Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndimá litambwisi ya Nzambe ya bomoi

Ndimá litambwisi ya Nzambe ya bomoi

Ndimá litambwisi ya Nzambe ya bomoi

“Boyá epai ya Nzambe ya bomoi, oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe biloko nyonso ezali na kati na yango.”​—MISALA 14:15.

1, 2. Mpo na nini ebongi mpenza tóloba ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”?

 NTANGO ntoma Paulo ná Balanaba babikisaki moto moko na Lisitala, Paulo alobaki na bato oyo bamonaki likambo yango boye: “Biso mpe tozali bato oyo bazali na bolɛmbu ndenge moko na oyo ya bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi, oyo asalaki likoló mpe mabelé mpe mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.”​—Misala 14:15.

2 Ya solo, Yehova azali “Nzambe ya bomoi,” kasi ekeko mpamba te! (Yilimia 10:10; 1 Batesaloniki 1:​9, 10) Yehova azali na bomoi, kasi azali mpe Mopesi ya bomoi. “Ye moko moto apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso.” (Misala 17:25) Asepelaka ete biso tózala na bomoi, sikoyo mpe na mikóló ekoya. Paulo abakisaki ete Nzambe “amitikaki te kozanga litatoli na boye ete asalaki bolamu, kopesáká bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, kotondisáká mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”​—Misala 14:17.

3. Mpo na nini tokoki kotyela litambwisi ya Nzambe motema?

3 Lokola Nzambe alingaka ete biso tózala na bomoi, yango esengeli kotinda biso tótyela litambwisi na ye motema. (Nzembo 147:8; Matai 5:45) Bato mosusu bakoki koboya kotyela litambwisi na ye motema soki bazali kokanga ntina te ya mobeko moko ya Biblia to bazali komona yango makasi. Kasi, makambo mingi emonisi ete kotyela litambwisi ya Yehova motema nde nzela ya bwanya. Tópesa ndakisa: Ata soki Moyisalaele azalaki kokanga ntina te ya mobeko oyo epekisaki kosimba ebembe, azalaki kozwa litomba na kotosa yango. Ya liboso, botosi na ye ezalaki kosala ete apusana penepene na Nzambe ya bomoi; ya mibale, ezalaki kobatela ye na bamaladi.​—Levitike 5:2; 11:24.

4, 5. (a) Liboso ya ntango na biso, Yehova apesaki malako nini na ntina etali makila? (b) Nini emonisi biso ete malako ya Nzambe mpo na makila etaleli mpe baklisto?

4 Ezali mpe bongo mpo na mobeko ya Nzambe oyo etali makila. Nzambe alobaki na Noa ete bato basengeli kolya makila te. Na nsima, na kati ya Mibeko, Nzambe amonisaki ete lolenge kaka moko oyo andimaki básalela makila ezalaki na etumbelo, mpo na bolimbisi ya masumu. Na nzela ya mibeko wana, Nzambe azalaki kobongisa nzela mpo na kosalela makila na lolenge oyo eleki mosusu nyonso, elingi koloba mpo na kobikisa bomoi na nzela ya mbeka ya Yesu. (Baebele 9:14) Nzambe apesaki mobeko wana mpo azalaki na mposa biso tózala na bomoi mpe tózala malamu. Mpo na kolimbola Genese 9:​4, Adam Clarke, moto moko ya mayele na maloba ya Biblia na ekeke ya 19, akomaki boye: “Tii lelo oyo, baklisto ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse batosaka mpenza mobeko yango [oyo bapesaki Noa] . . . Na mibeko, kolya makila epekisamaki, mpamba te ezalaki komonisa makila oyo esopanaki mpo na masumu ya mokili; mpe na baevanzile, esengeli kolyama te, mpamba te esengeli ntango nyonso kotalelama ete ezali komonisa makila oyo esopanaki mpo na bolimbisi ya masumu.”

5 Ekoki mpenza kozala ete moto yango ya mayele azalaki kolobela evanzile, to nsango malamu, oyo etaleli Yesu. Nsango yango elobi mpe ete Nzambe atindaki Mwana na ye aya kokufa mpo na biso, asopa makila na ye mpo biso tózwa bomoi ya seko. (Matai 20:28; Yoane 3:16; Baloma 5:​8, 9) Maloba ya moto yango etaleli mpe mobeko ya koboya makila oyo bapesaki bayekoli ya Klisto nsima.

