Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?

Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?

Mpo na nini kokanisa Bolei ya mpokwa ya Nkolo?

“Ngai nazwaki epai ya Nkolo likambo oyo napesaki mpe bino.”​—1 BAKOLINTI 11:23.

1, 2. Yesu asalaki nini na butu oyo balyaki Elekeli na mobu 33 T.B.?

MWANA mobotami-se-moko ya Yehova azalaki wana. Mibali 11 oyo ‘bakangamaki na ye na kati ya komekama na ye’ bazalaki mpe wana. (Luka 22:28) Ezalaki na mpokwa ya mokolo ya minei, mwa 31 Marsi ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), mpe ekoki mpenza kozala ete na Yelusaleme, sanza ezalaki komonana mobimba na likoló. Yesu Klisto asilisaki kolya Elekeli elongo na bantoma na ye. Abimisaki Yuda Mokeliota, moto oyo atɛkaki ye. Kasi, bamosusu batikalaki na ndako oyo bazalaki. Mpo na nini? Mpamba te Yesu alingaki kosala likambo moko ya ntina mingi mpenza. Likambo nini?

2 Lokola Matai, moto oyo akomaki Evanzile moko, azalaki wana, tótika ye ayebisa biso ndenge elekaki. Akomaki boye: “Yesu akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa lipamboli, abukaki yango mpe, apesaki yango na bayekoli, alobaki ete: ‘Bókamata, bólya. Oyo elakisi nzoto na ngai.’ Lisusu, akamataki kɔpɔ mpe, kopesáká matɔndi, apesaki bango yango, kolobáká ete: ‘Bómɛla yango, bino nyonso; mpo yango elakisi “makila ya kondimana” na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi mpo na bolimbisi ya masumu.’” (Matai 26:26-28) Likambo yango esengelaki kosalema kaka mbala moko wana? Ezalaki na ndimbola nini? Ezali nde na ntina mpo na biso lelo oyo?

“Bókoba kosalaka boye”

3. Mpo na nini likambo oyo Yesu asalaki na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. ezalaki na ntina mingi?

3 Likambo oyo Yesu Klisto asalaki na butu ya mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. esengelaki kaka kosuka wana te. Ntoma Paulo alobelaki yango na mokanda oyo akomelaki baklisto bapakolami ya Kolinti, epai bazalaki kokoba kosala likambo yango atako mbula koleka 20 esilaki koleka banda Yesu abandisaki yango. Atako Paulo azalaki te na kati ya bantoma 11 oyo bazalaki ná Yesu na mobu 33 T.B., na ntembe te bantoma mosusu bayebisaki ye makambo oyo elekaki na butu wana. Lisusu, Paulo amonaki emonaneli moko kati na yango bayebisaki ye makambo oyo elekaki mpenza na butu wana. Paulo alobaki boye: “Ngai nazwaki epai ya Nkolo likambo oyo napesaki mpe bino, ete Nkolo Yesu na butu oyo asengelaki kokabama akamataki limpa mpe, nsima ya kopesa matɔndi, abukaki yango mpe alobaki ete: ‘Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino. Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.’ Asalaki lisusu mpe ndenge moko mpo na kɔpɔ, nsima wana asilisaki bolei ya mpokwa, kolobáká ete: ‘Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai. Bókoba kosalaka boye, mbala nyonso oyo bokomɛla yango, mpo na kokanisa ngai.’”​—1 Bakolinti 11:23-25.

4. Mpo na nini baklisto basengeli kokanisaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

4 Luka, moto mosusu oyo akomaki Evanzile moko, ayebisaki mpe ete Yesu alobaki ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Luka 22:19) Na Biblia mosusu, maloba yango ebongolami boye: “Salá boye mpo na ekaniseli na ngai.” (haut-fleuve) Kutu, mbala mingi tobengaka likambo yango ete Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Paulo abengaki yango mpe Bolei ya Mpokwa ya Nkolo; nkombo yango ebongi mpenza, mpamba te Yesu asalaki yango na butu. (1 Bakolinti 11:20) Baklisto basɛngisami ete bákanisaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo. Kasi, mpo na nini Yesu abandisaki ekaniseli yango?

Ntina oyo Yesu abandisaki yango

5, 6. (a) Wapi moko ya bantina oyo Yesu abandisaki Ekaniseli? (b) Yebisá ntina mosusu oyo Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo.

