Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ba-Anabaptiste bazalaki banani?

Ba-Anabaptiste bazalaki banani?

Ba-Anabaptiste bazalaki banani?

MOTO nyonso oyo akómi mpo na mbala ya liboso na engumba Münster, na etúká ya Westphalie, na Allemagne, azangaka te kotɛlɛma mpo na kotala bandako misato ya bibende oyo ediembelaka na ndako-nzambe moko ya engumba yango. Longola kaka na mwa bileko ya mikuse oyo bakitisaki yango, bandako yango elingi kokokisa mbula 500 na esika wana. Ntango batyaká yango, ezalaká na bibembe ya bato misato oyo banyongaki na miso ya bato nyonso mpe na nsima babomaki bango. Bato yango bazalaki Ba-Anabaptiste, mpe bandako wana ezali bitiká ya bokonzi na bango.

Ba-Anabaptiste bazalaki banani? Lingomba yango ebandaki ndenge nini? Makambo nini bazalaki koteya? Mpo na nini babomaki bato wana? Mpe bandako misato wana ezali na boyokani nini na bokonzi?

Esengeli makambo ebongwana na lingomba, kasi ndenge nini?

Na nsuka ya bambula ya 1400 mpe ebandeli ya bambula ya 1500, bato mingi bakómaki kolobela makambo mabe oyo bazalaki komona na Lingomba ya Katolike mpe epai ya bakonzi na yango. Lingomba etondaki na mabe mpe misala ya mbindo; yango wana, bato mingi bakómaki kokanisa ete esengeli mpenza makambo ebongwana. Na mobu 1517, Martin Luther abandaki koloba polele ete esengeli makambo ebongwana, mpe lokola bato mosusu bakómaki kolanda lokolo na ye, yango esalaki ete Lingomba ya Protesta ebima.

Kasi, bato oyo bazalaki kolinga ete makambo ebongwana bazalaki na makanisi moko te na ndenge ya kosala yango to makambo nini esengeli kobongwana. Mingi bamonaki ete esengeli kolanda mpenza Biblia na makambo ya losambo. Kasi, bango na bango bazalaki kolimbola mateya ya Biblia ndenge moko te. Bamosusu bazalaki komona ete makambo ezali kobongwana malɛmbɛ mingi. Bato oyo basalaki lingomba ya Ba-Anabaptiste bautaki na kati ya bato yango.

Na buku Die Täufer​—Geschichte und Deutung, mokomi Hans-Jürgen Goertz akomaki boye: “Soki totali malamu, Lingomba ya Ba-Anabaptiste ezalaki kaka moko te; ezalaki mingi.” Na ndakisa, na mobu 1521, bato minei oyo bazalaki kobengama basakoli ya Zwickau babimisaki mobulu ntango bateyaki makambo ya Ba-Anabaptiste na engumba Wittenberg. Lisusu, na mobu 1525, etuluku mosusu ya Ba-Anabaptiste esalemaki na engumba Zurich, na Suisse. Ba-Anabaptiste mosusu mpe babimaki na Moravie (lelo oyo République tchèque) mpe na Pays-Bas.

Banani basengeli kozwa batisimo, bana to mikóló?

Na mboka mokomoko, Ba-Anabaptiste bazalaki mingi te, mpe mbala mingi bazalaki bato ya kimya. Bato yango bazalaki kobomba bindimeli na bango te; kutu, bazalaki kosakola epai ya bato mosusu. Bindimeli minene ya Ba-Anabaptiste ekomamaki na buku “Eyambweli ya Schleitheim,” oyo ebimaki na mobu 1527. Na ndakisa, bazalaki koboya mosala ya soda, kokɔta na makambo ya mokili, mpe bazalaki kobimisa basali ya mabe na lisangá. Kasi, likambo oyo ekesenisaki mpenza Ba-Anabaptiste ná mangomba mosusu ezali ete bazalaki koloba ete esengeli kobatisa mikóló, kasi bana mike te. *

Likambo ya kobatisa kaka mikóló ezalaki kotalela kaka bindimeli ya lingomba te; ezalaki likambo monene oyo ezalaki kotalela bokonzi. Soki batiki moto akóma naino mokóló liboso ya kopesa ye batisimo, mpe na bongo, batiki ye azwa ekateli oyo euti na kondima na ye, bato mosusu bakoki kotikala bongo mpe kozwa batisimo te. Nzokande, lingomba elingaki kozala na mokakatano mpo na kolandela bomoi ya bato oyo bazwá batisimo te. Na mangomba mosusu, kozela moto akola liboso ya kopesa ye batisimo ezalaki kokitisa bokonzi ya lingomba.

