Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mabondeli ekoki kosalisa yo?

Mabondeli ekoki kosalisa yo?

Mabondeli ekoki kosalisa yo?

NANI kati na biso akutaná naino te na likambo moko oyo esilisaki ye mayele? Biblia emonisi ete ntoma Paulo ayebaki ete mabondeli ekoki kosalisa moto na ntango ya mokakatano moko ya makasi.

Ntango bakangaki Paulo na bolɔkɔ atako asalaki mabe te, asɛngaki bandeko na ye bandimi bábondela mpo na ye mpe abakisaki ete: “Nazali mpenzampenza kolendisa bino bósalaka bongo, mpo nazongisama epai na bino nokinoki.” (Baebele 13:18, 19) Na libaku mosusu, Paulo amonisaki mpenza ete azali na elikya ete Nzambe akoyoka mabondeli na bango mpe bakobimisa ye na bolɔkɔ noki. (Filemona 22) Eumelaki te, batikaki Paulo mpe azongelaki mosala na ye ya misionɛrɛ.

Kasi, libondeli ekoki mpenza kosilisa mikakatano oyo ezali kotungisa yo? Ekoki kosalema. Kasi, kobosana te ete libondeli ezali te kaka momeseno moko boye ya losambo. Ezali nde lisolo na Tata na biso ya bolingo mpe oyo atondi na nguya oyo azali na likoló. Yango wana, ntango tozali kobondela, tosengeli koloba mpenzampenza makambo oyo tosengeli na yango mpe na nsima tózela na motema moko tii ntango Yehova akokokisa mposa na biso.

Ntango mosusu, Nzambe ayanolaka na libondeli mbala moko te, to mpe ayanolaka na ndenge oyo biso tokanisi te to na ntango oyo biso toyebi te. Na ndakisa, Paulo azalaki kobondela mbala na mbala mpo na “nzubɛ moko na kati ya mosuni.” Ata soki mokakatano ya Paulo ezalaki nini, Nzambe asilisaki yango te, kasi abɔndisaki ye na maloba ya kolendisa oyo: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.”​—⁠2 Bakolinti 12:7-9.

Biso mpe tokoki kotya motema ete, ata soki Nzambe asilisi mokakatano na biso te, akoki ‘kobongisela mpe biso nzela ya kobimela mpo tózala na likoki ya koyikela yango mpiko.’ (1 Bakolinti 10:13) Mosika te, Nzambe akolongola bampasi nyonso ya bato. Liboso na yango, kobondela ‘ye oyo ayokaka mabondeli’ ekoki kosalisa yo.​—⁠Nzembo 65:⁠2.