5 Yesu abandisaki mpe Ekaniseli mpo na mokano moko oyo liwa na ye esengelaki kokokisa. Akufaki mpo na kolongisa bokonzi ya Tata na ye. Na ndenge yango Klisto amonisaki ete Satana Zabolo azali mobuki lokuta, mpamba te ye akosaki ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na bango. (Yobo 2:1-5) Lokola Yesu atikalaki sembo tii na liwa, amonisaki ete Satana akosaki mpe likambo oyo Yesu asalaki esepelisaki motema ya Yehova.​—Masese 27:11.

6 Ntina mosusu oyo Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ezalaki mpo na kosalisa biso tóbosana te ete lokola akufaki moto ya kokoka oyo asalaki lisumu te, ‘apesaki molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.’ (Matai 20:28) Ntango moto ya liboso asalaki lisumu na miso ya Nzambe, abungisaki bomoi ya kokoka ná makambo nyonso oyo bomoi wana elingaki komemela ye. Atako bongo, Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Ya solo, “lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Klisto Yesu Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Bolei ya Mpokwa ya Nkolo esalisaka biso tóbosana te bolingo monene oyo Yehova ná Mwana na ye balakisaki na ndenge oyo Yesu akufaki lokola mbeka. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpo na bolingo wana!

Ntango nini tosengeli kosalaka yango?

7. Na ndenge nini “mbala nyonso” oyo baklisto bapakolami balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo bakobaka kosakola liwa ya Nkolo?

7 Mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo, Paulo alobaki boye: “Mbala nyonso oyo bozali kolya limpa oyo mpe komɛla kɔpɔ oyo, bozali kokoba kosakola liwa ya Nkolo, tii ntango akoya.” (1 Bakolinti 11:26) Moklisto mopakolami mokomoko asengeli kolyaka limpa mpe komɛlaka vinyo ya Ekaniseli tii ntango akokufa. Na ndenge yango, na miso ya Yehova Nzambe mpe ya mokili, bakobanda kosakola mbala na mbala kondima na bango na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na lobiko ya bato.

8. Tii ntango nini baklisto bapakolami nyonso basengeli kokanisaka Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

8 Tii ntango nini baklisto bapakolami nyonso basengeli kosalaka Ekaniseli ya liwa ya Klisto? Paulo alobaki ete “tii ntango akoya”; na ntembe te yango elingi koloba ete basengeli kosalaka yango tii ntango Yesu akoya kozwa bayekoli na ye bapakolami mpe koyamba bango na likoló na nzela ya lisekwa na eleko ya “kozala” na ye. (1 Batesaloniki 4:14-17) Yango eyokani na maloba oyo Yesu ayebisaki bantoma na ye 11 ya sembo ete: “Soki nakei mpe nabongiseli bino esika, nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai mpenza, mpo esika ngai nazali bino mpe bózala wana.”​—Yoane 14:3.

9. Maloba ya Yesu na Malako 14:25 elimboli nini?

9 Ntango Yesu abandisaki Ekaniseli, alobelaki kɔpɔ ya vinyo mpe ayebisaki bantoma na ye ya sembo ete: “Nakomɛla lisusu eloko oyo euti na nzete ya vinyo ata moke te tii mokolo wana oyo nakomɛla yango ya sika na kati ya bokonzi ya Nzambe.” (Malako 14:25) Lokola kuna na likoló Yesu akomɛla mpenza vinyo ya solosolo te, na ntembe te alingaki kolobela nde esengo, mpamba te ntango mosusu Biblia esalelaka vinyo lokola maloba ya elilingi mpo na kolobela esengo. (Nzembo 104:15; Mosakoli 10:19) Yesu ná bayekoli oyo bazali kolanda matambe na ye bazali kozela na mposa mpenza esengo oyo bakoyoka ntango bakosangana na kati ya Bokonzi.​—Baloma 8:23; 2 Bakolinti 5:2.

10. Esengeli kosalaka Ekaniseli mbala boni?

10 Esengeli kokanisaka liwa ya Yesu sanza na sanza, pɔsɔ na pɔsɔ, to mokolo na mokolo? Te. Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na mokolo oyo Bayisalaele bazalaki kolya Elekeli mpo na “ekaniseli” ya kobima na bango na boombo na Baezipito na mobu 1513 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); babomaki ye mpe kaka na mokolo yango. (Exode 12:14) Bazalaki kokanisa Elekeli kaka mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 na sanza ya Nisana na manaka ya Bayuda. (Exode 12:1-6; Levitike 23:5) Yango ezali komonisa ete esengeli kokanisaka liwa ya Yesu ndenge oyo bazalaki kokanisa Elekeli, elingi koloba sanza na sanza te, pɔsɔ na pɔsɔ te, to mpe mokolo na mokolo te, kasi mbala moko na mbula.