Yango wana, Bakatolike ná Baprotesta baboyaki likambo ya kopesa mikóló batisimo. Nsima ya mobu 1529, na bamboka mosusu, bato oyo bazalaki kopesa mikóló batisimo to baoyo bazalaki kozwa batisimo ntango bakómi mikóló bakokaki kozwa etumbu ya liwa. Mopanzi-nsango Thomas Seifert alobi ete Ba-Anabaptiste “banyokwamaki mingi na Saint Empire romain germanique” mobimba. Na Münster nde monyoko elekaki makasi.

Bato ya Münster balingi mbongwana

Na Moyen-Âge, engumba Münster ezalaki na bato soki 10 000 mpe ezalaki na kati ya lopango moko makasi ya mɛtrɛ 90 na bonene mpe soki kilomɛtrɛ 5 na bolai. Kasi, na kati ya engumba, mobulu ezalaki makasi. Buku Bokonzi ya Ba-Anabaptiste (na Lingelesi), ebimisami na Musée ya engumba Münster, elobeli ete “badepite ya engumba bazalaki kowelana na makambo ya politiki ná bakomelesa ná bato ya misala ya mabɔkɔ.” Lisusu, bato ya mboka yango bazalaki kosepela te na makambo ya bakonzi ya mangomba. Bato ya Münster bandimaki Mbongwana mpe na mobu 1533, oyo ezalaki engumba ya Bakatolike, ekómaki ya engumba ya Baprotesta.

Moko na bateyi minene ya Münster oyo balingaki mbongwana ezalaki Bernhard Rothmann, moto moko ya makila mɔtɔmɔtɔ. Mokomi Friedrich Oehninger alobi ete Rothmann “akómaki mpenza na makanisi ya Ba-Anabaptiste; ye na baninga na ye baboyaki kobatisa bana mike.” Na Münster, bato mingi bakómaki kosepela na ye, atako bato mosusu bazalaki komona ete azali na makambo makasi. “Bato oyo balingaki mbongwana te bakómaki kolongwa mokemoke na engumba wana, mitema ya bato ekómaki likoló mpe ekómaki komonana ete makambo ekobeba. Ba-Anabaptiste bazalaki kouta bipai na bipai mpo na kokende kofanda na Münster, na elikya ete mikano na bango ekokokisama kuna.” Lokola Ba-Anabaptiste batondanaki na Münster, nsukansuka likambo moko ya nsɔmɔ ebimaki.

Basoda bazingi Yelusaleme ya sika

Bato mibale oyo bautaki na Pays-Bas mpe bakómaki kofanda na Münster: Jan Mathys, mosali ya mampa oyo autaki na Haarlem, ná Jan Beuckelson, oyo ayebanaki na nkombo ya Jean de Leyde, basalaki nsuka na makambo na engumba wana. Mathys alobaki ete azali mosakoli mpe ayebisaki ete kozonga ya Klisto ekozala na Aprili ya mobu 1534. Balobaki ete Münster nde Yelusaleme ya Sika oyo Biblia elobeli, mpe bato nyonso bakómaki kokanisa kaka nsuka ya mokili. Rothmann azwaki ekateli ete biloko nyonso esengeli kozala ya bato nyonso. Mikóló nyonso oyo bafandaki na engumba yango basengelaki kopona: To kozwa batisimo, to kolongwa na engumba wana. Ebele ya bato bazwaki batisimo, bamosusu bandimaki kaka mpo bátika bandako mpe biloko na bango te.

Mangomba mosusu bazalaki koyoka mabe na komona ndenge Münster ekómaki engumba ya liboso epai Ba-Anabaptiste bazalaki lingomba eleki monene mpe bato na yango bazalaki kotambwisa makambo. Buku Die Täufer zu Münster (Ba-Anabaptiste na Münster) elobi ete mpo na ntina wana, “Na Saint Empire romain germanique mobimba bayinaki bato ya Münster.” Episkɔpɔ Comte Franz von Waldeck, moto monene moko ya etúká wana, ayanganisaki basoda mpo na kozinga engumba Münster. Basoda yango bazalaki Baprotesta ná Bakatolike. Bandimi ya mangomba yango, oyo liboso bazalaki koyokana te mpe babomanaki na Etumba ya Mbula ntuku misato, basanganaki mpo na kobunda na Ba-Anabaptiste.

