Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Sepelá mpenza na Yehova”

“Sepelá mpenza na Yehova”

“Sepelá mpenza na Yehova”

“Sepelá mpenza na Yehova, mpe ye akopesa yo makambo oyo motema na yo ezali kosɛnga.”​—NZEMBO 37:​4, NW.

1, 2. Nani apesaka esengo ya solosolo, mpe ndenge nini Mokonzi Davidi abendi likebi na likambo yango?

 “ESENGO na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo, . . . esengo na bato ya motema mawa, . . . esengo na bato batyaka kimya.” Makambo oyo, bakisa mpe makambo mosusu motoba oyo bato ya esengo bazalaka na yango, ezali na maloba ya kobenda likebi oyo Yesu abandaki na yango Lisolo Likoló ya Ngomba, oyo ezali na Evanzile ya Matai. (Matai 5:​3-11) Maloba ya Yesu ezali komonisa ete tokoki mpenza kozala na esengo.

2 Nzembo moko ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, ezali komonisa ete Yehova nde apesaka esengo ya solosolo. Davidi alobaki boye: “Sepelá mpenza na Yehova, mpe ye akopesa yo makambo oyo motema na yo ezali kosɛnga.” (Nzembo 37:​4NW ) Kasi ndenge nini moto akoki ‘kosepela’ na koyeba Yehova mpe bizaleli na ye? Ndenge nini koyekola makambo oyo asalá mpe oyo akosala mpo na kokokisa mokano na ye ekoki kopesa yo likoki ya kozwa “makambo oyo motema na yo ezali kosɛnga”? Tokozwa biyano na mituna yango soki toyekoli na bozindo Nzembo 37, vɛrsɛ 1 tii 11.

‘Koyoka zuwa te’

3, 4. Toli nini Davidi apesi na Nzembo 37:​1, mpe mpo na nini ebongi mpenza tólanda yango lelo oyo?

3 Tozali na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza,” mpe mabe ekómi mingi. Maloba ya Paulo ezali kokokisama na miso na biso: “Bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:​1, 13) Ezali mpasi te tóbendama na oyo ezali komonana lokola bomoi malamu oyo bato mabe bazali na yango! Makambo nyonso wana ekoki kokosa biso mpe kolongola likebi na biso na makambo ya elimo. Yoká ndenge maloba ya liboso ya Nzembo 37 ezali kokebisa biso na likama yango: “Omitungisa te mpo na bato ya masumu; yokelá basali na mabe zuwa te.”

4 Mokolo na mokolo tozali koyoka bansango ya mabe na radio, na televizyo mpe na bazulunalo. Bakomelesa oyo bazali sembo te bazali kosalela banzela ya nyamunyamu. Bato mabe bazali kolyela bato mpamba. Baoyo bazali koboma bato bazali kozwa etumbu te. Makambo nyonso wana ya kozanga bosembo ekoki kopesa nkanda mpe kolongola biso kimya ya motema. Kutu, bomɛngo ya bato mabe ekoki ata kotinda biso tóyokela bango zuwa. Kasi, ata soki toyoki nkanda, yango ekobongisa makambo? Kolula bomoi malamu ya bato mabe ebongolaka makambo? Ata moke te! Ezali mpe na ntina moko te ‘tómitungisa.’ Mpo na nini?

5. Mpo na nini bakokanisi bato mabe na matiti?

5 Mokomi ya nzembo apesi eyano oyo: “Mpo ete bakolimwa mbango lokola matiti; bakokauka lokola matiti mobesu.” (Nzembo 37:2) Matiti mobesu ekoki komonana kitoko, kasi eumelaka te kokauka mpe kokufa. Ezali mpe bongo mpo na bato mabe. Bomɛngo na bango ekoumela libela te. Soki bakufi, bozwi oyo bandukaki na banzela ya mabe ekosalisa bango lisusu te. Nsukansuka, moto na moto akozwa lifuta ya sembo mpo na misala na ye. Paulo akomaki ete: “Lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baloma 6:23) Bato mabe mpe bato nyonso oyo bazangi bosembo bakosuka na kozwa “lifuta” na bango. Bomoi wana ezali ata na litomba moko te!​—Nzembo 37:​35, 36; 49:​16, 17.

