Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kotika motema ya mwana na yo kaka boye te!

Kotika motema ya mwana na yo kaka boye te!

Kotika motema ya mwana na yo kaka boye te!

MOSALI-MBƐKI oyo ayebi mpenza mosala na ye akoki kokamata mwa pɔtɔpɔtɔ mpamba mpe asali na yango eloko moko ya kitoko. Bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bakoki kosala biloko ya kitoko mpe ya motuya na mwa eloko moko oyo ezangi ntina bazali mpenza mingi te. Banda kalakala, bato oyo basalaka mbɛki nde basalaka bakɔpɔ, basaani, banzungu, bilokó mpo na kotya mai to masanga mpe bambɛki mosusu mpo na kokembisa ndako.

Baboti mpe basalaka mosala monene mpo na koteya bana na bango bizaleli mpe bomoto ya malamu. Biblia ezali kokokanisa mokomoko na biso na pɔtɔpɔtɔ, mpe Nzambe apesi baboti mokumba ya ntina mingi ya kobongisa bana na bango ndenge moto oyo asalaka mbɛki asalaka na “pɔtɔpɔtɔ.” (Yobo 33:6, NW; Genese 18:19) Kosala mbɛki ya kitoko ezalaka mosala ya mpasi, ndenge moko mpe kobɔkɔla mwana mpo akóma mobali to mwasi ya solosolo, oyo akoki na makambo nyonso, ezalaka likambo moke te. Mbongwana ya ndenge wana eyaka kaka yango moko te.

Bana bakutanaka na makambo mingi ntango bazali kokola. Likambo ya mawa ezali ete makambo yango mosusu ebebisaka bana. Yango wana, na esika atika motema ya mwana na ye kaka boye, moboti ya bwanya akobɔkɔla mwana “na nzela ekoki na ye kotambola,” na elikya ete “ata ntango akokóma mpaka akolongwa na yango te.”​—Masese 22:6, NW.

Lokola kobɔkɔla mwana esɛngaka bambula mingi mpemakambo mingi, baklisto ya bwanya basengeli kozwa ntango ya kobengana makambo nyonso oyo ekoki kobebisa motema ya mwana na bango. Bakolakisa mpenza bolingo na bango ntango bazali kopesa mwana “mateya, mpe kosembolama, oyo euti na batoli ya boklisto.” (Baefese 6:4, The New English Bible) Mosala ya baboti ekozala pɛtɛɛ soki babandi yango ntango mwana azali naino moke.

Bólekisa ntango te

Bato oyo basalaka bambɛki balingaka kosalela pɔtɔpɔtɔ oyo bakoki kosala na yango eloko nyonso oyo balingi mpo ezali pɛtɛpɛtɛ, kasi ntango basilisi kosala eloko yango, libazi yango ekómaka makasi. Nsima ya kobongisa pɔtɔpɔtɔ yango malamumalamu, basepelaka kolekisa sanza motoba te liboso ya kosalela yango. Ndenge moko mpe, mpo na baboti, ntango malamu ya kobanda kokɔtisa mateya na motema ya mwana ezali ntango oyo motema yango ekómi naino makasi te mpe ezali naino mpasi te kosembola yango.

Bato oyo bayebi makambo ya bana malamumalamu balobaka ete ntango mwana akokisi sanza mwambe, abandaka koyoka maloba ya monɔkɔ ya baboti na ye, bolingo ekómaka makasi na kati na bango, abandaka koyeba makambo mpe akómaka na mposa ya koyeba nini ezali koleka pembenipembeni na ye. Ntango malamu mpo na kobanda kokɔtisa mateya na motema na ye ezali ntango azali naino moke. Ekozala malamu mpenza mpo na mwana na yo soki, lokola Timote, ‘ayebi makomi mosantu banda bomwana na ye’!​—2 Timote 3:15. *

Bana balingaka komekola baboti na bango. Longola komekola mongongo, maloba, mpe bajɛstɛ, bana bayekolaka bolingo, boboto mpe motema mawa ntango bazali komona bizaleli yango epai ya baboti na bango. Soki tolingi kobɔkɔla mwana na biso na mibeko ya Yehova, esengeli naino ete mibeko yango ezala na mitema na biso moko. Botɔndi ya ndenge wana mpo na mibeko ya Yehova ekotinda baboti básololaka na bana na bango ntango nyonso na ntina na Yehova mpe na ntina na Liloba na ye. Biblia ezali kolendisa ete: “Okolobela yango ntango okofanda na ndako na yo mpe ntango okotambola na balabala mpe ntango okolala mpe ntango okolamuka.” (Deteronome 6:6, 7NW) Francisco ná Rosa balimboli ndenge basalelaka bana na bango mibale makambo yango. *

“Longola masolo ya mokolo na mokolo, tozwaka ata miniti 15 na mokolo mpo na komeka kosolola na mwana mokomoko. Soki tomoni lokola mwana azali na likambo moko, tozwaka mwa ntango molai, mpe mbala mingi tomonaka ete tomikosaki te. Na ndakisa, eleki mwa mikolo, mwana na biso ya mobali ya mbula mitano autaki kelasi mpe alobaki na biso ete andimaka te ete Yehova azali. Tokanisi ete moninga na ye moko ya kelasi asɛkaki ye mpe alobaki na ye ete Nzambe azali te.”