6. Na likambo etali makila, malako nini bapesaki baklisto, mpe mpo na nini?

6 Oyebi ete Nzambe apesaki Bayisalaele ebele ya mibeko. Nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye basɛngisamaki te kotosa mibeko wana. (Baloma 7:​4, 6; Bakolose 2:​13, 14, 17; Baebele 8:​6, 13) Kasi, motuna moko ebimaki na nsima na likambo moko ya ntina mingi: likambo ya kokata mibali ngɛnga. Esengelaki nde kokata bato ya bikólo mosusu ngɛnga, baoyo bazalaki na mposa ya kozwa matomba na makila ya Klisto, likambo oyo elingaki komonisa ete bazali kaka kotosa Mibeko? Na mobu 49 ya ntango na biso (T.B.), lisangani ya mikóló-bakambi etalelaki likambo yango. (Misala, mokapo 15) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, bantoma ná bankulutu bamonaki ete mobeko ya kokatama ngɛnga elongwaki ntango Mibeko esukaki. Atako bongo, baklisto basengelaki kotosa makambo mosusu oyo ezalaki na Mibeko. Na mokanda oyo lisangani ya mikóló-bakambi etindelaki masangá, bakomaki boye: “Elimo santu mpe biso moko tomoni malamu kobakisela bino kilo mosusu te, longola kaka makambo oyo ya ntina, bókoba koboya biloko oyo epesami mbeka epai ya bikeko mpe makila mpe biloko oyo ekamolamá mpe pite. Soki bomibateli malamumalamu uta na makambo wana, bokozala malamu.”​—Misala 15:​28, 29.

7. Mpo na nini ezali na ntina baklisto ‘báboya makila’?

7 Ezali polele ete lisangani ya mikóló-bakambi emonaki ete esengeli ‘koboya makila’ ndenge kaka tokoboya pite to losambo ya bikeko. Yango ezali komonisa ete tosengeli kotalela mobeko ya makila na lisɛki te. Baklisto oyo bazali kosambela bikeko to bazali kosala pite, mpe balingi kobongola motema te, bakoki ‘kozwa Bokonzi ya Nzambe’ te; “likabo na bango ekozala . . . liwa ya mibale.” (1 Bakolinti 6:​9, 10; Emoniseli 21:8; 22:15) Tótala bokeseni oyo: Makila ezali eloko ya bosantu na miso ya Nzambe; yango wana, koboya kolanda malako oyo apesi na ndenge ya kosalela yango ekoki komema na liwa ya seko. Nzokande, komemya mbeka ya Yesu ekoki komema na bomoi ya seko.

8. Nini ezali komonisa ete baklisto ya liboso bazalaki kozwa mobeko ya Nzambe mpo na makila na lisɛki te?

8 Ndenge nini baklisto ya liboso bakangaki ntina ya malako ya Nzambe mpo na makila mpe bazalaki kotosa yango? Tókanisa lisusu maloba ya Clarke: mpe “Na baevanzile, [makila] esengeli kolyama te, mpamba te esengeli ntango nyonso kotalelama ete ezali komonisa makila oyo esopanaki mpo na bolimbisi ya masumu.” Masolo ya makambo ya kala ezali komonisa ete baklisto ya liboso bazalaki kozwa likambo yango na lisɛki te. Tertullien akomaki boye: “Bózwa ndakisa ya bato oyo, na bitumba ya bilombe, bamɛlaka na lokoso makila ya basali na mabe . . . mpo na kosilisa maladi ya ndɛkɛ.” Bapakano bazalaki komɛla makila; kasi, Tertullien alobaki ete mpo na baklisto, “ata makila ya banyama ekɔtaka na bilei [na bango] te . . . Mpo na komeka baklisto, bozali kopesa bango boudin etondá na makila. Boyebi malamu ete epekisami epai na bango.” Ata balobi ete soki baboyi bakoboma bango, baklisto bazalaki kolya makila te. Emonisi ete bazalaki kozwa mobeko ya Nzambe na lisɛki te.

9. Longola komɛla makila, koboya yango esɛngaki mpe nini?

9 Bato mosusu bakoki kokanisa ete likanisi ya lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kaka ete baklisto basengeli te kolya to komɛla makila to mpe kolya nyama oyo babimisi yango makila te to bilei oyo basangisi na makila. Ya solo, yango nde ndimbola ya liboso ya mobeko oyo Nzambe apesaki Noa. Malako ya bantoma elobaki mpe na baklisto ete ‘báboya biloko oyo ekamolami,’ mosuni oyo ezali na makila kati na yango. (Genese 9:​3, 4; Misala 21:25) Kasi, baklisto ya liboso bayebaki ete mobeko yango esɛngaki mpe makambo mosusu. Ntango mosusu bato bazalaki komɛla makila mpo na kosilisa maladi. Tertullien alobaki ete mpo na kosilisa maladi ya ndɛkɛ, bapakano mosusu bazalaki komɛla makila oyo ezali kobima sika. Ekoki mpe kozala na ndenge mosusu oyo bazalaki kosalela makila mpo na kosilisa maladi to mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ. Yango wana, na makanisi ya baklisto, koboya makila elimbolaki mpe komɛla yango te mpo na kosilisa maladi. Bazalaki kobatela mobeko yango ata soki ekotya bomoi na bango na likama.

Kosalela makila mpo na kosilisa maladi

10. Wapi balolenge mosusu oyo bazali kosalela makila mpo na kosilisa maladi, mpe yango ebimisi motuna nini?

10 Lelo oyo, minganga bazali kosalela mingi makila mpo na kosilisa maladi. Kala, bazalaki kaka kobenda makila na nzoto ya moto, kobomba yango malamu, mpe kozongisa yango na nzoto ya moto ya maladi, na ndakisa soda oyo azoki na etumba. Na nsima, mayele ya minganga ekolaki mpe bakómaki kokabola biloko ndenge na ndenge oyo ezalaka na kati ya makila. Bakokaki sikoyo kosalisa moto na moko kati na biloko yango, mbala mosusu bakoki kozongisa plasma epai ya moto moko mpe globule rouge epai ya moto mosusu. Ntango mayele ya minganga ebakisami lisusu, bamonaki ete na biloko oyo ezalaka na kati ya makila, na ndakisa plasma, bakoki kobenda biloko mikemike, mpe kosalisa na yango bato ya maladi mingi lisusu. Minganga bazali kaka koyekola mpe mayele ezali se kobakisama; yango wana tozali koyoka ete bazali kosalela biloko mosusu ya mikemike mpenza oyo bazali kobenda na biloko oyo ezalaka na kati ya makila. Ndenge nini moklisto asengeli kotalela biloko yango? Tózwa ndakisa ya moklisto moko oyo azali na ekateli makasi ete bakoki kozongisa ye makila te; bongo, monganga alobi na ye ete bakozongisa ye makila te, kasi moko na biloko oyo ezalaka na kati ya makila, na ndakisa globule rouge. To mpe bakoki kokomela moto nkisi oyo basali na biloko mikemike mpenza oyo babendi na makila. Ekateli nini mosaleli ya Nzambe asengeli kozwa na makambo ya ndenge wana, kozanga kobosana ete makila ezali eloko ya bosantu mpe ete makila ya Klisto nde ezali kobikisa bomoi na ndenge oyo eleki?

11. Na boyokani na makambo oyo minganga bayebi mpo na makila, Batatoli baboyaka nini banda kala?

11 Eleki bambula mingi lelo oyo, Batatoli ya Yehova balimbolaki makanisi na bango polele. Na ndakisa, bakomaki lisolo moko na The Journal of the American Medical Association (ya 27 Novɛmbɛ 1981; ebimisamaki lisusu na mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 27-29). * Lisolo wana etángaki bavɛrsɛ ya Genese, Levitike, mpe Misala. Elobaki boye: “Atako bavɛrsɛ yango elobami na maloba ya minganga te, Batatoli batalelaka yango ete ezali kopekisa kozongisa makila, kozongisa globule rouge, plasma, globule blanc mpe plaquette.” Buku Emergency Care (ebimeli ya 2001), na motó ya likambo “Biloko oyo ezalaka na kati ya makila,” elobaki boye: “Makila esangisi biloko ebele: plasma, globule rouge, globule blanc, mpe plaquette.” Na yango, ata minganga bayebi ete biloko minei wana ezali kaka makila; yango wana, Batatoli bandimaka te bázongisa bango ezala makila to moko ya biloko minei wana.

12. (a) Makanisi nini emonisamaki na ntina na biloko mikemike oyo bakoki kobenda na moko ya biloko oyo ezalaka na kati ya makila? (b) Epai wapi tokoki kozwa bandimbola mosusu na likambo yango?