6. Liteya nini tokoki kozwa na Nzembo 37:​1, 2?

6 Na yango, tosengeli nde kotika ete bomɛngo ya ntango mokuse oyo bato mabe bazali na yango etungisa biso? Na ntembe te, liteya tokoki kozwa na vɛrsɛ ya liboso mpe ya mibale ya Nzembo 37 ezali oyo: Tótika te ete bomɛngo na bango emema biso na kotika nzela oyo toponi ya kosalela Yehova. Tótyaka makanisi na biso nde na mapamboli mpe mikano ya elimo.​—Masese 23:17.

“Zalá na elikya epai ya Yehova mpe salá malamu”

7. Mpo na nini tosengeli kotyela Yehova motema?

7 Mokomi ya nzembo alendisi biso na maloba oyo: “Zalá na elikya epai ya [Yehova] mpe salá malamu.” (Nzembo 37:3a) Ntango tozali kotungisama to mpe kokakatana, tosengeli mpenza kotyaka elikya makasi epai ya Yehova. Ye nde apesaka kimya ya solosolo ya elimo. Moize akomaki ete: “Oyo akofandaka kati na esika ya kobombama ya Oyo-Aleki-Likoló, akopema na nse ya elilingi ya Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Nzembo 91:1) Ntango totungisami na komona ete ezaleli ya kobuka mibeko ezali kobakisama na mokili oyo, tosengeli kotyela Yehova motema lisusu koleka. Ntango tozali koyoka mpasi na lokolo, tosepelaka soki moninga moko apesi biso lobɔkɔ. Ndenge moko mpe, ntango tozali kosala makasi mpo na kotambola na bosembo, esengeli ete Yehova asimba biso.​—Yisaya 50:10.

8. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka biso tómitungisa mingi te na komona bomoi malamu ya bato mabe?

8 Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso mpo tómitungisa te mpo na bomɛngo ya bato mabe ezali komipesa na koluka bampate mpe kosalisa bango báyeba mpenza mikano ya Yehova. Lokola mabe ezali se kokola, tosengeli komipesa na kosalisa basusu. Ntoma Paulo alobaki ete: “Bóbosana te kosala malamu mpe kokabela bamosusu biloko, mpo Nzambe asepelaka mpenza na bambeka ya ndenge wana.” “Malamu” eleki nyonso oyo tokoki kosalela bato ezali koyebisa bango nsango malamu ya nkembo ya Bokonzi ya Nzambe. Mosala ya kosakola ezali mpenza “mbeka ya masanzoli.”​—Baebele 13:​15, 16; Bagalatia 6:10.

9. Limbolá toli ya Davidi oyo elobi ete “fandá na mokili.”

9 Davidi alobaki lisusu ete: “Fandá na mokili mpe salá makambo na bosembo.” (Nzembo 37:3b, NW) Na ntango wana, “mokili” oyo Davidi alobelaki ezalaki mokili oyo Yehova apesaki Yisalaele, to Mokili ya Ndaka. Ntango Salomo azalaki koyangela, mokili yango ebandaki na Dani na nɔrdi tii na Bele-seba na sudi. Wana nde ezalaki mboka ya Yisalaele. (1 Mikonzi 4:25) Lelo oyo, ezala esika nini tozali awa na mabelé, tozelaka ntango oyo mabelé mobimba ekokóma paladiso na mokili ya sika ya boyengebene. Liboso na yango, tozali kofanda na kimya ya elimo.​—Yisaya 65:​13, 14.

10. Tokozwa matomba nini soki tozali ‘kosala makambo na bosembo’?

10 Tokozwa litomba nini soki tozali ‘kosala makambo na bosembo’? Lisese moko ya Biblia elobi na biso ete: “Moto ya sembo [akotonda] na mapamboli.” (Masese 28:20) Soki totiki te kosakola nsango malamu na esika nyonso oyo tofandi mpe epai ya moto nyonso, Yehova akopambola biso. Na ndakisa, eleki sikoyo mbula 40, Frank ná mwasi na ye Rose babandaki mosala ya mobongisi-nzela na engumba moko na nɔrdi ya Écosse. Bato moke oyo bazalaki kosepela na solo liboso bango bákóma kuna babendaki nzoto. Babongisi-nzela yango balɛmbaki te, bamipesaki na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Lelo oyo, lisangá moko monene ezali na engumba yango. Yehova apambolaki mobali yango ná mwasi na ye mpo batikalaki sembo. Na komikitisa mpenza, Frank alobi boye: “Lipamboli eleki monene ezali ete tozali tii lelo oyo na solo mpe Yehova akoki kosalela biso.” Ya solo, soki tozali ‘kosala makambo na bosembo,’ tokozwa ebele ya mapamboli.

