Etumbelo ezali na esika nini na losambo?
Etumbelo ezali na esika nini na losambo?
OTALELAKA etumbelo lokola eloko ya ntina mingi na kati ya losambo na yo? Bandimi mingi ya mangomba ya boklisto oyo bakendaka na ndako-nzambe bamonaka ete etumbelo ezali mpenza esika oyo eleki ntina. Osilá kotalela oyo Biblia elobi na ntina etali kosalela bitumbelo na kati ya losambo?
Etumbelo ya liboso oyo Biblia elobeli ezali oyo Noa atongaki mpo na kotumba banyama mbeka ntango abimaki na masuwa nsima ya Mpela. *—Genese 8:20.
Ntango Nzambe abulunganisaki minɔkɔ na Babele, bato bapalanganaki na mabele mobimba. (Genese 11:1-9) Lokola bato basalemá na mposa ya kosambela Nzambe, balukaki na ndenge nyonso kopusana penepene na Nzambe oyo, bayebaki ye lisusu malamu te, yango wana bazalaki ‘koluka ye na komekameka epai na epai’ lokola bato bakufá miso. (Misala 17:27; Baloma 2:14, 15) Banda na ntango ya Noa, bato ya bikólo mingi batongaki bitumbelo mpo na banzambe na bango. Bato ya mangomba mpe ya bikólo ndenge na ndenge basalelaki bitumbelo na losambo ya lokuta. Lokola bapesaki Nzambe ya solo mokɔngɔ, bato mosusu basalelaki bitumbelo mpo na kosala makambo ya nsɔmɔ lokola kokaba bato mbeka, ntango mosusu mpe bana mike. Ntango bakonzi mosusu ya Yisalaele bazalaki kotika Yehova, bazalaki kotonga bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya lokola Baala. (1 Mikonzi 16:29-32) Kasi, ndenge nini bazalaki kosalela bitumbelo na losambo ya solo?
Bitumbelo na losambo ya solo na Yisalaele
Na nsima ya Noa, bato mosusu ya sembo batongaki bitumbelo oyo bazalaki kosalela na losambo ya Nzambe ya solo, Yehova. Abalayama atongaki etumbelo moko na Sikeme, mosusu na esika moko pene na Betele, mosusu na Ebeloni mpe mosusu na Ngomba Molia epai apesaki mpate-mobali oyo Yehova apesaki ye mpo na mbeka na esika ya mwana na ye Yisaka. Na nsima, bato lokola Yisaka, Yakobo mpe Moize, kozanga ete moto moko atinda bango, batongaki bitumbelo mpo na kopesa Nzambe mbeka na bango.—Genese 12:6-8; 13:3, 18; 22:9-13; 26:23-25; 33:18-20; 35:1, 3, 7; Exode 17:15, 16; 24:4-8.
Ntango Nzambe apesaki libota ya Yisalaele Mibeko, asɛngaki bango bátonga mongombo, to hema moko oyo basengelaki komemaka yango bipai nyonso; babengaka yango mpe “hema ya koyangana.” Yango nde eloko oyo ebongisamaki mpo na kopusana penepene na ye. (Exode 39:32, 40) Mongombo to hema ezalaki na bitumbelo mibale. Moko ezalaki mpo na kotumba bambeka, esalemaki na mabaya ya nzete ya akasia mpe mobimba na yango ezipamaki na kwivre; ezalaki liboso ya ekɔtelo ya hema mpe ezalaki mpo na kotumba banyama mbeka. (Exode 27:1-8; 39:39; 40:6, 29) Etumbelo ya mpaka ya malasi yango mpe esalemaki na mabaya ya akasia, kasi mobimba na yango ezipamaki na wolo; ezalaki na kati ya mongombo liboso ya rido ya Esika oyo Eleki Mosantu. (Exode 30:1-6; 39:38; 40:5, 26, 27) Bazalaki kotumba mpaka ya malasi na etumbelo yango mbala mibale na mokolo, na ntɔngɔ mpe na mpokwa. (Exode 30:7-9) Tempelo oyo Mokonzi Salomo atongaki ezalaki na biteni ndenge moko na oyo ezalaki na mongombo, ezalaki mpe na bitumbelo mibale.
