Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?

Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?

Biblia ekoki kosalisa yo na kobɔkɔla bana?

FOLOLO oyo babengi orchidée ezalaka kitoko mingi, kasi kokolisa yango ezalaka mpasi mpenza. Mpo ekola, esengeli molunge to malili eleka te, pole to molili eleka te, mpe mbɛki na yango eleka monene to moke te. Fololo yango eponaka mabelé mpe biloko oyo ebongisaka mabelé, mpe ekufaka noki soki ezwi maladi to nyama-nkɛkɛ ekɔteli yango. Yango wana, mbala mingi bato balongaka kokolisa yango na mbala ya liboso te.

Nzokande, kobɔkɔla bana ezali lisusu mpasi koleka, esɛngaka mpe likebi mingi mpenza. Yango wana baboti mingi bamonaka ete bakolonga te kobɔkɔla bana na bango malamu. Mingi bazalaka na mposa ya lisalisi, se ndenge moto oyo alingi kolona orchidée azalaka na mposa ya toli ya moto oyo ayebi mosala yango malamu. Na ntembe te, moboti nyonso azalaka na mposa ya toli ya malamu mpo na kobɔkɔla bana na ye. Epai wapi akoki kozwa yango?

Atako Biblia ezali te buku ya mateya mpo na kobɔkɔla bana, Mozalisi atindaki bakomi na yango bákoma batoli ya malamu mpenza oyo ekoki kosalisa mpo na kobɔkɔla bana. Biblia elendisi baboti bálona bizaleli ya malamu, oyo bato mingi bazali komona ete baboti mingi bazali kobosana. (Baefese 4:​22-24) Mpo na yango, Biblia ezali na batoli ya ntina mpenza na likambo etali kobɔkɔla bana malamu. Batoli yango esalisi ebele ya bato, na bileko nyonso mpe na bisika nyonso. Yango wana, soki ozali kolanda toli ya Biblia, ekosalisa yo obɔkɔla bana na yo malamu mpenza.

Ndakisa ya baboti ezali na ntina mingi

“Nzokande, yo moto ozali koteya moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto ozali kosakola ete ‘Koyiba te,’ oyibaka? Yo, moto ozali koloba ete ‘Kosala ekobo te,’ osalaka ekobo?”​—Baloma 2:​21, 22.

Mokambi moko ya biro ya makambo etali biteyelo na Séoul alobaki boye: “Lolenge eleki malamu ya kobɔkɔla bana ezali kopesa bango ndakisa na maloba mpe na misala.” Soki baboti bazali koteya mwana, kasi bango moko bazali kopesa ndakisa malamu te na maloba mpe na etamboli na bango, mwana akoumela te komona ete baboti na ye bazali bato ya lokuta. Maloba ya baboti ekozala lisusu na kilo te epai ya mwana. Na ndakisa, soki baboti balingi koteya mwana ezaleli ya kolongobana, bango moko basengeli kozala na kolongobana. Mbala mingi, baboti mosusu, soki balingi koyamba telefone te, batindaka mwana aloba, “Tata (to mama) azali te.” Mwana oyo bazali kotinda aloba ndenge wana akoki kokakatana mpe komituna ebele ya mituna. Na nsima, soki asali likambo moko ya mabe, akomona mabe te mpo na kokosa. Yango wana, soki baboti balingi mpenza ete mwana na bango alobaka solo, esengeli bango moko bálobaka solo mpe básalaka makambo oyo balobaka.

Bozali na mposa ya kolakisa mwana na bino kozala na limemya ntango azali kosolola na bato? Bino moko bosengeli kopesa ndakisa. Mwana akolanda ndakisa na bino. Sung-sik, tata moko ya bana minei, alobaki boye: “Ngai ná mwasi na ngai tozwaki ekateli ete tókatelanaka mangala te. Tozalaki komonisana limemya mpe tozalaki kotombola mongongo te ata soki tosiliki. Ndakisa malamu wana eteyaki bana na biso koleka kutu maloba. Tozalaka na esengo ya komona ndenge bana na biso basololaka na bato mosusu na limemya mpe bonkonde.” Bagalatia 6:7 elobi boye: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” Baboti oyo balingi bana na bango bázala na bizaleli malamu, bango moko basengeli komonisa bizaleli yango.

Sololáká na bana

“Okolakisa [mibeko ya Nzambe] na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛlɛma yo.”​—Deteronome 6:7.