“Sepelá na Yehova”

11, 12. (a) Ndenge nini tokoki ‘kosepela na Yehova’? (b) Mokano nini okoki kozwa na oyo etali boyekoli na yo moko, mpe yango ekoki kobimisa matomba nini?

11 Mpo boyokani na biso na Yehova ekóma makasi mpe tótika te kotyela ye elikya, tosengeli “kosepela na Yehova.” (Nzembo 37:4a) Ndenge nini tokosala yango? Na esika tómitungisaka mpo na bomoi na biso, ata soki ezali na mikakatano, totyaka makanisi na biso nyonso epai ya Yehova. Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kozwa ntango ya kotánga Liloba na ye. (Nzembo 1:​1, 2) Osepelaka ntango otángaka Biblia? Ekozala bongo soki ozali kotánga na mokano ya koyeba makambo mingi na ntina na Yehova. Nsima ya kotánga eteni moko boye, ezali malamu otɛlɛma mwa moke mpe omituna ete, ‘Bavɛrsɛ yango eteyi ngai nini mpo na Yehova?’ Ekoki mpe kozala malamu ozala na mwa karne to papye pembeni ntango ozali kotánga Biblia. Mbala nyonso oyo otɛlɛmi mwa moke mpo na koluka ndimbola ya makambo oyo otángi, komá fraze moko oyo ezali kotinda yo okanisa lisusu ezaleli malamu moko ya Yehova. Na nzembo mosusu, Davidi ayembaki ete: “Tiká ete maloba ya monɔkɔ na ngai mpe makanisi ya motema na ngai mandimana liboso na yo, Ɛ [Yehova], nguya na ngai mpe mosikoli na ngai.” (Nzembo 19:14) Kotánga Liloba ya Nzambe na likebi ndenge wana ‘esepelisaka’ Yehova mpe epesaka biso moko esengo.

12 Ndenge nini tokoki kozwa esengo na koyekola mpe komanyola? Tokoki kozwa mokano ya koyeba makambo mingi lisusu na ntina na Yehova mpe banzela na ye. Mikanda lokola Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mpe Approchez-vous de Jéhovah * ezali na makambo mingi oyo tokoki kokanisa likoló na yango na botɔndi nyonso. Davidi alobi na moto ya sembo ete Yehova “akopesa yo makambo nyonso oyo motema na yo ezali kosɛnga.” (Nzembo 37:4b, NW) Ekoki kozala ete kondima ya ndenge wana nde etindaki ntoma Yoane akoma maloba oyo: “Kondimisama tozali na yango na ntina etali ye, yango oyo, ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso. Lisusu, soki toyebi ete akoyoka biso na oyo etali eloko nyonso tozali kosɛnga, toyebi ete tokozwa biloko yango oyo esɛngami mpamba te tosɛngi ye yango.”​—1 Yoane 5:​14, 15.

13. Na bambula euti koleka, bokoli nini emonanaki na mosala ya kosakola Bokonzi na bikólo mingi?

13 Mposa ya libosoliboso ya biso baoyo tozali kobatela bosembo ezali ete bokonzi ya Yehova elongisama. (Masese 27:11) Mitema na biso etondaka mpenza na esengo ntango tozali koyoka mosala monene ya kosakola oyo bandeko na biso bazali kosala na mikili oyo ezalaki liboso na bakonzi ya mabe! Tozali kozela komona soki tokozwa bonsomi nini lisusu liboso nsuka eya. Basaleli mingi ya Yehova na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika bazali komipesa na kosakola epai ya bana-kelasi, bato bakimá mboka, mpe bato mosusu oyo bazali kokende kofanda kuna mpe bazali kozwa bonsomi ya losambo. Elikya na biso mpenza ezali ete ntango bato yango bakozonga na bamboka na bango, bákoba kongɛngisa pole ya solo ata na bisika ya molili oyo ezali komonana lokola nde ekoki kongɛngisama te.​—Matai 5:​14-16.