Baboti yango bamonaki ete bana basengeli kokóma na kondima mpo na Mozalisi na bango. Baboti bakoki kosalela ezaleli oyo bana bazalaka na yango ya kosepela na biloko oyo Nzambe akelá, mpo na kolona epai na bango kondima ya ndenge wana. Oyebi ndenge bana balingaka kosimbasimba banyama, kobuka bafololo, to mpe kosakana na zɛlɔ pembeni ya mai! Baboti bakoki kosalisa bango báyeba Mozalisi na nzela ya biloko oyo akelá. (Nzembo 100:3; 104:24, 25) Bakotikala na kokamwa mpe bakokóma na limemya mpo na biloko yango bomoi na bango mobimba. (Nzembo 111:2, 10) Koyeba makambo yango ekoki kosalisa mwana akóma na mposa ya kosepelisa Nzambe mpe kobanga kosala makambo oyo Nzambe asepelaka na yango te. Bobangi yango ekosalisa ye ‘apɛngwa na mabe.’​—Masese 16:6.

Atako bana mingi balingaka koyeba makambo nyonso mpe bakangaka makambo noki, ekoki kozala mpasi mpo báyekola kotosa. (Nzembo 51:5) Bakoki ntango mosusu kolinga kosala makambo nyonso oyo balingi to mpe kozwa eloko nyonso oyo bazali na mposa na yango. Baboti basengeli koyeba ntango mosusu kokangela bango motema, kozala na motema molai, mpe kopesa bango disipilini mpo ete bana bátikala na bizaleli wana ya mabe libela te. (Baefese 6:4) Yango nde likambo oyo Phyllis na Paul basalaki, mpe yango esalisaki bango bábɔkɔla bana na bango mitano malamu.

Phyllis alobaki boye: “Atako mwana na mwana azalaki na bizaleli na ye, bango nyonso bazalaki kolinga bátika bango básala kaka oyo motema na bango elingi. Ezalaki pɛtɛɛ te, kasi nsukansuka bayaki koyeba ete soki tolobi ete ‘te’ elingi mpenza koloba ete toboyi likambo wana.” Paul, mobali na ye, alobaki boye: “Mbala mingi, tozalaki koyebisa bango mpo na nini tozwi ekateli boye to boye soki bazali na mbula oyo bakoki kokanga ntina ya likambo yango. Atako tozalaki ntango nyonso kosala makasi ete tómonisa bango boboto, toteyaki bango báyeba kotosa bokonzi oyo Nzambe apesa biso likoló na bango.”

Atako mwana akoki kozala na mikakatano ebele ntango azali naino moke, baboti mingi bamonaka ete mikakatano ya makasi koleka eyaka nde ntango mwana akómi elenge, ntango abandi kokutana na ebele ya mikakatano ya sika.

Kosimba motema ya elenge

Mosali-mbɛki asengeli kosala mosala na ye liboso ete pɔtɔpɔtɔ ekauka. Soki alingi kobanda mosala yango noki te, asengeli kobakisa mai na pɔtɔpɔtɔ yango mpo etikala kaka pɛtɛpɛtɛ mpe malamu. Ndenge moko mpe, baboti basengeli kosala makasi mpo motema ya mwana na bango ekóma libanga te. Na yango, Biblia ezali esaleli ya libosoliboso oyo bazali na yango, oyo bakoki kosalela mpo na ‘kopamela, kosembola makambo, mpe kopesa mwana na bango nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu.’​—2 Timote 3:15-17.

Nzokande, ekoki kosalema ete elenge azali lisusu kondima toli ya baboti na ye te ndenge azalaki kondima yango na ntango azalaki moke. Ekoki kokóma ete bilenge bazali kotya likebi mingi nde na makambo ya baninga na bango, mpe na ndenge yango, bazali lisusu kosolola na baboti na bango mingi te mpe bazali lisusu kofungolela bango motema te. Esɛngaka kozala na motema molai mpe na mayele mingi lisusu, mpamba te mokumba ya baboti mpe ya bana ebongwanaka na ntango wana. Elenge azali koluka komesana na mbongwana oyo ezali kosalema na nzoto na ye mpe na makanisi na ye. Abandi kozwa bikateli mpe mikano oyo ekoki kobongola bomoi na ye mobimba. (2 Timote 2:22) Na eleko wana ya mpasi, asengeli kobunda na likambo moko oyo ekoki mpenza kobebisa motema na ye: mposa ya kolanda makambo mabe ya baninga na ye.