“Hema ya solo” mpe etumbelo ya elilingi
Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele ezalaki kaka te mpo na kosalisa bango bázala na etamboli ya malamu, kasi ezalaki mpe mpo na kosalisa bango bápusana penepene na ye na nzela ya bambeka mpe mabondeli. Bibongiseli mingi oyo Mibeko etindaki ezalaki makambo oyo ntoma Paulo abengaki “ndenge ya ndakisa,” “ndakisa,” to “elili ya makambo ya likoló.” (Baebele 8:3-5; 9:9; 10:1; Bakolose 2:17) Na maloba mosusu, Mibeko ezalaki kaka te mpo na kotambwisa Bayisalaele tii ntango Klisto asengelaki koya, kasi ezalaki mpe elilingi ya mikano ya Nzambe oyo Yesu Klisto asengelaki kokokisa. (Bagalatia 3:24) Makambo mosusu oyo Mibeko elobaki ezalaki nde bisakweli. Na ndakisa, makila ya mwana-mpate ya Elekeli oyo ezalaki lokola elembo ya lobiko ya Bayisalaele, ezalaki elilingi ya Yesu Klisto. Ye azali “Mwana-Mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili,” oyo makila na ye esopanaki mpo na kosikola biso na lisumu.—Yoane 1:29; Baefese 1:7.
Makambo mingi oyo etali misala oyo ezalaki kosalema na mongombo mpe na tempelo ezalaki elilingi ya makambo ya solo mpenza na elimo. (Baebele 8:5; 9:23) Kutu, Paulo alobelaki “hema ya solosolo, oyo Yehova atongaki, kasi moto te.” Abakisaki ete: “Klisto ayaki lokola nganga-nzambe monene ya makambo ya malamu oyo esalemaki, na nzela ya hema ya monene koleka mpe ya kokoka koleka mpe oyo esalemi te na mabɔkɔ, elingi koloba, ya bozalisi oyo te.” (Baebele 8:2; 9:11) “Hema oyo eleki monene mpe eleki malamu mpenza” ezalaki tempelo monene ya Yehova na elimo. Makomami ezali komonisa ete tempelo monene ya elimo ezali ebongiseli oyo Yehova asali mpo bato bápusana penepene na ye na nzela ya mbeka ya Yesu Klisto oyo ezali kolongola masumu.—Baebele 9:2-10, 23-28
Ntango toyekoli na Liloba ya Nzambe ete makambo mosusu oyo Mibeko elobelaki ezalaki na ndimbola monene koleka, elingi koloba ete ezali kolobela makambo ya elimo, yango ezali mpenza kolendisa kondima na biso ete Biblia epemamaki mpenza na Nzambe. Ezali mpe kobakisa botɔndi na biso mpo na bwanya ya Nzambe oyo tokoki kokuta kaka na Makomami.—Baloma 11:33; 2 Timote 3:16.
Etumbelo ya mbeka ezalaki mpe komonisa likambo moko ya elimo. Emonani ete ezali komonisa “mokano” ya Nzambe to mposa na ye ya kondima mbeka ya bomoi ya kokoka ya Yesu.—Baebele 10:1-10.
Mwa moke na nsima, kaka na mokanda ya Baebele, Paulo alobaki likanisi mosusu ya ntina mingi ete: “Tozali na etumbelo moko oyo uta na yango baoyo bazali kosala mosala mosantu na hema bazali na lotomo ya kolya te.” (Baebele 13:10) Etumbelo nini azalaki kolobela?
Bato mingi ya Lingomba ya Katolike oyo balimbolaka Makomami balobaka ete etumbelo oyo elobelami na Baebele 13:10 ezali oyo basalelaka na molulu ya Ukaristya, oyo ezali “sakramento” oyo balobaka ete na nzela na yango bazongelaka mbeka ya Klisto na ntango bazali kosala Misa. Kasi, soki otali makambo oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ yango, okomona ete Paulo azalaki kolobela etumbelo ya elilingi. Ebele ya bato ya mayele balobaka ete liloba “etumbelo” na vɛrsɛ oyo ezali elilingi. Guiseppe Bonsirven, ye azali sango (Jésuite), alobaki ete “yango eyokani mpenza na makambo mosusu nyonso oyo ezali na ndimbola ya elilingi na mokanda [ya Baebele].” Alobaki lisusu boye: “Epai ya baklisto, liloba ‘etumbelo’ ezalaki libosoliboso na ndimbola ya elimo mpe ezali se na nsima ya Irenée, mpe mingimingi nsima ya Tertullien mpe Saint Cyprien nde ekómaki kosalelama na Ukaristya, mpe mpenzampenza mpo na kolobela mesa ya Ukaristya.
Ndenge zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike emonisi yango, momeseno ya kosalela etumbelo epalanganaki na “eleko ya Constantin” ntango “bakómaki kotonga bandako-nzambe ya mineneminene.” Zulunalo moko (Rivista di Archeologia Cristiana) elobi boye: “Tobanzi mpenza ete na ekeke ya liboso mpe ya mibale, moto moko te akoki kolobela esika moko oyo ebongisami mpo na koyangana, mpamba te na ntango wana ezalaki kosalema na bandako ya bato oyo, . . . nsima ya makita, nkolo na yango azalaki kosalela yango lokola ndako na ye.”