“Tyá banzela na yo liboso ya Yehova”

14. Makambo nini ezali kondimisa biso ete tokoki kotyela Yehova motema?

14 Koyeba ete makambo oyo ezali kotungisa biso mpe oyo tozali komona lokola kilo makasi ekoki kolongolama ezali mpenza kokitisa biso motema! Na ndenge nini? Davidi alobaki ete: “Tyá banzela na yo liboso ya Yehova, mpe tyelá ye motema mpe ye akosala.” (Nzembo 37:​5NW) Tozali komona makambo mingi na masangá na biso oyo ezali kondimisa ete tokoki kotyela Yehova motema. (Nzembo 55:22) Bandeko oyo bazali babongisi-nzela, bakɛngɛli-batamboli, bamisionɛrɛ, to baoyo basalaka na Betele, bakoki kotatola ete tokoki mpenza kotyela libateli ya Yehova motema. Tolendisi yo osolola na bandeko wana oyo oyebani na bango báyebisa yo ndenge Yehova asalisaki bango. Na ntembe te okoyoka masolo mingi oyo ezali komonisa ete ata na ntango ya mpasi, Yehova asalisaka. Apesaka ntango nyonso oyo tosengeli na yango mpenza.​—Nzembo 37:25; Matai 6:​25-34.

15. Na ndenge nini boyengebene ya basaleli ya Nzambe engɛngaka?

15 Soki totyeli Yehova motema mobimba, maloba oyo mokomi ya nzembo akomaki na nsima ekokisama: “Akobimisa boyengebene na yo lokola pole, mpe bosembo na yo lokola midi.” (Nzembo 37:​6NW) Mbala mingi, toyokaka bato balobaka mabe mpo na biso Batatoli ya Yehova. Kasi, Yehova afungolaka miso ya bato ya mitema sembo mpo bámona ete tozali kosakola mpo tolingaka Yehova mpe bazalani na biso. Lisusu, atako bato mingi balobaka mabe mpo na biso, bizaleli na biso ya malamu emonanaka polele. Yehova asungaka biso, ezala tokutani na botɛmɛli to na monyoko ya ndenge nini. Mpe na ndenge yango, boyengebene ya basaleli ya Nzambe engɛngaka lokola midi.​—1 Petelo 2:12.

“Zalá na kimya . . . zelá ye na etingya”

16, 17. Na kotalela maloba ya Nzembo 37:​7, oyo ezali ntango ya kosala nini, mpe mpo na nini?

16 Mokomi ya nzembo akomaki lisusu ete: “Zalá na kimya liboso ya [Yehova] mpe zelá ye na etingya; yokelá moto zuwa te oyo akolonga na nzela na ye mpe oyo [akolanda] mikano mabe.” (Nzembo 37:7) Na vɛrsɛ yango Davidi amonisi ntina oyo tosengeli kozela na motema molai Yehova asala. Atako nsuka ya mokili oyo eyei naino te, tosengeli komilelalela mpo na yango te. Ozali komona te ete motema mawa ya Yehova mpe motema molai na ye ezali monene koleka ndenge oyo tozalaki kokanisa? Tokoki nde komipesa na mosala ya kosakola nsango malamu liboso nsuka eya mpo na komonisa ete tozali kozela nsuka yango na motema molai? (Malako 13:10) Oyo ezali te ntango ya kosala makambo oyo ekoki kolongola biso esengo mpe kimya na biso ya elimo. Oyo ezali ntango ya koboya na motema moko masɛnginya ya mokili ya Satana. Ezali mpe ntango ya kokangama na bizaleli ya pɛto mpe kobungisa te esika malamu oyo tozali na yango na miso ya Yehova. Tókoba koboya makanisi mabe mpe kokima bizaleli oyo ebongi te kati na basi ná mibali, kati na mibali na mibali to basi na basi.​—Bakolose 3:5.

17 Davidi apesaki toli oyo: “Zalá na nkanda te mpe tiká kosilika, yoká zuwa te mpo ete ekolekisa yo na mabe. Mpo basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozelaka [Yehova] bakosangola mokili.” (Nzembo 37:​8, 9) Tokoki kozela na elikya ntango​—oyo ezali lisusu mosika te​—oyo tokomona ndenge Yehova akolongola mabe awa na mabelé mpe baoyo bazali kosala yango.

