Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini Yisaya 30:21 elobi ete liloba ya Yehova ezali kobima “nsima na yo,” nzokande vɛrsɛ oyo ezali liboso emonisi ete Yehova azali liboso ntango elobi boye: “Miso na yo ekozala mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene”?

Yisaya 30:20, 21 (NW) elobi boye: “Molakisi na yo Monene akomibomba lisusu te, mpe miso na yo ekozala mpenza miso oyo ezali komona Molakisi na yo Monene. Matoi na yo ekoyoka liloba na nsima na yo ete: ‘Oyo ezali nzela. Tambolá na kati na yango,’ soki okokende na lobɔkɔ ya mobali to soki okokende na lobɔkɔ ya mwasi.”

Soki totaleli mokapo yango na ndenge mpenza ekomami, ekozala lokola nde moto oyo azali kotánga azali komona Yehova, Molakisi Monene, liboso na ye kasi azali koyoka mongongo na ye nsima na ye. Nzokande, maloba yango ezali ya elilingi, mpe esengeli kokanga ntina na yango na ndenge ya elilingi.

Isa 30 Vɛrsɛ 20 esaleli elilingi ya mosaleli oyo azali pene mpo na kosalela nkolo na ye, mpe kotosa malako na ye. Lokola mosaleli oyo azali kotala na likebi nyonso lobɔkɔ ya nkolo na ye mpo na koyeba mposa na ye. Lelo oyo, basaleli ya Yehova bazali kotya likebi na bango na malako oyo Yehova azali kopesa na nzela ya ebongiseli na ye awa na mabele. (Nzembo 123:1, 2) Bazali mpenza kotosa litambwisi na ye, bazali kotya likebi mpenza na likambo nyonso oyo Yehova azali koloba na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”​—Matai 24:45-47.

Tokoloba boni mpo na maloba oyo emonisi ete basaleli na ye bazali koyoka na nsima na bango? Tokoki mpenza koloba ete mongongo oyo ezali kobima na nsima ezali makambo oyo Nzambe asilá koloba, na maloba mosusu, azali koloba na nzela ya Liloba na ye oyo “kapita na ye ya sembo” azali kolimbola polele. (Luka 12:42) Basaleli ya Nzambe na mikolo na biso bayokaka mongongo na ye ntango bazali komipesa na koyekola Biblia na lisalisi ya mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” to “kapita ya sembo” azali kobongisa, mpe bazali kosalela mitinda na yango na bomoi na bango. Ntango bazali kolanda malamu litambwisi oyo Molakisi Monene azali kopesa na ntango oyo ebongi mpe soki bazali koyekola Liloba ya Nzambe, oyo ekomamá eleki sikoyo bankama ya bambula, na maloba ya elilingi, basaleli na ye bamonaka ye liboso na bango mpe bayokaka mongongo na ye na nsima na bango.​—Baloma 15:4.