12 Lisolo wana elobaki lisusu boye: “Makanisi ya Batatoli mpo na mobeko wana ya Nzambe emonisi te ete baboyaka ata biloko [mikemike] oyo bakoki kobenda na makila, na ndakisa, albumine, immunoglobuline, nkisi oyo bapesaka bato oyo bazali kobima makila mingi; kasi mpo na biloko wana, Motatoli mokomoko asengeli kozwa ekateli ya koboya to kondima yango.” Banda 1981, minganga bazali kosalela mayele ya kobenda biloko mingi ya mikemike na makila (nsima ya kokabola biloko minei ya minene oyo ezalaka na kati ya makila). Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2000, ezalaki na lisolo moko malamu ya “Mituna ya batángi.” Mpo na kosalisa ebele ya batángi lelo oyo, lisolo yango ebimisami lisusu na nkasa 29-31 ya nimero oyo. Ezali komonisa mpe kolimbola makambo, kasi okomona ete makambo oyo elobami eyokani na makanisi oyo emonisamaki na 1981.

Ntina ya lisosoli ya moto

13, 14. (a) Lisosoli ezali nini, mpe ndenge nini moto asalelaka yango na likambo ya makila? (b) Malako nini Nzambe apesaki Bayisalaele na likambo etali kolya mosuni, mpe malako yango ekokaki kobimisa mituna nini?

13 Makambo yango ezali komonisa ntina ya kosalela lisosoli. Mpo na nini? Baklisto nyonso bandimaka ete basengeli kotosa mibeko ya Nzambe, kasi na makambo mosusu, moto na moto asengeli kozwa bikateli, mpe mpo na yango, asengeli kosalela lisosoli na ye. Lisosoli ezali likoki oyo moto azali na yango ya kotalela makambo na bozindo mpe na nsima kozwa bikateli, mingimingi na oyo etali etamboli. (Baloma 2:​14, 15) Kasi, toyebi ete lisosoli ya moto na moto ekeseni. * Biblia elobi ete bato mosusu ‘lisosoli na bango ezali na bolɛmbu’; yango emonisi ete lisosoli ya bamosusu ezali makasi. (1 Bakolinti 8:12) Baklisto nyonso bakokani te na esika oyo moto na moto akómi na boyebi ya mokano ya Nzambe, na kolanda makanisi na ye, mpe na kotalela yango mpo na kozwa bikateli. Mpo na kolimbola yango, tokoki kozwa ndakisa ya Bayuda na likambo ya kolya nyama.

14 Biblia emonisi polele ete moto oyo azali kotosa Nzambe akoki te kolya nyama oyo ebimisami makila te. Mobeko yango ezalaki monene na boye ete, ata na ntango basoda ya Yisalaele bazalaki na mpasi mpenza mpe balyaki nyama oyo babimisaki makila te, balobaki na bango ete basali mabe monene, to lisumu. (Deteronome 12:​15, 16; 1 Samwele 14:​31-35) Atako bongo, mituna mosusu ekokaki kotunama. Ntango Moyisalaele abomi mpate, ntango boni asengelaki kolekisa te mpo na kobimisa yango makila? Asengelaki nde kokata nyama yango nkingo mpo na kobimisa makila? Ezalaki na ntina atika nyama ediembela motó na nse, makolo likoló? Mpo na ntango boni? Asengelaki kosala ndenge nini mpo na ngɔmbɛ ya monene? Nsima ya kobimisa makila, makila mosusu ekokaki kotikala na kati ya mosuni. Akokaki kolya mosuni wana? Nani asengelaki kozwa ekateli wana?

15. Ndenge nini Bayuda bazalaki kosala mpo na kolya mosuni, kasi Nzambe apesaki malako nini?

15 Tókanisa Moyuda moko oyo alandelaka mpenza Mibeko, oyo azali komituna mituna yango. Akokaki kokanisa ete eleki malamu koboya kosomba nyama na wenze, se ndenge oyo Moyuda mosusu, akokaki koboya nyama soki akanisi ete ekoki mpenza kozala ete bapesaki yango liboso mbeka na bikeko. Bayuda mosusu bakokaki kolya nyama se nsima ya kolanda molulu mobimba mpo na kobimisa yango makila. * (Matai 23:​23, 24) Omoni ete na kati ya Bayuda, moto na moto azalaki na ndenge oyo akokaki kosala, oyo ekeseni na ya mosusu! Lisusu, lokola Nzambe asɛngaki makambo wana te, ebongaki nde Bayuda bátinda ebele ya mituna na likita ya balabi mpo bápesa bango malako na likambo mokomoko? Atako momeseno wana ekolaki na Lingomba ya Bayuda, tozali na esengo ya koyeba ete Yehova atindaki te ete basambeli ya solo bázwa bikateli na ntina na makila na lolenge wana. Nzambe apesaki malako ya ntina etali koboma banyama oyo bakoki kolya mpe kobimisa yango makila, mpe asukaki wana.​—Yoane 8:32.