“Nsima ya mwa ntango moke”

18, 19. Maloba ya Nzembo 37:10 ezali kopesa yo elendiseli nini?

18 “Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; okotala esika na ye, nde akomonana te.” (Nzembo 37:10) Maloba yango ezali mpenza kolendisa biso lokola nsuka ya mokili oyo mpe ya ezaleli mabe ya kopesa Yehova mokɔngɔ ekómi pene! Baguvɛrnɛma nyonso to bikonzi oyo bato basali ekoki makambo ata moke te. Mpe sikoyo ntango oyo Nzambe akoyangela lisusu ezali lisusu mosika te; yango ekozala Teokrasi ya solo, Bokonzi ya Yehova oyo ekotambwisama na Yesu Klisto. Bokonzi yango ekotambwisa makambo nyonso ya mokili mpe ekolongola bato nyonso oyo bazali kotɛmɛla Bokonzi ya Nzambe.​—Danyele 2:44.

19 Na mokili ya sika oyo Nzambe akoyangela, ata oluki ndenge nini, okomona “moto mabe” te. Na ntango wana, moto nyonso oyo akotombokela Yehova akobomama mbala moko. Moto moko te akotɛmɛla bokonzi na ye to akoboya kotosa yango. Bazalani na yo nyonso bakozala na mposa ya kosepelisa Yehova. Kanisá kimya oyo yango ekomema: ntina ya kokanga ndako na fungola to ya kotonga mapango ya milaimilai ekozala te, eloko moko te ekopekisa bato bátyelana motema to ekosala ete bázanga esengo!​—Yisaya 65:20; Mika 4:4; 2 Petelo 3:13.

20, 21. (a) “Bato ya bopɔlɔ” oyo balobeli na Nzembo 37:11 ezali banani, mpe epai wapi bazali kozwa “kimya ya solo”? (b) Tokozwa mapamboli nini soki tolandi ndakisa ya Davidi Monene?

20 Na nsima, “bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili.” (Nzembo 37:11a) Kasi, “bato ya bopɔlɔ” yango ezali banani? Liloba oyo ebongolami na “bopɔlɔ” euti na liloba mosusu oyo elimboli “konyokola, kokitisa, kosambwisa.” “Bato ya bopɔlɔ” ezali baoyo bazelaka Yehova aya kosilisa makambo nyonso ya mabe oyo bazali kosala bango. “Bakosepela mpe na kimya ya solo.” (Nzembo 37:11b) Ata sikoyo, tozali mpenza na kimya na paladiso ya elimo na kati ya lisangá ya boklisto ya solo.

21 Atako tozali naino na makambo oyo ezali kotungisa biso, tozali kosalisana mpe kobɔndisa baoyo bazali konyokwama na makanisi. Yango wana, basaleli ya Yehova bazali na esengo ya solosolo ya motema. Na bolingo nyonso, bakɛngɛli bazali kokokisa bamposa na biso ya elimo​—mpe ntango mosusu ya mosuni​—mpe yango ezali kopesa biso makasi ya koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango mpo tolingi bosembo. (1 Batesaloniki 2:​7, 11; 1 Petelo 5:​2, 3) Kimya yango ezali na motuya mpenza! Tozali mpe na elikya ya bomoi ya seko na Paladiso ya kimya oyo ekómi pene. Yango wana, tiká tólanda ndakisa ya Davidi Monene, Yesu Klisto, oyo molende na ye mpo na Yehova etindaki ye asalela ye na bosembo tii na nsuka. (1 Petelo 2:21) Na ndenge yango, esengo na biso ekosila te mpe tokokumisa Nzambe na biso, Yehova, oyo tozali kosepela na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 12 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okoki kopesa eyano?

• Mateya nini ozwi na Nzembo 37:​1, 2?

• Ndenge nini okoki “kosepela na Yehova”?

• Nini ezali kondimisa biso ete tokoki kotyela Yehova motema?

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 9]

Baklisto ‘bayokelaka basali na mabe zuwa te’

[Elilingi na lokasa 10]

“Zalá na elikya epai ya Yehova mpe salá malamu”

[Elilingi na lokasa 11]

Yekolá nyonso oyo okoki na ntina na Yehova mpo na kosepela na ye

[Elilingi na lokasa 12]

“Bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili”