Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Nakozongisa nini epai ya Yehova?”

“Nakozongisa nini epai ya Yehova?”

Lisolo ya bomoi

“Nakozongisa nini epai ya Yehova?”

YA MARIA KERASINIS

Ntango nazalaki na mbula 18, nakómaki mwana oyo azalaki koyokisa baboti nsɔni, libota mobimba bayinaki ngai, mpe mboka mobimba bazalaki kosɛka ngai. Basalaki nyonso: kobondela, kopekisa na makasi, mpe kokanela ngai mpo natika kosalela Nzambe, kasi balongaki te. Nazalaki na kondima ete Nzambe akopambola ngai soki nakangami na solo ya Biblia. Soki nakanisi mbula 50 oyo eleki banda nabandá kosalela Yehova, nakoki se koloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”​—Nzembo 116:12.

NABOTAMAKI na 1930, na Aggelokastro, mwa mboka moko oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 20 banda na libongo ya masuwa ya Cenchrées, na ɛsti ya Isthme de Corinthe, epai lisangá moko ya baklisto ya solo ezalaki na ekeke ya liboso.​—Misala 18:18; Baloma 16:1.

Tozalaki na bomoi ya kimya na libota na biso. Tata azalaki mokonzi ya mboka mpe bazalaki kopesa ye limemya mingi. Nazalaki mwana ya misato na libota ya bana mitano. Baboti na biso babɔkɔlaki biso lokola bandimi ya molende ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse. Nazalaki kokɔta misa mokolo nyonso ya lomingo. Nazalaki kotubela masumu liboso ya bililingi ya basantu, kopelisa babuji na ndako-nzambe, mpe kokila bilei na mikolo oyo esɛngami. Mbala mingi, nazalaki kokanisa kokóma mamelo. Na nsima, nakómaki moto ya liboso oyo asalaki likambo oyo baboti na ngai basepelaki na yango ata moke te.

Nasepeli na solo ya Biblia

Ntango nakómaki na mbula 18, nayokaki ete Katina, ndeko ya sɛmɛki na ngai moko, oyo azalaki kofanda na mboka moko pembeni ya mboka na biso, azalaki kotánga mikanda ya Batatoli ya Yehova, mpe atikaki kokende na ndako-nzambe. Likambo yango etungisaki ngai mingi, mpe nazwaki mokano ya kosalisa ye azonga na oyo nazalaki kokanisa ete ezali nzela ya malamu. Yango wana, ntango ayaki kotala biso, nabengaki ye mpo tókende kotambola moke, mpe nazalaki na mokano ya komema ye na ndako ya sango. Sango abandaki lisolo na kotyola Batatoli ya Yehova, azalaki kobenga bango bapɛngwi oyo babungisi Katina nzela. Lisolo yango elandanaki butu misato mobimba. Katina akweisaki maloba nyonso ya sango na makanisi ya Biblia oyo abongisaki malamu. Nsukansuka, sango alobaki na ye ete lokola azali elenge mwasi kitoko mpe azali mayele, asengeli kobuka ndika ntango azali naino na mino, bongo ntango akokóma mokóló amipesa na makambo ya Nzambe.

Nayebisaki baboti na ngai likambo moko te na masolo oyo tosololaki, kasi mokolo ya lomingo oyo elandaki, nakendaki ndako-nzambe te. Na midi, sango ayaki mbala moko na butiki na biso. Nayebisaki ye ete natikalaki na butiki mpo na kosalisa Tata.

Sango atunaki ngai ete: “Yango mpenza ntina oyo oyaki te, to ezali mwana mwasi wana nde abebisi yo makanisi?”

Nalobaki na ye polele ete: “Mateya ya bato yango ezali malamu koleka oyo ya biso.”

Sango abalukaki epai ya tata mpe alobaki na ye: “Mbuta-muntu Economos, benganá bokilo na yo wana noki; apelisi mɔtɔ na ndako na yo.”

Bandeko na ngai babandi kotɛmɛla ngai

Makambo yango elekaki na nsuka ya bambula ya 1940 ntango etumba ezalaki makasi na ekólo Grèce. Lokola Tata azalaki kobanga noki barebɛlɛ bákanga ngai na makasi, atindaki ngai epai ya yaya na ngai ya mwasi na mboka oyo Katina azalaki kofanda. Na boumeli ya sanza mibale oyo nalekisaki kuna, basalisaki ngai na koyeba mateya mingi ya Biblia. Nayokaki mabe mpenza ntango mamonaki ete mateya mingi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse euti na Biblia te. Nayebaki ete Nzambe andimaka te bato básalela bililingi mpo na kosambela ye, ete mimesano mingi ya lingomba, na ndakisa kosambela ekulusu, euti na boklisto te, mpe ete mpo na kosepelisa Nzambe, moto asengeli kosambela ye “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23; Exode 20:​4, 5) Longola nyonso wana, nayebaki ete Biblia ezali kopesa elikya kitoko ya bomoi ya seko awa na mabelé! Mateya kitoko wana ya solo oyo euti na Biblia ezalaki mapamboli ya liboso oyo Yehova apesaki ngai.