Bato mingi bakómi kosala lisusu nsima ya ngonga ya mosala. Soki mwasi ná mobali basalaka, yango ezalaka mabe mingi mpo na bana. Baboti mingi bazali lisusu kolekisa ntango mingi na bana na bango te. Ntango bazali na ndako, basalaka misala ya ndako mpe makambo mosusu; na bongo, balɛmbaka mingi. Soki ezali bongo mpo na yo, ndenge nini okoki kozwa ntango ya kosolola na bana na bino? Okoki kosololaka na bana ntango bozali kosala na bango misala ya ndako. Kutu, tata moko alongolaki televizyo na ndako mpo azwaka ntango mingi ya kosolola na bana na ye. Tata yango alobaki boye: “Na ebandeli, bana basepelaki ata moke te, kasi ntango nabandaki kosala na bango masano ya kosangisa mwa biteni mikemike ya fɔtɔ moko mpo na kobimisa fɔtɔ mobimba mpe nazalaki kotánga ná bango babuku ya malamu, nsukansuka babosanaki televizyo.”

Ezali na ntina mingi ete, ntango bana bazali naino mike, bámesana kosolola na baboti. Soki te, ntango bakokóma bilenge, soki bakutani na mikakatano, bakomona baboti na bango te lokola baninga oyo bakoki koyebisa makambo na bango. Ndenge nini okoki kosalisa bango báfungolelaka yo mitema? Masese 20:5 elobi boye: “Toli kati na motema ya moto ezali lokola mai ya bozindo, nde moto ya mayele akotoka yango.” Soki baboti bazali kotuna bana mituna oyo esɛngaka moto apesa makanisi na ye, mituna lokola “Bomoni boni?,” ekolendisa bango bábimisaka makanisi mpe makambo oyo bazali na yango na motema.

Okosala nini soki mwana na yo asali libunga moko ya monene? Na ntango wana nde osengeli mpenza komonisela ye boboto. Kitisá motema mpe yoká ye. Tata moko ayebisaki ndenge asalaka na bana na ye: “Ntango bana basalaka mabunga, nasalaka nyonso mpo nasilika te. Nafandaka mpe nayokaka bango. Nalukaka koyeba ntina oyo basali bongo. Soki namoni ete nakokoka kokanga motema te, nazelaka tii ntango nkanda ekokita.” Soki okitisi motema mpe ozwi ntango ya koyoka mwana, akondima etumbu oyo okopesa ye.

Disipilini oyo epesami na bolingo ezali na ntina mingi

“Bino, batata, bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.”​—Baefese 6:4.

Mpo disipilini ebota mbuma malamu, ezali na ntina opesa yango na bolingo. Na ndenge nini baboti bakoki ‘kosilikisa bana na bango’? Soki moboti apesi disipilini oyo eleki makasi to ekokani te na likambo oyo asali, mwana akondima yango te. Esengeli ntango nyonso kopesa disipilini na bolingo. (Masese 13:24) Soki ozali kozwa ntango ya kokanisa malamu na bana liboso ya kopesa bango disipilini, bakomona ete ozali kopesa bango disipilini mpo olingaka bango.​—Masese 22:15; 29:19.

Lisusu, ezali malamu bana bámonaka mpenza mabe ya likambo oyo basali. Na ndakisa, soki mwana asali moto mabe, okoki kosɛngisa ye asɛnga bolimbisi. Ntango abuki mobeko moko na ndako, okoki kopekisa ye makambo mosusu oyo alingaka mingi, mpo ayeba ete kobuka mibeko ezali malamu te.

Ezali malamu kopesa disipilini na ntango esengeli. Mosakoli 8:11 elobi boye: “Mitema ya bana ya bato ekani makasi kosalaka mabe, zambi etumbu mpo na kosala mabe epesami noki te.” Ndenge moko mpe, bana mingi bamekaka kosala mabe mpo na kotala soki bakopesa bango etumbu to te. Yango wana, soki oyebisi mwana ete okopesa ye etumbu soki asali likambo moko boye, pesá ye etumbu soki asali yango.

Kosakana na bana ezali na ntina mingi

“Ntango ezali . . . ya kosɛka . . . mpe ntango ya kobina.”​—Mosakoli 3:​1, 4.

Kozwa mopɛpɛ mpe kosakana mwa moke ezali na ntina mingi mpo na mwana akola malamu na makanisi mpe na nzoto. Soki baboti bazali kozwa ntango ya kosakana na bana na bango, libota ekozala na boyokani makasi mpe bana bakomona ete baboti balingaka bango. Masano nini baboti bakoki kosala ná bana na bango? Soki okanisi malamu, okomona ete ezali na ebele ya makambo ya kosepelisa oyo bokoki kosala. Ezali na masano oyo basalaka libándá, na ndakisa kopusa velo, kobɛta bale, tenisi, baskɛti. Bokosepela mpe mingi soki libota mobimba bozali koyemba mpe kobɛta miziki. Bokosepela mingi soki bokei kotala bisika ya kitoko zingazinga ya esika oyo bofandi.

