Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likabo oyo eleki malamu

Likabo oyo eleki malamu

Likabo oyo eleki malamu

NA NSUKA ya bomoi na ye, ntoma Yoane oyo akómaki mobange mpenza akomaki boye: “Nazali na ntina ya botɔndi te koleka makambo oyo, ete nayokaka ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”​—3 Yoane 4.

Ntoma yango ya sembo alobaki bongo mpo na bana na ye ya elimo. Kasi, baboti mingi bakoki koloba lokola ntoma Yoane mpo na bana na bango. Basali mosala monene mpo na kobɔkɔla bana na bango “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova,” mpe lelo oyo bazali na esengo ya komona ete bana na bango bakoli mpe bazali “kotambola na kati ya solo.” (Baefese 6:4) Ya solo, kolakisa bana nzela ya bomoi ya seko ezali nde kopesa bango likabo oyo eleki malamu. Ezali bongo mpamba te ezaleli ya kokangama na Nzambe, oyo esɛngaka mpe kozala na bomoi oyo Yehova alingi baklisto bázala na yango, “ezali na elaka ya bomoi ya sikoyo mpe ya oyo ezali koya.”​—1 Timote 4:8.

Yehova, Tata oyo aleki malamu, asepelaka mpenza na baboti oyo basalaka nyonso mpo na koteya bana na bango makambo ya elimo. Soki bana balandi mateya yango, bazalaka na esengo na kokoba kosambela Nzambe ya solo elongo na baboti na bango. Ntango bana yango bakoli, bakanisaka makambo mingi ya malamu oyo bayekolaki na bomwana na bango. Basusu basepelaka soki bakanisi devuare ya liboso oyo basalaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. * To mpe bakanisaka mbala ya liboso oyo batángaki vɛrsɛ moko ya Biblia ntango bazalaki kosakola ndako na ndako elongo na baboti na bango. Bakobosana te ndenge baboti na bango bazalaki kotángela bango Mokanda mpo na Masolo ya Biblia to Boyoka Moteyi Monene. * Gabriel akanisaka lisusu likambo moko oyo azalaki kolinga mingi: “Ntango nazalaki na mbula minei, mama azalaki koyembela ngai mikolo nyonso ntango azali kolamba. Nabosanaka te loyembo moko ya Bokonzi oyo nazalaki kolinga mingi. Na nsima, loyembo yango esalisaki ngai na komona ntina ya kosalela Yehova.” Mbala mosusu yo mpe ozali koyeba loyembo kitoko oyo Gabriel alobeli. Ezali loyembo nimero 157 na buku Nzembo mpo na kokumisa Yehova, oyo motó ya likambo na yango elobi ete “Sambelá Yehova na bolenge na yo.”

Loyembo yango ebandi boye: “Bana mike bakumisi Nzambe,/Mpe bangangi n’esengo monene./Bana basanzoli Yesu Klisto.” Ya solo, bana mosusu bazwaki libaku malamu ya komona Yesu, mpe na ntembe te asepelaki na motema mpɛmbɛ mpe bosembo na bango. Kutu, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete basengeli kozala lokola bana mike mpamba te, bana mike bandimaka mateya kozanga kokakatana. (Matai 18:​3, 4) Yango emonisi ete bana mike bazali mpe na esika na losambo ya Yehova. Kutu, loyembo yango elobi lisusu ete: “Elongo na mikóló na bango” bazali kokumisa Nzambe mpe kosanzola Yesu.

Na ezaleli malamu na bango na ndako, na kelasi mpe na bisika mosusu, bana mingi bakumisaka Nzambe mpe baboti na bango. Bazali na libaku malamu mpenza ya kozala na “Baboti kati na solo.” (Deteronome 6:7) Lokola Nzambe azali Tata ya bolingo oyo alakisaka bikelamo na ye nzela oyo basengeli kolanda, baboti oyo balingaka ye mpe basalaka mokano na ye bazwaka ebele ya mapamboli! Na nsima, ntango baboti yango bazali koteya bana na bango, bamonaka ete bana yango batosaka mpe, ndenge loyembo elobi, “bakozal’esengo na bino.” (Yisaya 48:​17, 18) Angélica, oyo azali sikoyo kosala na biro ya Batatoli ya Yehova na Mexique alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki ntango nyonso kosala makasi mpo na kotosa mitinda ya Biblia. Yango esalaki ete nakola malamu. Nazalaki na esengo.”