Na ntango yango, yaya na ngai ná mobali na ye bamonaki ete nazalaki lisusu kosala elembo ya ekulusu te na ntango ya kolya, mpe nazalaki lisusu kobondela liboso ya bililingi te. Mokolo moko na butu, bango mibale babɛtaki ngai. Mokolo oyo elandaki, nalongwaki na ndako na bango, mpe nakendaki kofanda epai ya mama-leki na ngai. Mobali ya yaya ayebisaki tata likambo yango. Mwa moke na nsima, Tata ayaki na kolela mpo na kosɛnga ngai nabongola makanisi. Sɛmɛki na ngai afukamaki liboso na ngai, asɛngaki ngai bolimbisi, mpe nalimbisaki ye. Nsukansuka, balobaki na ngai nazonga na lingomba, kasi naboyaki.

Ntango nazongaki na mboka na biso, batikaki ngai nyɛɛ te. Nazalaki lisusu na likoki ya kosolola na Katina te, nazalaki mpe na mikanda ya kotánga te, nazalaki mpe ata na Biblia te. Nasepelaki mingi ntango ndeko na ngai moko, mwana ya tata-kulutu, asalisaki ngai. Ntango akendaki na Corinthe, akutanaki na Motatoli moko mpe ayelaki ngai buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” mpe Makomami ya Grɛki ya boklisto, mpe nabandaki kotánga yango na kobombana.

Bomoi na ngai ebongwani na ndenge oyo nakanisaki te

Mbula misato mobimba bazalaki kaka kotɛmɛla ngai makasi. Nazalaki kokutana na Batatoli te, nazalaki mpe kozwa mikanda te. Kasi, nayebaki te ete bomoi na ngai elingi kobongwana mpenza.

Tata ayebisaki ngai ete nakokende kofanda epai ya noko na ngai na Thessalonique. Liboso nakende na Thessalonique, nakendaki kotongisa elamba epai ya mwasi moko na Corinthe. Likambo ya kokamwa, nakendaki kokuta Katina azali kosala kuna! Tozalaki mpenza na esengo ya kokutana nsima ya bambula ebele. Ntango ngai ná Katina tobimaki na esika yango, tokutanaki na elenge mobali moko kitoko oyo autaki mosala mpe azalaki kozonga ndako na velo. Nkombo na ye ezalaki Charalambos. Nsima ya koyebana na ye, toyokanaki ete tokobalana. Ezalaki mpe na ntango wana, mokolo ya 9 Yanuali 1952, nde nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova.

Charalambos azwaká batisimo liboso. Baboti na ye mpe bapekisaki ye makasi kolanda nzela ya solo. Charalambos azalaki mpenza na molende. Azalaki mosungi ya mosaleli ya lisangá mpe azalaki koyekola Biblia na bato mingi. Mwa moke na nsima, bayaya na ye ya mibali bayambaki solo, mpe lelo oyo bandeko na ye mingi mpe bazali basaleli ya Yehova.

Tata na ngai asepelaki mpenza na Charalambos, yango wana andimaki tóbalana, kasi ezalaki mwa matata mpo mama andima. Atako bongo, tobalanaki mokolo ya 29 Marsi 1952. Kaka yaya na ngai ya liboso ná ndeko mosusu ya libota nde bayaki na libala na biso. Na ntango wana nayebaki te ete Charalambos akozala lipamboli monene to likabo mpenza ya Yehova mpo na ngai! Kozala mwasi na ye esalisaki ngai natya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ngai.

Mosala ya kolendisa bandeko

Na 1953, ngai ná Charalambos tozwaki mokano ya kokende kofanda na Athènes. Lokola Charalambos azalaki na mposa ya komipesa mingi na mosala ya kosakola, atikaki mosala oyo azalaki kosala ná bandeko na ye mpe alukaki mosala ya ndambo ya mokolo. Mokolo na mokolo nsima ya midi, tozalaki kobima na mosala ya kosakola mpe tozalaki koyekola Biblia na ebele ya bato.