16. Mpo na nini baklisto bakoki kozala na makanisi ekeseni na likambo etali kondima bankisi oyo esalemi na biloko mikemike oyo babendaka na biloko oyo ezalaka na kati ya makila?

16 Ndenge tolobaki yango na paragrafe 11 mpe 12, Batatoli ya Yehova bandimaka te bázongisa bango makila to moko na biloko minei oyo ezalaka na makila, elingi koloba plasma, globule rouge, globule blanc, mpe plaquette. Kasi, ezali boni mpo na biloko mikemike oyo bakoki kobenda na bikolo wana, na ndakisa, mai oyo ezalaka na ba anticorps mpo na koboma mikrobɛ to mpo na koboma ngɛngɛ ya nyoka? (Talá lokasa 30, paragrafe 4.) Bamosusu bamonisi ete biloko mikemike wana ezali lisusu makila te, mpe tokoki kokanisa yango te ntango tozali kotalela mobeko ya ‘koboya makila.’ (Misala 15:29; 21:25; lokasa 31, paragrafe 1) Wana ezali ekateli na bango. Lisosoli ya bamosusu epekisaka bango eloko nyonso oyo euti na makila (ya nyama to ya moto), ata mwa eloko moke mpenza oyo babendi na biloko ya ntina oyo ezalaka na kati ya makila. * Ezali mpe na baoyo bakoki kondima bázongisa bango proteini ya plasma mpo na kosilisa maladi to koboma ngɛngɛ ya nyoka, kasi baboyaka biloko mosusu ya mikemike oyo babendi na makila. Lisusu, biloko mosusu ya mikemike oyo babendaka na biloko minei oyo ezalaka na kati ya makila esalaka mosala monene na nzoto lokola kaka biloko wana; yango wana, baklisto mingi baboyaka yango.

17. (a) Ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosalisa biso na likambo etali kondima to koboya biloko mikemike oyo babendi na makila? (b) Mpo na nini esengeli kozwa bikateli na makambo yango na lisɛki te?

17 Makambo oyo Biblia elobi mpo na lisosoli ekoki mpenza kosalisa moto oyo alingi kozwa ekateli na makambo wana. Likambo ya liboso ezali ya koyeba oyo Liloba ya Nzambe elobi mpe koteya lisosoli na biso na kolanda yango. Yango ekosalisa moto azwa ekateli na kolanda litambwisi ya Nzambe na esika ya kosɛnga na moto mosusu azwela ye ekateli. (Nzembo 25:​4, 5) Na oyo etali kondima biloko oyo babendi na makila, bato mosusu balobaki ete, ‘Ezali likambo ya lisosoli ya moto, ntina ya komitungisa na yango ezali te.’ Kokanisa ndenge wana ezali libunga. Likambo oyo ezali kotalela lisosoli ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Ekateli na biso ekoki komema makambo minene. Moko ya bantina ezali ete, lokola biso nyonso tozali na lisosoli ndenge moko te, ekateli na biso ekoki kobɛtisa bato mosusu libaku. Tokoki komona yango na toli ya Paulo na ntina na nyama oyo ekokaki kopesama na ekeko mpe na nsima kotɛkama na zando. Moklisto asengelaki kokeba ete ‘azokisa lisosoli ya bato ya bolɛmbu’ te. Soki abɛtisi basusu libaku, akoki ‘kobebisa ndeko oyo Klisto akufelaki’ mpe kosala lisumu na miso ya Klisto. Na yango, atako na likambo etali kondima to koboya biloko mikemike oyo babendi na biloko ya ntina ya makila moto na moto asengeli kozwa ekateli na ye, esengeli kozwa yango na lisɛki te.​—1 Bakolinti 8:​8, 11-13; 10:​25-31.

