Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ntina oyo bakendaka ndako-nzambe

Ntina oyo bakendaka ndako-nzambe

Ntina oyo bakendaka ndako-nzambe

“LELO oyo, bandimi ya Lingomba ya Presbytérien na Corée du Sud bazali mingi mbala minei koleka baoyo ya États-Unis.” Ekoki mpenza kozala ete maloba yango oyo bakomaki na zulunalo moko (Newsweek) ekamwisaki bato mingi, mpamba te mingi bakanisaka ete bato mingi ya Corée basambelaka na Lingomba ya Confucius to na Lingomba ya Bouddha. Lelo oyo, moto oyo akei na ekólo yango, akokuta ebele ya bandako-nzambe ya “boklisto” oyo, mbala mingi eyebanaka na bikulusu oyo ezalaka na miinda ya motane. Na mokolo ya lomingo, okomona bato mibalemibale to misatomisato, Biblia na mabɔkɔ, bazali kokende ndako-nzambe. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 1998 emonisaki ete pene na bato 30 likoló ya monkama na Corée basambelaka na Lingomba ya Katolike to na Lingomba ya Protesta, koleka motángo ya bato oyo balobaka ete basambelaka na Lingomba ya Bouddha.

Na bikólo mingi lelo oyo, ezali mwa mpasi komona ebele ya bato ndenge wana bazali kokende ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ. Kasi, likambo yango ezali komonana kaka na Corée te, ata mpe na bikólo mosusu ya Azia, ya Afrika mpe ya Amérique latine ezali mpe ndenge wana. Mpo na nini ebele ya bato bazali naino kondimela Nzambe na ntango oyo bipai nyonso bato balingi lisusu kosambela te? Mpo na nini bakendaka ndako-nzambe?

Ankɛtɛ moko esalemaki na Corée emonisaki ete, soki bato oyo bakendaka Ndako-Nzambe na Corée bazali 100, 50 kati na bango bakendaka koluka kimya ya makanisi, pene na 30 mpo na kozwa bomoi ya seko nsima ya liwa, mpe 10 bakendaka koluka bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, bozwi mpe lokumu.

Na Chine, ebele ya bato bakendaka ndako-nzambe na elikya ya kosilisa nzala na bango ya elimo oyo bakómi na yango banda makambo ya bakapitaliste ekómi mokemoke kozwa esika ya makambo ya bakoministe. Na Chine, mbula na mbula, ebele ya Babiblia ezali konyatama mpe kokabolama, mpe emonani ete bato bazali kotánga yango mingi ndenge bazalaki kotánga mwa buku motane ya Mao.

Na Brésil, bandimi mosusu ya Lingomba ya Katolike, mingimingi bilenge, balingi te elaka mpamba ya bomoi ya esengo na mikolo ekoya, kasi balingi kozala na bomoi yango sikoyo. Zulunalo moko (Tudo) elobi ete: “Na bambula ya 1970 bato bazalaki kosepela na mateya oyo ezalaki kolobela kolongwa na boombo ya bakonzi, kasi lelo oyo bakómi kosepela nde na mateya oyo ezali kopesa bango elikya ya kokóma na bozwi mingi.” Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Angleterre, batunaki bato oyo basambelaka báyebisa likambo oyo basepelaka na yango na lingomba na bango. Mingi balobaki ete basepelaka kozala elongo na baninga na bango bandimi.

Nyonso wana ezali komonisa ete atako ebele ya bato bazali naino kondimela Nzambe, mingi bazali nde kokanisa matomba oyo bakoki kozwa sikoyo, kasi te oyo ekoya, bazali mpe kokanisa libosoliboso Nzambe te. Mpo na yo, wapi ntina mpenza oyo tosengeli kondimela Nzambe? Biblia elobi nini mpo na likambo yango? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.