11, 12. Masolo ya makambo ya kala ezali komonisa nini na oyo etali ndenge oyo bazalaki kosala Ekaniseli na ebandeli?

11 Yango wana, ebongi kosalaka Ekaniseli mbala moko na mbula na mokolo ya 14 Nisana. Buku moko elobi boye: “Baklisto ya Asie Mineure bazalaki kobengama Ba-Quartodécimans [bato ya mokolo ya zomi na minei] mpo bazalaki kokanisa paska [Bolei ya Mpokwa ya Nkolo] kaka mokolo ya 14 Nisana . . . Yango ekokaki kozala mokolo ya mitano to mokolo mosusu nyonso na pɔsɔ.”​—The New Schaff-Herzog Encyclopedia of Religious Knowledge, Volimi IV, lokasa 44.

12 Mpo na momeseno oyo ezalaki na ekeke ya mibale T.B., John von Mosheim, moto ya mayele na makambo ya kala, alobaki ete Ba-Quartodecimans bazalaki kosala Ekaniseli mokolo ya 14 Nisana mpamba te “bazalaki kotalela ndakisa ya Klisto lokola mobeko oyo basengeli kotosa.” Moto mosusu ya mayele na makambo ya kala alobaki boye: “Mangomba ya Ba-Quartodécimans ya Azia elandaki kaka ndenge oyo likambo yango ezalaki kosalema na lingomba ya Yelusaleme. Na ekeke ya mibale, na Paska na bango oyo bazalaki kosala mokolo ya 14 Nisana, bandimi ya mangomba yango bazalaki kokanisa lisiko na bango na nzela ya liwa ya Klisto.”​—Studia Patristica, Volimi 5, 1962, lokasa 8.

Ndimbola ya limpa

13. Limpa ya ndenge nini Yesu asalelaki ntango abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

13 Ntango Yesu abandisaki Ekaniseli, ‘akamataki limpa, apesaki lipamboli, abukaki yango mpe apesaki yango [bantoma na ye].’ (Malako 14:22) Limpa oyo bazalaki na yango na esika wana ezalaki limpa oyo bazalaki kolya na Elekeli. (Exode 13:6-10) Lokola bazalaki kotya levire te na limpa yango, ezalaki papala mpe ezalaki mpasi te mpo na kokatakata yango mpe bazalaki kobuka yango mpo na kokabola yango. Ntango Yesu asalaki likamwisi oyo abongolaki mwa mampa mpe ekómaki mingi mpo na koleisa ebele ya bato, mampa yango ezalaki mwa makasi mpamba te esɛngaki kobuka yango mpo na kokabolela yango bato. (Matai 14:19; 15:36) Na yango, emonani ete kobuka limpa ya Ekaniseli ezali na ndimbola moko ya elimo te.

14. (a) Mpo na nini ebongi mpenza ete limpa ya Ekaniseli ezala limpa oyo batyá yango levire te? (b) Limpa nini tokoki kosomba to tokoki kosala biso moko mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

14 Mpo na limpa oyo asalelaki ntango abandisaki Ekaniseli, Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi nzoto na ngai oyo ezali mpo na bino.” (1 Bakolinti 11:24; Malako 14:22) Ebongaki mpenza ete yango ezala limpa oyo ezali na levire te. Mpo na nini? Mpamba te levire ekoki kozala elilingi ya mabe to mpe lisumu. (1 Bakolinti 5:6-8) Limpa yango ezalaki komonisa nzoto ya Yesu, oyo ezali ya kokoka mpe ezangi lisumu, oyo ebongaki mpenza mpo epesama mbeka mpo na kobikisa biso. (Baebele 7:26; 10:5-10) Batatoli ya Yehova babosanaka likambo yango te mpe balandaka ndakisa oyo Yesu atikaki. Yango wana, na Ekaniseli, basalelaka limpa oyo ezali na levire te. Na bisika mosusu, basalelaka mampa oyo batye levire te oyo Bayuda basalelaka na Fɛti ya Elekeli soki ezali na bikelakela mosusu te lokola matungulu to maki. To mpe bango moko basalaka mampa oyo batye levire te; basangisaka farine ná mwa mai. Nsima ya kosala pɔtɔpɔtɔ ya mampa, basalaka limpa ya papala mpe batumbaka yango na kikalungu oyo batye mwa mafuta moke mpenza tii ekokauka ntango ekobela mpe ekozala mwa makasi.