Ndenge oyo mangomba ya boklisto esalelaka etumbelo
Zulunalo moko ya Lingomba ya Katolike (La Civilità Cattolica) elobi ete: “Etumbelo ezali esika ya ntina mingi na ndako-nzambe, kasi ezali mpe bongo mpo na Lingomba.” Kasi, Yesu Klisto abandisaki ata molulu moko te oyo esengelaki kosalemaka na etumbelo; atindaki mpe bayekoli na ye te ete básalaka milulu na etumbelo. Ntango Yesu alobelaki etumbelo na Matai 5:23, 24 mpe na bisika mosusu, azalaki nde kolobela milulu ya losambo ya Bayuda, kasi alobaki te ete bayekoli na ye basengelaki kosalela etumbelo mpo na kosambela Nzambe.
George Foot Moore, ye azalaki moto ya mayele na makambo ya kala (1851-1931), akomaki boye: “Makambo ya ntina na losambo ya baklisto ezalaka ntango nyonso kaka ndenge moko, kasi nsima ya bambula, makambo mikemike oyo bazalaki kosala na losambo, oyo Justin alobelaki na katikati ya ekeke ya mibale, ekómaki milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ.” Milulu oyo esalemaka na Lingomba ya Katolike, ezala na ndako-nzambe to na bisika mosusu, ezali ebele mpe ezali mindɔndɔ mingi mpe babongisá liteya mobimba mpo na kolakisa yango na baseminɛrɛ, babengaka yango liturgie to milulu. Moore abakisaki boye: “Makanisi wana ya kokómisa mwa makambo ya mikemike milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ, ebakisamaki mingimingi na kolandáká makambo ya Kondimana ya Kala ntango bakonzi ya mangomba ya boklisto bakómaki komitalela lokola bakitani ya banganga-nzambe ya kala. Zambala kitoko ya nganga-nzambe monene, bazambala ya banganga-nzambe mosusu, ndenge oyo bazalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na molɔngɔ, Balevi oyo bazalaki koyemba, milinga ya mpaka ya malasi oyo ezali kobima na mwa bitumbelo ya mpaka ya malasi oyo bazali koningisa mpe ezali kobuta likoló lokola lipata; nyonso wana ezali komonana lokola lolenge mpenza ya kosambela oyo Nzambe alakisaki, oyo etindaki lingomba na kosala makambo oyo mbala mosusu kutu eleki oyo ya bapakano ya kala.”
Mbala mosusu okokamwa na koyeba ete ebele ya milulu, makambo ya kolata basutani, mpe biloko mosusu ya losambo oyo basalelaka na mangomba ndenge na ndenge, ezali mateya ya boklisto oyo euti na Baevanzile te, kasi ezali mimeseno mpe milulu ya Bayuda mpe ya bapakano. Buku moko (Enciclopedia Cattolica) emonisi ete Lingomba ya Katolike “ezwá momeseno ya kosalela etumbelo na losambo ya Bayuda mpe ya bapakano.” Minucius Felix, moto moko oyo alobelaki kondima na ekeke ya misato ya ntango na biso (T.B.), akomaki ete baklisto bazalaki ‘na tempelo te, bazalaki mpe na etumbelo te.’ Buku mosusu (Religioni e Miti) elobi mpe bongo: “Baklisto ya liboso bazalaki koboya kosalela etumbelo mpo na komikesenisa na Bayuda na bapakano.”
Lokola boklisto ya solo esimbamaki na mitinda oyo bato basengeli kondima mpe kosalela na bomoi na bango ya mokolo na mokolo mpe na bamboka nyonso, ntina ezalaki lisusu te ya kotonga mboka moko mosantu awa na mabele, to mpe tempelo moko oyo ezali na bitumbelo; ntina ezalaki mpe te ya kozala na banganga-nzambe oyo bakeseni na bato mosusu mpe basengeli kolataka ndenge mosusu. Yesu alobaki ete: “Ngonga ezali koya wana bato bakosambela Tata na ngomba oyo te na Yelusaleme mpe te. Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:21, 23) Milulu ya mindɔndɔmindɔndɔ ya mangomba mpe bitumbelo na yango eyokani te na makambo oyo Yesu alobaki na ntina etali ndenge oyo tosengeli kosambela Nzambe.
[Maloba na nse ya lokasa]
^ par. 3 Liboso na yango, ekoki kozala ete Kaina na Abele mpe basalelaki bitumbelo mpo na kopesa Yehova bambeka.—Genese 4:3, 4.