Kobomama ya bokonzi ya Ba-Anabaptiste

Bato oyo bazalaki na kati bazalaki kobanga ata moke te basoda oyo bazingaki engumba na bango. Na sanza ya Aprili 1534, ntango oyo bakanisaki Klisto akozonga, Mathys abimaki na engumba likoló ya mpunda ya mpɛmbɛ, na elikya ete Nzambe akobatela ye. Bato oyo bazalaki kondima ye bayokaki nsɔmɔ ntango bazalaki kotala likoló ya efelo ya engumba mpe bamonaki basoda oyo bazingaki engumba bakati ye bitenibiteni mpe batye motó na ye likoló ya likonzí moko!

Jean de Leyde azwaki esika ya Mathys mpe akómaki kobengama Mokonzi Jan ya Ba-Anabaptiste na Münster. Na engumba yango, basi bazalaki mingi koleka mibali; mpo na kosilisa mokakatano oyo yango ezalaki kobimisa, alendisaki mobali nyonso abala basi oyo ye alingi. Mpo na komona ndenge bokonzi ya Ba-Anabaptiste na Münster ekesanaki mpenza, moto oyo asali ekobo to pite bazalaki kopesa ye etumbu ya liwa, nzokande bazalaki kondima, ata mpe kolendisa ete mobali abala basi ebele. Ye moko Mokonzi Jan abalaki basi 16. Ntango moko na bango, nkombo na ye Elisabeth Wandscherer, asɛngaki nzela ya kobima na engumba, bakataki ye motó na miso ya bato nyonso.

Basoda bazingaki engumba yango na boumeli ya sanza 14 mpe, na sanza ya Yuni 1535 bazwaki yango. Babebisaki engumba Münster na ndenge oyo esalemaki lisusu te tii na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Rothmann akimaki, kasi bakangaki Mokonzi Jan ná bakambi mosusu mibale ya Ba-Anabaptiste, banyongaki bango mpe babomaki bango. Batyaki bibembe na bango na mwa bandako ya bibende mpe batombolaki yango likoló ya ndako-nzambe Saint Lambert. Seifert alobi ete ezalaki “mpo na kobangisa bato nyonso oyo bakoki kozala na makanisi ya kobimisa mobulu.” Tomoni ete bato wana basukaki mabe mpenza mpo bamikɔtisaki na makambo ya politiki.

Nini ekómelaki Ba-Anabaptiste ya bamboka mosusu? Na Mpoto mobimba bakobaki konyokola bango na boumeli ya bambula ebele. Ba-Anabaptiste mingi balandaki kaka mitinda na bango ya kozala bato ya kimya, atako mwa ndambo moke bazalaki kobundisa banyokoli na bango. Na nsima, Menno Simons, oyo azalaká sango, akómaki mokonzi ya Ba-Anabaptiste, mpe bakómaki kobengama Lingomba ya Ba-Mennonite to mpe na bankombo mosusu.

Bandako misato

Ba-Anabaptiste bazalaki libosoliboso lingomba oyo elukaki mpenza kolanda mitinda ya Biblia. Kasi, na engumba Münster, bato ya makambo makasi bamemaki Ba-Anabaptiste na kotika mitinda wana mpe kokɔta na makambo ya politiki. Ntango kaka basalaki bongo, lingomba ekómaki lisangá ya bato oyo bazalaki kobunda mpo na makambo ya politiki. Yango ekɔtisaki mobulu na Lingomba ya Ba-Anabaptiste mpe na engumba Münster.

Tii lelo oyo, soki moto akómi na engumba yango, akomona bilembo ya makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki eleki sikoyo mbula 500. Na ndenge nini? Akomona mwa bandako misato ya bibende ediembelaka na ndako-nzambe moko ya engumba yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 9 Lisolo oyo ezali te mpo na kolongisa to kokweisa batisimo ya bana mike. Mpo na koyeba likambo wana malamu, talá lisolo “Doit-on baptiser les nouveaux-nés?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1986 (na Lifalanse).

[Bililingi na lokasa 13]

Banyongaki Mokonzi Jan, babomaki ye, mpe bakakisaki ye likoló ya ndako-nzambe Saint Lambert