Ndimbola ya vinyo

15. Nini ezalaki na kɔpɔ oyo Klisto alekisaki ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye?

15 Nsima ya kolekisa limpa oyo batye levire te, Yesu azwaki kɔpɔ, ‘apesaki matɔndi mpe apesaki yango [bantoma na ye], mpe bango nyonso bamɛlaki yango.’ Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi.” (Malako 14:23, 24) Eloko nini ezalaki na kɔpɔ yango? Vinyo, elingi koloba masanga mpenza, kasi ezalaki te mai ya mbuma ya vinyo oyo bakamoli sika. Ntango Makomami ezali kolobela vinyo, ezalaka te mai ya mbuma ya vinyo oyo bakamoli sika. Na ndakisa, ezali vinyo nde ekoki kopanza “bikótó ya kala ya vinyo,” kasi te mai ya mbuma ya vinyo oyo bakamoli sika. Lisusu, bato oyo bazalaki kolinga Klisto te balobaki ete ye ‘amipesaki na komɛla vinyo.’ Balingaki koloba na ye bongo te soki vinyo oyo bazalaki kolobela ezalaki nde mai ya mbuma ya vinyo oyo bakamoli sika. (Matai 9:17; 11:19) Na Elekeli bazalaki komɛla vinyo, mpe Klisto asalelaki yango ntango abandisaki Ekaniseli ya liwa na ye.

16, 17. Vinyo ya ndenge nini ebongi mpo na Ekaniseli mpe mpo na nini?

16 Esengeli kotya vinyo ya motane na kɔpɔ yango mpo ezala mpenza elilingi ya makila ya Yesu oyo esopamaki. Ye moko alobaki boye: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi.” Lisusu, ntoma Petelo akomaki ete: “[Bino baklisto bapakolami] boyebi ete ezalaki te na biloko oyo epɔlaka, na palata to na wolo, nde bosikolamaki na motindo ya etamboli na bino ya kozanga kobota mbuma oyo bozwaki na nzela ya mimeseno oyo eutaki na bankɔkɔ na bino. Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, ɛɛ oyo ya Klisto.”​—1 Petelo 1:18, 19.

17 Na ntembe te, ntango Yesu abandisaki Ekaniseli, asalelaki vinyo ya motane, oyo esalemi na mbuma ya vinyo oyo etelá. Kasi, vinyo mosusu ya motane oyo batɛkaka lelo oyo ebongi te mpamba te babakisaka yango alcool to mpe batyaka yango bikelakela mosusu. Makila ya Yesu ekokaki mpenza, ezalaki kosɛnga te ete bábakisa eloko mosusu. Yango wana, vinyo mosusu lokola porto, xérès,vermouth ebongi te kosalela yango. Vinyo ya Ekaniseli esengeli kozala vinyo ya motane oyo babakisi yango sukali te, alcool te to mpe biloko mosusu te. Tokoki kosalela vinyo ya motane oyo ezali sukali te oyo biso moko tosali to mpe tokoki kosomba vinyo ya motane lokola bourgogne to mpe bordeaux.

18. Mpo na nini Yesu asalaki ekamwiseli moko te na limpa mpe vinyo ya Ekaniseli?

18 Ntango Yesu abandisaki bolei yango, asalaki ekamwiseli moko te, ezali te ete akamataki limpa mpe abongoli yango mosuni ya nzoto na ye mpe vinyo abongoli yango makila na ye. Kolya mosuni ya moto mpe komɛla makila ezali kobuka mobeko ya Nzambe. (Genese 9:3, 4; Levitike 17:10) Yesu azalaki naino na nzoto ya mosuni mpe azalaki na makila na ye nyonso. Soki tolandi ndenge oyo Bayuda bazalaki kotánga mikolo, nzoto na ye epesamaki mbeka ya kokoka mpe makila na ye esopamaki na mokolo yango kaka ya 14 Nisana na nsima ya midi. Yango wana, limpa mpe vinyo ya Ekaniseli ezali kaka bilembo oyo emonisaka nzoto mpe makila ya Klisto. *