Lokola mosala na biso epekisamaki, tosengelaki koluka mayele ndenge na ndenge mpo na kosakola. Na ndakisa, totyaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko na esika oyo mobali na ngai azalaki kosala ndambo ya mokolo mosala ya kotɛkisa mikanda na vile ya Athènes. Mokonzi moko ya bapolisi ayebisaki biso ete zulunalo wana epekisami. Kasi, atunaki soki akoki kozwa zulunalo moko mpe akende kotuna na biro ya basirete soki mpenza epekisami. Ntango bayebisaki ye ete zulunalo yango epekisami te, ayaki koyebisa biso. Ntango kaka bandeko mosusu oyo bazalaki kotɛkisa mikanda bayokaki bongo, bango mpe babandaki kotya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na bisika na bango. Mobali moko azwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na esika na biso, akómaki Motatoli, mpe lelo oyo azali nkulutu.

Tozalaki na esengo ya komona ete leki na ngai ya mobali ayekolaki solo. Ayaki na Athènes mpo na kotánga na eteyelo ya bakapitɛnɛ ya masuwa, mpe tomemaki ye na liyangani moko ya etúká. Tozalaki kosala mayangani na kobombama na kati ya zamba. Asepelaki na makambo oyo ayokaki, kasi mwa moke na nsima akómaki kosala mibembo. Na mobembo moko, batɛlɛmaki na libongo moko na Argentine. Kuna, misionɛrɛ moko akɔtaki na masuwa na bango mpo na kosakola, mpe leki na ngai asɛngaki ye bazulunalo. Tosepelaki mingi ntango tozwaki mokanda na ye oyo elobaki ete: “Namoni solo. Bósalela ngai abonema.” Lelo oyo, ye na libota na ye bazali kosalela Yehova na bosembo.

Na 1958 mobali na ngai azwaki mokumba ya mokɛngɛli-motamboli. Lokola mosala ya kosakola epekisamaki mpe bomoi ezalaki mpasi, mbala mingi bakɛngɛli-batamboli bazalaki komema basi na bango te ntango bazalaki kotala masangá. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1959, totunaki bandeko na biro ya filiale soki nakokaki kokende na ye. Bandimaki. Tozalaki kotala mpe kolendisa masangá ya bandeko na ntei mpe na nɔrdi ya Grèce.

Ezalaki mibembo ya mpasi. Banzela ya malamu ezalaki mingi te. Lokola tozalaki na motuka te, mbala mingi tozalaki kozwa babisi to bakimalumalu oyo ezalaki kokumba bansoso mpe biloko mosusu. Tozalaki kolata basapato ya mbula mpo na kotambola na banzela ya pɔtɔpɔtɔ. Lokola mboka na mboka ezalaki na basivile oyo bazalaki kobunda, tozalaki kokɔta na bamboka na butu mpo bákanga biso te mpe bátuna biso ebele ya mituna te.

Bandeko bazalaki kosepela mingi ndenge tozalaki kokende kotala bango. Atako mingi kati na bango bazalaki kosala misala makasi na bilanga, bazalaki kosala nyonso mpo na kozala na makita oyo tozalaki kosala na butu na bandako ndenge na ndenge. Bandeko bazalaki mpe koyamba biso malamu mpe bazalaki kopesa biso oyo bakokaki, atako bazalaki na biloko mingi te. Ntango mosusu tozalaki kolala shambre moko na libota mobimba oyo bayambi biso. Kondima, mpiko, mpe molende ya bandeko ezalaki mpe lipamboli mosusu mpo na biso.

Tomipesi lisusu mingi na mosala

Na sanza ya Febwali 1961, ntango tokendaki kotala biro ya filiale na Athènes, batunaki biso soki tokosepela kosala na Betele. Toyanolaki na maloba ya Yisaya ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Sanza mibale na nsima, batindelaki biso mokanda ete tókende nokinoki na Betele. Mokolo ya 27 Mai 1961, tobandaki mosala na Betele.

Tosepelaki mingi na mosala na biso ya sika, mpe toumelaki te komesana na bomoi ya Betele. Mobali na ngai azalaki kosala na Departema ya Mosala ya kosakola mpe na Departema ya Abonema, mpe na nsima asalaki na boumeli ya mwa ntango na komite ya filiale. Ngai nazalaki kosala misala ndenge na ndenge ya ndako. Na ntango wana tozalaki bandeko 18 na Betele, kasi na boumeli ya mbula soki mitano, tozalaki bato 40 mpamba te eteyelo mpo na bankulutu ezalaki kosalema na Betele. Na ntɔngɔ, nazalaki kosukola basaani, kopesa mabɔkɔ na ndeko oyo azalaki kolamba, kobongisa mbeto 12, mpe kotanda mesa mpo na kolya na midi. Na nsima ya midi, nazalaki kongoma bilamba mpe kosukola batwaleti ná bashambre. Mokolo moko na pɔsɔ nazalaki mpe kosala na esika basukolaka bilamba. Mosala ezalaki mingi, kasi nazalaki na esengo ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango.