Mbala mingi, eyaka te kaka na likambo moko oyo ezali komonana polele. Ezalaka mingi na maloba to makambo mosusu oyo elɛmbisaka ekateli ya moto. Makambo yango etalelaka mingimingi likambo oyo emonisaka bolɛmbu ya bilenge mingi​—kobanga ete baninga na bango bakoboya bango. Ntango elenge azali kobunda mpo na kobatela lisosoli malamu mpe epai mosusu azali na mposa ete baninga na ye bándima ye, akoki kobanda kondima “biloko oyo ezali na kati ya mokili,” oyo bilenge mosusu basepelaka na yango.​—1 Yoane 2:15-17; Baloma 12:2.

Longolá yango, bamposa ya motema na ye moko oyo ezangi kokoka ekoki kokolisa lisusu mposa ya kosala makambo oyo bilenge mosusu bazali kosɛnga ye. Akoki kobanda kobendama na maloba lokola “Sepelisá nzoto” mpe “Salá nyonso oyo motema elingi.” María azali koyeba lisusu likambo oyo akutanaki na yango: “Nandimaki makanisi ya bilenge mosusu oyo bazalaki koloba ete bilenge basengeli komipekisa te bisengo nyonso ya mokili, mpe oyo ekoya eya. Lokola nalingaki kosala makambo oyo baninga na ngai ya kelasi bazalaki kosala, nakómaki mpenza pene ya kosala makambo oyo ekokaki kobotela ngai mindɔndɔ ebele.” Lokola ozali moboti, ozali na mposa ya kosalisa mwana na yo alonga mikakatano ya ndenge wana, kasi ndenge nini okoki kosala yango?

Na maloba na yo mpe na misala na yo, lakisá ye lisusu mpe lisusu ete omibanzabanzaka mpo na ye. Salá makasi oyeba ndenge ayokaka na motema na ye mpo na likambo boye to boye, mpe luká koyeba makambo oyo ezali kotungisa ye, makambo oyo ekoki ntango mosusu koleka mikakatano oyo okutanaki na yango ntango ozalaki naino na kelasi. Na ntango wana mpenza nde mwana na yo asengeli komona ete ozali moto oyo akoki kotyela motema. (Masese 20:5) Bajɛstɛ na ye to elongi na ye ekoki koyebisa yo soki azali kobomba likambo. Kokisá bamposa na ye atako amonisi yango te mpe ‘bɔndisá motema na ye.’​—Bakolose 2:2.

Kasi, komonisa ete ondimaka kokakola makambo ya malamu te ezali na ntina. Baboti mingi bamonaki ete na bantango mosusu makambo oyo bana na bango balingaka ekesanaka na oyo bango balingaka, kasi soki ekateli na bango ezali malamu, bakoki te kotikela bana na bango básala oyo balingi. Epai mosusu, osengeli koluka koyeba malamumalamu likambo liboso ete ozwa ekateli ya kopesa disiplini na bolingo mpenza, mpe ndenge nini osengeli kopesa disiplini yango soki esengeli.​—Masese 18:13.

Komekama ekoki mpe kouta na kati ya lisangá

Mbɛki mosusu ekoki komonana lokola basilisi kosala yango, kasi soki batumbi yango naino na mɔtɔ te, ata biloko oyo bakotya na kati na yango ekoki kobebisa yango. Biblia ezali kokokanisa komekama mpe mikakatano na kotumba mbɛki na mɔtɔ, mpamba te yango nde emonisaka polele lolenge ya bato oyo tozali mpenzampenza. Ya solo, Biblia ezali kolobela mpenzampenza nde komekama ya kondima na biso, kasi tokoki mpe kosalela likanisi yango mpo na komekama ya lolenge mosusu. (Yakobo 1:2-4) Likambo ya kokamwa, komekama mosusu ya makasi oyo bilenge bakutanaka na yango eutaka na lisangá.

Ata soki mwana na yo azali komonana makasi na elimo, ekoki kozala ntango mosusu ete azali kobunda na mitema mibale. (1 Mikonzi 18:21) Na ndakisa, Megan azalaki kobunda na makanisi ya bato ya mokili, oyo azalaki koyoka epai ya bilenge mosusu oyo bazalaki koya na Ndako ya Bokonzi:

“Nakómaki kolanda makambo ya bilenge mosusu oyo bazalaki komona ete bomoi ya boklisto esí elɛmbisi bango mpe ete ezali kopekisa bango básepelisa nzoto na bango. Bazalaki koloba makambo lokola oyo: ‘Ntango kaka nakokóma na mbula 18, nakotika solo,’ to mpe ‘Etikali moke nalongwa na ngai.’ Bazalaki kolinga te kozala esika moko na bilenge oyo bazalaki na makanisi ya ndenge mosusu, kutu bazalaki kobenga bango basantu.”