Baklisto ya ndenge wana bandimaka ete ezali na ntina mingi kobatela likabo ya elimo oyo baboti bapesi bango. Ekoki kozala ete yo mpe ozali elenge oyo azali kobɔkɔlama na baboti oyo balingaka makambo ya elimo. Soki ezali bongo, loyembo yango ezali mpe kolendisa yo na maloba oyo: “Bilenge baklisto/Bótalela banzela na bino.” Mokolo mosusu bino mpe bokokóma kozwa bikateli bino moko; yango wana, ntango bozali naino bilenge, “Bóndima Yah . . . Bóluka te ete bándima bino.”

Soki osali bozoba ya koluka libosoliboso ete baninga bándima yo, mateya nyonso oyo baboti bazali kopesa yo ekokende na mai mpe okobebisa avenire na yo. Mposa ya kondimama na baninga ekoki kotinda yo otika kokɛngɛla na elimo. Yango ememaki bilenge mosusu na kokóma baninga ya bato oyo, atako bazali komonana bato malamu, bandimaka mateya ya boklisto te. Lisolo ya Tara, oyo ezali na kasɛti-video Les jeunes s’interrogent. . . Comment se faire de vrais amis? ezali komonisa likambo yango. Lokola Tara, elenge moklisto nyonso oyo alingi kozala moninga ya bato oyo balingaka losambo ya solo te, ata ndɛlɛ akomona bosolo ya maloba ya loyembo yango oyo epekisi kozala na “baninga mabe, oy’a mbindo.” Mpo na kokóma na bizaleli ya malamu, esɛngaka kosala molende ebele ya bambula, kasi bizaleli yango ekoki kobeba kaka na mbala moko.

Ezali solo ete kozala na bomoi ya kobanga Nzambe ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Kasi, ndenge loyembo emonisi yango, “Kanisáká Nzambe na bolenge . . . Salelá ye n’elimo na solo”; na ndenge yango, okomitongela moboko malamu oyo ekosalisa yo olonga na bomoi na yo. Mpe “Yambo ‘te y’onuna,” okozala na esengo mpenza. Okomona mpenza ete soki Yehova alingi yo mpe azali kobatela yo, eloko moko te ekoki kopekisa yo kosala oyo ezali malamu na miso na ye. Na bongo nde okokóma mokolo oyo akɔmeli na elimo mpe abangaka Nzambe. Longola yango, soki omonisi bwanya, elingi koloba ondimi kolanda nzela ya Nzambe oyo baboti bazali kolakisa yo, ekopesa yo libaku malamu “osepelisa ye.” Yango ezali libaku malamu oyo eleki mosusu nyonso.​—Masese 27:11.

Yango wana, bilenge, bóbosana te ete koteyama na Yehova mpe na baboti oyo bazali baklisto ezali na motuya mingi. Tiká ete bolingo monene oyo bazali komonisela bino etinda bino na kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova. Lokola Yesu Klisto mpe Timote, elenge ya sembo, bokosepelisa Tata na bino ya likoló mpe baboti na bino. Soki mpe bokoli mpe boboti bana, na ntembe te bokokanisa lokola Angélica, oyo toutaki kolobela, oyo alobaki boye: “Soki naboti mwana, nakosala nyonso mpo nalona bolingo ya Yehova na motema na ye banda bomwana na ye, mpo yango etambwisa ye na bomoi na ye.” Ya solo mpenza, nzela ya sembo, oyo ememaka na bomoi ya seko ezali likabo oyo eleki na malamu!

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Eteyelo yango mpo na mateya ya Biblia esalemaka na masangá ya Batatoli ya Yehova mpe ezali mpo na bato nyonso, bilenge mpe mikóló.

^ par. 4 Mikanda oyo tolobeli awa ebimisami na Batatoli ya Yehova.