Tomipesaki mpenza na mosala na biso na Betele mpe na mosala ya kosakola. Mbala mingi tozalaki koyekola Biblia na bato ata nsambo na sanza. Na bawikende, nazalaki kokende na Charalambos ntango azalaki kokende kosala masukulu na masangá ndenge na ndenge. Ngai ná ye tozalaki patalo ná mokaba.

Toyekolaki Biblia na mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki bandimi ya molende na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpe bazalaki baninga ya sango moko oyo azalaki mokambi ya ebongiseli oyo ezalaki kolandela bapɛngwi. Na ndako na bango bazalaki na shambre mobimba etondá na bililingi, epai bazalaki ntango nyonso kotumba mpaka ya malasi mpe banzembo ya Lingomba ezalaki kobɛta mokolo mobimba. Na boumeli ya mwa ntango, tozalaki kokende koyekola na bango Biblia mokolo ya minei, mpe sango oyo azalaki moninga na bango azalaki kokende kotala bango mokolo ya mitano. Mokolo moko, babengisaki biso epai na bango, balobaki ete tózanga te mpo bazalaki na likambo moko ya ntina ya koyebisa biso. Eloko ya liboso balakisaki biso ezali shambre wana. Balongolaki bililingi nyonso mpe babongisaki shambre yango. Mobali yango ná mwasi na ye bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo. Na mobimba, tozalaki na esengo ya komona bato soki 50 oyo toyekolaki na bango Biblia oyo bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo.

Nazwaki lipamboli ya kokutana na bandeko oyo bazali bapakolami. Tozalaki kolendisama mingi ntango bandeko lokola Knorr, Franz mpe Henschel, oyo bazalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bazalaki koya kotala biso. Nsima ya mbula koleka 40, namonaka kaka ete kosala na Betele ezali lokumu mpe ezali mpenza libaku malamu.

Mikakatano ya nzoto mpe mpasi ya kobungisa mobali

Na 1982, mobali na ngai akómaki kobɛla maladi ya Alzheimer. Na 1990, maladi ekómaki makasi mpe na nsima ekómaki kosɛnga moto azalaka ntango nyonso pembeni na ye. Bambula mwambe ya nsuka tii liwa na ye, tozalaki ata kobima lisusu na Betele te. Bandeko mingi ya bolingo na Betele, ata mpe bakɛngɛli, bazalaki kosala nyonso mpo na kosunga biso. Kasi, atako bazalaki kosalisa biso mingi na boboto mpenza, nasengelaki kolekisaka bangonga ebele, butu na moi mpo na kobatela ye. Ntango mosusu, ezalaki mpasi mingi mpo na ngai, mpe mikolo mingi nazalaki kolala te butu mobimba.

Na sanza ya Yuli 1998, mobali na ngai ya bolingo akufaki. Atako kozanga ye esalaka ngai mpasi mingi, nabɔndisamaka na koyeba ete Yehova akobosana ye te; mpe nayebi ete akokanisa ye elongo na bamilio ya bato mosusu na lisekwa.​—Yoane 5:​28, 29.

Nazali na botɔndi mpo na mapamboli ya Yehova

Atako mobali na ngai akufá, natikalá ngai moko te. Nazali kaka na libaku malamu ya kosala na Betele, mpe bandeko ya libota ya Betele balingaka mpe basungaka ngai. Libota na ngai ezali mpe bandeko ya elimo na Grèce mobimba. Atako nazali sikoyo na mbula koleka 70, nazali naino na makasi ya kosala mokolo mobimba na kuku mpe na ndako ya kolya.

Na 1999, nakokisaki mposa oyo nazalaki na yango bomoi na ngai mobimba ntango nakendaki kotala biro monene ya Batatoli ya Yehova na New York. Maloba ezali te mpo na kolobela esengo oyo nayokaki. Likambo yango elendisaki ngai mingi mpe nakobosana yango ata mokolo moko te.

Soki nakanisi ndenge oyo nalekisaki bomoi na ngai, nandimaka mpenza ete nakokaki te kozala na bomoi mosusu ya malamu koleka oyo. Kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso ezali mosala eleki malamu. Nakoki koloba na kondima nyonso ete nazangaki eloko moko te. Na bolingo nyonso, Yehova abatelaki ngai ná mobali na ngai na elimo mpe na mosuni. Namoni na bomoi na ngai moko ntina oyo mokomi ya nzembo atunaki ete: “Nakozongisa nini epai ya [Yehova] na ntina na mapamboli na ye epai na ngai?”​—Nzembo 116:12.

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai ná Charalambos tozalaki patalo na mokaba

[Elilingi na lokasa 27]

Mobali na ngai na biro na ye na Betele

[Elilingi na lokasa 28]

Namonaka ete kosala na Betele ezali lokumu monene