso oyo bakimá mboka, na kolandáká etinda ya Biblia oyo elobi boye: “Wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai na bato nyonso oyo ezali malamu, kasi mingimingi mpenza epai ya baoyo bazali bandeko na biso na kati ya kondima.”​—Bagalatia 6:10.

Milende nyonso wana mpo na kosalisa bato oyo bakimá mboka ebimisi mpenza matomba. Komite ya lisangá ya bato bakimá mboka ya kaa moko emonisaki botɔndi na yango na maloba oyo: “Na nkombo ya lisangá na biso mobimba, tozali na esengo ya kopesa bino matɔndi mpo na boboto oyo ebongiseli na bino emoniseli biso mbala misato mobimba . . . Bato nyonso, mibali, basi, bana, mpe ata bana oyo babotami sika oyo bazwaki bilamba bazalaki 12 654 . . . Bato bakimá mboka oyo bazali na kaa ya Muyovozi bazali sikoyo 37 000. Mingi na bango, elingi koloba bato 12 654 (to 34,2 %) bazwaki biloko oyo ekabolamaki.

Na kaa mosusu, bato 12 382 bazwaki moto na moto bilamba misatomisato, mpe na kaa mosusu bazwaki bankóto ya basakosi ya bana-kelasi. Mokonzi moko ya HCR na etúká yango alobaki boye: “Tozali na botɔndi mpenza mpo na likabo na bino ya bolingo malamu oyo esalisi mpenza bato mingi na kaa. Biloko ya nsuka toutaki kozwa ezali bakɔntɛnɛrɛ mitano ya babuku ya bana-kelasi, oyo tokabolelaki bato nyonso oyo bakimá mboka. . . . Topesi bino matɔndi mingi mpenza.”

Bazulunalo ya mboka elobelaki mpe lisalisi oyo epesamaki. Zulunalo moko (Sunday News), na ebimeli na yango ya 20 Mai 2001 ezalaki na moto na likambo oyo: “Bilamba eyei mpo na bato oyo bakimá mboka na Tanzanie.” Na ebimeli na yango ya 10 Febwali 2002, bakomaki boye: “Bato oyo bakimá mboka basepeli mingi na likabo ya bolingo malamu, mpamba te bana mosusu oyo bazalaki lisusu kokende kelasi te mpo bazalaki na bilamba ya kolata te bazali sikoyo kokende kelasi mikolo nyonso.”

Bafinani kasi bazangi nzela ya kobima te

Mpo na bato mingi oyo bakimá mboka, esɛngaka pene na mbula mobimba mpo bámesana na bomoi ya kaa. Bazali na bomoi oyo ezangá mindɔndɔ. Batatoli ya Yehova na bakaa yango balekisaka ntango na bango mingi na koteya baninga na bango ya kaa nsango malamu ya kobɔndisa oyo euti na Liloba ya Nzambe, Biblia. Balobelaka mokili ya sika epai bato nyonso “bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Na ntango wana, bato nyonso “bakofanda na nse, moto na moto na nse [ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te mpo ete monɔkɔ na [Yehova] na bibele elobi bongo.” Ezali polele ete lokola Nzambe akopambola mokili yango, bakaa ya bato oyo bakimá mboka ekozala te.​—Mika 4:3, 4; Nzembo 46:9.

[Elilingi na lokasa 8]

Bandako na kaa ya Nduta

[Bililingi na lokasa 10]

Ndako ya Bokonzi ya Lukole (na lobɔkɔ ya mobali)

Batisimo na Lugufu (awa na nse)

[Elilingi na lokasa 10]

Liyangani ya etúká na kaa ya Lugufu