Soki kaka elenge moko to bilenge mibale na kati na bango bazali na bizaleli mabe, bilenge mosusu bakoki kobeba. Bato balandaka makambo ya bato oyo bazali esika moko na bango. Bozoba mpe bisalasala ekoki kozwa esika ya bwanya mpe makambo malamu. Na bikólo mingi, bilenge baklisto bamibendelaki mindɔndɔ mpo balandaki makambo oyo bato mosusu bazalaki kosala.

Ya solo, bilenge bazalaka na mposa ya kosanganaka na bato mosusu mpo na komisepelisa. Ndenge nini yo moboti okoki kobongisa mabaku ya ndenge wana? Kanisá malamu ndenge oyo bakoki kominanola, mpe bongisá makambo ya malamu ya kolekisaka ntango na libota to mpe oyo ekosangisa bilenge ná mikóló. Luká koyeba baninga ya mwana na yo. Bengá bango báya kolya elongo na bino, to lekisá mpokwa moko elongo na bango. (Baloma 12:13) Lendisá mwana na yo alanda mosala moko ya malamu, lokola koyekola ebɛteli moko ya miziki to koyekola monɔkɔ ya bapaya to mpe koyekola mosala moko ya mabɔkɔ. Mbala mingi, akoki kosala yango na kati ya lopango, esika oyo abatelami malamu.

Kotánga kelasi ekoki kobatela

Kotánga kelasi ekoki mpe kosalisa elenge amipesa mingi te na kominanola. Loli, oyo azali mokonzi ya eteyelo moko monene ekómi mbula 20 sikoyo, alobi boye: “Ebele ya bilenge Batatoli baleká na eteyelo oyo. Mingi bazalaki na bizaleli malamu, kasi basusu bakesanaki ata moke te na bana-kelasi mosusu. Kaka baoyo bazalaki na bizaleli malamu nde bazalaki komipesa na kotánga kelasi na bango. Nazali mpenza kosɛnga na baboti ete bálandelaka kelasi ya bana na bango malamumalamu, báluka koyebana na balakisi na bango, mpe komonisa bana na bango ete kozwa bilembo malamu na kelasi ezali na litomba monene. Basusu bakosala malamu koleka, kasi nyonso bakoki kosala oyo ekoki mpo balakisi na bango bápesa bango limemya.”

Kotánga kelasi ndenge wana ekosalisa bana bákola mpe na elimo. Ekoki kopesa bango mimeseno malamu ya koyekola, ya koyeba komipekisa, mpe ya koyeba kokokisa mikumba na bango. Na ntembe te, koyeba kotánga malamu mpe kokanga ntina ya makambo oyo bazali kotánga ekolendisa bango báyekola mpe báteya Liloba ya Nzambe na ndenge ebongi mpenza. (Nehemia 8:8) Makambo oyo kelasi na bango mpe koyekola makambo ya elimo ezali kosɛnga bango ekoki kosalisa bana bámipesa mingi te na kominanola.

Lokumu ya baboti mpe ya Yehova

Na Grèce ya kala, moto oyo asali mbɛki mpe moto oyo ayemi likoló na yango bazalaki kokoma bankombo na bango likoló na yango. Ndenge moko mpe, na kati ya libota, na momeseno bato mibale nde babɔkɔlaka mwana. Tata ná mama bapesanaka mabɔkɔ na mosala ya koteya motema ya mwana, mpe na ndenge ya elilingi, “sinyatire” na bango mibale ekozala likoló ya mwana. Lokola mosali-mbɛki to mpe moyemi oyo ayebi mosala na ye mpenza, yo mpe okoki kozala na esengo mpo na mosala monene oyo osali ya kobɔkɔla elenge moko ya bizaleli malamu mpe ya kitoko to bonzenga.​—Masese 23:24, 25.

Kolonga na mosala monene yango etalelaka ndenge bobongisi motema ya mwana na bino. Tozali na elikya ete mokolo mosusu okoloba ete: “Mibeko ya Nzambe na ye ezali na kati na motema na ye; matambe na ye [ekotɛngatɛnga, NW] te.” (Nzembo 37:31) Motema ya mwana ezali na motuya mingi, yango wana ebongi kotika yango kaka boye te.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Baboti mosusu batángelaka mwana na bango oyo abotami sika Biblia. Mongongo wana ya boboto mpe esengo ya koyoka ndenge bazali kotángela ye ekoki kosala ete mwana asepelaka kotánga mikanda na bolenge na ye.

^ par. 9 Topesi bato mosusu bankombo mosusu.