18. Ndenge nini moklisto akoki koboya koboma lisosoli na ye na bikateli mpo na makila?

18 Ezali mpe na likambo mosusu oyo eyokani na yango mpe ezali komonisa ntina ya kozwa na lisɛki te bikateli etali makila. Ezali makambo oyo bikateli yango ekoki kobimisela yo na nsima. Soki omoni ete kondima biloko mikemike oyo babendi na makila ekotungisa lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia, osengeli kotalela yango. Osengeli mpe te koboya kolanda lisosoli na yo kaka mpo moto mosusu alobi na yo, “Ezali mabe te, bato mingi bandimaka yango.” Kobosana te ete bamilio ya bato lelo oyo balandaka lisosoli na bango te, mpe lisosoli na bango ekufá, yango wana bakosaka to basalaka makambo mosusu ya mabe kozanga ete bámitungisa. Baklisto basengeli koboya mpenza kokóma ndenge wana.​—2 Samwele 24:10; 1 Timote 4:​1, 2.

19. Ntango tozali kozwa ekateli na makambo etali makila, tosengeli libosoliboso kobatela likambo nini na makanisi?

19 Na nsuka na yango, lisolo oyo ezali na nkasa 29-31 elobi boye: “Lokola moto na moto akoki kozwa ekateli oyo ekeseni na moto mosusu na kotalela makanisi mpe lisosoli na ye, elingi koloba ete likambo yango ezali mpenza na ntina mingi te? Te. Ezali na ntina mingi.” Mingimingi mpo ezali kotalela boyokani na biso na “Nzambe ya bomoi.” Kaka boyokani wana nde ekoki komemela moto bomoi ya seko, boyokani oyo esalemi na nguya ya kobikisa ya makila ya Yesu oyo esopanaki. Talelá makila na motuya monene mpo na likambo oyo Nzambe azali kokokisa na lisalisi ya makila: kobikisa bomoi. Paulo akomaki boye: “Bozalaki na elikya te mpe bozalaki na Nzambe te na kati ya mokili. Kasi sikoyo na bomoko elongo na Klisto Yesu bino bato kala bozalaki mosika mpenza bokómi penepene na lisalisi ya makila ya Klisto.”​—Baefese 2:​12, 13.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 13 Na eleko moko boye, Paulo ná baklisto mosusu minei bakendaki na tempelo mpo na kokokisa molulu ya komipɛtola. Na ntango wana, basengelaki lisusu kotosa Mibeko te, kasi Paulo asalaki yango na kolanda toli oyo bankulutu ya Yelusaleme bapesaki ye. (Misala 21:​23-25) Kasi, ekoki kozala ete baklisto mosusu bazalaki komona ete bakoki kokɔta na tempelo te to kokokisa molulu wana. Ata na ntango wana, bango nyonso bazalaki na lisosoli ndenge moko te, ezali mpe bongo lelo oyo.

^ par. 15 Buku Encyclopaedia Judaica elobeli mibeko “ya mindɔndɔmindɔndɔ mpe milaimilai” mpo na “kobongisa mpe kolamba” nyama. Mibeko yango eyebisi miniti boni mosuni esengeli kofanda na mai, ndenge nini kolongola yango mai, lolenge nini ya mungwa basengeli kotya na mosuni yango, mpe mbala boni esengeli kosukola yango na mai ya mpiɔ.

^ par. 16 Bakómi kosala bankisi mingi ya ntonga na biloko oyo esalaka na nzoto lokola biloko oyo babendaka na makila, kasi ezali kouta na makila te. Kasi, ntango mosusu ekoki kozala na mwa ndambo moke ya biloko mikemike oyo babendi na makila, na ndakisa albumine.​—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1994.

[Mituna ya boyekoli]

Ozali koyeba lisusu?

• Malako nini Nzambe apesaki Noa, Bayisalaele, mpe baklisto na likambo etali makila?

• Na oyo etali makila, eloko nini Batatoli ya Yehova baboyaka mpenza?

• Na ndenge nini kondima bázongisa biso biloko mikemike oyo babendi na biloko minene ya makila etaleli lisosoli ya moto, kasi yango elingi koloba nini te?

• Ntango tozali kozwa bikateli, mpo na nini tosengeli kotalela libosoliboso boyokani na biso na Nzambe?

[Etanda na lokasa 22]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

BIKATELI MPO NA MAKILA

MAKILA

ENDIMAMI TE Globules rouges Globules blancs Plaquettes Plasma

MOKLISTO YE MOKO

AKOZWA EKATELI Biloko Biloko Biloko Biloko

mikemike mikemike mikemike mikemike

euti na euti na euti na euti na

globules rouges globules blancs plaquettes plasma

[Elilingi na lokasa 20]

Lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki ekateli ete baklisto basengeli ‘koboya makila’

[Elilingi na lokasa 23]

Talelá lisosoli na yo liboso ya kozwa ekateli ya kondima to koboya biloko mikemike oyo babendi na makila