Baboti bakoki kosalela mabaku wana mpo na koteya bana báyeba kotya masano na esika na yango. Moklisto moko, tata ya bana misato, alobaki boye: “Soki nazwi mwa ntango, nasakanaka na bana na ngai. Na ndakisa, soki bazali kosala masano ya ordinatɛrɛ, natunaka bango bálakisa ngai ndenge babɛtaka yango. Ntango bazali kolakisa ngai, namonisaka bango makama ya masano ya mabe. Namonaka ete batikaka masano ya mabe.” Ya solo, bana oyo basepelaka kosakana elongo na baboti na bango bamipesaka te na kotala televizyo, video, to bafilime, to mpe kobɛta masano ya Internet, oyo elakisaka bitumba, bato bazali kosala pite mpe komɛla bangi.

Salisáká bana na yo na kopona baninga

“Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”​—Masese 13:20.

Moklisto moko oyo alongaki kobɔkɔla bana minei alobi boye: “Ezali na ntina mingi ete bana báyeba koponaka baninga. Moninga ya mabe moko kaka akoki kobebisa mosala nyonso oyo osalaki.” Mpo na kosalisa bana na ye na kopona baninga ya malamu, azalaki kotuna bango mituna lokola oyo: Nani mpenza azali moninga na yo ya motema? Mpo na nini olingaka ye? Nini okosepela komekola epai na ye? Moboti mosusu ayebisaka bana na ye báya na baninga na bango na ndako. Yango esalisaka ye ayekola bizaleli ya baninga yango malamu mpe apesa bana na ye toli oyo ebongi.

Ezali mpe na ntina koteya bana bázalaka na baninga oyo bazali mikóló na bango, na esika bázala kaka na baninga ya mbula na bango. Bum-sun, oyo azali tata ya bana misato, alobi boye: “Nasalisaka bana na ngai bámona ete, lokola Davidi ná Yonatana, basengeli kozala kaka na baninga ya mbula na bango te. Nabengaka baklisto ya mbula nyonso na ndako mpo básololaka na bana na ngai. Yango esalisi bango bázwa baninga mingi oyo bazali bato ya mbula na bango te.” Soki bana bazali na baninga ya mikóló mpe ya mibange oyo bazali na etamboli malamu, bakoyekola makambo mingi ya malamu epai na bango.

Okoki kolonga kobɔkɔla bana na yo malamu

Ankɛtɛ moko esalemaki na États-Unis emonisaki ete baboti mingi oyo balukaki koteya bana na bango bizaleli malamu lokola koyeba komipekisa, komityela mibeko mpe kolongobana balongaki mpenza te. Mpo na nini koteya bana bizaleli wana ezali mpasi? Mama moko oyo batunaki na ankɛtɛ yango alobaki boye: ‘Likambo ya mawa ezali ete, mpo na kobatela bana na biso, esengeli tókanga bango na ndako mpo bábimaka na libándá te.’ Alobaki bongo mpo amonaki ete bana bazali kokola na mokili oyo ekómi mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Lokola ezali bongo, moto akoki mpenza kolonga kobɔkɔla bana na ye malamu?

Soki olingi kolona orchidée kasi ozali kobanga ete ekokufa, okolɛmba nzoto. Kanisá esengo oyo okozala na yango soki moto moko oyo ayebi mpenza mosala ya kolona yango apesi yo toli ya malamu mpenza mpe apesi yo elikya ete, “Soki osali mpenza bongo, fololo yango ekokola”! Yehova, Ye oyo ayebi bato malamumalamu, apesi toli oyo ezali kolakisa ndenge ya malamu ya kobɔkɔla bana. Alobi boye: “Bɔkɔlá mwana na nzela ekoki na ye kotambola; ekokóma ye monene akopɛngwa na yango te.” (Masese 22:6) Soki obɔkɔli bana na kolanda toli ya Biblia, na ntembe te okozala na esengo ya komona ndenge bakokóma mikóló oyo bazali na bomoto ya malamu, oyo bapesaka basusu kilo, mpe bazali na bizaleli malamu. Na ndenge yango, bato bakolinga bango, mpe oyo eleki, Yehova, Tata na biso ya likoló, akolinga bango.