Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Ateyi biso komemya bindimeli na ye’

‘Ateyi biso komemya bindimeli na ye’

‘Ateyi biso komemya bindimeli na ye’

NA ETÚKÁ ya Rovigo, na Italie, minganga bayebisaki mwasi moko Motatoli ya Yehova ete azali na kanser moko oyo ekoki koboma ye. Motatoli yango akɔtaki lopitalo mbala na mbala mpe azalaki ntango nyonso kosɛnga minganga ete básalisa ye kozanga kosalela makila; na nsima, minganga ya lopitalo ya bato ya maladi ya kanser ya etúká na bango bakómaki kokende kosalisa ye na ndako.

Kondima makasi ya mwasi yango ya mbula 36 mpe ndenge azalaki koyokela minganga oyo bazalaki kosalisa ye ekamwisaki bango mpenza. Mwa moke liboso ete kanser yango eboma Motatoli yango, monganga moko akomaki na zulunalo moko ya minganga makambo oyo amonaki ntango azalaki kosalisa ye; na lisolo yango abengaki ye Angela.

“Angela azali kasakasa mpe alingi mpenza kozala na bomoi. Ayebi malamu ete azali na maladi oyo ekoki koboma ye mpe, lokola moto nyonso akokaki kosala, azali koluka nini akoki kosala, nkisi oyo akoki kozwa mpo na maladi na ye. . . . Biso minganga tokómaki komesana na ye mokemoke. Aboyaka te ete tósalisa ye. Lokola azali na matata te, ezalaki mpasi te mpo na kosalisa ye. Tozalaki kosepela mingi soki tokei kopesa ye nkisi mpamba te tozalaki koyeba ete soki tokómi epai na ye, tokolekisa ntango malamu mpe tokosolola malamu. . . . Tomonaki mbala moko ete bindimeli na ye ekopesa biso mokakatano mpo na kosalisa ye.” Monganga yango alobaki bongo mpo ayebaki ete ekosɛnga bázongisaka Angela makila, kasi ye akondima te.​—Misala 15:​28, 29.

“Toyebisaki Angela ete biso minganga tosepelaki te na ekateli na ye ya koboya makila, kasi, Angela asalisaki biso tóyeba ete bomoi ezali na motuya mingi na miso na ye. Tomonaki mpe ete ye ná libota na ye bapesaka motuya mingi na lingomba na bango. Angela alɛmbi te. Atiki te ete maladi elonga ye. Azali na molende mpenza. Azali na mposa ya bomoi, ya kobunda etumba mpo na kotikala na bomoi. Amonisaki biso mposa na ye mpe bindimeli na ye. Azali na molende oyo mbala mingi biso tozalaka na yango te, mpe na kondima makasi oyo biso tozalaka na yango te. . . . Angela ateyi biso komemya bindimeli na ye, ata soki mibeko na biso ya minganga esɛngi ndenge mosusu. . . . Tokanisi mpenza ete makambo oyo Angela ateyi biso ezali na ntina mingi, mpamba te tokutanaka na bato ndenge na ndenge, na makambo ya ndenge na ndenge, mpe na bato ya mangomba nyonso; tokoki koyekola makambo mosusu epai na bango mpe tokoki kosalisa moto nyonso ata mwa moke.”

Na nsuka, lisolo yango elobelaki buku ya mibeko ya minganga ya Italie, oyo ebimaki na 1999, oyo elobi boye: “Monganga akosala mosala na ye na kotosa bindimeli ya moto, makanisi na ye mpe bonkɔkɔ na ye, mpe komemya makambo na ye, azala mondɛlɛ to moindo, mobali to mwasi.” Ntango mosusu ekoki kozala mpasi mpo na minganga kotosa bindimeli ya lingomba ya moto, mpe mingi bazalaka na botɔndi epai ya minganga oyo bandimaka kotosa bindimeli na bango.

Batatoli ya Yehova bakanisaka malamumalamu liboso ya kozwa bikateli etali bokolɔngɔnɔ na bango ya nzoto mpe lisalisi ya minganga. Batalelaka malamumalamu oyo Biblia elobi mpe, ndenge ndakisa ya Angela emonisi yango, bazali te bato oyo bandimaka mateya ya lingomba kaka bindimelá. (Bafilipi 4:5) Na mokili mobimba, ebele ya minganga bazali kondima kotosa lisosoli ya Batatoli oyo basengeli kosalisa.