Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na ndimbola nini Ezekiele akómaki “emimi” [to baba] ntango banguna bazingaki Yelusaleme mpe babebisaki yango?

Ezali mpenzampenza na ndimbola oyo ete azalaki na makambo mosusu te ya kobakisa na nsango ya Yehova oyo asakolaki.

Mosakoli Ezekiele abandaki mosala na ye ya mokɛngɛli ya sembo mpo na Bayisalaele oyo bazalaki baombo na Babilone na “mbula ya mitano ya boombo ya mokonzi Yoyakini,” elingi koloba, na mobu 613 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). (Ezekiele 1:​2, 3) Na mokolo ya zomi na sanza ya zomi ya mobu 609 L.T.B., elimo ya Nzambe eyebisaki ye ete bato ya Babilone bazingi Yelusaleme. (Ezekiele 24:​1, 2) Kozinga oyo banguna bazingaki Yelusaleme elingaki kosuka na nini? Yelusaleme ná bato na yango oyo bazalaki sembo te balingaki nde kobika? Lokola azalaki mokɛngɛli, Ezekiele así ayebisaki nsango eutaki na Yehova ete Yelusaleme ekobomama, mpe ezalaki lisusu na ntina te Ezekiele abakisa makambo mosusu, lokola nde asengelaki kondimisa bato ete nsango na ye ezalaki solo. Ezekiele akómaki emimi na likambo nyonso mosusu oyo etalelaki kozingama ya Yelusaleme.​—⁠Ezekiele 24:​25-27.

Soki sanza motoba nsima ya kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., moto moko oyo abikaki amemelaki Ezekiele nsango na Babilone ete engumba mosantu ebebisami. Na mpokwa liboso ya mokolo oyo moto yango akómaki, Yehova “afungolaki monɔkɔ [ya Ezekiele] . . . [azalaki] emimi lisusu te.” (Ezekiele 33:22) Ezekiele akómaki lisusu koloba.

Ezekiele azalaki mpenza koloba te na eleko yango? Emonani ete azalaki koloba mpamba te ata nsima ya kokóma emimi, asakolaki makambo mingi mpo na bikólo ya zingazinga oyo esepelaki lokola Yelusaleme ebebisamaki. (Ezekiele, mokapo 25-32) Na ebandeli ya mosala ya Ezekiele lokola mosakoli mpe mokɛngɛli, Yehova alobaki na ye ete: “Nakokangisa lolemo na yo epai na likoló na monɔkɔ na yo, ete ozala emimi, mpe okoka kopamela bango te; mpo ete bazali ndako ya batomboki. Nde wana ekolobela ngai yo, nakofungola monɔkɔ na yo.” (Ezekiele 3:​26, 27) Ntango Yehova azalaki na nsango te mpo na Yisalaele, Ezekiele asengelaki kozala emimi epai ya bato ya ekólo yango. Ezekiele asengelaki koloba makambo oyo Yehova alingaki ye aloba na ntango oyo Yehova akolinga. Kozala emimi mpo na Ezekiele elimbolaki ete akokaki kosakola likambo moko te mpo na Bayisalaele.

Mokɛngɛli ya mikolo na biso, elingi koloba baklisto bapakolami, azali koyebisa kobomama ya mangomba ya boklisto, oyo ezali elilingi ya Yelusaleme ya kala. Ntango “bolɔzi monene” ekobanda mpe “Babilone Monene,” lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba ekobomama, Ezekiele ya lelo, elingi koloba bapakolami, bakoloba lisusu eloko moko te mpo na nsuka ya mangomba ya boklisto, oyo ezali eteni monene ya lisangá yango.​—⁠Matai 24:21; Emoniseli 17:​1, 2, 5.

Mokolo mosusu, batikali bapakolami ná baninga na bango bakokóma bimimi, bakozala lisusu na likambo te ya koyebisa mangomba ya boklisto. Ekozala na ntango oyo “maseke zomi” mpe “nyama mabe” bakopanza Babilone monene mpe bakotika ye bolumbu. (Emoniseli 17:16) Kasi, yango elingi koloba te ete baklisto bakokóma mpenza bimimi. Se ndenge bazali kosala sikoyo, bakosanzola Yehova mpe bakokumisa ye mokolo na mokolo mpe “libota na libota.”​—⁠Nzembo 45:17; 145:⁠2.