Ekaniseli ezali bolei ya bato ebele

19. Mpo na nini tokoki kosalela basaani mpe bakɔpɔ mingi mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

19 Ntango Yesu abandisaki Ekaniseli, apesaki bantoma na ye nyonso ya sembo vinyo bámɛla na kɔpɔ kaka moko. Evanzile ya Matai elobi boye: “[Yesu] akamataki kɔpɔ mpe, kopesáká matɔndi, apesaki bango yango, kolobáká ete: ‘Bómɛla yango, bino nyonso.’” (Matai 26:27) Ezalaki mpasi te mpo básalela “kɔpɔ” moko na esika ya bakɔpɔ ebele, mpamba te bazalaki kaka bato 11 mpe bazalaki ntango mosusu bango nyonso na mesa moko; mokomoko akokaki kolekisa yango epai ya moninga na ye tii epai ya moto ya nsuka na mwa ntango moke. Mbula oyo, bamilio ya bato bakoyangana mpo na Bolei ya Mpokwa ya Nkolo na masangá koleka 94 000 ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Lokola na mpokwa kaka moko wana likita yango ekosalema na bisika ebele, ekoki kosalema te ete básalela kaka kɔpɔ moko mpo na bato nyonso. Kasi, ata na masangá ya minene epai ekosɛnga ete básalela bakɔpɔ ebele mpo na kolekisa yango na mabɔkɔ ya bato nyonso na mwa ntango moke, kɔpɔ ekolimbola kaka makila ya Yesu oyo epesamaki lokola mbeka. Ndenge moko mpe, tokoki kosalela basaani mingi mpo na kolekisa mampa. Esika moko te Makomami ezali komonisa ete kɔpɔ yango esengeli kozala kaka ya lolenge boye to boye. Kasi, kɔpɔ yango mpe saani esengeli kozala oyo ebongi na kotalela lokumu ya likambo yango. Ebongi kotondisa kɔpɔ yango tii na motó te mpo vinyo esopanaka te ntango ezali koleka na mabɔkɔ ya bato.

20, 21. Mpo na nini tokoki koloba ete Ekaniseli ezali bolei ya bato ebele?

20 Ata soki tosaleli basaani mingi mpo na mampa mpe bakɔpɔ mingi mpo na vinyo, Ekaniseli ezali bolei ya bato ebele. Na Yisalaele ya kala, moto akokaki kobongisa bolei ya bato ebele; mpo na yango, azalaki komema nyama moko na ndako ya Nzambe, epai bazalaki koboma yango. Bazalaki kotumba ndambo mosusu ya nyama yango na etumbelo, ndambo mosusu bazalaki kopesa na nganga-nzambe oyo azalaki kosala kuna mpe ndambo mosusu epai ya banganga-nzambe ya libota ya Alona; moto oyo apesaki nyama elongo na libota na ye bazalaki mpe kolya. (Levitike 3:1-16; 7:28-36) Ekaniseli mpe ezali bolei ya bato ebele mpamba te bato ebele balyaka yango elongo.

21 Yehova mpe asanganaka na bolei yango lokola Mobandisi ya ebongiseli yango. Yesu nde azali mbeka, mpe bato oyo balyaka elongo ezali nde baklisto bapakolami oyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Kolya na mesa ya Yehova elimbolaka ete kimya ezali kati na bato yango ná Yehova. Yango wana, Paulo akomaki ete: “Kɔpɔ ya lipamboli oyo tozali kopambola, ezali nde te bosangani moko na makila ya Klisto? Limpa oyo tozali kobuka, ezali nde te bosangani moko na nzoto ya Klisto? Lokola limpa ezali kaka moko, biso, atako tozali mingi, tozali nzoto kaka moko, mpo biso nyonso tozali kolya limpa wana moko.”​—1 Bakolinti 10:16, 17.

22. Mituna nini etaleli Ekaniseli oyo tokotalela mpe yango?

22 Bolei ya Mpokwa ya Nkolo ezali ekaniseli kaka moko ya lingomba oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbula na mbula. Esengeli kozala bongo mpamba te Yesu atindaki bayekoli na ye ete: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” Na Ekaniseli, tokanisaka liwa ya Yesu, oyo elongisaki bokonzi ya Yehova. Ndenge tomoni yango, na bolei yango oyo esangisaka bato ebele, limpa elimbolaka nzoto ya Klisto oyo apesaki mbeka mpe vinyo ezali makila na ye oyo esopamaki. Kasi, mwa bato moke kaka nde balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo. Mpo na nini bongo? Ekaniseli ezali nde na ntina mpo na bamilio ya bato oyo balyaka limpa te mpe bamɛlaka vinyo te? Bolei ya Mpokwa ya Nkolo esengeli kozala na ntina nini mpo na yo?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 18 Talá buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 2, lokasa 764, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa biyano nini?

• Mpo na nini Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo?

• Esengeli kosalaka Ekaniseli mbala boni?

• Limpa oyo batye levire te oyo esalelamaka na Ekaniseli ezali na ndimbola nini?

• Vinyo oyo esalelamaka na Ekaniseli emonisaka nini?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 15]

Yesu abandisaki Bolei ya Mpokwa ya Nkolo