Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Emisyo ya televizyo ememaki ye na kopesa Nzambe nkembo

Emisyo ya televizyo ememaki ye na kopesa Nzambe nkembo

Masolo ya Basakoli ya Bokonzi

Emisyo ya televizyo ememaki ye na kopesa Nzambe nkembo

NTOMA Paulo alobaki ete “bamosusu bazali kosakola Klisto mpo na likunya mpe bombanda, kasi bamosusu mpe mpo na motema boboto.” (Bafilipi 1:15) Ntango mosusu, ata bato oyo balukaki kobebisa lokumu ya basaleli ya Yehova, kozanga ete báyeba yango, babendaki bato ya mitema sembo na solo.

Na sanza ya Novɛmbɛ 1998, emisyo moko na televizyo ya France elakisaki Betele, elingi koloba bandako ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Louviers. Atako emisyo yango epesaki bato makanisi ndenge na ndenge mpo na Batatoli ya Yehova, ebotaki mbuma malamu na ndenge oyo moto akokaki kokanisa te.

Anna-Paula, oyo azalaki kofanda na ntaka ya kilomɛtrɛ 60 na Betele, azali moko ya bato oyo batalaki emisyo yango. Anna-Paula, mama ya bana mibale oyo akabwaná na mobali na ye, azalaki koluka mosala. Mokolo oyo elandaki na ntɔngɔ, abengaki na telefone mpo na kotuna soki akoki kozwa mosala na Betele. Alobaki boye: “Namonaki ete esengeli kozala esika ya malamu mpe mosala oyo basalaka kuna ezali na ntina mingi.” Akamwaki ntango ayokaki ete bato nyonso oyo basalaka na Betele bafutaka bango te! Nsima ya kotuna mwa mituna mpo na misala ya Batatoli ya Yehova, andimaki ete Batatoli bákende kotala ye.

Ntango Léna, mobongisi-nzela moko na lisangá ya esika oyo azalaki kofanda, akendaki kotala ye, basololaki mingi, mpe Anna-Paula azwaki buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. * Ntango Léna azongaki lisusu, Anna-Paulo asilisaki kotánga buku yango mobimba mpe atunaki ye ebele ya mituna. Andimaki mbala moko koyekola Biblia. Anna-Paula alobaki boye: “Ezalaki mpo na ngai libaku ya koyeba Liloba ya Nzambe. Liboso na yango, natikalá kosimba Biblia na mabɔkɔ te.”

Na sanza ya Yanuali, Anna-Paula akendaki kotala Betele, mpe pɔsɔ oyo elandaki akendaki na makita mpo na mbala ya liboso. Mwa moke na nsima, akómaki koteya bana na ye Biblia mpe kopesa baninga na ye litatoli. Alobi boye: “Nakokaki te kobomba mpo na ngai moko makambo oyo nazalaki koyekola. Nazalaki na mposa ya koyebisa bato solo ya Biblia mpe kobɔndisa bango.” Nsima ya kobunda etumba mpo na kosilisa mwa mikakatano oyo azalaki na yango, Anna-Paula akómaki koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Akolaki nokinoki na elimo mpe azwaki batisimo na mokolo ya 5 Mai 2002.

Lisusu, ndakisa malamu ya Anna-Paula mpe molende na ye na mosala ya kosakola etindaki mama na ye abanda koyekola Biblia; mpe mosika te azwaki batisimo. Anna-Paula alobi boye: “Maloba ezali te mpo na kolimbola esengo oyo nazali na yango. Natɔndaka Yehova mokolo na mokolo na ndenge oyo apesi ngai libaku ya koyeba mpe kosalela ye mpe mpo na mapamboli nyonso oyo apesi ngai.”

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 6 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Bililingi na lokasa 8]

Na likoló: Anna-Paula

Na nse: Porte ya lopango ya biro ya filiale ya France