Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokakatano ya kobɔkɔla bana na moi ya lelo

Mokakatano ya kobɔkɔla bana na moi ya lelo

Mokakatano ya kobɔkɔla bana na moi ya lelo

BUTU ekómi makasi, nkolo restora alingi kokanga restora na ye mpo azonga ndako. Na ntango wana, basi mibale ná mwana moko bakɔti mpe basɛngi biloko. Lokola nkolo restora yango alɛmbi mingi, alingi koyebisa bango ete asilisi mosala, kasi azongisi motema nsima mpe apesi bango biloko oyo basɛngi. Ntango basi yango mibale bazali kolya mpe kosolola, mwana azali kobalukabaluka na kati ya restora, kobwaka bisikiti na nse mpe konyata yango. Na esika mama na ye apekisa ye, azali nde kosɛka. Ntango basilisi kolya mpe bakei, esengeli nkolo restora, ná kolɛmba nyonso oyo azali na yango, akɔmba lisusu salite nyonso wana.

Lisolo wana ezali komonisa likambo oyo, na ntembe te yo mpe oyebi, ete baboti mingi bazali kobɔkɔla bana na bango malamu te. Bantina ezali mingi. Baboti mosusu bazali kotika bana na bango básala nyonso oyo balingi, mpo bazali kokanisa ete bana basengeli te komimona lokola bato ya bolɔkɔ. To mpe, lokola bazali na misala mingi, baboti mosusu bazali na ntango te ya kotyela bana na bango likebi mpe ya koteya bango na ndenge esengeli. Baboti mosusu bazali komona ete eloko eleki ntina mpo na bana ezali kelasi; yango wana, soki mwana azali na mayele mingi na kelasi oyo ezali kopesa ye nzela ya kotánga na eteyelo ya malamu, bazali kotika ye asala makambo mosusu nyonso oyo alingi.

Kasi, bato mosusu bazali koloba ete esengeli baboti mpe bato mosusu nyonso bábongola ndenge na bango ya kotalela makambo. Bato yango bazali koloba ete bana bakómi kosala makambo mabe ndenge na ndenge, mpe mokolo na mokolo mobulu ezali se kobakisama na biteyelo. Yango wana, mokambi ya eteyelo moko ya ntei na Séoul, na Corée du Sud, alobaki ete esengeli libosoliboso koteya bana bomoto ya malamu. Alobaki boye: “Liboso ya kotinda mwana na kelasi, esengeli naino koteya ye bizaleli ya malamu.”

Baboti mingi oyo balingi ete bana na bango bátánga bakelasi ya malamu mpo bákóma bato, bazali kolanda toli wana te. Soki ozali moboti, okolinga mwana na yo akóma moto ya ndenge nini? Okolinga ete ntango akokola azala na etamboli ya malamu mpe na bomoto ya malamu? Okolinga nde ete ayeba kopesa bato kilo, kofanda na bato, mpe azala na makanisi malamu? Soki ezali bongo, tosɛngi yo otánga lisolo oyo elandi.